Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp23 No. 1 nk. 12-13
  • 4 | Biblia epesi batoli oyo ebongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 4 | Biblia epesi batoli oyo ebongi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yango elimboli nini
  • Ndenge nini yango ekoki kosalisa
  • Ndenge oyo batoli ya Biblia esalisaki bato oyo bazali konyokwama
  • Oyo okoki kosala soki obɛli maladi moko ya mbalakaka
    Makambo mosusu
  • Kotungisama na makanisi epanzani na mokili mobimba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
  • Oyo osengeli koyeba mpo na maladi ya motó
    Lamuká!—2014
  • 3 | Ndenge oyo bandakisa ya Biblia ekoki kosalisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2023
wp23 No. 1 nk. 12-13
Mwasi moko azali na esengo mpe azali kopusa velo.

4 Biblia ezali na batoli oyo ebongi

BIBLIA ELOBI: “Makomami nyonso . . . ezali na litomba.”​—2 TIMOTE 3:16.

Yango elimboli nini

Atako ezali te buku ya minganga, Biblia ezali na batoli oyo ebongi mpe oyo ezali na litomba. Batoli na yango ekoki kosalisa moto oyo azali kotungisama na maladi ya motó. Talá mwa bandakisa.

Ndenge nini yango ekoki kosalisa

“Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.”​—MATAI 9:12.

Biblia emonisi ete na bantango mosusu tosengeli koluka lisalisi ya monganga. Bato mingi bazwaki lisalisi mpo bayekolaki makambo etali mokakatano na bango mpe na nzela ya lisalisi ya monganga oyo ebongi.

“Ngalasisi ya nzoto ezali na litomba.”​—1 TIMOTE 4:8.

Kosala makambo oyo ekosala ete ozala na sante ya malamu, ekoki kosalisa yo oyoka malamu na makanisi. Makambo yango esangisi kosala mbala na mbala ngalasisi ya nzoto, kolyaka biloko ya malamu, mpe kolala malamu.

“Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka, kasi elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.”​—MASESE 17:22.

Kotánga bavɛrsɛ ya Biblia ya kolendisa mpe komityela mikano oyo ebongi mpe oyo okokokisa yango, ekoki kosalisa yo ozala na esengo. Soki otye makanisi na yo na makambo ya malamu mpe otye elikya ete makambo ekobonga na mikolo ezali koya, yango ekosalisa yo oyika mpiko atako ozali kobɛla na makanisi.

“Bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.”​—MASESE 11:2.

Ezali solo ete yo moko okokoka te kosala makambo nyonso, na yango, na komikitisa nyonso ndimá lisalisi ya basusu. Baninga mpe bato ya libota na yo bakoki kozala na mposa ya kosalisa yo, kasi mbala mosusu bakoki koyeba te babanda wapi. Yebisá bango makambo ya sikisiki oyo ekosala ete basalisa yo. Komizela te ete basalela yo makambo mingi, mpe ntango nyonso pesáká bango matondi mpo na lisalisi na bango.

Ndenge oyo batoli ya Biblia esalisaki bato oyo bazali konyokwama

“Nazalaki komiyoka lokola likambo moko ezalaki kotambola malamu te epai na ngai, yango wana nalukaki lisalisi ya monganga. Azalaki na likoki ya koyeba maladi na ngai. Yango esalisaki ngai nayeba mokakatano na ngai mpe naluka lisungi ya monganga ya malamu oyo ebongi mpo na ngai.”​—Nicole,a oyo azali konyokwama na maladi ya motó oyo etyaka mobulu na makanisi mpe oyo esalaka ete moto amitungisa koleka ndelo mpo na likambo moko boye.

Mwasi moko azali kosolola na monganga.

“Kotánga Biblia mbala na mbala elongo na mwasi na ngai esalisaka ngai nabanda mokolo na makanisi ya malamu mpe ya kotonga. Mpe ntango nyonso oyo nakómaka kotungisama na makanisi, vɛrsɛ moko ya sikisiki elendisaka ngai.”​—Peter, oyo azali konyokwama na makanisi.

“Ezalaki mpasi koyebisa basusu maladi na ngai mpamba te nazalaki koyoka nsɔni. Kasi moninga na ngai moko ya motema azalaki koyoka ngai na likebi mpe kosala nyonso ayeba ndenge oyo nazalaki komiyoka. Asalisaki ngai namiyoka malamu mpe namona ete nazali ngai moko te.”​—Ji-yoo, oyo azali kobɛla maladi ya makanisi oyo etindaka moto na bilyalya mpe komiboma nzala.

“Biblia esalisaki ngai ya kozala na bokatikati kati na mosala mpe kopema. Bwanya na yango esalisaki ngai ya koyikela mpiko kotungisama ya makanisi oyo nazalaki na yango.”​—Timothy, oyo azali konyokwama makasi na makanisi.

a Topesi bango bankombo mosusu.

Video: Moto azali koyema “ndenge ya kotika kozala mawamawa mpe kokóma na esengo.”
Mpo na kozwa lisalisi mosusu:

Talá video: Moto azali koyema Ndenge ya kotika kozala mawamawa mpe kokóma na esengo na jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto