Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp23 No. 1 nk. 10-11
  • 3 | Ndenge oyo bandakisa ya Biblia ekoki kosalisa yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 3 | Ndenge oyo bandakisa ya Biblia ekoki kosalisa yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yango elimboli nini
  • Ndenge nini yango ekoki kosalisa
  • 2 | “Libɔndisi oyo euti na Makomami”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
  • 4 | Biblia epesi batoli oyo ebongi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
  • Nakosala nini soki nzoto etungisaka ngai? (Eteni 3)
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Ndenge nini nakoki kopekisa mayoki ya mabe?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
wp23 No. 1 nk. 10-11
Mosakoli Moize azali kotungisama, kotala na likoló wana azali kobondela Nzambe.

3 Ndenge oyo bandakisa ya Biblia ekoki kosalisa yo

BIBLIA ELOBELI . . .Basi mpe mibali ya kondima oyo bazalaki mpe ‘bato lokola biso.’ ​—YAKOBO 5:17.

Yango elimboli nini

Biblia etondi na masolo ya basi mpe mibali oyo bazalaki na mayoki ekeseni. Soki totángi masolo na bango, tokoki komona ete lisolo ya moto moko ekokani na oyo ya biso.

Ndenge nini yango ekoki kosalisa

Biso nyonso tozalaka na mposa ete moto moko ayeba ndenge oyo tozali komiyoka. Yango ezali solo, mingimingi ntango oyo tozali kotungisama na makanisi. Ntango totángi masolo ya bato oyo Biblia elobeli, tokoki komona ndenge na bango ya kokanisa mpe mayoki oyo bazalaki na yango ekokani na oyo ya biso. Yango ekosalisa biso tómona ete basusu mpe banyokwamaki lokola biso mpe yango ekotinda biso tóboya komiyoka ete tozali biso moko ntango oyo tozali kotungisama na makanisi.

  • Biblia ezali na bavɛrsɛ mingi oyo ezali komonisa maloba ya bato balobaki ntango bazalaki komiyoka ete basundolami mpe bazali bango moko. Esí ekómela yo oloba ete: ‘Nakokoka lisusu te?’ Likambo yango ekómelaki Moize, Eliya mpe Davidi.​—Mitángo 11:14; 1 Bakonzi 19:4; Nzembo 55:4.

  • Biblia elobeli lisolo ya mwasi moko na nkombo Hana oyo ‘molimo na ye ekómaki bololo’ mpamba te azalaki kobota te mpe mbanda na ye azalaki ntango nyonso kotumola ye.​—1 Samwele 1:6, 10.

  • Biblia elobeli mpe lisolo ya mobali moko na nkombo ya Yobo oyo akoki kokokana na biso. Atako azalaki na kondima makasi epai ya Yehova, atungisamaki makasi na makanisi mpe mokolo moko alobaki boye: “Naboyi; nalingi kozala na bomoi te.”​—Yobo 7:16.

Ntango tozali koyekola masolo ya bato oyo Biblia elobeli ndenge balongaki makanisi ya mabe, yango ekoki kopesa biso mpe makasi oyo tosengeli na yango mpo na kolonga kotungisama ya makanisi.

Ndenge oyo Biblia esalisaka Kevin

Ndenge oyo maladi ya motó esalaki ngai

Kevin azali komɛla kafe na baninga na ye mibale.

“Ntango nakómaki na mbula pene na 50, bakangaki ngai na maladi ya motó oyo etyaka mobulu na makanisi mpe oyo esalaka ete moto amitungisa koleka ndelo mpo na likambo moko boye. Na bantango mosusu namiyokaka ete nakoki kolonga mokakatano nyonso oyo ekoki kokómela ngai na bomoi. Kasi na bantango mosusu, namonaka ete bomoi ezali na ntina te.”

Ndenge oyo Biblia esalisaki ngai

“Moto moko oyo Biblia elobeli oyo nakoki kokokanisa ye na ngai ezali ntoma Petro. Asalaki mabunga oyo etindaki ye amiyoka ete azali na valɛrɛ te. Kasi, na esika ya kokoba kokanisa bongo, Petro akómaki moninga ya baninga oyo batyelaka ye likebi. Ntango nalekisi mokolo moko ya mabe mpo na maladi na ngai ya motó, kozanga kokoka na ngai ekoki kolɛmbisa ngai nzoto mpe kotinda ngai nakanisa ete nazali na ntina te. Ndenge moko na Petro, nayekoli kotikala pene ya baninga na ngai oyo bazali na mposa ya kosalisa ngai nakoba kokende liboso.

“Moto mosusu oyo Biblia elobeli oyo abɔndisaka ngai ezali Mokonzi Davidi. Na bantango mosusu azalaki kotungisama na makanisi mpo na makambo oyo ezalaki koyela ye mpe koyoka mawa mpo na mabunga oyo asalaki na kala. Nakoki kokokanisa ye na ngai mpamba te ngai mpe na bantango mosusu nasalaka mpe nalobaka makambo oyo na nsima na yango nakómaka koyoka mawa mpo na yango. Namonaki maloba ya kolendisa ya Davidi na Nzembo 51. Na vɛrsɛ 3, Davidi alobaki: ‘Ngai moko nayebi misala na ngai ya kobuka mibeko, mpe lisumu na ngai ezali liboso na ngai ntango nyonso.’ Yango ezali mpenza ndenge namiyokaka ntango oyo nazali kotungisama makasi na makanisi, mpe yango esalaka ete ekóma mpasi nazala na makanisi ya malamu mpo na ngai. Kasi, natalelaka mpe maloba oyo ezali na vɛrsɛ 10, oyo elobi: “Zalisá motema ya pɛto na kati na ngai, mpe tyá kati na ngai elimo ya sika, oyo ezali ngwi.” Nasalelaka libaku nyonso mpo Nzambe asalisa ngai nakóma komitalela ndenge mosusu. Ya nsuka, vɛrsɛ 17 ebɔndisaka ngai mpenza. Elobi: “Motema oyo ebukani mpe etutami, okotyola yango te.” Vɛrsɛ oyo endimisaka ngai ete Nzambe alingaka ngai.

“Soki namanyoli na bandakisa ya Biblia mpe na makambo nyonso oyo Nzambe apesi ngai sikoyo, yango esalisi ngai nakómisa makasi elikya na ngai mpo na mikolo ezali koya. Bilaka ya Biblia ekómi likambo ya solo mpo na ngai mpe yango ezali kosalisa ngai nakoba koyika mpiko.”

Mpo na kozwa lisalisi mosusu:

Tángá lisolo “Kozala na bomoi ezali kaka na ntina?,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 2019 no 2 na jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto