Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Août nk. 20-25
  • Ndenge ya kobundisa mpe kolonga bamposa ya mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobundisa mpe kolonga bamposa ya mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • OYO “MOTO MABE” ALINGAKA TÓKANISA
  • NDENGE OYO TOKOKI KOMIYOKA LOKOLA TOZALI BATO YA MASUMU
  • NDENGE YA KOLONGA
  • ‘KOBÁ KOMIMEKA’
  • Kobá komibatela mpo okwea na komekama te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • ‘Kobá kolanda’ Yesu nsima ya batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Oyo Yehova asalá mpo na kobikisa bato ya masumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Août nk. 20-25

LISOLO YA BOYEKOLI 35

LOYEMBO 121 Tóyeba komipekisa

Ndenge ya kobundisa mpe kolonga bamposa ya mabe

‘Bótika te ete lisumu ekoba koyangela nzoto na bino oyo ekufaka, mpo esala ete bótosa bamposa na yango.’—ROM. 6:12.

NA MOKUSE

Mpo na kosalisa biso (1) tólɛmba nzoto te soki tozali kobundisa bamposa ya mabe mpe (2) tóyeba ndenge ya kotɛmɛla komekama.

1. Etumba nini biso bato ya kozanga kokoka tozali na yango?

ESILÁ kokómela yo oyoka mposa makasi ya kosala likambo oyo ezali mabe na miso ya Yehova? Soki bongo, kokanisa te ete komekama yango eleki ya bato mosusu nyonso. Biblia elobi: “Komekama moko te ekómeli bino oyo ekómelaka bato nyonso te.” (1 Ko. 10:13)a Yango elimboli ete ata soki ozali kobundisa bamposa ya mabe ya ndenge nini, basusu mpe bazali na etumba ya ndenge wana. Yebá ete ozali yo moko te, mpe ete na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga etumba yango.

2. Bakristo mosusu mpe bayekoli mosusu ya Biblia babendamaka na bamposa nini ya mabe? (Talá mpe bililingi.)

2 Biblia elobi mpe ete: “Moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.” (Yak. 1:14) Moto na moto akoki kozala na eloko oyo ebendaka ye. Na ndakisa, bakristo mosusu bakoki komekama na mposa ya kosala pite; basusu bakoki koyoka mposa ya kosala yango na moninga mobali to moninga mwasi. Baoyo batiká kotala pornografi bakoki koyoka mposa makasi ya kozongela momeseno yango. Bato mingi oyo batiká kosalela drɔgɛ to komɛla masanga mingi bakoki mpe koyoka mposa ya kozongela yango. Wana ezali kaka mwa ndakisa ya bamposa oyo bakristo mosusu mpe bayekoli mosusu ya Biblia babundaka na yango. Na ntembe te, ekómelaka biso nyonso tómiyoka lokola ntoma Paulo; akomaki boye: “Ntango nalingi kosala oyo ezali malamu, oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.”—Rom. 7:21.

Komekama ekoki koya na mbalakaka—ezala na ntango nini mpe na esika nini (Talá paragrafe 2)d


3. Ntango moto azali kobunda na mposa ya mabe oyo ezali kotika ye te, ekoki kotinda ye akanisa nini?

3 Soki ozali kobunda na mposa ya mabe oyo ezali kotika yo te, okoki kokanisa ete ozangi makasi, lokola nde ozali na likoki te ya kotɛmɛla komekama yango. Mbala mosusu mpe ozali kokanisa ete ozangi elikya, lokola nde Yehova akopamela yo kaka mpo mposa ya mabe eyeli yo. Kasi yebá ete makanisi wana nyonso ezali solo te! Mpo na komona ntina oyo tolobi bongo, na lisolo oyo, tokotalela mituna mibale: (1) Komiyoka ete tozangi makasi mpe tozangi elikya eutaka wapi? (2) Ndenge nini okoki kobundisa mpe kolonga bamposa ya mabe?

OYO “MOTO MABE” ALINGAKA TÓKANISA

4. (a) Mpo na nini Satana alingaka ete tókanisa ete tozangi makasi? (b) Ndenge nini toyebi ete tozangi makasi te mpo na kobundisa bamposa ya mabe?

4 Ntango tomekami, Satana alingaka tókanisa ete tozangi makasi. Yesu amonisaki likambo yango polele ntango ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Kotika biso te tókwea na komekama, kasi bikisá biso na moto mabe.” (Mat. 6:13) Satana alobaki ete bato bakolinga te kotosa Yehova ntango bakutani na komekama. (Yobo 2:​4, 5) Kokamwa mpenza! Satana ye moko nde abendamaki na mposa na ye moko, mpe atikalaki sembo te epai ya Yehova. Emonani ete akanisaka ete biso mpe tozali lokola ye, ete tokondima kosundola Yehova ntango tomekami. Satana akanisaki kutu ete ata Mwana ya Nzambe oyo azalaki moto ya kokoka akoki kokwea na komekama! (Mat. 4:​8, 9) Kasi kanisá naino: Tozangi mpenza makasi mpo na kobundisa bamposa ya mabe? Te! Tondimaka maloba oyo Paulo akomaki, ete: “Na makambo nyonso, nazwaka makasi na lisalisi ya Nzambe, moto oyo apesaka ngai nguya.”—Flp. 4:13.

5. Ndenge nini toyebi ete Yehova andimaka ete tokoki kolonga bamposa ya mabe?

5 Na bokeseni na Satana, Yehova ayebi malamu ete tokoki kotɛmɛla bamposa ya mabe. Ndenge nini toyebi yango? Mpo Yehova asakolaki ete ebele mpenza ya bato ya sembo bakobika na bolɔzi monene. Kanisá naino likambo yango. Yehova, oyo akoki kokosa te, alobi ete bato ebele mpenza—kaka moke te—bakokɔta na mokili ya sika mpe bakozala pɛto mpo “basukoli bazambala na bango mpe bakómisi yango mpɛmbɛ na makila ya Mwana-Mpate.” (Em. 7:​9, 13, 14) Ya solo, Yehova amonaka te ete tozangi makasi mpo na kobundisa bamposa ya mabe.

6-7. Mpo na nini Satana alingi tókanisa ete tozangi elikya mpo na etumba na biso mpo na kobundisa komekama?

6 Satana akosepela soki tozali kokanisa kaka te ete tozangi makasi, kasi mpe tozangi elikya, lokola nde Yehova akopamela biso kaka mpo bamposa ya mabe eyeli biso. Awa mpe kokamwa! Satana ye moko nde moto azangá elikya, mpo Yehova akatelá ye etumbu ete abongi te kozala na bomoi ya seko. (Eba. 3:15; Em. 20:10) Na ntembe te Satana alingi tókanisa ete tozangi elikya, mingimingi mpo tozali na elikya ya kozwa lipamboli oyo bapimelá ye. Kasi, biso tozangi elikya te. Kutu, Biblia endimisi biso ete Yehova alingaka kosalisa biso, kasi te kopesa biso etumbu. “Alingi moto ata moko te abomama, kasi alingi ete bato nyonso bábongola motema.”—2 Pe. 3:9.

7 Na yango, soki tondimi ete tozangi makasi to tozangi elikya na etumba na biso mpo na kobundisa bamposa ya mabe, wana tokómi na makanisi oyo Satana alingi tózala na yango. Soki totaleli makambo ndenge wana ekoki kosalisa biso tózala na ekateli makasi ya kotɛmɛla ye.—1 Pe. 5:​8, 9.

NDENGE OYO TOKOKI KOMIYOKA LOKOLA TOZALI BATO YA MASUMU

8. Longola misala ya mabe, lisumu elimboli mpe nini? (Nzembo 51:5) (Talá mpe “Ndimbola ya maloba.”)

8 Longola Satana, ezali na eloko mosusu oyo ekoki kotinda biso tókanisa ete tozangi makasi to tozangi elikya mpo na kobundisa bamposa ya mabe. Eloko yango nini? Lisumu oyo tozwá epai ya baboti na biso ya liboso.b—Yobo 14:4; tángá Nzembo 51:5.

9-10. (a) Adama ná Eva bamiyokaki ndenge nini nsima ya kosala lisumu? (Talá mpe elilingi.) (b) Lisumu oyo tozwá esalaka ete tómiyoka ndenge nini?

9 Kanisá oyo lisumu esalaki epai ya Adama ná Eva. Nsima ya kozanga botosi epai ya Yehova, bamibombaki mpe balukaki kozipa nzoto na bango. Mpo na likambo yango, buku Étude perspicace des Écritures elobi boye: “Lisumu epesaki bango mayoki ya komema ngambo, ya komitungisa, ya kobanga mpe ya nsɔni.” Ezalaki lokola nde Adama ná Eva bakangamaki na ndako moko oyo ezali kaka na biteni wana minei. Bakokaki kokende na eteni mokomoko, kasi bakokaki kobima na ndako yango te. Bakokaki te kolongwa na lisumu.

10 Ya solo, likambo na biso ezali mpenza ndenge moko te na oyo ya Adama ná Eva, mwasi ná mobali yango ya liboso. Ekeseni mpo lisiko epesamaki mpo na bango te, kasi mpo na biso, mpo masumu na biso ekoka kolimbisama mpe tókoka kosalela Yehova na lisosoli ya pɛto. (1 Ko. 6:11) Atako bongo, tozwá lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka epai na bango. Yango wana, tosengeli kokamwaka te ndenge biso mpe tozalaka na mayoki ya komema ngambo, ya komitungisa, ya kobanga mpe ya nsɔni. Kutu, Biblia elobi ete lisumu ekangi bato na boombo. Mpe ezali koyangela “ata baoyo [basali] lisumu te lokola oyo ya Adama ntango abukaki mobeko.” (Rom. 5:14) Koyeba likambo yango ekoki kolɛmbisa nzoto, kasi esengeli te kotinda biso tómona ete tozangi makasi to tozangi elikya. Kutu tokoki kotika komiyoka ndenge wana. Nini ekoki kosalisa biso?

Adama ná Eva bazali kobima na elanga ya Edene na nsɔni, balati bilamba ya mposo ya nyama.

Lisumu epesaki Adama ná Eva mayoki ya komema ngambo, ya komitungisa, ya kobanga mpe ya nsɔni (Talá paragrafe 9)


11. Tosengeli kosala nini ntango tokanisi ete tozangi makasi, mpe mpo na nini? (Baroma 6:12)

11 Ntango tokanisi ete tozangi makasi, lokola nde tokokoka te kobundisa bamposa ya mabe, tómona ete ezaleli na biso ya kozanga kokoka nde ezali “koyebisa” biso bongo, kasi tosengeli koyokela yango te. Mpo na nini? Mpo Biblia elobi ete tosengeli te kotika lisumu ekoba ‘koyangela’ biso. (Tángá Baroma 6:12.) Yango elimboli ete tokoki kopona koboya kokokisa bamposa ya mabe. (Gal. 5:16) Yehova ayebi ete tokoki kotɛmɛla komekama; soki ezalaki bongo te, alingaki te kosɛnga biso tósala yango. (Mib. 30:​11-14; Rom. 6:6; 1 Tes. 4:3) Ya solo, tozangi makasi te na etumba na biso mpo na kobundisa bamposa ya mabe.

12. Tosengeli kosala nini ntango tokanisi ete tozangi elikya, mpe mpo na nini?

12 Ndenge moko mpe, ntango tokanisi ete tozangi elikya, lokola nde Yehova akopamela biso kaka mpo tozali na bamposa ya mabe, tómona ete ezaleli na biso ya kozanga kokoka nde ezali “koyebisa” biso bongo, kasi tosengeli koyokela yango te. Mpo na nini? Mpo Biblia eteyaka ete Yehova ayebi ete tozali bato ya masumu. (Nz. 103:​13, 14) “Ayebi makambo nyonso” oyo etali biso, ata mpe ndenge oyo ezaleli na biso ya kozanga kokoka esalaka ete tóyoka mposa ya kosala oyo ezali mabe. (1 Yoa. 3:​19, 20) Kasi soki tobundisi mposa yango mpe tokokisi yango te, Yehova amonaka ete tozali pɛto. Mpo na nini tokoki kondima likambo yango?

13-14. Yehova akoboya biso kaka mpo bamposa ya mabe eyeli biso? Limbolá.

13 Biblia emonisi bokeseni kati na kozala na momeseno ya kosala mabe (likambo oyo tokoki komipekisa kosala) mpe koyoka mposa ya kosala mabe (likambo oyo ekoki koya yango moko). Na ndakisa, bakristo mosusu ya lisangá ya Korinti ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kala mibali oyo basangisaka nzoto na mibali. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.” Yango elimboli ete bayokaki lisusu ata mokolo moko te mposa ya kosala makambo wana? Na ntembe te mposa yango ezalaki koya, mpo mbala mingi bamposa ya ndenge wana epikamaka makasi. Kasi, bakristo oyo bamonisaki komipekisa mpe baboyaki kokokisa bamposa yango, Yehova azalaki kondima bango. Azalaki komona bango ete ‘basukwami.’ (1 Ko. 6:​9-11) Ekoki kozala mpe bongo mpo na yo.

14 Ata soki bamposa ya mabe oyo ozali kobunda na yango ezali ndenge nini, yebá ete okoki kolonga yango. Ata soki okokoka kolongola yango libela te, okoki komonisa komipekisa mpe koboya ‘kosala makambo oyo nzoto mpe makanisi na yo ezali kolinga.’ (Ef. 2:3) Ndenge nini okoki komipekisa, mpe na bongo kolonga etumba ya kobunda na bamposa ya mabe?

NDENGE YA KOLONGA

15. Mpo tólonga etumba ya kobunda na bamposa ya mabe, tosengeli kondima nini?

15 Mpo na kolonga etumba ya kobunda na bamposa ya mabe, osengeli kondima bolɛmbu na yo na bosembo nyonso. Kebá ete omikosa te na “makanisi ya lokuta.” (Yak. 1:22) Kozala mafumafu ekotinda yo kaka okwea na komekama, na ndakisa momɛli-masanga akoki kobanda kokanisa: ‘Bato mosusu bamɛlaka mingi koleka ngai,’ to moto mosusu akoki kopesa basusu foti mpe koloba: ‘Nalingaki kokwea te na komekama ya kotala pornografi soki mwasi na ngai ayebaki komonisa lolango.’ Na yango, kolukaka te komilongisa mpo na likambo ya mabe, ata na makanisi na yo. Kopesa mpe basusu foti te mpo na misala na yo.—Gal. 6:7.

16. Nini ekoki kosalisa yo na ekateli na yo ya kosala oyo ezali malamu?

16 Longola kondima bolɛmbu na yo na bosembo nyonso, osengeli mpe kozwa ekateli makasi ya kokwea te na yango. (1 Ko. 9:​26, 27; 1 Tes. 4:4; 1 Pe. 1:​15, 16) Kanisá likambo to ntango oyo ekoki kozala mpasi mpo na yo kotɛmɛla komekama. Ekoki kozala lolenge ya komekama to ntango oyo yango ekoki koya. Na ndakisa, ezali mpasi otɛmɛla komekama ntango ozali ya kolɛmba to na butu ntango ngonga epusani? Kanisá libela oyo okoki kosala, mpe ndenge oyo okomibatela. Eleki malamu kosala bongo liboso komekama eya.—Mas. 22:3.

17. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yozefe? (Ebandeli 39:​7-9) (Talá mpe bililingi.)

17 Kanisá ndenge oyo Yozefe asalaki ntango mwasi ya Potifare alukaki kokweisa ye. Yozefe aboyaki mbala moko mpe na mpiko nyonso. (Tángá Ebandeli 39:​7-9.) Yango emonisi nini? Emonisi ete Yozefe asilaki kozwa ekateli ete akoki te kozwa mwasi ya moto mosusu liboso kutu mwasi ya Potifare aluka kokweisa ye. Ndenge moko mpe, osengeli kozala na ekateli makasi ya kosala oyo ezali malamu liboso kutu okutana na komekama. Soki omibongisi liboso, ntango komekama ekoya, ekozala mpasi te olanda ekateli oyo osilaki kozwa.

Bililingi: 1. Yozefe akimi mwasi ya Potifare mpe mwasi yango atikali na elamba ya Yozefe na mabɔkɔ. 2. Ndeko mobali ya elenge azali kotɛmɛla komekama ya mwana mwasi oyo azali kolinga ye na eteyelo.

Kimá komekama mbala moko, ndenge Yozefe asalaki! (Talá paragrafe 17)


‘KOBÁ KOMIMEKA’

18. Okoki kosala nini mpo na kolonga na etumba ya kobunda na bamposa ya mabe? (2 Bakorinti 13:5)

18 Mpo na kolonga etumba ya kobunda na bamposa ya mabe, osengeli ‘kokoba komimeka,’ elingi koloba, kokoba komitalela mbala na mbala mpo na komona soki ozali ndenge nini. (Tángá 2 Bakorinti 13:5.) Nsima ya mwa ntango, omitalelaka mpo oyeba soki okómi na makanisi nini mpe makambo ya ndenge nini okómi kosala, mpe obongisa esika oyo esengeli. Na ndakisa, ata ntango olongi kotɛmɛla komekama, okoki komituna: ‘Nazwaki ntango boni liboso naboya?’ Soki omoni ete oumelaki naino, komipesa foti te. Kasi, zwá nde bibongiseli mpo osala malamu mbala ya nsima. Omituna mituna lokola oyo: ‘Ntango makanisi ya mbindo eyeli ngai, nakoki kosala nini mpo nalongola yango nokinoki mpenza? Kominanola oyo naponaka nde ezali kosala ete ezala mpasi natɛmɛla komekama? Nalongolaka mbala moko miso na bililingi ya mbindo? Nakangi ntina ete mibeko ya Yehova ezali kaka mpo na bolamu na ngai ata soki esɛngi namonisa komipekisa mpo na kotosa yango?’—Nz. 101:3.

19. Na ndenge nini kozwa bikateli oyo ezangi bwanya ata na makambo ya mikemike ekoki kosala ete ezala mpasi tóbundisa bamposa ya mabe?

19 Ntango ozali komimeka, osengeli te komilongisa. Biblia elobi: “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te.” (Yir. 17:9) Yesu alobaki ete “makanisi mabe” eutaka na motema. (Mat. 15:19) Na ndakisa, moto oyo atiká kotala pornografi, nsima ya mwa ntango, akoki kobanda kokanisa ete “ezali mabe te” atala bafɔtɔ oyo elamwisaka bamposa ya nzoto mpo bato bazali bolumbu mpenza te. To akoki komiloba: ‘Komimona na makanisi ete nazali kosala makambo ya mbindo ezali mabe te soki nasali makambo yango te.’ Kokanisa ndenge wana ezali lokola nde motema ya bokosi ya moto yango ezali ‘kokana ndenge ya kokokisa bamposa ya nzoto.’ (Rom. 13:14) Ndenge nini okoki kokima likambo ya bongo? Zalá ekɛngɛ mpe boyá kozwaka bikateli oyo ezangi bwanya na makambo ya mikemike mpo ekotinda yo ozwa bikateli oyo ezangi bwanya na makambo ya minene, na ndakisa kokwea na komekama.c Boyá mpe makanisi nyonso ya mabe, oyo ekoki kotinda yo oluka komilongisa mpo osala likambo ya mabe.

20. Elikya nini tozali na yango mpo na mikolo ezali koya, mpe lisalisi nini tozali na yango banda sikoyo?

20 Ndenge toyekoli yango, na lisalisi ya Yehova, tozali na makasi ya kotɛmɛla komekama. Lisusu, lokola Yehova azali na motema mawa, tozali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na mokili ya sika. Ekozala mpenza esengo kosalela Yehova na makanisi mpe motema ya pɛto! Kasi, liboso ntango yango ekoka, tokoki kotya motema ete tozangi makasi te, tozangi mpe elikya te na etumba ya kobundisa bamposa ya mabe. Lokola Yehova apambolaka milende oyo tozali kosala, tokoki kolonga etumba yango!

OKOPESA EYANO NINI?

  • Nini ekoki kosalisa biso ntango tokanisi ete tozangi makasi to tozangi elikya?

  • Tokoki kosala nini mpo lisumu ekoba te ‘koyangela’ biso?

  • Ndenge nini tokoki ‘kokoba komimeka’?

LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!

a Bible na lingala ya lelo oyo ebongoli vɛrsɛ yango boye: “Komekama nyonso oyo eyeelaka bino ezali kaka lokola komekama oyo eyeelaka bato nyonso.”

b NDIMBOLA YA MALOBA: Na Biblia, mbala mingi liloba “lisumu” emonisaka misala, lokola koyiba, ekobo, to koboma moto. (Kob. 20:​13-15; 1 Ko. 6:18) Kasi na bavɛrsɛ mosusu, “lisumu” emonisaka mpe ezaleli ya bato ya masumu, oyo tobotamaka na yango, ata soki tosali naino ata likambo moko te oyo ebengami lisumu.

c Simbá ete elenge mobali oyo Masese 7:​7-23 elobeli azwaki bikateli ya mikemike oyo ezangaki bwanya liboso ete azwa ekateli ya monene oyo ezangi bwanya, ya kosala pite.

d NDIMBOLA YA BILILING: Na lobɔkɔ ya mwasi: Na restora, ndeko mobali moko amoni mibali mibale bazali kotalana na bolingo. Na lobɔkɔ ya mobali: Ndeko mwasi moko amoni bato mibale bazali komɛla makaya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto