LISOLO YA BOYEKOLI 29
LOYEMBO 121 Tóyeba komipekisa
Kobá komibatela mpo okwea na komekama te
“Bókoba kosɛnzɛla mpe kobondela ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.”—MAT. 26:41.
NA MOKUSE
Lisolo oyo ekosalisa biso tómona ntina oyo tosengeli koboya kosala lisumu mpe makambo oyo ememaka na lisumu.
1-2. (a) Likebisi nini Yesu apesaki bayekoli na ye? (b) Mpo na nini bayekoli bakweaki na bolɛmbu? (Talá mpe bililingi.)
“ELIMO ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”a (Mat. 26:41b) Na maloba yango, Yesu amonisaki ete ayebi ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokosala mabunga. Kasi, maloba yango ezali mpe na likebisi moko: Tosengeli te komityela motema koleka ndelo. Mwa bangonga liboso Yesu aloba maloba wana, kaka na butu wana, bayekoli na ye batutaki ntolo ete bakotika Nkolo na bango te, ata ndenge nini. (Mat. 26:35) Bazalaki na mposa ya kosala oyo ezali malamu. Kasi, bayebaki te ndenge ekokaki kozala mpasi bátikala ngwi soki batye bango mbamba. Yango wana Yesu akebisaki bango ete: “Bókoba kosɛnzɛla mpe kobondela ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.”—Mat. 26:41a.
2 Likambo ya mawa, bayekoli bakobaki kosɛnzɛla te. Ntango bakangaki Yesu, batikalaki elongo na ye to bakweaki na komekama mpe bakimaki? Lokola bayekoli bazalaki ekɛngɛ te, basalaki likambo oyo batutaki ntolo ete bakosala ata moke te: basundolaki Yesu.—Mat. 26:56.
Yesu alendisaki bayekoli na ye bákoba kosɛnzɛla mpe komibatela na komekama, kasi basundolaki ye (Talá paragrafe 1-2)
3. (a) Mpo na kotikala sembo epai ya Yehova, mpo na nini tosengeli koboya komityela motema koleka ndelo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Komityela motema koleka ndelo ezali malamu te. Ya solo, tozali na ekateli ya kotika eloko te ekabola biso na Yehova. Kasi, toyebi mpe ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe tokoki kokwea na komekama. (Rom. 5:12; 7:21-23) Kozanga kokana, tokoki kokutana na makambo oyo ekoki kosala ete tómona lokola ete nzela moko ya mabe ezali kutu malamu. Mpo na kotikala sembo epai ya Yehova ná Mwana na ye, tosengeli kolanda toli ya Yesu ya kokoba kosɛnzɛla mpo tótɛmɛla komekama ya kosala lisumu. Lisolo oyo ekosalisa biso tósala yango. Ya liboso, tokotalela makambo oyo tosengeli mpenza kokeba na yango. Ya mibale, tokolobela ndenge ya komibatela mpo tókwea na komekama te. Ya misato, tokotalela ndenge ya kokoba komibatela.
TOSENGELI KOKEBA NA MAKAMBO NINI?
4-5. Mpo na nini tosengeli kokeba ata na masumu ya mike?
4 Ata masumu ya mike ekoki kobebisa boyokani na biso na Yehova. Lisusu, ekoki komema biso na masumu ya minene.
5 Biso nyonso tokutanaka na komekama ya kosala lisumu. Kasi, mokomoko na biso azali na bolɛmbu na ye, likambo oyo ekoki kotya ye na komekama ya kosala lisumu ya monene, kosala makambo ya mbindo, to mpe kolanda makanisi ya mokili. Na ndakisa, moto mosusu akoki kozala na etumba mpo akwea te na komekama ya kosala pite. Mosusu akoki kozala na bolɛmbu ya kosala makambo ya mbindo, lokola kosimbasimba binama na ye ya kobotela mpo na koyoka elɛngi to mpe kotala pornografi. Ekoki kozala ete moto mosusu mpe azali kobundisa ezaleli ya kobanga bato, elimo ya lipanda, ezaleli ya kosilika mpambampamba, to likambo mosusu. Kaka ndenge Yakobo alobaki yango, “moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.”—Yak. 1:14.
6. Tosengeli kozala sembo na likambo nini?
6 Oyebaka makambo oyo emekaka yo mbala mingi? Tokozwa litomba moko te soki tozali kowangana bolɛmbu na biso to kokanisa ete tozali makasi mpe tokokwea na lisumu te. (1 Yoa. 1:8) Tóbosana te ete ntoma Paulo alobaki ete ata “baoyo bazali na makoki ya elimo” bakoki kokwea na komekama soki bakobi te komibatela. (Gal. 6:1) Tosengeli kozala sembo na motema na biso mpe kondima makambo oyo ezali bolɛmbu mpo na biso.—2 Ko. 13:5.
7. Tosengeli kotya likebi mingi na nini? Pesá ndakisa.
7 Soki oyebi bolɛmbu na yo to makambo oyo emekaka yo mingi, osengeli kosala nini? Zwá bibongiseli ya makasi mpo na kotɛmɛla yango! Na ndakisa, na ntango ya kala, eteni ya efelo ya engumba oyo ekokaki kokɔtisa banguna ezalaki baporte ya engumba. Na yango, bazalaki kotya bakɛngɛli ebele mpo na kobatela mpenza baporte. Ndenge moko mpe, tosengeli kotya likebi mingi na makambo nyonso oyo toyebi ete ezalaka bolɛmbu mpo na biso.—1 Ko. 9:27.
NDENGE YA KOMIBATELA
8-9. Elenge mobali ya Masese mokapo 7 akokaki kosala nini mpo asala lisumu te? (Masese 7:8, 9, 13, 14, 21)
8 Ndenge nini tokoki komibatela mpo tókwea na komekama te? Tótala mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya elenge mobali oyo Masese mokapo 7 elobeli. Elenge yango asalaki pite na mwasi moko ya ndumba. Vɛrsɛ 22 emonisi ete elenge yango abandaki kolanda mwasi yango “na mbala moko.” Kasi ndenge bavɛrsɛ oyo ezali liboso emonisi, elenge yango asilaki kosala makambo ebele oyo ememaki ye mokemoke na lisumu.
9 Makambo yango nini? Ya liboso, na mpokwa, elenge yango “azalaki koleka pene [na nzela ya mwasi yango ya ndumba] na esika babalabala ekutani.” Na nsima, akendaki na nzela oyo ememi na ndako ya mwasi yango. (Tángá Masese 7:8, 9.) Nsima na yango, ntango amonaki mwasi yango, akimaki ye te. Kutu, andimaki kopesa ye lipwɛpwɛ mpe koyoka ye ntango azalaki kolobela bambeka ya kimya oyo apesaki, mbala mosusu mpo na kotinda elenge yango akanisa ete azali moto mabe te. (Tángá Masese 7:13, 14, 21.) Soki elenge mobali wana asalaka makambo wana te, alingaki komibatela mpo akwea na komekama te mpe alingaki kosala lisumu te.
10. Lelo oyo, ndenge nini moto akoki kosala libunga lokola elenge mobali ya Masese?
10 Lisolo wana oyo Salomo abɛtaki emonisi likambo oyo ekoki kokómela moto nyonso oyo asambelaka Yehova. Mosaleli ya Yehova akoki kosala lisumu ya monene mpe na nsima komona lokola makambo nyonso esalemaki “na mbala moko.” To mpe akoki koloba: “Esalemi kaka boye.” Nzokande, soki akanisi mpenza makambo oyo esalemaki, na ntembe te akomona ete asalaki makambo mosusu kozanga bwanya, oyo ememaki ye na lisumu. Makambo yango ekoki kozala baninga mabe, kominanola oyo ebongi te, to kokende na bisika ya malamu te, ezala na miso boye to na nzela ya Internet. Mbala mosusu atikaki mpe kobondela, kotánga Biblia, koyangana na makita, to mpe kobima na mosala ya kosakola. Ndenge moko na elenge mobali ya Masese, akoki komona ete asali lisumu na mbalakaka to “na mbala moko” te.
11. Mpo tókwea na lisumu te, tosengeli koboya nini?
11 Liteya ezali nini mpo na biso? Tosengeli kokima kaka lisumu te, tosengeli mpe kokima makambo oyo ememaka na lisumu. Salomo amonisaki likambo yango polele nsima ya kobɛta lisolo ya elenge mobali wana ná mwasi ya ndumba. Mpo na mwasi yango, alobaki ete: “Koyengayenga te na babalabala na ye.” (Mas. 7:25) Alobaki lisusu mpo na mwasi ya mobulu ete: “Zalá mosika na ye; kopusana pene ya ekɔtelo ya ndako na ye te.” (Mas. 5:3, 8) Ya solo, mpo na komibatela na lisumu, tosengeli kozala mosika na makambo oyo ekomema biso na lisumu.b Yango ekoki kosɛnga koboya makambo oyo ezali mpenza mabe te mpo na bakristo, kasi oyo toyebi ete ekoki kozala komekama mpe komema biso na lisumu.—Mat. 5:29, 30.
12. Ekateli nini Yobo azwaki, mpe ndenge nini yango esalisaki ye? (Yobo 31:1)
12 Mpo na kokima makambo oyo ememaka na lisumu, tosengeli kozwa ekateli ya makasi. Yango nde Yobo asalaki. Asalaki “kondimana na miso na [ye]” mpo atala te mwasi mosusu na makanisi ya mbindo. (Tángá Yobo 31:1.) Kotosa ekateli oyo azwaki esalisaki ye akwea ata moke te na ekobo. Biso mpe tokoki kozwa ekateli ya koboya eloko nyonso oyo ekoki komema biso na komekama.
13. Mpo na nini tosengeli kokeba na makanisi na biso? (Talá mpe bililingi.)
13 Tosengeli mpe kokeba na makanisi na biso. (Kob. 20:17) Bato mosusu bakanisaka ete komimona na makanisi ete ozali kosala makambo ya mbindo ezali mabe te, soki osali makambo yango te. Kasi, ebongi te kokanisa bongo. Moto oyo akanisaka ntango nyonso likambo ya mbindo abakisaka mposa ya kosala mabe. Ezali lokola amitye na komekama, oyo ekosɛnga sikoyo abunda mpo na kotɛmɛla yango. Ya solo, makanisi ya mabe ekoki koyela biso na bantango mosusu. Kasi, tosengeli kobengana yango mbala moko mpe kokanisa makambo ya malamu na esika na yango. Ntango tosali bongo, tokopekisa makanisi ya mabe ekola tii ekóma mposa makasi oyo ekozala mpasi tóbundisa yango, mpe oyo ekoki kutu komema biso na lisumu ya monene.—Flp. 4:8; Kol. 3:2; Yak. 1:13-15.
Tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekoki komema na komekama (Talá paragrafe 13)
14. Likambo nini mosusu ekoki kosalisa biso tómibatela na komekama?
14 Likambo nini mosusu tokoki kosala mpo na komibatela na komekama? Tosengeli mpenza komindimisa ete tokozanga te kozwa bolamu soki totosi mibeko ya Yehova. Na bantango mosusu tokoki kobunda mpo na koyokanisa makanisi mpe bamposa na biso na makambo oyo Nzambe alingaka, kasi soki tosali makasi tósala yango, tokozwa kimya ya motema.
15. Na ndenge nini kokolisa bamposa ya malamu ekosalisa biso tómibatela na komekama?
15 Tosengeli mpe kokolisa bamposa ya malamu. Soki toyekoli ‘koyina oyo ezali mabe mpe kolinga oyo ezali malamu,’ tokokóma na ekateli makasi ya kosala oyo ezali malamu mpe koboya makambo oyo ekomema biso na lisumu. (Amo. 5:15) Bamposa ya malamu ekopesa mpe biso makasi ya kotikala ngwi soki tokutani na komekama oyo tomonaki yango te liboso to oyo tokokaki kokima yango te.
16. Na ndenge nini makambo ya elimo ekoki kosalisa biso tókoba komibatela? (Talá mpe bililingi.)
16 Ndenge nini tokoki kokolisa bamposa ya malamu? Tosengeli kokoba komipesa mingi na makambo ya elimo. Ntango tozali na makita to na mosala ya kosakola, ezalaka pɛtɛɛ te tómekama na kosala mabe. Kasi, tokolisaka nde mposa ya kosepelisa Yehova. (Mat. 28:19, 20; Ebr. 10:24, 25) Ntango tozali kotánga Biblia, koyekola yango mpe komanyola makambo oyo totángi, tokómaka mpenza kolinga oyo ezali malamu mpe koyina oyo ezali mabe. (Yos. 1:8; Nz. 1:2, 3; 119:97, 101) Tóbosana te, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bókoba . . . kobondela ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.” (Mat. 26:41) Soki tozali kolekisa ntango elongo na Tata na biso ya likoló na libondeli, tozali kopesa ye libaku ya kosalisa biso mpe kokómisa makasi ekateli na biso ya kosepelisa ye.—Yak. 4:8.
Kosala makambo ya elimo ekopesa biso makasi ya kotɛmɛla komekama (Talá paragrafe 16)c
KOBÁ KOMIBATELA
17. Bolɛmbu nini Petro azalaki na yango?
17 Tokoki kolonga mpenza bamposa na biso mosusu ya mabe. Kasi, bolɛmbu na biso mosusu, ekoki kosɛnga tókoba kobundisa yango. Tótalela ndakisa ya ntoma Petro. Akweaki na motambo ya kobanga bato ntango awanganaki Yesu mbala misato. (Mat. 26:69-75) Emonanaki na nsima ete Petro atikaki kobanga bato ntango apesaki litatoli na mpiko nyonso liboso ya Sanedrina. (Mis. 5:27-29) Kasi, mwa bambula na nsima, mpo na ‘kobanga etuluku ya bato oyo bakatamá ngenga,’ akataki kolya na bakristo oyo bazalaki bato ya bikólo mosusu. (Gal. 2:11, 12) Bolɛmbu ya Petro ya kobanga bato ezongaki. Ekoki kozala ete alongaki yango mpo na libela te.
18. Nini ekoki kosalema mpo na bolɛmbu na biso mosusu?
18 Biso mpe tokoki kozala na likambo ya ndenge wana. Na ndenge nini? Bolɛmbu oyo tokanisaki ete tolongá yango ekoki kozongela biso lisusu. Na ndakisa, ndeko mobali moko alobi boye: “Natalaki pornografi te mbula 10 mpe namilobaki ete mokakatano yango esili. Kasi, mposa wana ezalaki lokola nyama mabe oyo ebombani, oyo ezali kozela libaku moko mpo ebimela ngai.” Likambo ya esengo, azongelaki te momeseno yango ya mabe. Amonaki ete ekosɛnga akoba kobundisa mposa yango mokolo na mokolo, mbala mosusu bomoi na ye mobimba na mokili oyo. Na lisalisi ya mwasi na ye mpe bankulutu ya lisangá, azwi bikateli ya makasi mpo na kotɛmɛla pornografi.
19. Okoki kosala nini mpo okoba kobundisa bolɛmbu moko?
19 Okoki kosala nini mpo okoba kobundisa bolɛmbu moko mpe okwea na yango te? Osengeli kolanda toli ya Yesu ete: “Bókoba kosɛnzɛla,” elingi koloba kokoba komibatela na komekama. Ata ntango okanisi ete ozali makasi, kobá koboya makambo oyo ekoki kotya yo na komekama. (1 Ko. 10:12) Kobá kosalela mayele oyo ekosalisa yo olonga. Masese 28:14 elobi: “Esengo na moto oyo abangaka Nzambe ntango nyonso.”—2 Pe. 3:14.
TOKOZWA MATOMBA SOKI TOKOBI KOMIBATELA
20-21. (a) Matomba nini tokozwa soki tokobi komibatela na komekama? (b) Soki tosali oyo esengeli, Yehova akosala nini mpo na biso? (2 Bakorinti 4:7)
20 Tóyeba ete kokoba komibatela na komekama ezalaka ntango nyonso mpo na bolamu na biso. Lisumu ekoki kopesa “esengo ya ntango mokuse,” kasi kotosa mibeko ya Yehova ekopesa biso esengo mingi koleka. (Ebr. 11:25; Nz. 19:8) Ezali bongo mpo akelaki biso mpo tózala na bomoi oyo eyokani na mibeko na ye. (Eba. 1:27) Soki bomoi na biso ezali kosepelisa Yehova, tokozala na lisosoli ya kimya mpe tokotikala na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.—1 Tim. 6:12; 2 Tim. 1:3; Yuda 20, 21.
21 Ya solo, “nzoto ezali na bolɛmbu.” Kasi tozangi lisalisi te. Yehova azalaka pene ya kopesa biso nguya oyo tosengeli na yango. (Tángá 2 Bakorinti 4:7.) Nzokande, Nzambe apesaka biso nde nguya oyo eleki makasi. Yango emonisi ete biso moko mpe tosengeli kosalela nguya na biso, kosala milende mokolo na mokolo mpo na komibatela na komekama. Soki tosali oyo esengeli, tokoki kotya motema ete Yehova akoyanola mabondeli na biso mpe akobakisela biso makasi na ntango oyo tosengeli na yango. (1 Ko. 10:13) Ya solo, na lisalisi ya Yehova, tokoki kokoba komibatela na komekama.
LOYEMBO 47 Bondelá Yehova mokolo na mokolo
a NDIMBOLA YA MALOBA: “Elimo” oyo Matai 26:41 elobeli ezali nguya oyo ezalaka na kati na biso, oyo etambwisaka mayoki mpe misala na biso. “Nzoto” ezali ezaleli na biso ya kozanga kokoka. Na yango, tokoki kozala na mposa mpenza ya kosala oyo ezali malamu, kasi soki tokebi te, tokoki kokwea na komekama mpe kosala likambo oyo Biblia elobi ete ezali mabe.
b Moto oyo akwei na lisumu ya monene akoki kozwa makanisi oyo ekosalisa ye na buku Sepelá na bomoi libela na libela! liteya 57 pwɛ 1-3, mpe na lisolo “Tyá miso na yo na mokili ya sika” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 11/2020, nk. 27-29, par. 12-17.
c NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko azali kotánga mokapo ya mokolo na ntɔngɔ, azali kotánga Biblia na ntango ya kolya na midi, mpe akɔti na makita ya kati ya pɔsɔ na mpokwa.