BOMOI YA BAKRISTO
‘Sepelá na biloko oyo ozali na yango sikoyo’
Soki tozali na biloko mingi te ya mosuni, motema ekoki kotinda biso tósala makambo oyo ekoki kobebisa boninga na biso na Yehova. Na ndakisa, tokoki kozwa libaku ya kozwa mbongo ebele, kasi libaku yango ekobebisa mimeseno na biso ya elimo. Komanyola na maloba ya Baebre 13:5 ekosalisa biso.
“Bózala na bolingo ya mbongo te na bomoi na bino”
Bondelá mpe na nsima kanisá ndenge oyo otalelaka mbongo, mpe kanisá ndakisa oyo ozali kopesa bana na yo.—g 9/15 lok. 6.
“Bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo”
Bongisá ndenge na yo ya kotalela biloko oyo osengeli na yango mpenza.—w16.07 lok. 3 par. 1-2.
“Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te”
Tyá motema ete Yehova akosalisa yo ozwa biloko ya kobikela soki okobi kotya Bokonzi na esika ya liboso.—w14 15/4 lok. 21 par. 17.
TALÁ VIDEO NDENGE BANDEKO NA BISO BAZALI KOBATELA KIMYA ATAKO MIKAKATANO YA MBONGO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:
Mateya nini ozwi na lisolo ya ndeko Miguel Novoa?