Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Février lok. 31
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Masolo mosusu
  • Ayebi ndelo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Botaleli mibembo ya kokamwisa ya bandɛkɛ
    Lamuká!—1995
  • Tópesaka bambeka oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Février lok. 31

Oyebaki yango?

Mpo na nini ndenge bipopo mpe bibenga endimamaki lokola bambeka ezalaki kosalisa?

NA NSE ya Mibeko, Yehova andimaki ete bápesaka ye bipopo mpe bibenga lokola mbeka. Mbala mingi bazalaki kolobela bandɛkɛ yango esika moko na mibeko oyo elobelaki bambeka mpe bakokaki kopesa moko na esika ya mosusu. (Lev. 1:14; 12:8; 14:30) Mpo na nini kosala bongo ezalaki kosalisa? Ntina moko ezali ete bipopo ezalaki komonana ntango nyonso te. Mpo na nini?

Epopo

Na basanza ya eleko ya molunge, bipopo esalaka mibembo na mokili mobimba ya ekólo Israël. Na sanza nyonso ya zomi, ekendaka na sudi, na bikólo ya molunge, mpe ezongaka na Israël na eleko ya prɛta. (Loy. 2:11, 12; Yir. 8:7) Na yango na ntango ya kala, ezalaki mpasi mpo Bayisraele bápesa mbeka ya bipopo na eleko ya malili.

Ebenga

Nzokande, bibenga esalaka mibembo mingi te, yango wana ezalaki komonana ntango nyonso na Yisraele na boumeli ya mbula mobimba. Lisusu, bibenga ezalaki bandɛkɛ oyo bato bazalaki kobɔkɔla. (Talá Yoane 2:14, 16.) Buku moko (Bible Plants and Animals) emonisi ete “na bingumba mpe bamboka nyonso ya Palestine okokuta bibenga oyo bato babɔkɔlaka. Nkolo-ndako nyonso azalaki na ndako na ye ya bibenga, to mpe mwa lidusu moko na efelo, epai bandɛkɛ ekokaki kofanda.”​—Talá mpe Yisaya 60:8.

Ebenga na ndako na yango

Na yango, Yehova amonisaki ete azali Nzambe ya bolingo mpe ya makambo makasimakasi te na ndenge azalaki kondima ete Bayisraele bápesa ye bambeka ya bandɛkɛ oyo ezalaki komonana na boumeli ya mbula.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto