Tólinga boyengebene na motema mobimba
“Olingi boyengebene.”—NZ. 45:7.
1. Nini ekosalisa biso tólanda “banzela ya boyengebene”?
NA NZELA ya Liloba na ye mpe ya elimo santu na ye, Yehova azali kotambwisa basaleli na ye na “banzela ya boyengebene.” (Nz. 23:3) Nzokande, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mbala mingi tobungaka nzela yango. Kozongela kosala oyo ezali malamu esɛngaka milende makasi. Nini ekosalisa biso tólonga? Ndenge moko na Yesu, tosengeli kolinga kosala oyo ezali malamu.—Tángá Nzembo 45:7.
2. “Banzela ya boyengene” ezali nini?
2 “Banzela ya boyengebene” ezali nini? “Banzela” yango ya elilingi ezali etamboli oyo eyokani na mitinda ya Yehova na oyo etali boyengebene. Na Ebre mpe na Grɛki, liloba “boyengebene” emonisaka likambo oyo ezali “sembo,” kokangama makasi na mitinda oyo etali bizaleli ya malamu. Lokola Yehova azali “efandelo ya boyengebene,” basambeli na ye bazalaka na esengo ya kobaluka epai na ye mpo na koyeba nzela oyo eyokani na etamboli ya sembo, oyo basengeli kolanda.—Yir. 50:7.
3. Ndenge nini tokoki koyeba malamu boyengebene ya Nzambe?
3 Kaka soki tosali milende na motema mobimba mpo tólanda mitinda ya sembo ya Nzambe nde tokoki mpenza kosepelisa ye. (Mib. 32:4) Ebandaka na koyekola nyonso oyo tokoki na ntina etali Yehova Nzambe na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Soki tozali koyekola makambo mingi na ntina na ye mpe tozali kopusana penepene na ye mokolo na mokolo, tokobanda kolinga mingi boyengebene na ye. (Yak. 4:8) Tosengeli mpe kondima litambwisi ya Liloba na ye Biblia ntango tolingi kozwa bikateli minene na bomoi.
Tóluka boyengebene ya Nzambe
4. Koluka boyengebene ya Nzambe esangisi makambo nini?
4 Tángá Matai 6:33. Koluka boyengebene ya Nzambe esuki kaka te na kolekisa ntango na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Mpo Yehova andima mosala mosantu oyo tozali kosalela ye, etamboli na biso ya mokolo na mokolo esengeli koyokana na mitinda na ye ya sembo. Bato nyonso oyo bazali koluka boyengebene ya Yehova basengeli kosala nini? Basengeli “kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.”—Ef. 4:24.
5. Nini ekosalisa biso tólonga kolɛmba nzoto?
5 Wana tozali kosala makasi tóyokanisa bomoi na biso na mitinda ya Nzambe na oyo etali boyengebene, tokoki na bantango mosusu kolɛmba nzoto mpo na mabunga na biso. Nini ekoki kosalisa biso tólonga kolɛmba nzoto oyo esilisaka makasi mpe tóyekola kolinga mpe kosala makambo ya boyengebene? (Mas. 24:10) Tosengeli kopusanaka penepene na Yehova na libondeli ‘na mitema ya solosolo mpe na kondima makasi mpenza.’ (Ebr. 10:19-22) Tózala bakristo oyo batyami mafuta na elimo to oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele, tomonisaka kondima na mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo mpe na misala na ye lokola Nganga-nzambe Monene. (Rom. 5:8; Ebr. 4:14-16) Nimero ya libosoliboso ya zulunalo oyo epesaki ndakisa moko mpo na komonisa motuya monene ya makila oyo Yesu asopaki. (1 Yoa. 1:6, 7) Lisolo yango elobaki boye: “[Soki] moto alati linɛti ya motane mpe azali kotala eloko ya motane na esika oyo pole ezali, eloko yango ekomonana mpɛmbɛ; na yango, ata soki masumu na biso ekómi lokola motane, ntango tozali kotala yango ndenge Nzambe atalaka yango, na nzela ya makila ya Kristo, masumu yango ekomonana lokola mpɛmbɛ.” (Yuli 1879, lok. 6, na Lingelesi) Ezali mpenza ebongiseli kitoko oyo Yehova azwi mpo na biso na nzela ya mbeka ya lisiko ya Mwana na ye ya bolingo!—Yis. 1:18.
Tótala malamumalamu molato na biso ya etumba ya elimo
6. Mpo na nini ezali na ntina mingi tótalaka malamumalamu molato na biso ya etumba ya elimo?
6 Tosengeli ntango nyonso kozala na “ebateli-ntolo ya boyengebene,” mpo ezali eteni ya ntina mingi ya molato ya etumba ya elimo oyo euti na Nzambe. (Ef. 6:11, 14) Tózala bato bamipesi na Yehova sika to tosili kosalela ye mosala mosantu bambula mingi, ezali na ntina mingi tótalaka mokolo na mokolo molato na biso ya etumba. Mpo na nini? Mpo Zabolo ná bademo na ye babwakamá na mabele. (Em. 12:7-12) Satana azali na nkanda, mpe ayebi ete atikali na ntango mokuse. Na yango, abakisi milende mingi mpo na kobundisa basaleli ya Nzambe. Omoni ntina oyo tosengeli kolata “ebateli-ntolo ya boyengebene”?
7. Tokozala na etamboli ya ndenge nini soki tomoni ntina ya kozala na “ebateli-ntolo ya boyengebene”?
7 Ebateli-ntolo ebatelaka motema ya soda. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, motema na biso ya elilingi ezalaka na bokosi mingi mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. (Yir. 17:9) Lokola motema na biso ezalaka na mposa ya kosala makambo ya mabe, tosengeli koteyaka mpe kosembolaka yango. (Eba. 8:21) Soki tomoni ntina ya kozala na “ebateli-ntolo ya boyengebene,” tokolongola yango te mpo na mwa ntango mpe kopona kominanola na makambo oyo Nzambe ayinaka; tokobanda mpe te kosala makambo ya mabe na makanisi. Tokobebisa te ntango na biso ya motuya na kotala televizyo. Kasi, tokokoba nde kobunda mpo na kosala oyo esepelisaka Yehova. Ata soki tobɛti libaku mpo na mwa ntango mpo tokómi na makanisi oyo eyokani te na boyengebene, tokotɛlɛma lisusu na lisalisi ya Yehova.—Tángá Masese 24:16.
8. Mpo na nini tozali na mposa ya “nguba monene ya kondima”?
8 Eteni mosusu ya molato na biso ya etumba ya elimo ezali “nguba monene ya kondima.” Esalisaka biso ‘tóboma mɔtɔ ya mbanzi nyonso oyo ezali kopela ya moto mabe.’ (Ef. 6:16) Mpe kondima mpe kolinga Yehova na motema mobimba esalisaka biso tósala makambo ya boyengebene mpe tótikala na nzela ya bomoi ya seko. Soki tozali koyekola kolinga Yehova mingi, tokosepela mpe mingi na boyengebene na ye. Bongo lisosoli na biso? Ndenge nini esalisaka biso na milende na biso ya kolinga boyengebene?
Tóbatela lisosoli ya malamu
9. Ndenge nini kobatela lisosoli ya malamu esalisaka biso?
9 Ntango tozwaki batisimo, tosɛngaki Yehova apesa biso “lisosoli ya malamu.” (1 Pe. 3:21) Lokola tozali na kondima na lisiko, makila ya Yesu ezipaka masumu na biso mpe na ndenge yango, tomonanaka pɛto na miso ya Nzambe. Nzokande, mpo Nzambe akoba komona biso ndenge wana, tosengeli kobatela lisosoli ya malamu. Soki na bantango mosusu lisosoli na biso ezali kokebisa biso, tosengeli kosepela mpo ezali kosala malamu. Makebisi wana emonisi ete lisosoli na biso ekómi makasi te na oyo etali banzela ya sembo ya Yehova. (1 Tim. 4:2) Kasi, ezali mpe na ndenge mosusu oyo lisosoli ekoki kosalisa bato oyo bazalaka na mposa ya kolinga boyengebene.
10, 11. (a) Bɛtá lisolo moko oyo emonisi ntina oyo tosengeli koyoka lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia. (b) Mpo na nini kolinga boyengebene ekoki kopesa biso esengo monene?
10 Ntango tosali likambo ya mabe, lisosoli na biso ekoki kokweisa biso to kotungisa biso. Elenge moko alongwaki na “banzela ya boyengebene.” Amipesaki na pornografi mpe abandaki komɛla bangi. Azalaki komiyoka mabe ntango akei na makita mpe soki abimi na mosala ya kosakola, azalaki komona ete azali mokosi; yango wana atikaki kosangana na misala yango ya bokristo. Alobaki boye: “Kasi, nandimaki te ete lisosoli na ngai ekokaki kotungisa ngai mpo na makambo oyo nazalaki kosala.” Abakisaki boye: “Nazalaki na etamboli wana ya bozoba soki mbula minei.” Na nsima, abandaki koluka kozongela solo. Atako akanisaki ete Yehova akoyoka libondeli na ye te, abondelaki kaka mpe asɛngaki bolimbisi. Miniti zomi ekokaki te, mama na ye ayaki kotala ye mpe alendisaki ye azongela makita. Akendaki na Ndako ya Bokonzi mpe asɛngaki nkulutu moko ayekola na ye. Na nsima, azwaki batisimo, mpe azali na botɔndi epai ya Yehova ndenge abikisi bomoi na ye.
11 Omonaka te ete kosala oyo ezali malamu epesaka esengo monene? Wana tozali koyekola kolinga boyengebene mpe kosala mpenza na boyokani na yango, tokosepela mingi kosala makambo oyo esepelisaka Tata na biso ya likoló. Kanisá naino! Ezali na mokolo oyo bato nyonso bakozala na lisosoli oyo ekotungisa bango lisusu te; bakomonisa na ndenge ya kokoka ete basalemá na elilingi ya Nzambe. Yango wana, banda sikoyo, tólona bolingo mpo na boyengebene na kati mpenza ya mitema na biso mpe tósepelisa Yehova.—Mas. 23:15, 16.
12, 13. Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso?
12 Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso? Ntango tozali koyekola Biblia mpe mikanda na biso oyo elimbolaka Biblia, tosengeli kobosana te ete “motema ya moyengebene emanyolaka mpo na koyanola.” (Mas. 15:28) Tótala ndenge yango ekoki kosalisa biso ntango tolingi kopona mosala. Soki emonani polele ete mosala moko eyokani te na mibeko ya Biblia, mingi kati na biso tolandaka mbala moko malako oyo tozwaka na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Nzokande, ntango ezali mpenza komonana polele te soki tosengeli kondima to koboya mosala moko boye, tosengeli koluka mitinda ya Biblia oyo etali likambo yango mpe kokanisa mpe kobondela mpo na mitinda yango.a Na ndakisa, tokoki kotalela mitinda oyo esɛngi ete tózokisa lisosoli ya basusu te. (1 Ko. 10:31-33) Tosengeli mingimingi koluka mitinda oyo elobeli boyokani na biso na Nzambe. Soki tondimaka ete Yehova azali mpenza, tokoluka libosoliboso komituna boye: ‘Soki nandimi mosala oyo Yehova akoyoka motema mpasi?’—Nz. 78:40, 41.
13 Ntango tozali kobongisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Boyekoli ya Biblia na lisangá, tosengeli te kobosana komanyola makambo oyo tozali koyekola. Ekómelaka biso mbala mingi tótya mikɔlɔtɔ mbangumbangu na biyano ya mituna oyo etunami mpe tóleka mbala moko na paragrafe oyo elandi? Koyekola ndenge wana ekokolisa mpenza te bolingo na biso mpo na boyengebene; ekosalisa mpe biso te tókóma na lisosoli oyo eteyami malamu. Mpo tóbanda kolinga boyengebene, tosengeli koyekola na etingya mpe komanyola makambo oyo totángi na Liloba ya Nzambe. Nzela ya mokuse ezalaka te na oyo etali koyekola kolinga boyengebene na motema mobimba!
Nzala mpe mposa ya boyengebene
14. Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo balingi tóyokaka ndenge nini mpo na mosala mosantu?
14 Yehova Nzambe mpe Yesu Kristo balingi tózala na esengo na mosala mosantu. Nini ekobakisa esengo na biso? Ezali bongo kolinga boyengebene! Na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Esengo na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene, mpo bakotonda.” (Mat. 5:6) Maloba yango elimboli nini mpo na baoyo bazali na mposa ya kolinga boyengebene?
15, 16. Ndenge nini bato oyo bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene bakotonda?
15 Tofandi na mokili oyo etambwisami na moto mabe. (1 Yoa. 5:19) Soki tozwi zulunalo ata ya ekólo nini, tokomona balobeli makambo ya mabe mpe ya mobulu na ndenge oyo emonaná naino te. Moyengebene atungisamaka mingi na komona makambo ya nko oyo moto azali kosala moninga na ye moto. (Mos. 8:9) Lokola tolingaka Yehova, toyebi ete kaka ye nde akoki kotondisa bato oyo bazali na nzala mpe na mposa ya koyeba boyengebene. Mosika te, bato oyo batyolaka Nzambe bakolongolama, mpe bato oyo balingaka boyengebene bakonyokwama lisusu te na mpasi oyo euti na bato oyo babukaka mibeko mpe na misala na bango ya mabe. (2 Pe. 2:7, 8) Oyo nde esengo!
16 Lokola tozali basaleli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu Kristo, toyebi ete baoyo nyonso bazali na nzala mpe na mposa ya boyengebene “bakotonda.” Bakotonda mpenzampenza na nzela ya ebongiseli ya Nzambe ya likoló ya sika ná mabele ya sika epai “boyengebene ekozala.” (2 Pe. 3:13) Na yango, tólɛmba nzoto te mpe tókamwa te na komona ete minyoko mpe mobulu elongoli boyengebene na mokili oyo ya Satana. (Mos. 5:8) Yehova, Ye Oyo-Aleki-Likoló, ayebi makambo oyo ezali kosalema mpe mosika te, akosikola baoyo balingaka boyengebene.
Matomba ya kolinga boyengebene
17. Wapi mwa matomba ya kolinga boyengebene?
17 Nzembo 146:8 elobeli litomba moko monene ya kolanda nzela ya boyengebene. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Yehova alingaka bayengebene.” Kanisá naino! Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba alingaka biso mpo tolingaka boyengebene. Lokola Yehova alingaka biso, tozali na elikya ete akopesa biso oyo tosengeli na yango soki tokobi kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso. (Tángá Nzembo 37:25; Masese 10:3.) Nsukansuka, mabele mobimba ekotonda na bato oyo balingaka boyengebene. (Mas. 13:22) Mpo na basaleli mingi ya Nzambe, mbano oyo bakozwa mpo basalaki makambo ya boyengebene ekozala nde esengo moko monene mpe bomoi oyo ezangi nsuka na paradiso kitoko awa na mabele. Ata sikoyo, baoyo balingaka boyengebene ya Nzambe bazali kozwa kimya ya motema oyo esalisaka bango bázala na boyokani malamu na mabota na bango mpe na lisangá.—Flp. 4:6, 7.
18. Makambo nini ya malamu tokoki kosala wana tozali kozela mokolo ya Yehova?
18 Wana tozali kozela koya ya mokolo monene ya Yehova, tosengeli kokoba koluka boyengebene na ye. (Sef. 2:2, 3) Na yango, tókoba kolinga mpenza banzela ya sembo ya Yehova Nzambe. Yango esɛngi tókoba kokanga “ebateli-ntolo ya boyengebene” makasi na esika na yango mpo ebatela motema na biso ya elilingi. Tosengeli mpe kobatela lisosoli ya malamu—lisosoli oyo ekopesa biso esengo mpe ekosepelisa motema ya Nzambe na biso.—Mas. 27:11.
19. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini, mpe tokolobela nini na lisolo elandi?
19 “Miso [ya Yehova] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Nt. 16:9) Maloba yango ebɔndisaka biso mpenza wana tozali kosala oyo ezali malamu atako yikiyiki, mobulu, mpe mabe ezali kobakisama na mokili lelo! Ya solo, bato oyo bakabwaná na Nzambe bakoki kobulungana mpo na ndenge oyo tozali kolanda banzela ya boyengebene. Kasi, kokangama na boyengebene ya Yehova ezali na matomba mingi. (Yis. 48:17; 1 Pe. 4:4) Na yango, tózwa ekateli ya kokoba kolinga mpe kosala makambo ya boyengebene na motema na biso mobimba, mpe ekopesa biso esengo. Nzokande, kozala na motema mobimba elimboli mpe koyina makambo ya kobuka mibeko. Lisolo elandi ekolimbwela biso yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba mitinda ya Biblia oyo elobeli ndenge ya kopona mosala, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1999, nkasa 28-30.
Okopesa eyano nini?
• Mpo na nini tosengeli kondima motuya ya lisiko mpo tólinga boyengebene?
• Mpo na nini ezali na ntina tólata “ebateli-ntolo ya boyengebene”?
• Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso?
[Elilingi na lokasa 26]
Lisosoli oyo eteyami malamu esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu na oyo etali mosala