LISOLO YA BOMOI
Yehova apamboli ngai koleka ndenge oyo nakokaki kokanisa
NAZALAKI kokanisa boye: ‘Nasengeli kokóma mobongisi-nzela. Kasi mosala yango epesaka mpenza esengo?’ Nazalaki kolinga mosala oyo nazalaki kosala na Allemagne, ya kotinda biloko ya kolya na Afrika, na ndakisa Dar es-Salaam, Elisabethville, mpe Asmara. Na ntango wana, nayebaki te ete mokolo mosusu nakosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso na bisika yango mpe na bisika mosusu mingi na Afrika!
Nsukansuka, ntango nazwaki ekateli mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, bomoi na ngai ebongwanaki na ndenge oyo nakokaki kokanisa te. (Ef. 3:20) Kasi, esalemaki ndenge nini? Nabɛtɛla bino lisolo na ngai banda na ebandeli.
Nabotamá na engumba Berlin, na Allemagne, mwa basanza nsima ya ntango oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, na 1939. Na nsuka ya etumba yango na 1945, baaviɔ ya basoda ezalaki mbala mingi kobwaka babɔmbi na Berlin. Mokolo moko, bɔmbi ekweaki na balabala na biso mpe libota na biso mobimba tokimaki na esika oyo bato mingi bazalaki kokende komibatela. Na nsima, tokimaki na Erfurt, mboka ya mama na biso.
Elongo na baboti mpe leki na ngai na Allemagne, soki na 1950
Mama azalaki mpenza na mposa ya koyeba solo. Azalaki kotánga mikanda ya bato ya filozofi mpe atalelaki mangomba ndenge na ndenge, kasi mposa na ye ekokisamaki te. Na 1948, Batatoli ya Yehova mibale bayaki epai na biso. Mama akɔtisaki bango na ndako mpe atunaki bango mituna ebele. Ngonga moko ekokaki te, ayebisaki ngai ná leki na ngai ya mwasi ete: “Nazwi solo!” Mwa moke na nsima, ngai, mama, ná ndeko na ngai ya mwasi tokómaki koyangana na makita na Erfurt.
Na 1950, tozongaki na Berlin, mpe tokómaki kokende na lisangá ya Berlin-Kreuzberg. Ntango tozwaki ndako esika mosusu kaka na Berlin, tokómaki na lisangá ya Berlin-Tempelhof. Na nsima, Mama azwaki batisimo, kasi ngai nazalaki kokakatana. Mpo na nini?
NABANDI KOBUNDISA EZALELI NA NGAI YA NSƆNINSƆNI
Nazalaki kokende liboso te na elimo mpo nazalaki mpenza nsɔninsɔni. Atako nazalaki kobima na mosala ya kosakola, nasalaki mbula mibale kozanga napesa ata moto moko litatoli. Kasi, makambo ebongwanaki ntango nakómaki kolekisa ntango elongo na bandeko basi mpe bandeko mibali oyo bazalaki na mpiko mpe bakangamaki na Yehova. Bamosusu bakɔtaki bolɔkɔ na bakaa ya bakangami ya Banazi to mpe na babolɔkɔ na Allemagne ya Ɛsti. Bamosusu bazalaki kokɔtisa mikanda na ndenge ya kobombana na Allemagne ya Ɛsti, atako bakokaki kokanga bango mpe kokɔtisa bango na bolɔkɔ. Ndakisa na bango esimbaki mpenza motema na ngai. Namonaki ete soki bandeko yango batyaki bomoi mpe bonsomi na bango na likama mpo na Yehova mpe mpo na bandeko, nasengeli kosala makasi nabundisa ezaleli na ngai ya kozala nsɔninsɔni.
Nabandaki kobundisa ezaleli yango ntango napesaki mabɔkɔ na kampanye monene ya kosakola na 1955. Na mokanda moko oyo etyamaki na Informateur,a Ndeko Nathan Knorr ayebisaki ete kampanye yango ezalaki moko ya bakampanye minene oyo lisangá ya Yehova ebongisá. Alobaki ete soki basakoli nyonso bapesi mabɔkɔ na kampanye yango, “ekozala sanza oyo mosala ya kosakola esalemi malamu koleka awa na mabele.” Alobaki solo mpenza! Mwa moke na nsima, namipesaki na Yehova, mpe na 1956, nazwaki batisimo elongo na tata mpe ndeko na ngai ya mwasi. Kasi eumelaki te, nasengelaki kozwa ekateli mosusu ya monene.
Banda kala, nayebaki ete mosala ya mobongisi-nzela nde mosala oyo ebongi nasala na bomoi na ngai, kasi nazalaki kaka kozongisa yango nsima. Namonaki malamu natánga naino mwa moke mpo nayekola ndenge ya kosomba mpe kotɛka biloko ebele mpe kosala mombongo na bato ya bikólo mosusu. Na nsima, nasepelaki kosala mwa moke mpo nayeba mosala yango malamumalamu liboso nakóma mobongisi-nzela. Na yango, na 1961, nandimaki kokende kosala na Hambourg, engumba ya Allemagne oyo ezali na libongo oyo eleki monene. Lokola nakómaki kolinga mosala yango mingi, mosala ya ntango nyonso ezalaki kaka kozonga nsima. Nayebaki te nasala nini.
Nazalaka na botɔndi ndenge Yehova asalelaki bandeko oyo bakɔmɛli na elimo mpo básalisa ngai natya makambo ya elimo na esika ya liboso. Baninga na ngai ebele bakómaki babongisi-nzela mpe bazalaki ndakisa malamu mpo na ngai. Longola yango, Ndeko Erich Mundt, oyo kala azalaki na kaa ya bakangami, alendisaki ngai natyela Yehova motema. Alobaki ete na kaa ya bakangami, bandeko oyo bamityelaki motema, basukaki na kolɛmba nzoto. Kasi bandeko oyo batyelaki Yehova motema mobimba, batikalaki sembo mpe basalisaki mpenza ebongiseli ya Yehova.
Ntango nakómaki mobongisi-nzela, na 1963
Lisusu, Ndeko Martin Poetzinger, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azalaki ntango nyonso kolendisa bandeko na maloba oyo: “Bosengeli kozala na mpiko mpo ezali ezaleli ya ntina mingi!” Nakanisaki maloba wana malamumalamu mpe nsukansuka, natikaki mosala na ngai ya mosuni mpe nakómaki mobongisi-nzela na sanza ya 06/1963. Ezalaki ekateli ya malamu mpenza! Sanza mibale na nsima, liboso kutu nabanda koluka mosala mosusu, basɛngaki ngai nakóma mobongisi-nzela monene. Mwa bambula na nsima, Yehova apambolaki ngai na ndenge oyo nakokaki kokanisa te. Babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 44 ya Eteyelo ya Gileade.
LITEYA YA NTINA MINGI OYO NAYEKOLAKI NA GILEADE
“Kotika nokinoki te mosala na yo” nde moko ya mateya ya ntina mingi oyo nayekolaki, mingimingi epai ya Ndeko Nathan Knorr mpe Ndeko Lyman Swingle. Bazalaki kolendisa biso tókoba na mosala na biso ata soki tokutani na mikakatano. Ndeko Knorr alobaki na biso boye: “Bokotya likebi na makambo nini? Na salite, banyama mikemike (insectes) mpe bobola? To bokosepela nde na banzete, fololo mpe esengo oyo ezali na bilongi ya bato? Bóyekola kolinga bato!” Mokolo moko, ntango Ndeko Swingle azalaki kolimbola ntina oyo bandeko mosusu batikaki nokinoki mosala na bango, esalaki ye mpasi mingi mpe mai ya miso etambolaki ye. Esɛngaki akata naino lisolo na ye mpo akitisa motema. Yango esimbaki mpenza motema na ngai mpe nazwaki ekateli ete nakopesa Kristo mpe bandeko na ye ya sembo mawa te.—Mat. 25:40.
Ngai, Claude, ná Heinrich na mosala ya misionɛrɛ na Lubumbashi, na 1967
Ntango bayebisaki biso bisika oyo bakotinda biso, bandeko mosusu ya Betele bamonaki ngai ná bana-kelasi mosusu mpe batunaki biso bisika oyo tokokende. Balobaki makambo ya malamu mpo na bamboka oyo bandeko bakokende tii ntango ngai nalobaki ete: “Nakokende na Congo (Kinshasa).” Bafandaki swii mpe balobaki kaka ete: “Ah, Congo! Yehova azala na yo!” Na ntango wana, bansango ya Congo (Kinshasa) ezalaki kaka ya bitumba mpe ya koboma bato. Kasi, natyaki makanisi na ngai na mateya oyo nayekolaki na Gileade. Mwa moke nsima ya kozwa diplome ya Gileade na sanza ya 09/1967, ngai, ná Heinrich Dehnbostel, mpe Claude Lindsay tokendaki na Kinshasa, engumba-mokonzi ya Congo.
FORMASYO YA MALAMU MPO NA MOSALA YA MISIONƐRƐ
Ntango tokómaki na Kinshasa, toyekolaki Français sanza misato. Na nsima, tokendaki na Lubumbashi, oyo na ntango wana ezalaki kobengama Elisabethville, pene ya Zambie, na sudi ya Congo. Tofandaki na ndako moko ya bamisionɛrɛ oyo ezalaki na engumba yango.
Lokola nsango malamu ekɔtaki naino te na bisika mingi na Lubumbashi, tosepelaki ndenge tozalaki bato ya liboso ya koteya bato mingi solo. Eumelaki te, tokómaki kozanga ntango mpo na koyekola Biblia na ebele ya bayekoli oyo tozwaki. Toteyaki mpe bakonzi ya Leta mpe bapolisi. Mingi na bango bazalaki na limemya makasi mpo na Liloba ya Nzambe mpe mosala ya kosakola. Bato mingi bazalaki koloba Swahili; na yango ngai ná Claude Lindsay toyekolaki mpe monɔkɔ yango. Mwa moke na nsima, batindaki biso na lisangá ya Swahili.
Atako tokutanaki na makambo mingi ya malamu, tokutanaki mpe na mikakatano. Mbala mingi, basoda oyo balangwe mpe basimbi mandoki ná bapolisi ya matata bazalaki kofunda biso na makambo ya lokuta. Mokolo moko, ebele ya bapolisi oyo bazalaki na mandoki bayaki esika tozalaki kosala makita na ndako ya bamisionɛrɛ mpe bamemaki biso na biro monene ya polisi; bafandisaki biso na mabele tii soki ngonga ya 22:00, mpe batikaki biso.
Na 1969, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Na zongazonga yango, natambolaki bakilomɛtrɛ ebele na nzela ya pɔtɔpɔtɔ na kati ya matiti, ndenge ezalaka mingi na Afrika. Na mboka moko, nsoso moko na bana na yango elalaki butu mobimba na nse ya mbeto na ngai. Nabosanaka te ndenge nsoso yango esalaki makɛlɛlɛ makasi liboso ntɔngɔ etana mpe elamusaki ngai na mpɔngi. Lisusu, nakanisaka kaka ndenge tozalaki kobɛta masolo ya Biblia elongo na bandeko, wana tofandi libándá na mpokwa, tozali koyɔta mɔtɔ.
Moko ya mikakatano minene oyo tokutanaki na yango ezalaki ya kotɛmɛla bato oyo bazalaki koloba ete bazali Batatoli, nzokande bazalaki na mwa lingomba ya Kitawala.b Bamosusu kati na bango bamikɔtisaki na lisangá mpe bakómaki kutu bankulutu. Mingi na bango, oyo bazalaki lokola “mabanga ebombaná,” balongaki te kopɛngwisa bandeko basi mpe bandeko mibali ya sembo. (Yuda 12) Nsukansuka, Yehova apɛtolaki masangá mpe na nsima bokoli monene esalemaki.
Na 1971, babengaki ngai na Betele, mpe kuna, nasalaki misala ndenge na ndenge, na ndakisa kokoma mpe kotinda mikanda, kosɛnga mikanda mpo na masangá, mpe makambo etali mosala ya kosakola. Na Betele, nayekolaki ndenge ya kotambwisa mosala na ekólo ya monene epai makambo ya mboka ezalaki kotambola malamu te. Na bantango mosusu, mikanda ezalaki kosala basanza ebele liboso ekóma na masangá. Soki bakitisi mikanda na aviɔ, bazalaki kotya yango na babwato; babwato yango ezalaki kokangama bapɔsɔ ebele na matiti oyo ebotaka na mai. Kasi, mosala ezalaki kosalema atako mikakatano wana mpe mikakatano mosusu.
Nazalaki kokamwa ndenge bandeko bazalaki kobongisa mayangani ya minene atako bazalaki na mbongo mingi te. Bazalaki kosala estrade na bandako ya ndɔngɛ, bazalaki kosalela matiti ya milai mpo na kotya efelo, mpe bazalaki kogumba matiti mosusu mpo ekóma lokola kuse ya kofandela. Bazalaki kosalela nzete ya bambu lokola makonzí mpe bazalaki kosalela bitoko lokola nsamba mpe bamesa. Lokola nsɛtɛ ezalaki te, bazalaki kosalela mwa nzete oyo basebisi nsɔngɛ na yango. Nazalaki kokamwa mpenza mayele oyo bandeko yango bazalaki kobimisa mpo na kolonga mikakatano. Nakómaki kolinga bango mingi mpenza. Nazalaki kokanisa bango mingi ntango esɛngaki nalongwa kuna mpo na kokende esika mosusu!
NA KENYA
Na 1974, batindaki ngai na Betele ya Nairobi, na Kenya. Mosala ezalaki mingi, mpo Betele ya Kenya ezalaki kotambwisa mosala ya kosakola na bikólo 10, oyo mosusu ezalaki na epekiseli. Nazalaki mbala na mbala kokende kotala bandeko ya bikólo yango, mingimingi ya Éthiopie, epai bandeko bazalaki kokutana na minyoko mpe komekama ya makasi. Bazalaki kobɛta bandeko to kotya bango na bolɔkɔ; babomaki kutu bamosusu. Kasi, batikalaki sembo mpo bazalaki na boyokani ya malamu na Yehova mpe bango na bango.
Na 1980, nasepelaki mingi ntango nabalaki Gail Matheson, oyo azali moto ya Canada. Ngai ná Gail tokɔtaki kelasi moko ya Gileade. Tokobaki kokomelana mikanda. Gail azalaki misionɛrɛ na Bolivie. Nsima ya mbula 12, tokutanaki lisusu na engumba New York. Mwa moke na nsima, tobalanaki na Kenya. Napesaka Gail matɔndi mingi mpo atalelaka makambo ndenge Yehova atalelaka yango mpe asepelaka kaka na oyo azali na yango. Apesaka ngai mabɔkɔ ntango nyonso mpe azali moninga na ngai ya mosala.
Na 1986, nakómaki mokɛngɛli-motamboli mpe nazalaki kosala na Komite ya filiale. Na mosala ya mokɛngɛli-motamboli, nazalaki mpe kokende na bikólo oyo Betele ya Kenya ezalaki kotambwisa.
Nazali kosala diskur na liyangani moko na Asmara, na 1992
Na 1992, tokanaki kosala liyangani moko na Asmara (na Érythrée), ntango mosala na biso ezalaki na epekiseli te. Kasi, tozwaki kaka mwa depo moko ya bongobongo, oyo kati na yango ezalaki kutu mabe koleka ndenge ezalaki komonana libándá. Na mokolo ya liyangani, nakamwaki komona ndenge bandeko babongisaki ndako yango mpe ekómaki esika oyo ebongi mpo na losambo ya Yehova. Bandeko mingi bayaki na mwa biteni ya bilamba mpo na kobongisa ndako mpe bazipaki bisika nyonso oyo ezalaki mabemabe. Liyangani yango elekaki malamu mpe bayangani bazalaki 1 279.
Mosala ya mokɛngɛli-motamboli ezalaki mbongwana mpo na biso, mpo pɔsɔ na pɔsɔ tozalaki kofanda na bisika ekeseni. Na libaku moko, tofandaki na ndako moko monene ya kitoko oyo ezalaki pene ya océan; na libaku mosusu, tofandaki na mwa ndako moko ya manzanza, oyo WC na yango ezalaki libándá. Kasi ata soki tofandaki na ndako ya ndenge nini, tobosanaka te ntango oyo tolekisaki na mosala ya kosakola elongo na babongisi-nzela mpe basakoli ya molende. Ntango batindaki biso na esika mosusu, tosengelaki kokabwana na ebele ya baninga ya motema oyo tomesanaki na bango.
MAPAMBOLI OYO TOZWAKI NA ÉTHIOPIE
Kobanda na 1987 tii na 1992, Leta endimaki mosala na biso na bikólo mingi oyo Betele ya Kenya ezalaki kotambwisa. Na yango, batongaki Babetele mpe babiro na bikólo mosusu. Na 1993, batindaki biso na filiale ya Addis-Abeba, na Éthiopie, epai mosala na biso esalemaki na kobombana bambula mingi, kasi sikoyo endimamaki na Leta.
Ntango nazalaki mokɛngɛli-motamboli na mboka moko na Éthiopie, na 1996
Yehova apamboli mpenza mosala na biso na Éthiopie. Bandeko mingi basɛngaki mosala ya mobongisi-nzela. Mbula na mbula kobanda 2012, basakoli ebele (20%) kati na basakoli nyonso basalaka mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Longola yango, biteyelo ya teokrasi epesi bandeko formasyo oyo esengeli, mpe Bandako ya Bokonzi koleka 120 etongamaki. Na 2004, bandeko ya Betele bakendaki kofanda na Betele ya sika oyo etongamaki, mpe na lopango yango, ezali mpe na Ndako ya Mayangani oyo esalisaka mingi.
Na boumeli ya bambula mingi, ngai ná Gail tosalaki boninga ya makasi na bandeko ebele ya Éthiopie. Bolingo na bango mpe boboto na bango esimbaka mpenza mitema na biso. Mikolo eleki, nzoto etungisaki biso mingi mpe yango esalaki ete bázongisa biso na Betele ya Allemagne. Bandeko bakokisaka bamposa na biso nyonso, kasi tokanisaka mingi baninga oyo totiká na Éthiopie.
YEHOVA AKOLISI YANGO
Tomoni mpenza ndenge Yehova akolisi mosala na ye. (1 Ko. 3:6, 9) Na ndakisa, ntango nazalaki koteya bato ya Rwanda oyo bazalaki kotimola motako (cuivre) na Congo, basakoli bazalaki te na Rwanda. Lelo, ezali na bandeko koleka 30 000 na Rwanda. Na 1967, basakoli bazalaki soki 6 000 na Congo (Kinshasa). Lelo, bazali soki 230 000, mpe bato koleka milio moko bayanganaki na Ekaniseli ya 2018. Na bikólo nyonso oyo Betele ya Kenya ezalaki kotambwisa, motángo ya basakoli ekómi koleka 100 000.
Eleki mbula 50, Yehova asalelaki bandeko ndenge na ndenge mpo na kosalisa ngai nabanda mosala ya ntango nyonso. Atako nazali kaka moto ya nsɔninsɔni, nayekoli kotyela Yehova motema mobimba. Makambo oyo nakutaná na yango na Afrika esalisá ngai nayekola kozala na motema molai mpe nasepelaka na oyo nazali na yango. Ngai ná Gail tosepelaka mingi na bandeko yango oyo bayebi koyamba bapaya, bayikaka mpiko na mikakatano minene, mpe batyelaka Yehova motema. Nazalaka na botɔndi mingi mpo na boboto monene ya Yehova. Apamboli ngai mpenza koleka ndenge oyo nakokaki kokanisa.—Nz. 37:4.
a Na nsima, ekómaki kobengama Mosala na biso ya Bokonzi, mpe lelo tokómá kosalela Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo.
b Liloba “Kitawala” euti na liloba moko ya Swahili oyo elimboli “kokonza, kotambwisa, to mpe koyangela.” Mwa lingomba yango ezalaki ya politiki mpe ezalaki na mokano ya kozwa lipanda na boyangeli ya Belgique. Bato ya Kitawala bazalaki kosomba, koyekola mpe kokabola mikanda ya Batatoli ya Yehova mpe bazalaki kobalola mateya ya Biblia mpo eyokana na makanisi na bango ya politiki, mimeseno na bango oyo euti na biyambayamba mpe etamboli na bango ya mbindo.