Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp25 No. 1 lok. 9
  • Makambo oyo esalaka ete bitumba mpe mobulu ekoba kozala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo esalaka ete bitumba mpe mobulu ekoba kozala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LISUMU
  • BAGUVƐRNEMA YA BATO
  • SATANA NÁ BADEMO NA YE
  • Ndenge bitumba mpe mobulu ekosila
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
  • Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Lisumu ya ebandeli ezalaki nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Mpasi oyo bitumba mpe mobulu ememelaka biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
wp25 No. 1 lok. 9

Makambo oyo esalaka ete bitumba mpe mobulu ekoba kozala

Biblia emonisi makambo oyo ebimisaka bitumba mpe mobulu mpe ntina oyo makambo yango ezali kosila te.

LISUMU

Nzambe asalaki Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso, na elilingi na ye. (Ebandeli 1:27) Yango elakisi ete basengelaki kozala na bizaleli ya Nzambe, na ndakisa, kimya mpe bolingo. (1 Bakorinti 14:33; 1 Yoane 4:8) Kasi, Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe mpe basalaki lisumu. Yango wana, biso nyonso tokómá basumuki mpe tokufaka. (Baroma 5:12) Lisumu etindaka moto kaka na makanisi ya mabe, yango wana bato mingi basalaka mobulu mpo eutaka na makanisi.—Ebandeli 6:5; Marko 7:​21, 22.

BAGUVƐRNEMA YA BATO

Nzambe asalá biso te mpo tómitambwisa na ndenge na biso. Biblia elobi: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa makolo na ye.” (Yirimia 10:23) Yango wana, baguvɛrnema ya bato ekoki te kosilisa bitumba mpe mobulu mpo na libela.

SATANA NÁ BADEMO NA YE

Bible emonisi ete “mokili mobimba ezali na mabɔkɔ ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) “Moto mabe” yango nde Satana Zabolo, mobomi-bato. (Yoane 8:44) Satana ná bademo na ye bazali nsima ya bitumba mpe mobulu oyo ezali kosalema na mokili.—Emoniseli 12:​9, 12.

Bato bakokoka te kolongola mosisa ya bitumba mpe mobulu, kaka Nzambe nde akolongola yango

Mangomba mpe bitumba

Mangomba mingi ekangaka miso na bitumba, misusu kutu epesaka mabɔkɔ na bitumba. Mangomba ya ndenge wana ezali na kati ya mangomba ya lokuta oyo Biblia ebengi “Babilone monene.” (Emoniseli 18:2) Nzambe alobi ete Babilone monene azali na ngambo ya makila ya “baoyo nyonso babomamaki na mabele.” (Emoniseli 18:24) Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá lisolo “Babilone monene ezali nini?” na jw.org.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto