LISOLO YA BOMOI
Nazwi mateya bomoi mobimba epai ya Molakisi na biso monene
NGAI ná mwasi na ngai tokutaná na makama mingi na mosala ya mobongisi-nzela mpe na mosala ya misionɛrɛ. Toleká na bisika oyo basoda bakangi nzela, esika mɔtɔ ekangi nzela, tokutaná na makama ya bambula ya mipɛpɛ makasi, bitumba ya bana-mboka mpe na bantango mosusu esɛngaki tólongwa mboka. Atako makambo wana, tosepelaka mingi na bomoi yango oyo toponá! Yehova asalisi biso mpe apamboli biso mingi. Lokola azali Molakisi na biso monene, ateyi biso mpe makambo ya ntina mingi.—Yobo 36:22; Yis. 30:20.
NDAKISA YA BABOTI NA NGAI
Na nsuka ya bambula ya 1950, baboti na ngai balongwaki na Italie mpe bakendaki kofanda na Kindersley, na etúká ya Saskatchewan, na Canada. Mwa moke na nsima, bayekolaki solo, mpe ekómaki eloko oyo eleki ntina na bomoi na biso. Nazali koyeba lisusu na bomwana, lokola tozalaki kokende kosakola mokolo mobimba na libota, nazalaki koloba ete nazali “mobongisi-nzela mosungi” wana nazalaki na mbula mwambe mpamba!
Elongo na libota na biso, soki na 1966
Baboti na ngai bazalaki babola; atako bongo, bapesaki biso ndakisa malamu na oyo etali komipimela makambo mosusu mpo na Yehova. Na ndakisa, na 1963, batɛkaki biloko na bango mingi mpo na kozwa mbongo ya kokende liyangani oyo esangisaki mikili mingi na Pasadena, na Californie, na États-Unis. Na 1972, tokendaki na kilomɛtrɛ soki 1000 na Trail, Colombie-Britannique, na Canada, mpo na kosakwela bato oyo balobaka Italien. Tata azalaki sinzili. Aboyaki kozwa misala ya mbongo mingi mpo amipesa na makambo ya elimo.
Nazali na botɔndi mpo na ndakisa oyo baboti na biso bapesá ngai ná bandeko na ngai misato. Yango nde esalaki ete nabanda kokola na elimo, mpe epesá ngai liteya oyo etambwisi bomoi na ngai mobimba: Soki natye Bokonzi na esika ya liboso, Yehova akokokisa bamposa na ngai.—Mat. 6:33.
NABANDI MOSALA YA NTANGO NYONSO
Na 1980, nabalanaki na Debbie, ndeko mwasi moko kitoko oyo azalaki na mikano ya elimo ya sikisiki. Lokola tozalaki na mposa ya komipesa na mosala ya Nzambe ntango nyonso, Debbie abandaki mosala ya mobongisi-nzela sanza misato nsima ya libala na biso. Mbula moko nsima ya libala na biso, tokendaki na mwa lisangá moko ya moke esika mposa ezalaki mingi, bongo ngai mpe nakómaki mobongisi-nzela.
Mokolo ya libala na biso, 1980
Kendekende, tolɛmbaki nzoto mpe tozwaki ekateli ya kolongwa na lisangá yango. Kasi, tosololaki liboso na mokɛngɛli ya zongazonga. Na bolingo nyonso, kasi na ndenge ya polele, alobaki na biso: “Bino moko mpe bosali ete bólɛmba nzoto. Bozali kotala kaka mikakatano oyo bozali na yango awa. Soki boluki makambo oyo ezali malamu, bokomona yango.” Toli yango ebongaki na biso mpenza. (Nz. 141:5) Tosalelaki yango mbala moko, mpe eumelaki te tomonaki ete makambo ya malamu ezalaki ebele mpenza. Bato mingi na lisangá bazalaki na mposa ya kosala mingi na mosala ya Yehova, ata mpe bilenge mpe bandeko oyo molongani na bango azali Motatoli te. Likambo yango epesaki biso liteya monene. Toyekolaki kotya likebi na makambo ya malamu mpe kozela Yehova asembola makambo oyo ekokaki komonana ete ezali mokakatano. (Mika 7:7) Tokómaki lisusu na esengo, mpe makambo ekómaki kotambola malamu.
Balakisi na eteyelo ya liboso ya babongisi-nzela oyo tokɔtaki basalaki na bamboka mopaya. Ntango bazalaki kolakisa biso bafɔtɔ mpe kolobela mikakatano oyo bakutanaki na yango mpe mapamboli oyo bazwaki, bapesaki biso mposa ya kosala lokola bamisionɛrɛ. Na yango, tomityelaki mokano ya kokóma bamisionɛrɛ.
Na Ndako ya Bokonzi moko na Colombie-Britannique, 1983
Mpo na kokokisa mokano yango, na 1984, tokendaki na lisangá ya Français, na Québec, oyo ezali na kilomɛtrɛ koleka 4000 na Colombie-Britannique. Yango elimbolaki ete tokoyekola mimeseno ya sika mpe monɔkɔ mosusu. Mokakatano mosusu ezalaki ete mbala mingi tozalaki kozanga mbongo. Na eleko moko, tozalaki kobikela kaka na mbálá oyo ezalaki kotikala na bilanga ya moto moko. Debbie azalaki kosala bilubu ndenge na ndenge ya mbálá! Atako mokakatano yango, tozalaki kosala makasi tóbatela esengo na biso. Lisusu, tomonaki ndenge Yehova azalaki kokokisa bamposa na biso.—Nz. 64:10.
Mokolo moko, moto moko abengaki na telefone. Ezalaki mpo na kosɛnga biso tókende kosala na Betele ya Canada. Lokola liboso totondisaki formilɛrɛ mpo na kokɔta Eteyelo ya Gileade, tozalaki koyeba te soki tokosepela na mosala ya Betele. Kasi, tondimaki kokende. Ntango tokómaki kuna, totunaki Ndeko Kenneth Little, oyo azalaki na Komite ya filiale ete: “Baformilɛrɛ na biso ya Gileade esuki boni?” Azongiselaki biso: “Tokokatisa gbagba (pont) yango ntango tokokóma kuna.”
Pɔsɔ moko na nsima, tokómaki na gbagba yango: babengisaki ngai ná Debbie na Eteyelo ya Gileade. Na yango, tosengelaki kozwa ekateli. Ndeko Little ayebisaki biso: “Ata soki boponi nini, mikolo mosusu bokobanda komituna soki bosengelaki kopona oyo mosusu te. Gileade to Betele ezali kaka ndenge moko; Yehova akoki kopambola yango mibale.” Tondimaki kokende na Gileade, mpe na boumeli ya bambula, tomonaki ete Ndeko Little alobaki solo. Mbala mingi tozalaki kozongela maloba na ye epai ya bandeko oyo basengeli kopona mokumba kaka moko.
BOMOI NA MOSALA YA MISIONƐRƐ
(Lobɔkɔ ya mwasi) Ulysses Glass
(Lobɔkɔ ya mobali) Jack Redford
Tosepelaki mingi kozala na kati ya bana 24 ya kelasi ya mbala ya 83 ya Gileade, oyo esalemaki na Brooklyn, na etúká ya New York, na sanza ya 04/1987. Ndeko Ulysses Glass mpe Ndeko Jack Redford nde bazalaki balakisi na biso ya libosoliboso. Sanza mitano elekaki noki, mpe tozwaki badiplome na mokolo ya 06/09/1987. Batindaki biso na Haïti, elongo na ndeko John Goode ná mwasi na ye Marie.
Na Haïti, 1988
Batindaki te bamisionɛrɛ ya Gileade na Haïti banda 1962, mbala ya nsuka oyo babenganaki bamisionɛrɛ kuna. Pɔsɔ misato nsima ya kozwa badiplome, tokendaki na Haïti na lisangá moko moke ya basakoli 35 na kati ya bangomba mpenza. Tozalaki bilenge, toyebaki makambo mingi te, mpe tozalaki kaka biso moko na ndako ya bamisionɛrɛ. Na esika yango, bato bazalaki babola mpenza, mpe mingi bayebaki kotánga te. Na ntango oyo tosalaki kuna, tokutanaki na yikiyiki ya bana-mboka mpo na makambo ya politiki, na nsima balukaki kokweisa guvɛrnema, na mbala mosusu bato batombokaki, mpe ezalaki na bambula ya mipɛpɛ makasi.
Kasi, ndenge bandeko ya Haïti bazalaki koyika mpiko na esengo nyonso epesaki biso liteya mpenza. Mingi bazalaki na mikakatano, kasi balingaki Yehova mpe mosala ya kosakola. Ndeko mwasi moko ya mobange ayebaki kotánga te; kasi ayebaki bavɛrsɛ 150 na motó. Makambo oyo ezalaki kosalema mokolo na mokolo epesaki biso makasi ya kosakola na kondima nyonso ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano ya bato. Tosepelaki mingi komona ndenge bato oyo toyekolaki na bango Biblia bakómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza, babongisi-nzela monene, mpe bankulutu.
Ntango tozalaki na Haïti, tokutanaki na Trevor, elenge mobali moko oyo azalaki misionɛrɛ na Lingomba ya Mormon, mpe tosololaki na ye makambo ya Biblia na mabaku mosusu. Bambula mingi na nsima, tokamwaki kozwa mokanda na ye. Akomaki boye: “Nakozwa batisimo na liyangani oyo tokosala mosika te! Nazali na mposa ya kozonga na Haïti mpe kosala lokola mobongisi-nzela monene na esika oyo nazalaki misionɛrɛ na Lingomba ya Mormon.” Asalaki mpe kaka bongo bambula mingi, elongo na mwasi na ye.
NA MPOTO, MPE NA NSIMA NA AFRIKA
Na biro na ye, na Slovénie, 1994
Batindaki biso na ekólo moko na Mpoto epai epekiseli na mosala na biso ekómaki kosila. Na 1992, tokómaki na engumba Ljubljana, na Slovénie, pene na mboka oyo baboti na ngai bakolaki liboso bákende kofanda na Italie. Etumba ezalaki kaka kondongwana na bisika oyo ezalaki Yougoslavie ya kala. Filiale ya Vienne, na Autriche, mpe babiro ya Zagreb, na Croatie, mpe ya Belgrade, na Serbie, nde ezalaki kotambwisa mosala na bisika yango. Lelo, ekólo mokomoko ezali na Betele na yango moko.
Yango elimbolaki ete tosengelaki lisusu koyekola monɔkɔ mosusu mpe komesana na makambo ya sika. Bato ya mboka bazalaki koloba: “Jezik je težek,” oyo elimboli “Monɔkɔ yango ezali mpasi.” Mpe ezalaki mpenza bongo! Tosepelaki mingi na bosembo ya bandeko oyo bandimaki mbala moko bambongwana oyo esalemaki na lisangá, mpe tomonaki ndenge Yehova apambolaki bango. Kuna mpe, tomonaki ndenge Yehova asembolaka makambo na bolingo nyonso mpe na ntango oyo ebongi. Bambula oyo tosalaki na Slovénie endimisaki lisusu biso makambo mingi oyo tosilaki koyekola mpe eteyaki biso makambo mosusu.
Kasi bambongwana mosusu ezalaki kozela biso. Na 2000, batindaki biso na Côte d’Ivoire, na Afrika ya Wɛsti. Na nsima, na sanza ya 11/2002, tokimaki na Sierra Leone mpo bitumba ya bana-mboka ezalaki na Côte d’Ivoire. Na Sierra Leone, bitumba ya bana-mboka oyo eumelaki mbula 11 eutaki kosila. Ezalaki mpasi kotika Côte d’Ivoire na mbalakaka ndenge wana. Kasi, mateya oyo tozwá esalisaki biso tóbatela esengo na biso.
Totyaki makanisi na kosakwela ebele ya bato na teritware oyo bazalaki na mposa ya koyeba solo mpe na kosunga bandeko, oyo bayikaki mpiko bambula mingi na ntango ya etumba. Bazalaki na biloko mingi te ya kobikela, kasi bazalaki kosepela kokabela basusu. Ndeko moko akabelaki Debbie bilamba. Debbie akakatanaki mpo na kozwa yango, kasi ndeko yango atyaki ye mbamba, alobaki: “Na ntango ya etumba, bandeko ya mikili mosusu batindelaki biso biloko. Sikoyo ezali ngala na biso ya kosalisa basusu.” Tomityelaki mokano ya komekola ndakisa na bango.
Nsukansuka, tozongaki na Côte d’Ivoire, kasi yikiyiki na makambo ya politiki ebimaki lisusu. Na yango na sanza ya 11/2004, bamemaki biso na Hélicoptère, mpe moto na moto amemaki kaka saki moko ya kilo 10 mpamba. Na butu ya mokolo yango tolalaki na nse, na ndako moko ya basoda ya France, mpe mokolo oyo elandaki bamemaki biso na Suisse. Ntango tokómaki na filiale yango pene na katikati ya butu, bandeko ya Komite ya Filiale mpe balakisi ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi elongo na basi na bango bayambaki biso, bapesaki biso mapwɛpwɛ, bilei ya mɔtɔ, mpe ebele ya ba chocolat ya Suisse. Yango esimbaki mpenza motema na biso.
Azali kolendisa bandeko oyo bakimi na Côte d’Ivoire, na 2005
Batindaki biso mpo na mwa ntango na Ghana mpe na nsima tozongaki lisusu na Côte d’Ivoire ntango yikiyiki ekitaki. Boboto ya bandeko nde esalisaki biso tóyika mpiko ntango esengelaki tókima mboka, mpe ntango tozalaki na mboka moko mpo na mwa ntango. Ngai ná Debbie tozwá ekateli ete atako bolingo ya bondeko ezalaka bipai nyonso na ebongiseli ya Yehova, tokomona yango eloko mpamba ata mokolo moko te. Kutu, toyaki komona ete ata bantango ya yikiyiki oyo tokutanaki na yango ezalaki kaka formasyo mpo na biso.
TOKEI NA MOYEN-ORIENT
Na Moyen-Orient, 2007
Na 2006, tozwaki mokanda oyo eutaki na biro monene mpo na koyebisa biso ete batindi biso na Moyen-Orient. Na mbala yango mpe, elimbolaki koyekola makambo ya sika, kokutana na mikakatano mosusu, mpe koyekola minɔkɔ mpe mimeseno mosusu. Ezalaki na makambo mingi ya koyekola na esika yango oyo ezalaki na mikakatano ebele mpo na makambo ya politiki mpe ya mangomba. Tosepelaki ete atako masangá ezalaki na minɔkɔ ndenge na ndenge, bomoko ebatelamaki mpo bazalaki kotosa malako ya ebongiseli ya Yehova. Tozalaki mpenza kolinga bandeko mpo mingi na bango bayikaki mpiko mpenza na botɛmɛli ya bato ya libota, ya baninga ya kelasi, baninga ya mosala, mpe bato ya kartye.
Na 2012, tokɔtaki liyangani moko monene na Tel Aviv, na Israël. Yango ezalaki liyangani ya liboso ya basaleli ya Yehova oyo esangisaki bato ebele mpenza na mboka yango kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B. Tobosanaka liyangani yango te!
Na bambula wana, batindaki biso na mboka oyo mosala na biso epekisamaki. Tomemaki mwa mikanda na biso, tobimaki na mosala ya kosakola, mpe tosalaki mwa mayangani ya mike. Tokutanaki na basoda oyo basimbi mandoki mpe tolekaki na bisika oyo basoda bakangi nzela, kasi tozalaki kobanga te mpo tozalaki kotambola na mayele elongo na basakoli mosusu.
TOZONGI NA AFRIKA
Azali kobongisa diskur na Congo, 2014
Na 2013, batindaki biso esika oyo ekesanaki na esika tozalaki; basɛngaki biso tókende na Betele ya Kinshasa, na Congo, mboka moko kitoko, kasi oyo etondi mpe na bobola mpe bitumba oyo esilaka te. Na ebandeli tolobaki: “Toyebi Afrika; tókende kaka mbala moko.” Nzokande, ezalaki na makambo mingi mpenza ya koyekola, mingimingi na oyo etali kosala mibembo mpo batongá mpenza banzela te. Tomonaki makambo mingi ya malamu, na ndakisa ndenge bandeko bazali koyika mpiko mpe kobatela esengo atako mikakatano ya mbongo, ndenge balingaka mosala ya kosakola mpe milende na bango mpo na koyangana na makita mpe kokende na mayangani. Bambula oyo tosalaki na Congo eteyá biso makambo oyo tobosanaka te mpe esalisaki biso tózwa baninga mingi.
Na mosala ya kosakola na Afrique du Sud, 2023
Na nsuka ya 2017, tokendaki na esika mosusu: na Afrique du Sud. Kuna nde Betele ya monene koleka bisika nyonso epai tosalá, kutu ata mosala oyo bapesaki biso kuna ezalaki oyo tosalá naino te. Na mbala yango mpe, ezalaki na makambo mingi ya koyekola kasi mateya oyo tozwá kala esalisaki biso. Tolingaka ebele ya bandeko oyo bazali koyika mpiko banda bambula mingi. Mpe ekamwisaka mpenza komona ndenge libota ya Betele ezali na bomoko atako esangisi bandeko ya loposo mpe mimeseno ekeseni. Emonanaka polele ete Yehova apesaka basaleli na ye kimya mpo balati bomoto ya sika mpe bazali kosalela mitinda ya Biblia.
Na boumeli ya bambula, ngai ná Debbie tozwi mikumba ndenge na ndenge, tomesanaki na makambo ya sika, mpe toyekoli minɔkɔ mosusu. Ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te, kasi tozalaki ntango nyonso komona bolingo ya sembo ya Yehova na nzela ya ebongiseli na ye mpe ya bandeko. (Nz. 144:2) Tondimaka ete formasyo oyo tozwi na mosala ya ntango nyonso esalisi biso tókóma basaleli Yehova ya malamu koleka.
Nasepelaka ndenge oyo baboti na biso babɔkɔlá ngai; nasepelaka ndenge mwasi na ngai Debbie asungaka ngai; mpe nasepelaka na ebele ya bandeko oyo bazali ndakisa malamu na libota na biso ya elimo na mokili mobimba. Ngai ná mwasi na ngai totye miso na mikolo ezali koya mpe tozali na ekateli ya kokoba kozwa mateya epai ya Molakisi na biso monene.