Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w22 Août nk. 26-31
  • Basaleli ya Yehova balingaka boyengebene

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Basaleli ya Yehova balingaka boyengebene
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BOYENGEBENE EZALI NINI?
  • KÓMISÁ MAKASI BOLINGO NA YO MPO NA MIBEKO YA YEHOVA
  • Tólinga boyengebene na motema mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mpo na nini kolanda kosalela boyengebene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tókoba koluka liboso “boyengebene na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Sepelá na boyengebene ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
w22 Août nk. 26-31

LISOLO YA BOYEKOLI 36

Basaleli ya Yehova balingaka boyengebene

“Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene.”​—MAT. 5:6.

LOYEMBO 9 Yehova azali Mokonzi na biso!

NA MOKUSEa

1. Komekama nini Yozefe akutanaki na yango, mpe likambo nini asalaki?

YOZEFE mwana ya Yakobo akutanaki na komekama moko ya makasi. Mwasi moko ayebisaki ye: “Lalá na ngai.” Azalaki mwasi ya Potifare, nkolo na ye. Yozefe aboyaki kosala bongo. Mbala mosusu moto mosusu akoki komituna: ‘Mpo na nini Yozefe aboyaki kosala yango?’ Potifare azalaki wana te. Lisusu, Yozefe azalaki moombo na ndako yango, mpe mwasi yango akokaki kokómisa bomoi na ye mpasi soki aboyi kosala likambo oyo asɛngaki ye. Kasi, mbala nyonso oyo atyaki ye mbamba básangisa na ye nzoto, Yozefe azalaki koboya. Mpo na nini aboyaki? Alobaki: “Ndenge nini nakoki kosala mabe monene boye mpe kosalela mpenza Nzambe lisumu?”​—Eba. 39:7-12.

2. Ndenge nini Yozefe ayebaki ete ekobo ezali lisumu na miso ya Nzambe?

2 Ndenge nini Yozefe ayebaki ete Nzambe atalelaka ekobo ete ezali “mabe monene”? Mobeko ya polele oyo ezalaki na Mibeko ya Moize oyo elobaki: “Osengeli kosala ekobo te,” eyaki kopesama mbula nkama mibale na nsima. (Kob. 20:14) Lokola Yozefe ayebaki Yehova malamu amonaki ete kosala ekobo ekosepelisa Yehova te. Na ndakisa, Yozefe ayebaki malamu ete Yehova asalaki libala kaka mpo na mwasi moko mpe mobali moko. Mpe mbala mosusu ayoká ndenge oyo Yehova asalaki na mabaku mibale mpo na kobatela nkɔkɔ na ye Sara mpo atikala sembo epai ya mobali na ye. Nzambe asalaki mpe bongo mpo na Rebeka oyo azalaki mwasi ya Yisaka. (Eba. 2:24; 12:14-20; 20:2-7; 26:6-11) Lokola Yozefe azwaki ntango ya komanyola na makambo yango, esalisaki ye ayeba ndenge oyo Yehova atalelaka malamu ná mabe. Yozefe azalaki kolinga Nzambe mingi, azalaki mpe kolinga mibeko na ye na likambo etali boyengebene, yango wana azwaki mokano ya kosala likambo oyo ayebaki ete ekosepelisa Yehova.

3. Makambo nini tokomona na lisolo oyo?

3 Olingaka boyengebene? Na ntembe te olingaka yango. Kasi biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe soki tokebi te, tokoki kokóma kotalela boyengebene ndenge bato ya mokili batalelaka yango. (Yis. 5:20; Rom. 12:2) Sikoyo tokomona soki boyengebene ezali nini mpe ndenge bomoi na biso ekómaka malamu ntango tozali kolinga yango. Na nsima tokomona makambo misato oyo tosengeli kosala mpo tókóma kolinga mibeko ya Nzambe lisusu mingi.

BOYENGEBENE EZALI NINI?

4. Makanisi nini bato mingi bazalaka na yango ntango balobelaka moyengebene?

4 Ntango bato balobelaka moyengebene, bato mingi bakanisaka ete azali moto ya lolendo, moto oyo akaniselaka basusu mabe, to moto oyo amimonaka ete aleki basusu. Kasi Nzambe asepelaka ata moke te na bizaleli yango. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki kopamela bakonzi mingi ya mangomba ya ntango na ye oyo bazalaki kotya mibeko na bango moko na oyo etali boyengebene. (Mos. 7:16; Luka 16:15) Moto oyo asalaka makambo oyo Yehova alingaka amimonaka te ete aleki basusu.

5. Na kotalela Biblia, boyengebene elimboli nini? Pesá ndakisa.

5 Boyengebene ezali ezaleli moko ya malamu mpenza. Yango elimboli, kosala likambo oyo ezali malamu na miso ya Yehova Nzambe. Na Biblia, liloba “boyengebene” epesaka likanisi ya kotambola na kolanda mibeko ya sembo ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu. Na ndakisa, Yehova atyaki mobeko ete moto ya mombongo asengelaki kosalela “kilo ya sembo.” (Mib. 25:15) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “bosembo” ekoki mpe kobongolama na “boyengebene.” Na yango, mokristo oyo alingi kozala moyengebene na miso ya Nzambe asengeli kozala sembo na makambo na ye nyonso ya mombongo. Moyengebene ayinaka komona ete bazali kosalela moto mosusu makambo na kozanga bosembo. Mpe ‘mpo na kosepelisa Yehova mpenza,’ moto oyo azali moyengebene alukaka koyeba ndenge Yehova akotalela bikateli oyo akozwa.​—Kol. 1:10.

6. Na kotalela Yisaya 55:5, 9, mpo na nini tosengeli kotyela mobeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe motema?

6 Biblia elobi ete Yehova azali liziba ya boyengebene. Mpo na yango, abengami “efandelo ya boyengebene.” (Yir. 50:7) Lokola azali Mozalisi, Yehova azali na lotomo ya kotya mobeko na likambo etali malamu ná mabe. Yehova azali ya kokoka, makanisi na ye na likambo etali malamu ná mabe ekeseni mosika na makanisi na biso oyo mbala mingi ezalaka na bopusi na ezaleli na biso ya kozanga kokoka mpe lisumu. (Mas. 14:12; tángá Yisaya 55:8, 9.) Kasi, lokola tokelamá na elilingi ya Nzambe, tozali na likoki ya kosala makambo na kolanda mibeko na ye ya boyengebene. (Eba. 1:27) Mpe tolingaka kosala bongo. Bolingo oyo tozalaka na yango mpo na Tata na biso ya likoló etindaka biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na komekola ye.​—Ef. 5:1.

7. Mpo na nini tosengeli na mibeko oyo ebongi kotyelama motema? Pesá ndakisa.

7 Tozwaka matomba mingi ntango tozali kokangama na mibeko ya Yehova na oyo etali malamu ná mabe. Oyebi mpo na nini? Meká kokanisa, nini ekokaki kosalema soki banki mokomoko etye mobeko na yango moko na likambo etali motuya ya mosolo to soki kompanyi mokomoko ya botongi etye mobeko na yango moko ya komeka bolai ya biloko. Mobulu elingaki kozala makasi. Mpe soki monganga alandi te na likebi mibeko ya sikisiki ntango azali kosalisa moto moko oyo azali kobɛla, yango ekoki kosala ete moto yango akufa. Ya solo, kotosa mibeko oyo ebongi kotyelama motema, ezalaka mpenza libateli. Ezali mpe bongo mpo na mibeko ya Nzambe na likambo etali malamu ná mabe.

8. Mapamboli nini ezali kozela baoyo balingaka boyengebene?

8 Yehova apambolaka baoyo basalaka makasi mpo na kotosa mibeko na ye. Alaki ete: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.” (Nz. 37:29) Meká kokanisa bomoko, kimya mpe esengo oyo ekozala na mokili mobimba ntango moto nyonso akotosa mibeko ya Yehova! Yehova alingi ete ozala na bomoi ya lolenge wana. Ya solo, ezali mpenza na ntina ete biso nyonso tólinga boyengebene! Ndenge nini tokoki kokómisa bolingo na biso makasi mpo na ezaleli yango? Tiká tólobela makambo misato oyo tokoki kosala.

KÓMISÁ MAKASI BOLINGO NA YO MPO NA MIBEKO YA YEHOVA

9. Likambo nini ekosalisa biso tólinga boyengebene?

9 Likambo ya liboso: Lingá Yehova, Moto oyo atyaka mibeko. Mpo tólinga boyengebene, tosengeli naino kokómisa bolingo na biso makasi mpo na moto oyo atyaka mibeko na likambo etali malamu ná mabe. Wana tozali kolinga Yehova makasi, tokokóma na mposa makasi ya kotosa mibeko na ye. Na ndakisa: Soki Adama ná Eva bazalaki kolinga Yehova, elingaki kozala mpasi te bátosa mobeko na ye.​—Eba. 3:1-6, 16-19.

10. Abrahama asalaki nini mpo ayeba Yehova malamumalamu?

10 Tolingaka soki moke te kosala mbeba oyo Adama ná Eva basalaki. Tokokima likambo yango soki tozali kokoba koyekola makambo mingi etali Yehova, kosepela na bizaleli na ye, mpe kosala makasi koyeba lolenge na ye ya kosala makambo. Soki tosali bongo, tokokóma kolinga Yehova mingi mpenza. Tótalela ndakisa ya Abrahama. Azalaki mpenza kolinga Yehova. Abrahama azalaki kotomboka te ata ntango amonaki ete ezalaki mpenza mpasi ayeba ntina Yehova azwi ekateli boye to boye. Kasi, azalaki kosala makasi mpo na koyeba Yehova malamu. Na ndakisa, ntango ayebaki ekateli ya Yehova ya kobebisa Sodoma mpe Gomora, na ebandeli Abrahama abangaki ete “Mosambisi ya mabele mobimba” aboma moyengebene elongo na moto mabe. Epai ya Abrahama, ezalaki likambo oyo ekokaki kosalema te, na yango, na komikitisa atunaki Yehova mituna mingi. Mpe Yehova ayanolaki ye. Nsukansuka, Abrahama ayaki komona ete Yehova atalaka motema ya moto mokomoko mpe akoki ata moke te kopesa moto oyo asali likambo te etumbu elongo na moto mabe.​—Eba. 18:20-32.

11. Ndenge nini Abrahama amonisaki ete azalaki kolinga Yehova mpe kotyela ye motema?

11 Lisolo oyo Abrahama asololaki na Yehova na likambo etali Sodoma mpe Gomora esimbaki mpenza motema na ye. Ntembe ezali te ete akómaki kolinga mpe komemya Tata na ye ya likoló lisusu mingi. Bambula mingi na nsima, likambo moko ekómelaki Abrahama oyo esalaki ete ezala mpasi mpo atyela Yehova motema. Yehova asɛngaki ye apesa mwana na ye Yisaka mbeka. Kasi, sikoyo Abrahama ayebaki makambo mingi etali Nzambe, yango wana azalaki lisusu na motuna te oyo akokaki kotuna Nzambe. Abrahama abongisaki makambo nyonso mpo na kosala likambo oyo Yehova asɛngaki ye asala. Meká kokanisa mpasi oyo azalaki koyoka ntango azalaki komibongisa mpo na makambo yango! Na ntembe te, Abrahama akanisaki na mozindo na makambo oyo ayebaki mpo na Yehova. Ayebaki ete Yehova akoki soki moke te kosala likambo moko ya kozanga bosembo to oyo ezangi bolingo. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo alobaki ete Abrahama andimaki ete Yehova akokaki kosekwisa mwana na ye Yisaka. (Ebr. 11:17-19) Longola yango, Yehova alakaki ete Yisaka akozala tata ya mabota, mpe na ntango yango, Yisaka abotaki naino te. Lokola Abrahama azalaki kolinga Yehova, yango wana atyaki motema ete Tata na ye ya likoló akosala makambo na boyengebene. Atako ezalaki mpasi, kondima na ye etindaki ye atosa.​—Eba. 22:1-12.

12. Na kotalela Nzembo 73:28, ndenge nini tokoki komekola Abrahama?

12 Ndenge nini tokoki komekola Abrahama? Ndenge moko na ye, tosengeli kokoba koyekola makambo etali Yehova. Soki tosali bongo, tokopusana lisusu penepene na ye mpe tokolinga ye lisusu mingi. (Tángá Nzembo 73:28.) Lisosoli na biso ekoteyama mpe tokobanda kosala makambo na kolanda makanisi ya Yehova. (Ebr. 5:14) Yango ekosala ete ntango oyo moto moko aluki kotinda biso tósala likambo moko ya mabe, tóboya kosala yango. Tokokóma koyina likanisi nyonso oyo ekoki kotinda biso tósala likambo moko oyo ekopesa Tata na biso ya likoló mpasi mpe oyo ekosala ete boyokani na biso ná ye ebeba. Sikoyo, ndenge nini tokoki komonisa lisusu ete tolingaka boyengene?

13. Na kotalela Masese 15:9, ndenge nini tokoki kolanda boyengebene?

13 Likambo ya mibale: Kobá kokolisa bolingo mpo na boyengebene mokolo na mokolo. Soki tolingi ete nzoto na biso ekóma makasi, tosengeli kosalaka ngalasisi mikolo nyonso. Ndenge moko mpe soki tolingi kokolisa bolingo mpo na boyengebene, tosengeli mpenza kosala milende. Kosala yango ekozala mpasi te soki tozali kosala bongo mokolo na mokolo. Yehova azalaka makambo makasimakasi te, mpe asɛngaka biso te tósala oyo eleki makoki na biso. (Nz. 103:14) Ayebisi biso ete “alingaka moto oyo alandaka boyengebene.” (Tángá Masese 15:9.) Soki tolingi kokokisa mokano moko na mosala ya Yehova, tosalaka milende mingi mpo tókokisa yango. Yango nde tosengeli kosala mpo tólanda boyengebene. Lisusu, na motema molai na ye, Yehova akosalisa biso mpo tókoba kosala milende, mpe tóbongisa makambo mosusu mokemoke.​—Nz. 84:5, 7.

14. “Ebateli-ntolo ya boyengebene” ezali nini, mpe mpo na nini tozali na mposa na yango?

14 Na bolingo nyonso, Yehova ayebisi biso ete boyengebene ezali kilo te. (1 Yoa. 5:3) Kutu, ebatelaka biso mpe tozalaka mpenza na mposa ya libateli yango. Meká kokanisa lisusu molato ya etumba ya elimo oyo ntoma Paulo alobelaki. (Ef. 6:14-18) Eteni nini ezalaki kobatela motema ya soda? Ezalaki “ebateli-ntolo ya boyengebene,” oyo ezali komonisa mibeko ya sembo ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu. Kaka ndenge ebateli-ntolo ebatelaka motema, ndenge moko mpe mibeko ya sembo ya Yehova na oyo etali bizaleli ya malamu ebatelaka motema na biso ya elilingi, elingi koloba, bomoto na biso ya kati. Yango wana, ezali na ntina ete ebateli-ntolo ezala mpe na kati ya molato na biso ya etumba!​—Mas. 4:23.

15. Ndenge nini okoki kolata ebateli-ntolo ya boyengebene?

15 Ndenge nini okoki kolata ebateli-ntolo? Okoki kolata yango soki ozali kokanisa na mibeko ya Nzambe ntango olingi kozwa bikateli. Ntango olingi koloba likambo moko, koyoka miziki, kominanola, to kotánga buku moko, omituna naino boye: ‘Makambo nini nakokɔtisa na motema na ngai? Makambo yango eyokani na makambo oyo Yehova andimaka? To ezali nde kolendisa pite, mobulu, lokoso, moimi, makambo oyo Yehova alobi ete ezali sembo te?’ (Flp. 4:8) Soki ekateli okozwa eyokani na mokano ya Yehova, ekosala ete motema na yo ebatelama na makambo ya mabe.

Ndeko mwasi moko azali kotala ndenge mbɔngɛ ya mbu ezali kobɛta na mpokwa na kolala ya moi.

Boyengebene na yo ekoki kozala “lokola mbonge ya mbu” (Talá paragrafe 16-17)

16-17. Ndenge nini Yisaya 48:18 esalisaka biso tómona ete tokoki kotosa mibeko ya Yehova mpo na libela?

16 Omitungisaka soki okokoka kosalela mitinda ya Yehova na bomoi na yo mokolo na mokolo, to mbula na mbula? Tótalela ndakisa oyo Yehova asaleli oyo ezali na Yisaya 48:18. (Tángá.) Yehova alaki ete boyengebene na biso ekozala “lokola mbonge ya mbu.” Kanisá ete otɛlɛmi na bokula ya mbu moko monene, mpe ozali kotala ndenge mbonge ezali komata mpe kokita, mpe kosala bongo mbala na mbala. Na esika wana ya kimya, osengeli nde komitungisa ete mokolo moko mbonge yango ekotika kosala bongo? Te! Ndenge oyebi yango, mbonge yango esukaka kaka na bokula wana banda bankóto ya bambula, mpe ekokoba kosala kaka bongo mbala na mbala.

17 Boyengebene na yo ekokani na mbonge ya mbu! Na ndenge nini? Ntango olingi kozwa ekateli moko, eloko ya liboso ya kosala ezali ya koyeba likambo oyo Yehova alingi ete osala. Mpe salá yango. Atako ekateli yango ekoki kozala ya mpasi, Tata na yo ya likoló akozala ntango nyonso wana mpo na kopesa yo makasi mpe kosalisa yo osala oyo ezali malamu.​—Yis. 40:29-31.

18. Mpo na nini tosengeli koboya kosambisaka basusu na kolanda mitinda na biso moko?

18 Likambo ya misato: Tiká Yehova ye moko akata makambo. Wana tozali kosala makasi mpo na kotosa mitinda ya sembo ya Yehova, tosengeli mpe koboya kosambisa basusu to komona ete toleki bango. Na esika ya koluka kokitisa bamosusu lokola nde biso tozali na lotomo ya kosambisa bango na kolanda mitinda na biso moko, tosengeli kobosana te ete Yehova nde azali “Mosambisi ya mabele mobimba.” (Eba. 18:25) Yehova alingi te ete tósambisaka basusu. Kutu, Yesu apesi biso etinda ete: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te.”​—Mat. 7:1.b

19. Ndenge nini Yozefe amonisaki ete azalaki kotyela lisambisi ya Yehova motema?

19 Tiká tótalela lisusu ndakisa ya Yozefe. Aboyaki kosambisa basusu, atako basalelaki ye makambo mabe mpenza. Bandeko na ye babɛtaki ye, batɛkaki ye na boombo, mpe basalaki makasi mpo na kondimisa tata na bango ete Yozefe akufi. Bambula mingi na nsima, Yozefe akutanaki lisusu na libota na ye. Mbala oyo akómaki mokonzi moko ya nguya, na yango, Yozefe akokaki kosambisa bandeko na ye mpe kozongisa mabe. Atako bayokaki mawa mpenza na motema mpo na makambo oyo basalaki, bandeko ya Yozefe bazalaki kaka kobanga ete akoki kosala bango mabe. Kasi Yozefe akitisaki bango motema na maloba oyo: “Bóbanga te. Nazali nde na esika ya Nzambe?” (Eba. 37:18-20, 27, 28, 31-35; 50:15-21) Na komikitisa nyonso, Yozefe amonaki ete Yehova nde abongi mpo na kokata makambo.

20-21. Ndenge nini tokoki koboya kokanisa ete toleki basusu?

20 Ndenge moko na Yozefe, tosengeli kotika makambo na mabɔkɔ ya Yehova. Na ndakisa, tokoki te koyeba nini etindi ndeko na biso asala likambo moko boye. Tokoki te kotánga makambo oyo ezali na motema ya moto; kaka “Yehova [nde] amekamekaka makanisi mpo na koyeba ndenge ezali.” (Mas. 16:2) Alingaka bato ya ndenge nyonso mpe mimeseno ya ndenge na ndenge. Mpe Yehova alendisi biso ete ‘tófungwama.’ (2 Ko. 6:13) Tosengeli kolinga bandeko na biso nyonso, kasi kosambisa bango te.

21 Tosengeli mpe te kosambisa bato oyo bazali Batatoli te. (1 Tim. 2:3, 4) Osengeli nde kosambisa ndeko na yo ya libota oyo bozali na ye kondima moko te, na ndakisa koloba ete: “Ye mpenza akotikala soki moke te koyamba solo”? Te. Kosala bongo, ekomonisa ete tozali na ezaleli ya lofundo mpe tozali komimona ete toleki bango. Yehova azali kokoba kopesa “bato na bisika nyonso” libaku ya kobongola motema. (Mis. 17:30) Ntango nyonso tosengeli kobosana te ete baoyo bamimonaka ete baleki basusu, Yehova atalelaka bango ete bazali sembo te.

22. Mpo na nini osengeli kozwa mokano ya kolinga boyengebene?

22 Bolingo na biso mpo na mitinda ya sembo ya Yehova ekosala ete tózala na esengo, mpe ekosalisa biso tózala ndakisa malamu epai ya bato mosusu mpe yango ekotinda bato bálinga biso mpe Nzambe mingi. Yango wana, tókoba kozala na “nzala mpe na mposa ya boyengebene.” (Mat. 5:6) Yebá ete Yehova amonaka milende na yo mpe azali kosepela ndenge ozali kosala makasi mpo na kosala oyo ezali malamu. Atako mokili oyo ezali komizindisa mingi na makambo ezangi boyengebene, kasi kobungisa elikya te! Kobosanaka te ete “Yehova alingaka bayengebene.”​—Nz. 146:8.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Boyengebene ezali nini?

  • Matomba nini tozwaka ntango tosalelaka mitinda ya boyengebene ya Yehova?

  • Ndenge nini tokoki kokómisa makasi bolingo na biso mpo na mitinda ya sembo ya Yehova?

LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika

a Ezali mpasi komona bato oyo basalaka makambo ya malamu oyo esepelisaka Yehova na mokili oyo mabe. Nzokande, lelo oyo bato mingi bazali kolanda nzela ya boyengebene. Na ntembe te, yo mpe ozali na kati ya bato yango. Ondimi kolanda nzela yango mpo olingaka Yehova, mpe Yehova alingaka boyengebene. Ndenge nini tokoki kokolisa lisusu bolingo na biso mpo na boyengebene? Na lisolo oyo, tokomona soki boyengebene ezali nini mpe ndenge bomoi na biso ekómaka malamu ntango tozali kolinga yango. Tokomona mpe makambo oyo tosengeli kosala mpo tókóma kolinga ezaleli yango lisusu mingi koleka.

b Na bantango mosusu, bankulutu na lisangá basengeli kosambisa likambo etali lisumu moko ya monene mpe kobongola motema. (1 Ko. 5:11; 6:5; Yak. 5:14, 15) Kasi, na komikitisa nyonso babosanaka te ete bakoki te kotánga mitema mpe ete bazali kosambisa mpo na Yehova. (Talá mpe 2 Ntango 19:6.) Bazwaka bikateli na kolanda ndakisa ya Nzambe ya koboya kozala makambo makasimakasi, kasi komonisa motema mawa mpe kokata makambo na bosembo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto