Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Septembre nk. 14-18
  • Nalekisi bomoi ya malamu na mosala ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalekisi bomoi ya malamu na mosala ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NAKOLI NA LIBOTA OYO EKABWANÁ NA MAKAMBO YA LOSAMBO
  • NABANDI MOSALA YA NTANGO NYONSO
  • GILEADE MPE ELOKO YA KOZELISAZELISA
  • KOSALA ELONGO NA SHEILA NA CAMEROUN
  • EKATELI MOKO YA MPASI
  • NAZWI LITEYA MOKO YA NTINA
  • Nakolɛmbisa mabɔkɔ ata moke te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • “Nzambe azalaki komona to te?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Komekola bandakisa ya malamu ememeli ngai mapamboli ebele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • “Nayekoli makambo mingi epai ya basusu!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Septembre nk. 14-18
André Ramseyer.

LISOLO YA BOMOI

Nalekisi bomoi ya malamu na mosala ya Yehova

LISOLO YA ANDRÉ RAMSEYER

NA 1951, nautaki kokóma na Rouyn, engumba moko moke na etúká ya Québec, na Canada. Nakómaki na adrɛsi oyo bapesaki ngai mpe nabɛtaki na porte. Marcel Filteau,a misionɛrɛ moko oyo akɔtaki Eteyelo ya Gileade, abimaki na porte. Azalaki na mbula 23 mpe azalaki molai; ngai nazalaki na mbula 16 mpe mokuse. Nalakisaki ye mokanda oyo elobaki ete nakómi mobongisi-nzela. Atángaki yango, atalaki ngai, mpe alobaki: “Mama na yo ayebi ete ozali awa?”

NAKOLI NA LIBOTA OYO EKABWANÁ NA MAKAMBO YA LOSAMBO

Nabotamá na 1934. Baboti na ngai bazalaki bato ya Suisse oyo bayá kofanda na Timmins, engumba moko oyo batimolaka mabanga ya ntalo na Ontario, na Canada. Na mobu soki 1939, Mama akómaki kotánga zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Azalaki mpe komema ngai ná bandeko na ngai motoba. Eumelaki te, akómaki Motatoli ya Yehova.

Tata asepelaki te ndenge Mama akómaki Motatoli ya Yehova, kasi Mama alingaki solo mpe azalaki na ekateli ya kokangama na yango. Akangamaki kaka na solo ata na ebandeli ya bambula ya 1940 ntango mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Canada. Mpe azalaki ntango nyonso kosalela Tata makambo na boboto mpe na limemya, ata ntango Tata azalaki koloba na ye mabe mpenza. Etamboli malamu ya Mama esalisaki ngai ná bandeko na ngai tóndima mpe solo. Likambo ya esengo, Tata atikaki matata na nsima mpe akómaki kosalela libota na biso makambo na boboto mpenza.

NABANDI MOSALA YA NTANGO NYONSO

Na eleko ya molunge na 1950, nakɔtaki liyangani Bokoli ya Teokrasi na engumba ya New York. Nakómaki na mposa makasi ya kosala mingi na mosala ya Yehova nsima ya kokutana na bandeko basi mpe mibali oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge mpe koyoka mituna-lisolo ya kolendisa oyo bandeko bazwá diplome na Eteyelo ya Gileade basalaki! Nakómaki na ekateli makasi ya kokɔta na mosala ya ntango nyonso. Ntango kaka nazongaki epai na biso, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Betele ya Canada eyanolaki ngai ete nasengeli liboso kozwa batisimo. Yango nde nasalaki na mwa 01/10/1950. Sanza moko na nsima, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe batindaki ngai na teritware na ngai ya liboso na Kapuskasing. Engumba yango ezalaki mpenza mosika na esika oyo nazalaki kofanda.

André asimbi nimero moko ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”

Na Québec

Na eleko ya prɛnta ya 1951, Betele esɛngaki Batatoli oyo balobaka Français bákanisa soki bakoki kokende na etúká ya Québec esika oyo Français elobamaka. Mposa ezalaki makasi kuna. Nazalaki koloba Français ná Anglais banda bomwana, yango wana nandimaki libyangi yango mpe batindaki ngai na Rouyn. Nayebaki moto moko te kuna. Nazalaki kaka na adrɛsi wana, oyo nalobelaki na ebandeli. Kasi makambo elekaki malamu. Ngai ná Marcel tokómaki baninga, mpe nasepelaki kosala elongo na ye na Québec mbula minei oyo elandaki, ata ntango nakómaki mobongisi-nzela monene.

GILEADE MPE ELOKO YA KOZELISAZELISA

Ntango nazalaki na Québec, nasepelaki mingi ntango nazwaki libyangi ya kokɔta kelasi ya mbala ya 26 ya Eteyelo ya Gileade na South Lansing, na New York. Nazwaki diplome na mwa 12/02/1956, mpe batindaki ngai na ekólo oyo ekómá sikoyo Ghana,b na Afrika ya wɛsti. Liboso nakende kuna, nasengelaki kozonga na Canada mpo na “mwa bapɔsɔ” tii ntango mikanda na ngai ya mobembo ekobima.

Nazelaki mikanda yango na boumeli ya sanza nsambo na Toronto. Na boumeli ya ntango yango, nafandaki na libota ya ndeko Cripps, mpe nayebanaki na Sheila, mwana na bango ya mwasi. Tolinganaki. Ntango kaka nalingaki kotuna ye libala, viza na ngai ebimaki. Ngai ná Sheila tobondelaki mpe tozwaki ekateli ete nasengeli kokende esika batindi ngai, na Ghana. Kasi toyokanaki ete tokokoba kosolola na nzela ya mikanda mpo tótala soki tokoki kobalana. Ezalaki pɛtɛɛ te kozwa ekateli yango, kasi na nsima tomonaki ete ezalaki ekateli oyo ebongaki mpenza.

Karte oyo emonisi mwa bisika oyo André afandaki mpe asalaki: Manitoba, Ontario, mpe Québec, na Canada; Cameroun, Côte d’Ivoire, Ghana, Nigeria, mpe Togo, na Afrika.

Nsima ya kosala mobembo ya sanza mobimba na engbunduka, na masuwa ya biloko, mpe na mpɛpɔ, nakómaki na Accra, na Ghana. Kuna, batindaki ngai lokola mokɛngɛli ya etúká. Yango esɛngaki kotambola na Ghana mobimba, Ivory Coast (lelo Côte d’Ivoire) mpe Togoland (lelo Togo). Mbala mingi, nazalaki kosala mobembo ngai moko na motuka oyo Betele epesaki ngai. Nazalaki kosepela mingi kosala mibembo mpo na kotala bandeko!

Na nsuka ya pɔsɔ, nazalaki kosala mayangani ya zongazonga. Tozalaki na Ndako ya mayangani te. Na yango, bandeko bazalaki kosala bansamba na banzete ya bambu mpe bazalaki kotya mandalala likoló mpo ebatela biso na moi makasi. Lokola frigo ezalaki te, bandeko bazalaki komema banyama ya bomoi mpe bazalaki koboma yango mpo na kopesa baoyo bayei liyangani bilei.

Makambo ya kosɛkisa ezalaki kosalema na mayangani yango. Mokolo moko ntango Herb Jennings,c moninga moko ya misionɛrɛ, azalaki kosala diskur, ngɔmbɛ moko ekimaki na esika bazalaki kolamba. Ngɔmbɛ ezalaki kokima mbangu kati na estrade mpe bayangani. Herb akataki diskur mpe ngɔmbɛ yango ebandaki koyengayenga. Kasi bandeko mibali minei ya makasi bakangaki yango mpe bamemaki yango esika bazalaki kolamba, mpe bayangani bagangaki na esengo.

Na kati ya pɔsɔ, nazalaki kolakisa filme La Société du Monde Nouveau en action na bamboka ya pembenipembeni. Mpo na kosala yango, nazalaki kokangisa elamba ya mpɛmbɛ na banzete mibale. Bato ya mboka bazalaki kolinga filme yango. Mpo na mingi na bango, ezalaki mbala ya liboso bátala filme. Bazalaki kobɛta mabɔkɔ makasi na bisika oyo ezalaki kolakisa bato bazali kozwa batisimo. Filme yango esalisaki mpenza baoyo batalaki bámona ete tozali lisangá ya mokili mobimba oyo ezali na bomoko.

André ná Sheila na mokolo ya libala na bango.

Tobalanaki na Ghana na 1959

Nsima mbula soki mibale na Afrika, nazalaki na esengo ya kokɔta na liyangani oyo esangisaki mikili mingi na engumba New York na 1958. Nazalaki mpenza na esengo ya komona Sheila, oyo autaki na Québec, esika azalaki mobongisi-nzela monene. Tozalaki kokomana mikanda, kasi sikoyo tomonanaki lisusu, mpe nasɛngaki ye libala, mpe andimaki. Nakomelaki Ndeko Knorrd mpe nasɛngaki soki Sheila akoki kokɔta Eteyelo ya Gileade mpe alanda ngai na Afrika. Ndeko Knorr andimaki. Nsukansuka Sheila akómaki na Ghana. Tobalanaki na Accra, na mwa 03/10/1959. Tomonaki ete Yehova apambolaki biso mpenza mpo totyaki ye na esika ya liboso na bomoi na biso.

KOSALA ELONGO NA SHEILA NA CAMEROUN

André afandi na biro na ye na Cameroun.

Na filiale ya Cameroun

Na 1961, batindaki biso na ekólo Cameroun. Bandeko basɛngaki ngai nasalisa na kofungola biro ya filiale, nazalaki mpenza na makambo mingi ya kosala. Lokola nazalaki mokɛngɛli ya filiale ya sika, nazalaki na makambo ebele ya koyekola. Na nsima na 1965 Sheila azwaki zemi. Mpo na koloba solo, ezalaki mpasi mpo na mwa ntango kondima ete tokokóma baboti. Kasi kaka ntango tokómaki kosepela mpo na mokumba yango ya sika mpe tozwaki bibongiseli mpo na kozonga na Canada, likambo moko ya mabe mpenza ekómaki.

Mwana yango akufaki liboso Sheila abota. Monganga ayebisaki biso ete mwana yango azalaki mwana mobali. Esali sikoyo mbula koleka 50, kasi tobosanaka ye te. Atako likambo yango epesaki biso mawa makasi, totikalaki kaka esika batindaki biso, esika tozalaki kolinga mingi.

Elongo na Sheila na Cameroun na 1965

Bandeko na Cameroun bazalaki mbala mingi kokutana na minyoko mpo bazalaki koboya kokɔta na makambo ya politiki. Likambo yango eyaki ndongo, mingimingi na ntango ya maponami. Likambo oyo tozalaki kobanga mpenza esalemaki na mokolo ya 13/05/1970 ntango bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova. Guvɛrnema ebɔtɔlaki biro ya filiale na biso ya sika epai tofandaki kaka sanza mitano. Na pɔsɔ moko mpamba, babenganaki bamisionɛrɛ nyonso, ata mpe ngai ná Sheila. Ezalaki mpasi kotika bandeko mpo tozalaki kolinga bango mingi mpe tozalaki komitungisa mpo na oyo ekokómela bango na nsima.

Tolekisaki sanza motoba oyo elandaki na Betele ya France. Kuna nakobaki kosala nyonso oyo nakoki mpo na kosalisa bandeko na Cameroun. Na sanza ya 12 ya mbula yango, batindaki biso na Betele ya Nigeria, oyo ekómaki kolandela mosala na Cameroun. Bandeko ya Nigeria bayambaki biso malamu, mpe tosepelaki kosala kuna bambula ebele.

EKATELI MOKO YA MPASI

Na 1973, tosengelaki kozwa ekateli moko ya mpasi mpenza. Sheila azalaki na mwa mikakatano makasi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto. Ntango tozalaki na New York na liyangani moko, Sheila abandaki kolela mpe ayebisaki ngai: “Nakokoka lisusu te! Nalɛmbi mpenza mpe nazali kobɛla mpambampamba.” Asalaki elongo na ngai na Afrika ya wɛsti mbula koleka 14. Nazalaki kosepela na mosala na ye ya sembo, kasi tosengelaki kosala mwa bambongwana. Nsima ya kosolola likambo yango mpe kobondela mingi, tozwaki ekateli ya kozonga na Canada, esika oyo akokaki kozwa lisalisi malamu ya monganga. Kotika mosala na biso ya misionɛrɛ mpe mosala ya ntango nyonso ezalaki likambo ya mpasi mpenza mpe ekateli ya mawa na bikateli nyonso oyo tozwá.

Nsima ya kokóma na Canada, nazwaki mosala epai ya moninga moko ya kala oyo azalaki na kompanyi ya kotɛka mituka na mboka moko na nɔrdi ya Toronto. Tozalaki kofutela apartema moko, tosombaki biloko ya ndako esí basalelá, mpe tobandaki bomoi ya sika kozanga kokɔta banyongo. Mposa na biso ezalaki tókoba na bomoi ya pɛpɛlɛ, na elikya ete mokolo mosusu tokozongela mosala ya ntango nyonso. Likambo ya kokamwa, mposa na biso ekokisamaki kaka ntango moke na nsima.

Mikolo nyonso ya pɔsɔ, nakómaki kopesa mabɔkɔ esika bazalaki kotonga Ndako ya mayangani ya sika na Norval, Ontario. Na nsima, basɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli ya Ndako ya mayangani. Lokola Sheila akómaki koyoka mwa malamu, tomonaki ete akokoka mokumba yango ya sika. Yango wana tokendaki kofanda na Ndako ya mayangani na sanza ya 06/1974. Tosepelaki mingi mpenza ndenge tozongelaki mosala ya ntango nyonso!

Likambo ya esengo, kolɔngɔnɔ ya nzoto ya Sheila ezalaki se kobonga. Mbula mibale na nsima, tondimaki mosala ya zongazonga. Zongazonga yango ezalaki na Manitoba, etúká moko ya Canada oyo eyebani lokola esika ya malili makasi. Kasi, bandeko bazalaki na bolingo mingi. Tomonaki ete esika oyo tozali kosala ezali mpenza na ntina te; likambo eleki ntina ezali nde kokoba kosalela Yehova esika nyonso oyo tozali.

NAZWI LITEYA MOKO YA NTINA

Nsima ya kosala bambula ebele na mosala ya zongazonga, babengaki biso na 1978 na Betele ya Canada. Eumelaki te, nazwaki liteya moko ya ntina, kasi na mpasi. Na likita moko ya ntina oyo esalemaki na Montréal, bapesaki ngai diskur ya ngonga moko ná miniti ntuku misato na Français. Likambo ya mawa, diskur na ngai ebendaki likebi ya bayangani te, mpe ndeko moko ya Departema ya mosala apesaki ngai toli mpo na yango. Mpo na koloba solo, nasengelaki kaka kondima likambo oyo nandimaka sikoyo, ete nazali molobi malamu te. Kasi na ntango wana nandimaki toli yango te. Toyokanaki malamu te. Namonaki ete alobaki na ngai kaka mabe—apesaki ngai ata longonya te. Nasalaki libunga ndenge natyaki likebi na ndenge toli epesamaki mpe ndenge oyo natalelaki moto oyo apesaki yango.

André azali kosala diskur.

Nazwaki liteya ya ntina mingi nsima ya kosala diskur moko na Français

Mwa mikolo na nsima, ndeko moko ya Komite ya filiale asololaki na ngai likambo yango. Nandimaki ete nasalaki mabe mpe nasɛngaki bolimbisi. Na nsima nasololaki na ndeko oyo apesaki ngai toli. Na boboto nyonso alimbisaki ngai. Likambo yango eteyaki ngai ntina ya kozala na komitikisa mpe nakobosana yango te. (Mas. 16:18) Nabondelaka Yehova mbala mingi mpo na yango, mpe nazali na ekateli ya koboya lisusu toli te.

Nasali sikoyo mbula koleka 40 na Betele ya Canada, mpe banda 1985, nazali na libaku ya kosala na Komite ya filiale. Na sanza ya 02/2021, mwasi na ngai Sheila akufaki. Longola mpasi ya kobungisa ye, ngai moko nazali na mikakatano ya nzoto. Kasi nazali se na mingi ya kosala na mosala ya Yehova mpe nazali na esengo mpo ‘mikolo . . . eleki mbangumbangu.’ (Mos. 5:20) Atako nakutani na mikakatano na bomoi na ngai, makambo ya esengo eleki mingi. Kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ngai mpe kolekisa mbula 70 na mosala ya ntango nyonso esali ete nazala na bomoi ya malamu. Nabondelaka ete bilenge mibali mpe bilenge basi bákoba mpe kotya Yehova na esika ya liboso, mpo nazali na kondima ete bakozwa mpe bomoi ya malamu mpe ya esengo oyo eutaka kaka na mosala ya Yehova.

a Talá lisolo ya bomoi ya ndeko Marcel Filteau, “Yehova azali ekimelo mpe nguya na ngai,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2000.

b Tii na 1957, etúká yango ya Afrika ezalaki na nse ya boyangeli ya Grande-Bretagne mpe ebengamaki Côte d’Or.

c Talá lisolo ya bomoi ya ndeko Herbert Jennings “Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2000.

d Nathan Knorr nde azalaki kotambwisa mosala na biso na ntango wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto