Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp21 No. 2 nk. 10-12
  • Oyo okoki kosala mpo okɔta na mokili ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyo okoki kosala mpo okɔta na mokili ya sika
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • SOKI ‘OYEKOLI KOYEBA’ NZAMBE OKOBIKA NTANGO MOKILI EKOKUFA
  • TÁNGÁKÁ LILOBA YA NZAMBE, BIBLIA, MOKOLO NA MOKOLO
  • BONDELÁ NZAMBE ASALISA YO
  • Nzambe asalá makambo nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Osengeli kosala nini mpo ozwa bomoi ya seko?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe—Okoki kofanda kuna
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Bakufi bakozonga lisusu na bomoi!
    Lamuká!—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
wp21 No. 2 nk. 10-12

Oyo okoki kosala mpo okɔta na mokili ya sika

Masolo oyo eleki emonisi ete, etikali moke Nzambe asukisa mokili mabe oyo ná mikakatano na yango nyonso. Tosengeli kondima ete likambo yango ekosalema mpenza. Mpo na nini? Mpo Biblia, Liloba ya Nzambe, epesi elaka oyo:

“Mokili ezali koleka.”​—1 YOANE 2:17.

Tokoki kondima mpe ete bato bakobika mpo vɛrsɛ yango ebakisi ete:

“Moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”

Yango wana, soki tolingi kobika, tosengeli kosala mokano ya Nzambe. Mpo na koyeba mokano ya Nzambe, tosengeli liboso koyeba Nzambe.

SOKI ‘OYEKOLI KOYEBA’ NZAMBE OKOBIKA NTANGO MOKILI EKOKUFA

Bililingi: 1. Na lopitalo, monganga afandi na nse mpo alɛmbi mpenza. 2. Azali komɛla kafe na restora mpe amoni moninga na ye ya mosala azali kotánga zulunalo moko na esengo. 3. Moninga yango atángeli ye vɛrsɛ moko mpe apesi ye karte ya jw.org.

Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko.” (Yoane 17:3) Mpo tóbika na nsuka ya mokili mpe tózwa bomoi ya seko, tosengeli ‘koyekola koyeba’ Nzambe. Yango esuki kaka te na koyeba ete Nzambe azali, to koyeba mwa makambo na ye. Tosengeli kokóma baninga na ye. Soki olingi ete boninga na yo ná moto moko ekóma makasi, bosengeli kolekisaka ntango elongo. Mpo na kozala moninga ya Nzambe, esengeli mpe kosalaka bongo. Tótala mateya mosusu ya ntina oyo ezali na Biblia, oyo ekoki kosalisa biso tókóma baninga ya Nzambe mpe tóbatela boninga yango.

Mateya ya Biblia

Na ndako, monganga yango akɔti na jw.org.

Biblia elobi ete mokano ya Nzambe ezalaki ete bato báfanda na Paradiso.

Asalaki bato ya liboso, Adama ná Eva, mpe atyaki bango na esika moko ya kitoko mpenza, oyo babengi elanga ya Edene. Bazalaki bato ya kokoka, mpe Nzambe apesaki bango eloko nyonso oyo basengelaki na yango mpo bázala na bomoi ya esengo. Bazalaki na likoki ya kozala na bomoi libela na libela. Soki bátikalaka baninga ya Nzambe, balingaki kokufa te. Kasi, baponaki nde koboya kotosa mobeko ya pɛtɛɛ oyo Nzambe apesaki bango.

Biblia elobi ntina oyo tozali konyokwama.

Lokola Adama, moto ya liboso, atosaki Nzambe te, abungisaki likoki na ye mpe likoki ya bato nyonso ya kozala na bomoi ya seko. Biblia elobi: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso.” (Baroma 5:12) Kaka ndenge moto akoki kozwa mbeba moko boye epai ya baboti na ye, bana nyonso ya Adama bazwaki kozanga kokoka na ye. Yango wana, tokómaka mibange mpe tokufaka.

Biblia elobi makambo oyo Nzambe asalelá biso.

Biblia elobi: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Nzambe atindaki Yesu awa na mabele apesa bomoi na ye mpo na biso. Bolingo wana ya Yehova etindaki moto moko ya Inde, na nkombo Prabhakar, oyo azali na mbula 86 aloba boye: “Emonisi ete Yehovaa alingi ngai mingi mpenza. Bolingo na ye epesá ngai elikya ya bomoi ya seko.”

Biblia elobi ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi mpo na oyo Nzambe asalelá biso.

Biblia elobi ete tokomonisa ete tozali na botɔndi mpo na oyo Nzambe asalelá biso soki tozali “kotosa mibeko na ye.” (1 Yoane 2:3) Yehova Nzambe azali komonisa biso na bolingo mpenza oyo tokoki kosala mpo tózala na bomoi ya malamu sikoyo. (Yisaya 48:17, 18) Nzambe alingaka te ete tómonaka mpasi. Alaki ete soki tolandi malako na ye, tokosuka te kaka na kozala na bomoi ya malamu sikoyo, tokozala mpe na likoki ya kozala na bomoi ya seko.

TÁNGÁKÁ LILOBA YA NZAMBE, BIBLIA, MOKOLO NA MOKOLO

Monganga moko azali kotala likoló nsima ya kotánga Biblia na ntango ya bopemi.

Soki obondeli Nzambe asalisa yo mpe soki ozali kosala mokano na ye, okoki kobika ntango mokili mabe oyo ekokufa

Tolyaka mokolo na mokolo mpo tózala na bomoi. Kasi, Yesu alobaki ete: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.”​—Matai 4:4.

Lelo oyo, tozali kokuta maloba ya Yehova na kati ya Biblia. Soki ozali koyekola buku mosantu yango, okoyeba mateya ya ntina mpenza oyo ekoyebisa yo makambo oyo Nzambe asaláká kala, oyo azali kosala lelo, mpe oyo akosala na mikolo ezali koya.

BONDELÁ NZAMBE ASALISA YO

Okoki kosala nini soki olingi kotosa Nzambe kasi ozali kokoka te kotika makambo oyo Nzambe alobi ete ezali mabe? Na ntango wana, okozwa mpenza lisalisi soki oyebi Nzambe malamumalamu.

Tózwa ndakisa ya mwasi moko na nkombo Sakura, oyo azalaki na bomoi moko ya mbindo mpenza. Ntango abandaki koyekola Biblia, ayebaki mobeko ya Nzambe oyo elobi ete “bókima pite.” (1 Bakorinti 6:18) Sakura abondelaki Nzambe apesa ye makasi mpe azwaki makasi ya kotika etamboli ya mbindo oyo azalaki na yango. Atako bongo, akobaki kaka kobunda na komekama yango. Alobi ete: “Soki makanisi ya mbindo eyeli ngai, nabondelaka Yehova na bosembo mpenza, mpo nayebi ete nakokoka kobundisa yango ngai moko te. Nguya ya libondeli ekómisi ngai moninga ya Yehova.” Ndenge moko na Sakura, bamilio ya bato bazali koyekola koyeba Yehova. Yehova azali kopesa bango makasi oyo basengeli na yango mpo na kobongola bomoi na bango mpe kozala na bomoi oyo ekosepelisa ye.​—Bafilipi 4:13.

Soki oyebi Nzambe malamu, ‘Nzambe [mpe] akoyeba yo’ mpo ozali moninga na ye ya motema. (Bagalatia 4:9; Nzembo 25:14) Nsima na yango nde okoki kobika mpe kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe. Kasi, mokili ya sika ekozala ndenge nini? Lisolo oyo elandi ekolimbola yango.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe ndenge ezali na Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto