NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU
2 | Kozongisa mabe na mabe te
Liteya ya Biblia:
“Bózongisela moto mabe na mabe te. . . . Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso. Bózongisela ye mabe te, . . . mpo ekomamá ete: ‘“Kozongisa mabe ezali likambo na ngai; ngai nakozongisa mabe,” Yehova alobi bongo.’”—BAROMA 12:17-19.
Yango elimboli nini?
Atako moto akoki koyoka nkanda soki basali ye mabe, Nzambe alingaka likambo ya kozongisela moto mabe na mabe te. Kasi, azali kolendisa biso tózela ye mpo mosika te, akosembola makambo nyonso ya mabe.—Nzembo 37:7, 10.
Oyo okoki kosala:
Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, soki tozali kozongisela bato mabe na mabe, koyinana ekosila te. Yango wana, soki moto atumoli yo to asali yo mabe, kozongisela ye mabe na mabe te. Zalá na komipekisa mpe salá makambo na ndenge ya kimya. Ntango mosusu, ekozala malamu obosana likambo oyo esalemaki. (Masese 19:11) Kasi soki omoni ete ezali malamu olobela likambo yango, kokakatana te kolobela yango. Na ndakisa, soki basali yo likambo moko ya mabe mpenza, okoki kofunda likambo yango epai ya bapolisi to epai ya bakonzi mosusu.
Ezaleli ya koyina basusu ebebisaka moto ye moko
Bongo soki emonani ete lolenge ya kosilisa likambo moko na kimya ezali te? To soki osali nyonso oyo okoki mpo na kosilisa likambo yango na kimya kasi esimbi te? Kozongisa mabe na mabe te. Yango ekobebisa nde makambo. Kasi, soki oboyi kozongisa mabe na mabe, koyinana ekosila. Okoki kotyela Nzambe motema mpo asilisa likambo yango. “Talelá ye, mpe ye moko akosala.”—Nzembo 37:3-5.