Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w20 Juin lok. 17
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Masolo mosusu
  • ‘Okokoba kotambola na elimo’?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ozali kotika elimo ya Nzambe ekamba yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Tókoba “kobota mbuma mingi”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Kobá kolata “bomoto ya sika” nsima ya kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
w20 Juin lok. 17

Mituna ya Batángi

“Mbuma ya elimo” ezali kaka bizaleli oyo Bagalatia 5:22, 23 elobeli?

  • BOLINGO

  • ESENGO

  • KIMYA

  • MOTEMA MOLAI

  • BOBOTO

  • BOLAMU

  • KONDIMA

  • MOTEMA PƐTƐƐ

  • KOMIPEKISA

Bavɛrsɛ yango elobeli bizaleli libwa: “Mbuma ya elimo ezali bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.” Kasi, tosengeli te komona ete kaka yango nde, bizaleli oyo elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tókolisa. Ndenge nini toyebi yango?

Na bavɛrsɛ oyo ezali liboso, ntoma Paulo akomaki boye: “Nzokande misala ya nzoto ezali. . . Pite, mbindo, etamboli ya nsɔni, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bafɛti ya lokoso, mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” (Ga. 5:19-21) Na yango, Paulo alobelaki makambo mosusu oyo ezali mpe “misala ya nzoto” na ndakisa, makambo oyo elobelami na Bakolose 3:5. Ndenge moko mpe, nsima ya kotánga bizaleli libwa ya malamu, akomaki boye: “Ezali na mobeko ata moko te oyo ezali kotɛmɛla makambo wana.” Paulo azalaki te kotánga bizaleli nyonso ya malamu oyo elimo santu ekoki kosalisa biso tókolisa.

Tokoki komona yango polele soki tokokanisi yango na makambo oyo Paulo akomelaki lisangá ya Efese. Akomaki boye: “Mbuma ya pole esalemi na ndenge nyonso ya bolamu mpe boyengebene mpe solo.” (Ef. 5:8, 9) Ya solo, “bolamu,” boyengebene mpe solo, ezali na kati ya “mbuma ya pole,” kasi bolamu ezali mpe moko ya bizaleli ya mbuma ya elimo.

Tokoki mpe kokanga ntina ya likambo yango, soki tokokanisi bizaleli ya mbuma ya elimo na bizaleli motoba oyo Paulo alendisaki Timote akolisa. Elingi koloba: “Boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, mpe elimo ya boboto.” (1 Tim. 6:11) Kaka bizaleli misato kati na yango (kondima, bolingo, mpe motema pɛtɛɛ) nde etángami na kati ya bizaleli ya “mbuma ya elimo.” Kasi, Timote asengelaki na lisalisi ya elimo santu mpo akolisa bizaleli lokola: boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, mpe koyika mpiko.​—Talá mpe Bakolose 3:12; 2 Petro 1:5-7.

Na yango, Bagalatia 5:22, 23 etángi te bizaleli nyonso oyo Bakristo basengeli kokolisa. Na yango, elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tókolisa bizaleli libwa ya “mbuma ya elimo.” Kasi mpo tókóma Bakristo oyo bakɔmeli na elimo ezali mpe na bizaleli mosusu oyo tosengeli kokolisa, mpe “kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.”​—Ef. 4:24.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto