Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 nk. 24-28
  • “Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakei liboso na bandeko mosusu
  • Eteyelo ya Gileadi mpe nakei na Côte de l’Or.
  • “Lobi” oyo tokanisaki yango liboso te
  • Yehova azali kosunga biso na nzela ya basaleli na ye
  • Toyekoli komesana na maladi
  • “Lobi” oyo ekozala malamu mingi
  • Yehova azangaka te kopesa basaleli na ye ya sembo mbano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Nalekisi bomoi ya malamu na mosala ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Kosala mokano ya Nzambe ememeli ngai esengo ya libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Jéhovah apesaki ngai makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 nk. 24-28

Lisolo ya Bomoi

“Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi”

YA HERBERT JENNINGS

“Nautaki na Tema, nazalaki kozonga na biro ya filiale ya la Société na ekólo Ghana; natɛlɛmisaki motuka mpo namema elenge mobali moko oyo azalaki kozela motuka mpo akende na engumba. Nabandaki koteya ye na kati ya motuka. Nakanisaki ete nazali koteya ye malamu! Kasi, ntango tokómaki na esika oyo asengelaki kokita, apumbwaki na motuka mpe akimaki mbangu.”

NAMONAKI ete likambo moko ya ndenge mosusu ezalaki koyela ngai. Liboso ya koyebisa bino likambo oyo esalemaki, tiká nayebisa bino ndenge oyo, ngai moto ya ekólo Canada, nakómaki na Ghana.

Ezalaki na katikati ya sanza ya Desɛmbɛ 1949, na nɔrdi ya engumba ya Toronto, na Canada, tosilisaki kotimola libulu na mabele oyo etondaki na ngalasi mpo na kolekisa batiyo ya mai na ndako moko ya sika. Toyokaki malili mpe tolɛmbaki, yango wana biso nyonso tofandaki zingazinga ya mɔ́tɔ ya nkoni, tozalaki kozela motuka eya komema biso. Mbala moko, Arnold Lorton, moninga moko ya mosala, abandi kosolola na biso masolo ya “bitumba mpe nsango ya bitumba,” “nsuka ya mokili,” mpe alobaki makambo mosusu oyo nayokaki yango naino te. Moto nyonso atikaki koloba, abandaki koyoka lokola motungisi, mpe bamosusu kutu basepelaki na ye te. Nazali koyeba lisusu ete na kati ya motema nalobaki boye: ‘Moto oyo azali mpenza mobali! Moto moko te alingi koyoka ye awa, kasi azali koloba kaka.’ Kasi makambo oyo azalaki koloba esimbaki motema na ngai. Ezalaki kaka mwa bambula moke nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe nayokaki ata mbala moko te makambo ya ndenge yango na lingomba ya “Christadelphes” (“Bandeko ya Klisto”), epai libota na biso mobimba tozalaki kosambela banda bankɔkɔ na biso. Nazalaki kolanda ye malamumalamu mpe makambo oyo alimbolaki esimbaki motema na ngai.

Nsima ya mwa mikolo nakendaki epai ya Arnold mpo alimbolela ngai makambo mosusu malamumalamu. Soki nakanisi lisusu, nazali koyeba ete ye na Jean, mwasi na ye, bazalaki na motema molai mpe na boboto epai na ngai oyo nazalaki naino elenge, na mbula 19 mpamba mpe nayebaki makambo mingi te. Mbala mingi oyo nazalaki kokende kosolola na bango nazalaki koyebisa bango liboso te mpe bazalaki kobengisa ngai te. Basembolaki makanisi na ngai mpe basalisaki ngai mpo nalongola mobulungano oyo ezalaki na motó na ngai atako nazalaki naino elenge mpo nakesenisa mabe na malamu. Sanza zomi nsima ya likambo oyo elekaki ntango tozalaki koyɔta mɔ́tɔ, nazwaki batisimo na mokolo ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 1950, nakómaki Motatoli ya Yehova mpe nazalaki na lisangá ya Willowdale na engumba ya North York, ezali sikoyo na Toronto.

Nakei liboso na bandeko mosusu

Na ndako, nakómaki na mikakatano ntango Tata amonaki ete nakómi komipesa na makambo ya lingomba na ngai ya sika. Tata autaki kosala likama ya motuka, moto moko azalaki kotambwisa motuka na molangwa, atutaki tata na motuka mpe azwaki mpasi na motó, na yango mbala mingi ezalaki pɛtɛɛ te mpo na kofanda na ye malamu. Mama na baleki na ngai mibale ya mibali, mpe mibale ya basi bakómaki na mikakatano mingi. Lokola nazalaki kolanda mateya ya Biblia, yango engalisaki mitungisi yango. Yango wana, mpo na koboya mindɔndɔ, namonaki malamu nalongwa na ndako mpo nazala na kimya na baboti na ngai mpe nalandela malamu “nzela ya solo.”—2 Petelo 2:2.

Na nsuka ya eleko ya molunge ya 1951, nakómaki na lisangá moko ya moke na mboka Coleman, na etúká ya Alberta. Bilenge mibali mibale, Ross Hunt na Keith Robbins bazalaki kuna; bazalaki kosala mosala ya kosakola ntango nyonso, lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza. Basalisaki ngai mingi mpo nakoka kosala mosala yango na motema na ngai moko. Mokolo ya 1 Marsi 1952, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

Nazali kokanisa na esengo bilendiseli oyo nazwaki. Nasengelaki koyekola makambo mingi, mpe nayekolaki yango na mosala ya mobongisi-nzela. Nsima ya kolekisa soki mbula moko na mosala ya mobongisi-nzela na lisangá ya Lethbridge, na etúká ya Alberta, nazwaki mokanda oyo nakanisaki ata moke te mpo na kosala lokola mokɛngɛli-motamboli. Nasengelaki kotalaka masangá ya Batatoli ya Yehova oyo ezalaki na ɛsti ya Canada kobanda na engumba ya Moncton, na etúká ya New Brunswick tii na engumba ya Gaspé, na etúká ya Québec.

Nazalaki kaka na mbula 24 mpe naumelaki naino mingi te na kati ya solo, namonaki ete nakokoka mosala yango te, mingimingi soki natali makoki na ngai na ya Batatoli ya Yehova oyo bakɔmeli, oyo esengelaki natalaka masangá na bango. Nasalaki milende mpenza na basanza mingi oyo elandaki. Likambo mosusu oyo nakanisaki te eyaki.

Eteyelo ya Gileadi mpe nakei na Côte de l’Or.

Na Sɛtɛmbɛ 1955, babengisaki ngai na bana-kelasi mosusu soki nkama moko na kelasi ya mbala ya 26 na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, na South Lansing, na etúká ya New York. Sanza mitano ya kolanda mateya mpe koyekola mingi oyo tolekisaki kuna ezalaki mpenza eloko oyo nasengelaki na yango. Esengo na ngai ebakisamaki lisusu mingi lokola nazalaki na baninga na kelasi wana. Na eleko yango, likambo mosusu esalemaki oyo ebakisaki esengo na bomoi na ngai tii lelo oyo.

Na kati ya bana-kelasi oyo balandaki mateya mpo na mosala ya misionɛrɛ ezalaki na ndeko mwasi moko oyo azalaki elenge mpe nkombo na ye ezalaki Aileen Stubbs. Namonaki ete Aileen azali motó likolólikoló te, azwaka makambo ya ntina na lisɛki te, azali na komikitisa mpe na esengo. Nakanisi ete Aileen abangaki ntango nayebisaki ye na ndenge ya malamu mpenza te ete nazali na mposa ya kobala ye. Kasi, aboyaki te! Toyokanaki ete Aileen akende na ekólo Costa Rica epai batindaki ye lokola misionɛrɛ mpe ngai nakende na Côte de l’Or (lelo oyo ekólo Ghana), na Afrika ya Wɛsti, epai mpe batindaki ngai lokola misionɛrɛ.

Mokolo moko na ntɔngɔ, na sanza ya Mai 1956, nazalaki na biro ya Ndeko Nathan Knorr oyo ezalaki na etazi ya libwa na Brooklyn, na New York. Na ntango wana azalaki prezida ya la Société Watch Tower. Baponaki ngai mokɛngɛli ya filiale mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na Côte de l’Or, na Togo, na Côte d’Ivoire, na Haute-Volta (lelo oyo Burkina Faso), mpe na Gambie.

Nakanisaka maloba ya Ndeko Knorr lokola nde alobaki yango kaka lobi oyo eleki. Alobaki boye: “Osengeli kozwa mokumba yango mbala moko te. Kokende mbangu te; yekolá makambo epai ya bandeko oyo bayebi mosala kuna. Na nsima, ntango okomona ete okoki, bongo obanda kosala lokola mokɛngɛli ya filiale. . . . Mokanda ya koponama na yo yango oyo. Soki okómi, nsima ya mikolo nsambo osengeli kobanda mosala na yo.”

Namitunaki ete, ‘mikolo nsambo mpamba? Bongo toli oyo apesaki ngai ete “kokende mbangu te,” elingi koloba nini?’ Ntango tosilisaki kosolola, nazalaki komona lokola ndɔtɔ.

Mwa mikolo oyo elandaki elekaki nokinoki. Mosika te, nazalaki na kati ya masuwa mpe natɛlɛmaki pembeni ya mabende wana masuwa ezalaki kotambola na Ebale East River, tolekaki babiro ya la Société na Brooklyn mpe wana ezalaki ebandeli ya mobembo ya mikolo 21 na mbu mpo na kokóma na Côte de l’Or.

Ngai na Aileen tozalaki kotindelana mikanda mingi. Tokutanaki lisusu na 1958 mpe tobalanaki mokolo ya 23 Augusto ya mbula yango. Natɔndaka Yehova ntango nyonso mpo na mwasi malamu yango.

Na boumeli ya mbula 19, nasepelaki mingi kosala na bamisionɛrɛ mpe na bandeko ya Afrika na biro ya filiale ya la Société. Libota ya Betele oyo ebandaki na mwa bato moke na ntango yango ekómaki na bato 25 na boumeli ya bambula. Tokutanaki na komekama mingi, tomonaki makambo mingi, mpe mosala ebotaki mbuma mingi na eleko yango. Kasi, nasengeli koloba solo: mpo na ngai molunge mpe mopɛpɛ ya mpiɔ oyo ezalaka kuna, ezalaki mpenza mokakatano. Nazalaki koyoka lokola nde ntango nyonso nazalaki kotɔka, nazalaki koloba mingi te mpe bantango mosusu, nazalaki kosilika noki. Atako bongo, tozalaki kosepela na mosala lokola motuya ya basakoli ya Bokonzi na Ghana, oyo ezalaki koleka 6 000 na 1956, ekómaki 21 000 na 1975. Mpe ezali esengo mingi ya komona Batatoli koleka 60 000 bazali kosala sikoyo na Ghana.

“Lobi” oyo tokanisaki yango liboso te

Pene ya 1970, nabandaki kobɛla maladi moko oyo minganga bazalaki mpenza koyeba yango te. Nasalisaki baekizamɛ ya nzoto mobimba mbala mingi, kasi bazalaki koloba na ngai kaka ete, nazali “nzoto kolɔngɔnɔ.” Kasi mpo na nini nazalaki ntango nyonso koyoka nzoto malamu te mpe nazalaki kolɛmba mingi? Makambo mibale esalisaki ngai na koyeba, mpe makambo yango etungisaki ngai. Ya solo, ndenge kaka Yakobo akomaki ete: “Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi.”—Yakobo 4:14, NW.

Likambo ya liboso ezalaki ya elenge oyo nateyaki ye ntango nakumbaki ye na motuka. Ngai moko nazalaki koyeba te nzokande nazalaki koloba mingi, mbangumbangu mpe makasi. Ntango tokómaki na esika oyo elenge yango asengelaki kokita, nakamwaki ntango apumbwaki na motuka mpe akimaki. Bato mingi ya Ghana bazalaka na boboto, na kimya, mpe basilikaka noki te. Elenge yango asalaki mpenza lokola moto ya Ghana te. Nafandaki wana mpe nazalaki kokanisa. Namonaki ete nazalaki na maladi moko. Maladi nini? Nayebaki te. Kasi, nazalaki mpenza na maladi.

Ya mibale, nsima ya kosolola malamumalamu na Aileen, alobaki na ngai boye: “Soki maladi oyo ezali na nzoto te, esengeli kozala maladi ya makanisi.” Nakomaki nyonso oyo nazalaki koyoka mpe nakendaki epai ya monganga ya maladi ya motó. Ntango natángaki makambo oyo nakomaki na papye, alobaki na ngai ete: “Ezali maladi oyo eyebani malamu.” Ozali na mpasi ya makanisi (psychoses maniaco-dépressives).”

Nakamwaki mpenza! Nabundaki na yango na mbula mibale oyo elandaki kasi ezalaki se kongala. Nalɛmbaki te mpo na kosalisa nzoto. Kasi moto mpenza ya kosalisa ngai amonanaki te. Ezalaki mpasi mingi!

Tozalaki na mposa tósala mosala ya ntango nyonso bomoi na biso mobimba, mpe makambo oyo esengelaki kosala ezalaki mingi. Mbala mingi nazalaki kobondela makasi mpe na etingya ete: “Yehova, soki ezali mokano na yo, ‘nakobika mpe nakosala lisusu mosala oyo.’” (Yakobo 4:15) Kasi ezalaki bongo te. Lokola mpasi ezalaki kosila te, tozwaki bibongiseli, totikaki Ghana na baninga na biso ya motema mpe tozongaki na Canada na Yuni 1975.

Yehova azali kosunga biso na nzela ya basaleli na ye

Nayaki komona ete mosala ya Yehova ekosalema ata soki ngai nazali te, mpe kaka ngai moko te nde nazali kobɛla. Nakangaki ntina ya mokapo ya 1 Petelo 5:9 ete: “Bóyeba ete mpasi ya motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” Lokola nakangaki ntina ya likambo yango, nabandaki kososola ndenge oyo Yehova asungaki biso atako mbongwana ya mabe oyo ekɔtaki na bomoi na biso. ‘Lisangani ya bandeko’ basungaki biso na ndenge mingi ya malamu mpenza!

Atako tozalaki na biloko mingi te, Yehova asundolaki biso te. Atindaki bandeko na biso na Ghana básalisa biso na biloko mpe na ndenge mosusu. Toyokaki mawa mingi ntango tokabwanaki na baninga oyo tolingaki mingi mpe tozongaki na mboka na biso mpo na komesana na makambo ya “lobi” oyo tokanisaki yango te.

Lenora, yaya ya Aileen, na mobali na ye, Alvin Friesen, bayambaki biso na boboto mpenza na ndako na bango mpe basalisaki biso na boumeli ya basanza mingi. Monganga moko asalisaka maladi ya motó mpe ayebani mingi, alobaki makambo oyo epesaki ngai elikya ete: “Nsima ya sanza motoba okoyoka malamu.” Mbala mosusu alobaki bongo kaka mpo na kopesa ngai elikya, kasi maloba yango ekokisamaki te ata nsima ya mbula motoba. Tii na moi ya lelo, motó na ngai ezali kosala malamu te mpo na maladi oyo bazali kobenga trouble du comportement bipolaire, ebengeli oyo ezali ndenge ya kolɛmbisa likambo yango. Ezali mpenza ebengeli mpo na kolɛmbisa likambo yango, kasi baoyo babɛlaka maladi yango bayebi malamu ete, ebengeli yango elɛmbisaka maladi yango te.

Na ntango wana, Ndeko Knorr azalaki kobɛla maladi oyo akufaki na yango na Yuni 1977. Atako bongo, azwaki ntango mpe makasi ya kokomela ngai mikanda milai ya kolendisa na maloba ya kobɔndisa mpe na toli. Nabatelaka malamu mikanda yango tii lelo. Maloba na ye esalisaki ngai mingi mpo na kolongola makanisi mabe oyo ezalaki koyela ngai ya komiyoka ete nazali na ntina moko te.

Na nsuka ya mobu 1975, totikaki mosala malamu ya ntango nyonso mpo na kolandela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ngai. Moi ezalaki kosala ngai miso mpasi. Soki bato basali makɛlɛlɛ na mbalakaka nazalaki koyoka yango lokola lokito ya mondoki. Soki bato bazali kolekaleka, nazalaki koyoka kizunguzungu. Ezalaka mpenza etumba mpo na kokende na makita ya lisangá. Atako bongo, nayebaka malamu ntina ya mayangani na biso ya elimo. Mpo na kolonga, nazalaka ntango nyonso kokɔta na Ndako ya Bokonzi soki bato nyonso bafandi mpe nabimaka liboso ete bábanda kolekaleka soki makita esili.

Kobima na mosala ya kosakola ekómaka mpe mokakatano monene. Bantango mosusu, ata soki nakómi na ndako moko, nazangaka ata makasi ya kofina butɔ mpo na kobɛta ngonga. Kasi, nazali kotika te, mpamba te nayebaka ete mosala na biso ezali mpo na lobiko ya biso moko mpe ya bato nyonso oyo bakondima. (1 Timote 4:16) Soki nafandi mwa moke, motema ekiti mpe makanisi ezongi na esika na yango, nakei na ndako oyo elandi, mpe nakomeka lisusu. Kobima ntango nyonso na mosala ya kosakola esalisaka ngai nazala malamu na elimo, mpe ebakiselaka ngai makasi ya kobunda na maladi.

Lokola maladi yango ezali kosila te, namoni ete maladi yango ekotungisa ngai bomoi na ngai mobimba na mokili oyo. Na 1981 mpe 1982, masolo kitoko ezalaki kobima na Lamuká!a Masolo yango esalisaki ngai nabanda koyeba maladi yango malamumalamu mpe mayele ya kobunda na yango.

Toyekoli komesana na maladi

Makambo nyonso oyo esɛngaki mwasi na ngai andima kosala makambo mosusu mpe amesana na makambo mosusu. Soki obatelaka moto ya maladi lokola oyo ya ngai, na ntembe te okosepela na makambo oyo alobi:

“Soki kaka abandi koyoka malamu te, bizaleli na ye ebongwanaka mbala moko. Na mbala moko, moto oyo azalaki makasi, na makanisi ya kolendisa, mpe azalaki kokana makambo ya sika, akoki kolɛmba, kokóma na makanisi ya mabe, ata mpe nkandankanda. Soki moto oyo azali kobatela ye ayebi te ete maladi nde ezali kosala ye bongo, akoki kosilika mpe komitungisa. Esɛngaka kobongola nokinoki makambo mosusu oyo okanaki kosala, mpe ekómaka etumba epai na yo moko mpo osilika te mpe omona te ete bazali kondima yo te.”

Mpo na ngai, soki nazali komiyoka ete nazali mpenza malamu, nakómaka kobanga. Nayebaka ete lokola nazali “malamu,” nsima nakozala “mpenza malamu te.” Mpo na ngai, nasepelaka kozala “mpenza malamu te” na esika ya kozala “malamu,” mpamba te soki nazali mpenza malamu te, nafandaka kimya mwa mikolo, mpe nasalaka eloko moko ya mabe te. Aileen asalisaka ngai mingi, akebisaka ngai nalekisa esengo te, abɔndisaka ngai mpe alendisaka ngai soki nakómi mawamawa.

Ezali mpenza likama soki nakómi kokanisakanisa mpe koboya makambo mosusu nyonso ntango maladi eyei makasi. Ntango azali kotungisama na makanisi, moto akoki koboya kozala na bato to mpe akoki kosala makambo oyo ekozokisa bato soki mpasi ya motó etomboki. Kala, ezalaki mpasi mpo nandima ete nazali kobɛla maladi ya motó mpe ya makanisi. Nazalaki ntango mosusu na makanisi ete maladi yango ezali kouta libándá, kasi kati na ngai te, na ndakisa likambo moko oyo nalingaki kosala kasi elongi te to moto mosusu nde apesi ngai maladi yango. Mbala na mbala, esengelaka naloba ete: “Eloko moko ebongwani pembeni na ngai te. Maladi ezali kouta na kati ya nzoto, kasi na libándá te.” Mokemoke, natikaka makanisi ya mabe.

Nsima ya bambula, ngai na Aileen tomonaki ete tosengeli kolobelaka likambo yango polele mpe na bosembo biso moko mpe ata koyebisa bato mosusu. Tosalaka makasi tózala ntango nyonso na makanisi malamu mpe totikaka te ete maladi na ngai ezala likambo oyo esimbi bomoi na biso mobimba.

“Lobi” oyo ekozala malamu mingi

Yehova azali kopambola biso mpe kosunga biso mpo na ebele ya mabondeli makasi mpe milende oyo tozali kosala. Sikoyo ngai na Aileen tokómi mibange. Monganga alɛngɛlaka ngai ntango nyonso mpe apesaka ngai ntango nyonso mwa bankisi; yango nde esalisaka ngai nazala mwa nzoto makasi. Tosepelaka na mosala nyonso oyo tokoki kosala mpo na Nzambe. Nazali kaka kosala lokola nkulutu na lisangá. Tosalaka makasi mpo na kosunga bato mosusu na kati ya lisangá.

Yakobo 4:14 (NW) elobi solo ete: “Oyebi te ndenge bomoi na yo ekozala lobi.” Ekozala bongo lokola mokili oyo esuki naino te. Kasi, maloba ya Yakobo 1:12 ezali mpe solo ete: “Esengo na moto oyo akoyikaka mpiko kati na komekama, zambi awa esili ye kolonga, akozwa motole ya bomoi molakaki Nkolo epai na bango bakolingaka ye.” Tiká ete biso nyonso tózala makasi lelo oyo mpe tózwa mapamboli oyo Yehova abombi mpo na lobi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá masolo “Vous pouvez surmonter vos problèmes” (Okoki kolonga mikakatano ya bomoi), na Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ 1981; “La dépression” (Ndenge okoki kolonga mitungisi ya makanisi), na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 1981; mpe “Traitements médicaux contre la dépression grave” (Nkisi ya mitungisi ya makanisi), na Lamuká! ya 22 Yanuali 1982 (nyonso ebimeli ya Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 26]

Nafandi ngai moko na ndako na ngai ya mosala

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai na mwasi na ngai Aileen

[Elilingi na lokasa 28]

Na liyangani “Nsango malamu ya seko” oyo esalemaki na Tema, na Ghana, na 1963

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto