Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Mai nk. 26-31
  • Nkombo ya Yehova esengeli kozala na ntina nini mpo na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Yehova esengeli kozala na ntina nini mpo na biso?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “EKÓLO MOKO MPO NA NKOMBO NA YE”
  • “BOZALI BATATOLI NA NGAI”
  • TÓMONISA ETE NKOMBO YA YEHOVA EZALI NA NTINA MPO NA BISO
  • Nkombo ya Yehova ezali na ntina nini mpo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • “Bósanzola nkombo ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mpo na nini tosengeli koyeba nkombo ya Nzambe
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • “Bópona bino moko . . . nani bokosalela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Mai nk. 26-31

LISOLO YA BOYEKOLI 23

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

Nkombo ya Yehova esengeli kozala na ntina nini mpo na biso?

“Yehova alobi: ‘Bino bozali batatoli na ngai.’”—YIS. 43:10.

NA MOKUSE

Tokomona ndenge oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na kosantisama mpe kolongisama ya nkombo ya Yehova.

1-2. Ndenge nini toyebi ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na Yesu?

NKOMBO ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na Yesu koleka eloko mosusu nyonso. Yesu azali moto ya libosoliboso oyo akɔtelaka nkombo ya Tata na ye. Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, Yesu andimaki kokufa mpo na nkombo ya Yehova mpe nyonso oyo yango emonisaka. (Mrk. 14:36; Ebr. 10:​7-9) Mpe nsima ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, Yesu akondima kozongisa bokonzi nyonso mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova. (1 Ko. 15:​26-28) Ndenge oyo Yesu alingaka nkombo ya Nzambe mingi emonisi mpe boyokani makasi oyo azali na yango na Tata na ye mpe ete alingaka mpenza Nkolo-nkombo yango.

2 Yesu ayaki awa na mabele na nkombo ya Tata na ye. (Yoa. 5:43; 12:13) Asalisaki bayekoli na ye báyeba nkombo ya Tata na ye. (Yoa. 17:​6, 26) Ateyaki na nkombo ya Yehova mpe asalaki makamwisi na nkombo yango. (Yoa. 10:25) Lisusu, Yesu abondelaki Yehova mpo na bayekoli na ye ete: “Kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo.” (Yoa. 17:11) Ezali polele ete nkombo ya Yehova ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu. Lokola ezali bongo, moto oyo ayebi ata nkombo ya Tata ya Yesu te to asalelaka yango te, akoki mpenza koloba ete azali mokristo ya solo?

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Lokola tozali bakristo ya solo, tomekolaka Yesu na ndenge tozwaka nkombo ya Tata na ye na motuya. (1 Pe. 2:21) Na lisolo oyo, tokomona ntina oyo bato oyo bazali kosakola “nsango malamu ya Bokonzi” babengami na nkombo ya Yehova. (Mat. 24:14) Tokolobela mpe oyo mokomoko na biso asengeli kosala mpo na komonisa ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mpo na ye.

“EKÓLO MOKO MPO NA NKOMBO NA YE”

4. (a) Liboso Yesu azonga na likoló, ayebisaki bayekoli na ye nini? (b) Motuna nini yango ebimisi?

4 Liboso azonga na likoló, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Yango emonisaki ete kosakola nsango malamu ekosuka kaka na Yisraele te. Kendekende, bato ya bikólo nyonso bakozwa libaku ya kokóma bayekoli ya Yesu. (Mat. 28:​19, 20) Kasi Yesu alobaki: “Bokozala batatoli na ngai.” Bayekoli yango ya sika na bikólo nyonso basengelaki koyeba nkombo ya Yehova, to basengelaki kozala kaka batatoli ya Yesu? Makambo oyo Misala 15 elobeli ezali kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango.

5. Ndenge nini bantoma ná bankulutu na Yerusaleme bamonisaki ete bato nyonso basengeli koyeba nkombo ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)

5 Na mobu 49 T.B., bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme bayanganaki mpo na kotalela soki bato ya bikólo mosusu basengelaki kokatama ngenga liboso bákóma bakristo. Na nsuka ya likita yango, Yakobo ndeko ya Yesu alobaki boye: “[Petro] ayebisi malamumalamu ndenge Nzambe atyaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” Yakobo azalaki kolobela nkombo ya nani? Azongelaki maloba ya mosakoli Amose, ete: “Mpo baoyo batikali báluka mpenza Yehova, elongo na bato ya bikólo nyonso, bato oyo babengami na nkombo na ngai, Yehova alobi bongo.” (Mis. 15:​14-18) Bayekoli yango ya sika bakosuka kaka te na koyekola makambo ya Yehova, kasi ‘bakobengama mpe na nkombo na ye.’ Yango elimboli ete bakomema nkombo ya Nzambe epai ya basusu mpe bato bakoyeba bango na nkombo yango.

Yakobo azali koloba na bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme. Bandeko mibali mibale basimbi barulo mpe bazali koyoka.

Bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi ya siɛklɛ ya liboso basosolaki polele ete bakristo basengeli kozala ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe (Talá paragrafe 5)


6-7. (a) Mpo na nini Yesu ayaki awa na mabele? (b) Likambo nini eleki lobiko ya bato na ntina?

6 Nkombo Yesu elimboli “Yehova azali lobiko,” mpe Yesu amonisaki ete Yehova akosalela ye mpo na kobikisa baoyo bakomonisa kondima. Yesu ayaki awa na mabele kopesa bomoi na ye lisiko mpo na bato. (Mat. 20:28) Na ndenge yango, afungwelaki bato nzela ya kozwa lobiko mpe bomoi ya seko.—Yoa. 3:16.

7 Kasi tóloba naino: Mpo na nini bato bazali na mposa ya lisiko? Ezali mpo na makambo oyo esalemaki na elanga ya Edene. Ndenge lisolo oyo eleki emonisaki yango, baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, batombokelaki Yehova mpe babungisaki elikya ya kozala na bomoi ya seko. (Eba. 3:​6, 24) Kasi, ezalaki na likambo mosusu oyo ezalaki kutu na ntina mingi koleka lobiko ya bato. Satana akoselaki Yehova makambo. (Eba. 3:​4, 5) Na yango, lobiko ya bakitani ya Adama ná Eva ezalaki na boyokani na likambo mosusu oyo eleki yango na ntina: kosantisama ya nkombo ya Yehova. Lokola Yesu azalaki momonisi ya Yehova mpe amemaki nkombo na Ye, akokisaki mokumba monene na kosantisama ya nkombo ya Yehova.

Moto oyo ayebi ata nkombo ya Tata ya Yesu te to asalelaka yango te, akoki mpenza koloba ete azali mokristo ya solo?

8. Baoyo nyonso bandimeli Yesu basengelaki kondima likambo nini?

8 Baoyo nyonso bamonisaki kondima epai ya Yesu, ezala Bayuda to bato ya bikólo mosusu, basengelaki kondima ete lobiko na bango euti nde epai ya Yehova Nzambe, Tata ya Yesu. (Yoa. 17:3) Lisusu, ndenge moko na Yesu, basengelaki kobengama na nkombo ya Yehova. Basengelaki mpe kondima ete kosantisama ya nkombo yango ezali na ntina mingi. Yango nde ekomemela bango lobiko. (Mis. 2:​21, 22) Na yango, bayekoli nyonso ya sembo ya Yesu basengelaki koyekola makambo etali Yehova mpe Yesu. Yango wana Yesu asukisaki libondeli na ye oyo ezali na Yoane 17 na maloba oyo: “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.”—Yoa. 17:26.

“BOZALI BATATOLI NA NGAI”

9. Ndenge nini tokoki komonisa ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mpo na biso?

9 Na kotalela makambo oyo touti kolobela, bayekoli nyonso ya solo ya Yesu basengeli kotya likebi na likambo etali kosantisama ya nkombo ya Yehova. (Mat. 6:​9, 10) Basengeli kotalela nkombo ya Yehova ete ezali na ntina koleka nkombo mosusu nyonso. Mpe basengeli komonisa yango na misala. Kasi, ndenge nini tokoki kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Yehova, to kopɛtola yango na makambo ya lokuta oyo Satana alobá mpo na yango?

10. Tribinale nini ya elilingi Yisaya mokapo 42 tii 44 elobeli? (Yisaya 43:9; 44:​7-9) (Talá mpe elilingi.)

10 Ndenge oyo tokoki kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Yehova emonisami na Yisaya mokapo 42 tii 44. Mikapo yango elobeli tribinale moko ya elilingi epai Yehova azali kosɛnga baoyo nyonso balobaka ete bazali banzambe bámonisa ete bazali mpenza banzambe. Kaka ndenge ezalaka na tribinale, asɛngaki mpe ete soki batatoli (batemwe) bazali, báya komonisa ete banzambe yango bazali mpenza banzambe. Kasi moko te akokaki kosala yango!—Yisaya 43:9; 44:​7-9.

Bililingi: Banzelu na likoló bazali kotala bandeko basi mpe mibali na mokili mobimba ndenge bazali kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Yehova. 1. Mwasi moko ná mobali na ye bazali kosakola na shario. 2. Elenge mwasi moko azali kopesa moninga na ye ya kelasi karte ya jw.org. 3. Ndeko mobali moko azali kopesa litatoli na kati ya bisi. 4. Basoda bakangi ndeko mobali moko. 5. Ndeko mwasi moko na mbeto ya lopitalo ayebisi monganga ete azongisa ye makila te.

Na makambo mingi, tozali na tribinale ya elilingi mpo na komonisa ete tozali Batatoli ya Yehova (Talá paragrafe 10-11)


11. Yehova alobi na basaleli na ye nini na Yisaya 43:​10-12?

11 Tángá Yisaya 43:​10-12. Yehova alobi na basaleli na ye boye: “Bozali batatoli na ngai, . . . mpe ngai nazali Nzambe.” Na nsima asɛngi bango báyanola na motuna oyo: “Longola ngai, ezali nde na Nzambe mosusu?” (Yis. 44:8) Tozali na libaku malamu ya kopesa eyano na motuna yango. Ndenge nini? Tomonisaka na maloba mpe misala na biso ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo. Nkombo na ye eleki bankombo mosusu nyonso. Ata soki Satana atye biso mbamba ya ndenge nini, tomonisaka na bomoi na biso ete tolingaka mpenza Yehova mpe ete tozali sembo epai na ye. Na ndenge yango, topesaka mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Yehova.

12. Ndenge nini esakweli oyo ezali na Yisaya 40:​3, 5 ekokisamaki?

12 Yisaya asakolaki mpe ete moto moko ‘akobongisa nzela ya Yehova.’ (Yis. 40:3) Ndenge nini esakweli yango ekokisamaki? Yoane Mobatisi abongisaki nzela mpo na Yesu, oyo ayaki na nkombo ya Yehova mpe alobaki na nkombo ya Yehova. (Mat. 3:3; Mrk. 1:​2-4; Luka 3:​3-6) Esakweli yango elobaki mpe ete: “Nkembo ya Yehova ekomonana.” (Yis. 40:5) Ndenge nini ekokisamaki? Ntango Yesu ayaki awa na mabele mpe amonisaki Yehova na ndenge ya kokoka mpenza, ezalaki lokola nde Yehova ye moko ayei na mabele. (Yoa. 12:45) Tomekolaka Yesu Kristo ntango tolongisaka nkombo, to lokumu ya Yehova.

13. Ndenge nini tokoki komekola Yesu?

13 Lokola Yesu, biso mpe tozali batatoli ya Yehova. Tomemaka nkombo ya Yehova mpe tolekisaka libaku te ya koyebisa bato misala na ye ya kokamwa. Kasi mpo na kosala yango malamu, tosengeli mpe koyebisaka bato mokumba monene ya Yesu na kosantisama ya nkombo ya Yehova. (Mis. 1:8) Yesu nde Motatoli ya Yehova ya libosoliboso, mpe tolandaka ndakisa na ye. (Em. 1:5) Kasi, mokomoko na biso asengeli kosala nini mpo na komonisa ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mpo na ye?

TÓMONISA ETE NKOMBO YA YEHOVA EZALI NA NTINA MPO NA BISO

14. Ndenge emonisami na Nzembo 105:​3, tomiyokaka ndenge nini mpo na nkombo ya Yehova?

14 Tosepelaka mingi na nkombo ya Yehova. (Tángá Nzembo 105:3.) Yehova ayokaka esengo mingi ntango tozali komikumisa mpo na nkombo na ye. (Yir. 9:​23, 24; 1 Ko. 1:31; 2 Ko. 10:17) ‘Komikumisa na Yehova’ elimboli kosepela mpenza ndenge Yehova azali Nzambe na biso. Tomonaka ete ezali libaku malamu koyebisa basusu nkombo na ye mpe makambo ya malamu oyo asalaka. Tosengeli koyokaka nsɔni te ya koyebisa basusu ete tozali Batatoli ya Yehova, ezala na mosala, na kelasi, to na esika oyo tofandaka! Satana Zabolo alingi ete tótika kolobela nkombo ya Yehova. (Yir. 11:21; Em. 12:17) Kutu, ye ná basakoli na ye ya lokuta balukaka ete bato bábosana nkombo ya Yehova. (Yir. 23:​26, 27) Kasi lokola tolingaka nkombo ya Yehova, tosepelaka na yango “mokolo mobimba,” elingi koloba tokumisaka yango na mabaku nyonso.—Nz. 5:11; 89:16.

15. Kobelela nkombo ya Yehova elimboli nini?

15 Tozali kokoba kobelela nkombo ya Yehova. (Yoe. 2:32; Rom. 10:​13, 14) Kobelela nkombo ya Yehova esuki kaka te na koyeba nkombo yango ya Nzambe mpe na kosalela yango. Elimboli mpe koyeba bomoto ya Nzambe, kotyela ye motema, mpe koluka lisalisi mpe litambwisi na ye. (Nz. 20:7; 99:6; 116:4; 145:18) Elakisi mpe koyebisa basusu nkombo na ye mpe bizaleli na ye; tosalisaka bango bábongola motema mpo básepelisa Yehova mpe bábika.—Yis. 12:4; Mis. 2:​21, 38.

16. Ndenge nini tokoki komonisa ete Satana azali moto ya lokuta?

16 Tondimaka komona mpasi mpo na nkombo ya Yehova. (Yak. 5:​10, 11) Soki totikali sembo epai ya Yehova na ntango ya mpasi, tokomonisa ete Satana azali moto ya lokuta. Na mikolo ya Yobo, Satana alobaki boye mpo na baoyo basalelaka Yehova: “Moto akopesa nyonso oyo azali na yango mpo na kobatela bomoi na ye.” (Yobo 2:4) Satana alingaki koloba ete bato bakosalela Yehova kaka ntango makambo na bango ezali kotambola malamu mpe ete soki bakutani na mikakatano, bakotika kosalela Yehova. Yobo atikalaki sembo mpe yango emonisaki ete Satana alobaki lokuta. Biso mpe tozali na libaku ya komonisa ete tokotika ata moke te kosalela Yehova ata soki Satana abimiseli biso mikakatano ya ndenge nini. Tokoki mpenza kotya motema ete Yehova akokoba kokɛngɛla biso mpo na nkombo na ye.—Yoa. 17:11.

17. Na kotalela 1 Petro 2:​12, ndenge nini tokoki kopesa nkombo ya Yehova nkembo?

17 Tolukaka kokumisa nkombo ya Yehova. (Mas. 30:9; Yir. 7:​8-11) Lokola tozali bamonisi ya Yehova mpe tomemi nkombo na ye, tokoki kokumisa nkombo na ye, to kosambwisa yango. (Tángá 1 Petro 2:12.) Yango wana, tolingaka kosala nyonso oyo tokoki mpo na kokumisa Yehova na maloba mpe na bizaleli na biso. Soki tosali bongo, tokopesa nkombo na ye nkembo, atako tozali bato ya kozanga kokoka.

18. Ndenge nini tokoki mpe komonisa ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

18 Tomitungisaka mpo na nkombo ya Yehova koleka lokumu na biso. (Nz. 138:2) Mpo na nini ezali na ntina mingi? Kolinga nkombo ya Yehova mpe koluka kosepelisa ye ekoki kobebisa lokumu na biso epai ya basusu.a Yesu andimaki kokufa liwa ya nsɔni lokola mosali-mabe kaka mpo na kopesa nkombo ya Yehova nkembo. Yesu “atyolaki nsɔni,” elingi koloba abulunganaki te mpe amitungisaki koleka ndelo te mpo na makambo oyo basusu bazalaki kokanisa mpo na ye. (Ebr. 12:​2-4) Atyaki makanisi na ye nyonso na kosala mokano ya Nzambe.—Mat. 26:39.

19. Omiyokaka ndenge nini mpo na nkombo ya Yehova, mpe mpo na nini?

19 Tosepelaka na nkombo ya Yehova mpe tomonaka ete ezali lokumu ndenge tobengami Batatoli ya Yehova. Mpo na yango, tondimi koyika mpiko ntango basusu bazali kotyola biso. Nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso koleka ata lokumu na biso moko. Na yango, tózala na ekateli ya kokoba kokumisa nkombo ya Yehova ata soki Satana aluki na ndenge nyonso kopekisa biso kosala yango. Na ndenge yango, tokomonisa ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na biso, kaka ndenge ezali mpo na Yesu Kristo.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini nkombo ya Yehova ezalaka na ntina mingi mpo na bayekoli ya solo ya Yesu?

  • Tozali na tribinale nini ya elilingi lelo oyo?

  • Ndenge nini tokoki komonisa ete nkombo ya Yehova ezali na ntina mpo na biso?

LOYEMBO 10 Tópesa Yehova Nzambe na biso nkembo!

a Ata Yobo moto ya sembo amitungisaki mpo na lokumu na ye moko ntango baninga na ye misato balobaki mabe mpo na ye. Na ebandeli, ntango abungisaki bana na ye mpe biloko na ye nyonso, “Yobo asalaki lisumu te mpe afundaki Nzambe ata na likambo moko te ya mabe.” (Yobo 1:22; 2:10) Kasi, ntango balobaki na ye ete asalaki makambo ya mabe, Yobo amilongisaki mpe alobaki “bilobaloba mpamba.” Alukaki liboso kobatela lokumu na ye moko na esika ya kosantisa nkombo ya Nzambe.—Yobo 6:3; 13:​4, 5; 32:2; 34:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto