LISOLO YA BOYEKOLI 30
LOYEMBO 97 Moto akobika nde na Liloba ya Nzambe
Mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli ekoki kosalisa yo tii lelo?
“Nalingaka ntango nyonso kokundwela bino makambo wana, atako boyebi yango mpe bopikami makasi na solo.”—2 PE. 1:12.
NA MOKUSE
Tokomona ndenge oyo mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli ekoki kosalisa yo, ata nsima ya bambula ebele.
1. Mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli esalá nini na bomoi na yo?
MATEYA ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli nde ebongolá bomoi na biso. Na ndakisa, ntango toyekolaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, tobandaki kopusana penepene na ye mpe kokóma moninga na ye. (Yis. 42:8) Ntango toyekolaki ete soki moto akufi ayebaka lisusu eloko te, totikaki komituna soki bandeko to baninga na biso oyo bakufá banyokwamaka. (Mos. 9:10) Mpe ntango toyekolaki ete Nzambe alaki ete mabele ekokóma Paradiso, totikaki komitungisa mpo na bomoi na biso na mikolo ezali koya. Tondimaki ete tokoki kozala na bomoi kaka mpo na mbula 70 to 80 te, kasi mpo na libela na libela.—Nz. 37:29; 90:10.
2. Ndenge nini 2 Petro 1:12, 13 emonisi ete mateya oyo toyekolaka na ebandeli ekoki kosalisa ata bakristo oyo bakɔmɛli na elimo?
2 Tosengeli ata moke te kobosanaka ete mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli ezali na ntina mingi. Na mokanda na ye ya mibale, ntoma Petro akomelaki bakristo oyo ‘bapikami makasi na solo.’ (Tángá 2 Petro 1:12, 13.) Kasi na ntango yango, bazalaki na likama na kati ya lisangá; na ndakisa ezalaki na bateyi ya lokuta mpe bato oyo batyolaka Nzambe. (2 Pe. 2:1-3) Petro alukaki kolendisa bandeko na ye bakristo mpo na kosalisa bango bámibatela na makama yango ya elimo. Mpo na kolendisa bango, akundwelaki bango mateya mosusu oyo basilaki koyekola kala. Mateya yango elingaki kosalisa bango bátikala sembo epai ya Yehova.
3. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina oyo bakristo nyonso basengeli kokanisa na mozindo mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli.
3 Ata soki tosili kokɔmɛla na elimo, tokoki kaka kozwa matomba na mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli. Tózwa ndakisa: Mama oyo alambaka banda kala ná mwana na ye ya mwasi oyo azali koyekola kolamba bakoki kosalela biloko ndenge moko mpo na kosala elubu moko. Kasi lokola mama amesaná kolamba, ayekolá kosalela mpe biloko yango mpo na kolamba bilubu ndenge na ndenge ya kitoko. Ndenge moko mpe, bato oyo basalelaka Yehova banda kala mpe baoyo babandi koyekola Biblia sika batalelaka ndenge moko te mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli. Mpo na nini? Mpo emonani ete makambo ya bomoi na biso mpe mikumba na biso na mosala ya Yehova ebongwani kobanda tozwá batisimo. Ntango tokanisi mateya oyo toyekolá kala mpe tosaleli yango na makambo oyo tozali na yango lelo, tokoki komona ndenge ya sika oyo ekoki kosalisa biso. Tótala ndenge mateya misato ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli ekoki kosalisa bakristo oyo bakɔmɛli na elimo.
YEHOVA AZALI MOZALISI
4. Ndenge nini koyeba ete Yehova azali Mozalisi esalisá biso?
4 Biblia elobi: “Moto oyo azalisá biloko nyonso ezali Nzambe.” (Ebr. 3:4) Toyebi ete Mozalisi oyo aleki na bwanya mpe na nguya nde akelá planɛti na biso mabele mpe nyonso oyo ezali na bomoi. Lokola ye nde asalá biso, ayebi biso malamu mpenza. Longola yango, atyelaka biso likebi. Ayebi oyo eleki malamu mpo na biso. Koyeba liteya yango ya polele, ete Yehova azali Mozalisi, ebongolá bomoi na biso na ndenge ya kokamwa mpe esalisá biso tózala na bomoi ya malamu mpo toyebi ntina ya bomoi.
5. Nini ekoki kosalisa biso tólona komikitisa? (Yisaya 45:9-12)
5 Koyeba ete Yehova azali Mozalisi ekoki kosalisa biso tólona komikitisa. Na ndakisa, ntango Yobo akómaki komilongisa mingi mpe kotya likebi mingi na makambo ya lokuta oyo basusu bazalaki koloba, Yehova akundwelaki ye ete Ye nde Mozalisi oyo aleki na nguya. (Yobo 38:1-4) Yango esalisaki Yobo amona ete Yehova asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo, ete banzela na ye eleki mosika oyo ya bato. Mosakoli Yisaya mpe akomaki na nsima ete: “Mabele ekoki nde koloba na moyemi na yango ete: ‘Ozali kosala nini?’”—Tángá Yisaya 45:9-12.
6. Ntango nini ekoki kosɛnga tókanisa ndenge Mozalisi na biso Yehova azali na bwanya mpe na nguya mingi? (Talá mpe bililingi.)
6 Ntango moto ayebi makambo mingi ya bomoi ya bokristo, ekoki kokóma ete abanda kotya motema mingi na makanisi na ye moko na esika atyela Yehova motema mpe aluka litambwisi na Liloba na Ye. (Yobo 37:23, 24) Na yango, ndenge nini kokanisa na mozindo na bwanya mpe bonene ya Mozalisi, oyo ekokani na mosusu te, ekoki kosalisa moto? (Yis. 40:22; 55:8, 9) Liteya yango oyo toyekolaka na ebandeli ekosalisa ye abatela komikitisa mpe amona ete makanisi ya Yehova ezali na ntina mingi koleka oyo ya ye.
Nini ekoki kosalisa biso tótalela makanisi na biso na bokatikati? (Talá paragrafe 6)d
7. Rahela asalaki nini mpo andima mbongwana oyo esalemaki?
7 Rahela, oyo afandaka na Slovénie, amoni ete kokanisa ndenge Yehova azali Mozalisi esalisi ye andima mbongwana oyo esalemaki na ebongiseli ya Yehova. Alobi boye: “Ezalaka pɛtɛɛ te mpo nandima bikateli ya bandeko oyo bazali kokamba. Na ndakisa, ata nsima ya kotala Lapolo ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi No. 8 ya 2023, nayokaki mabe mbala ya liboso oyo namonaki ndeko moko na mandɛfu azali kosala diskur. Na yango, nabondelaki Yehova asalisa ngai namesana na mbongwana yango.” Rahela andimaki ete lokola Yehova azali Mozalisi ya likoló mpe ya mabele, ayebi malamu mpenza kotambwisa ebongiseli na ye na ndenge oyo eleki malamu. Yo mpe, soki ozali kokoka te komesana na mbongwana to kondima malako ya sika, okozwa matomba soki omanyoli na komikitisa nyonso na bwanya mpe nguya ya Mozalisi na biso!—Rom. 11:33-36.
NTINA OYO NZAMBE ATIKI BAMPASI EZALA
8. Ndenge nini koyeba ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala esalisá biso?
8 Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala? Bato mosusu oyo bazwá eyano te na motuna yango basilikelá Nzambe, mpe basusu bakómá koloba ete Nzambe azalaka te! (Mas. 19:3) Kasi, yo oyekolá ete lisumu oyo tozwá epai ya Adama ná ezaleli ya kozanga kokoka nde ememelaka bato bampasi, kasi Yehova te. Oyekolá mpe ete motema molai ya Yehova epesi bamilio ya bato nzela ya koyekola koyeba ye mpe ya komona bango moko ndenge oyo akosilisa bampasi mpo na libela. (2 Pe. 3:9, 15) Mateya yango ebɔndisaki yo mpe etindaki yo opusana penepene na ye, boye te?
9. Ntango nini ekoki kosɛnga tómikundwela ntina oyo Yehova atiki bampasi ezala?
9 Tokangi ntina ete tosengeli kozala na motema molai wana tozali kozela ete Yehova asilisa bampasi. Nzokande, tokómaka lisusu komituna ntina oyo Yehova azali koumela mpo na kosilisa bampasi ntango moto oyo tolingaka akufi, to ntango biso moko to bato oyo tolingaka tokutani na mikakatano to makambo ya kozanga bosembo. (Hab. 1:2, 3) Soki likambo ya bongo ekómeli biso, ezali malamu tókanisa ntina oyo Yehova atikaka ete bato ya sembo bákutana na makambo ya mpasi.a (Nz. 34:19) Tokoki mpe kokanisa mokano na ye ya kosilisa bampasi mpo na libela.
10. Nini esalisi Anne abɔndisama na liwa ya mama na ye?
10 Koyeba solo na oyo etali ntina oyo bampasi ezali ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. Anne, oyo afandaka na esanga Mayotte, na océan indien, alobi boye: “Eleki mwa bambula ntango mama na ngai akufaki, epesaki ngai mawa makasi. Kasi, namikundwelaka mbala na mbala ete Yehova te nde abimiselaka biso bampasi. Azali na mposa makasi ya kolongola mpasi ya ndenge nyonso mpe ya kosekwisa bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Komanyola mateya yango epesaka ngai kimya ya motema mpe yango elendisaka ngai.”
11. Ndenge nini koyeba ntina oyo Yehova atiki bampasi ezala ekoki kosalisa biso tókoba kosakola?
11 Koyeba ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala ekoki kolendisa biso tókoba kosakola. Nsima ya koloba ete Yehova azali komonisa motema molai mpo alingi ete bato bábongola motema mpe bábika, ntoma Petro akomaki: “Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala, bato oyo basalaka misala ya etamboli ya bosantu mpe misala oyo emonisaka ezaleli ya kokangama na Nzambe.” (2 Pe. 3:11) Mosala ya kosakola ezali moko ya “misala oyo emonisaka ezaleli ya kokangama na Nzambe.” Ndenge moko na Tata na biso, tolingaka bato. Tolingi ete bázala na bomoi na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, epai bosembo ekozala. Na motema molai na ye, Yehova apesi bato ya teritware na yo libaku ya koyeba ye mpo básambela ye. Na yango ozali na lokumu monene ya kosala elongo na Nzambe mpe ya kosalisa bato ebele mpenza báyekola koyeba ye liboso nsuka eya!—1 Ko. 3:9.
TOZALI NA “MIKOLO YA NSUKA”
12. Ndenge nini koyekola ete tozali na “mikolo ya nsuka” esalisi biso?
12 Biblia elobi polele ndenge oyo bato basengelaki kozala na “mikolo ya nsuka.” (2 Tim. 3:1-5) Makambo oyo ezali kosalema zingazinga na biso ezali komonisa polele ete esakweli yango ezali kokokisama. Mpe ntango tozali komona ndenge bizaleli ya bato ezali se kobeba, tozali komindimisa lisusu mingi ete Liloba ya Nzambe ebongi kotyelama motema.—2 Tim. 3:13-15.
13. Na boyokani na ndakisa ya Yesu oyo ezali na Luka 12:15-21, mituna nini tokoki komituna?
13 Koyeba ete tozali na mikolo ya nsuka esalisaka biso tótya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Talá ntina oyo tosengeli kosala bongo na ndakisa oyo Yesu apesaki na Luka 12:15-21. (Tángá.) Mpo na nini mozwi wana abengamaki “zoba”? Ezalaki te mpo azalaki na bomɛngo, ezalaki nde mpo makambo oyo atyaki na esika ya liboso ezalaki te makambo oyo eleki ntina. Azalaki “konduka biloko ya motuya mpo na ye moko, kasi [azalaki] mozwi te na miso ya Nzambe.” Mpo na nini yango ezalaki libunga mpenza? Nzambe alobaki na moto yango boye: “Na butu oyo bakosɛnga yo bomoi na yo.” Lelo, awa mokili oyo ezali kokende na nsuka na yango, tokoki komituna boye: ‘Mikano na ngai emonisaka ete natyaka makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso? Bongo mikano nini nayebisaka bana na ngai bámityela? Nasalelaka makasi na ngai, ntango na ngai, mpe mbongo na ngai libosoliboso mpo na konduka bomɛngo to namibombelaka biloko ya motuya na likoló?’
14. Ndenge lisolo ya Miki emonisi yango, mpo na nini ezali malamu tómikundwelaka ete tozali na mikolo ya nsuka?
14 Ndenge na biso ya kotalela bomoi ekoki kobongwana mpenza ntango tozali komikundwela ete tozali na mikolo ya nsuka. Yango nde ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Miki. Alobi boye: “Ntango nazwaki diplome, motema ezalaki kotinda ngai nakoba kelasi ya molai mpo na koyekola makambo ya banyama. Kasi nazalaki mpe na mokano ya kokóma mobongisi-nzela mpe kokende kosala esika oyo mposa ezali mingi. Baninga na ngai oyo bakɔmɛli na elimo bapesaki ngai toli ete nakanisa malamu soki nakokoka kokoba na kelasi mpe kokokisa mbala moko mikano na ngai ya elimo. Bakundwelaki ngai ete mosika te mokili oyo ekokufa. Lisusu, na mokili ya sika, lokola nakozala na bomoi ya seko, nakozala na ntango ya koyekola banyama nyonso oyo nalingi. Na yango, naponaki kosala kaka formasyo ya mokuse, oyo ekosalisa ngai. Yango esalaki ete nazwa mosala oyo etikelaki ngai ntango ya kokóma mobongisi-nzela mpe na nsima nakendaki na Équateur, epai mposa ezalaki mingi.” Lelo, Miki ná mobali na ye bazali na mosala ya zongazonga na ekólo yango.
15. Mpo na nini tosengeli kotika te koyebisa bato nsango malamu? Pesá ndakisa. (Talá mpe bililingi.)
15 Tosengeli kolɛmbaka nzoto mbala moko te ntango moto aboyi koyoka nsango malamu, mpo bato bakoki kobongwana. Tótalela ndakisa ya Yakobo, leki ya Yesu. Yakobo amonaki ndenge Yesu akolaki, akómaki Masiya, mpe azalaki koteya na ndenge oyo moto mosusu ateyá te. Kasi alandaki Yesu te na boumeli ya mosala na ye. Yakobo akómaki moyekoli kaka nsima ya lisekwa ya Yesu; akómaki moyekoli ya molende mpenza!b (Yoa. 7:5; Gal. 2:9) Na yango, kotika te kosolola na bandeko na yo ya libota oyo basepeli naino na solo te, mpe kobá kosakwela bato oyo bandimi naino te nsango ya Bokonzi. Kobosana te ete lokola tozali na mikolo ya nsuka, mosala ya kosakola ezali na ntina mingi. Makambo oyo ozali koteya bato lelo ekoki kosalisa bango bázwa ekateli na nsima, mbala mosusu ata nsima ya kobanda ya bolɔzi monene.c
Nini ekoki kolendisa biso tókoba koteya bandeko na biso ya libota oyo bandimi naino solo te? (Talá paragrafe 15)e
ZALÁ NA BOTƆNDI MPO NA MAKUNDOLI YA YEHOVA
16. Ndenge nini makundoli ya Yehova esalisaka yo? (Talá mpe etanda “Saleláká yango mpo na kosalisa basusu.”)
16 Bilei mosusu ya elimo oyo ebongiseli ya Yehova epesaka ebongisami mpo na bato oyo bayebi naino te mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli. Na ndakisa, diskur ya bato nyonso, masolo mpe bavideo mosusu ya jw.org, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe Lamuká! ebongisami libosoliboso mpo na bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Atako bongo, makundoli yango esalisaka mpe biso. Etindaka biso tólinga lisusu Yehova mingi, ekómisaka kondima na biso makasi na Liloba na ye, mpe esalisaka biso tóyeba malamu koteya basusu mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli.—Nz. 19:7.
17. Ntango nini okoki kokanisa mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli?
17 Biso Batatoli ya Yehova tosepelaka mingi ntango boyebi na biso ya liteya moko ya Biblia esembolami. Kasi, tozalaka mpe na botɔndi mingi mpo na mateya ya Biblia oyo toyekolaka na ebandeli, oyo ebendaki biso na solo mpo na mbala ya liboso. Soki ekómi ete tóluka kokangama na makanisi na biso na esika tólanda litambwisi ya ebongiseli ya Yehova, tómonisa komikitisa mpe tómikundwela ete moto oyo azali kotambwisa ebongiseli yango ezali nde Mozalisi na biso oyo aleki na nguya mpe na bwanya. Ntango biso moko to moto oyo tolingaka tokutani na makambo ya mpasi, tómonisa motema molai mpe tókanisa ntina oyo Yehova atiki ete bampasi ezala. Mpe ntango tozali kokanisa ndenge oyo tokosalela ntango mpe makasi na biso, tóbosana te makambo ya kotya na esika ya liboso na mikolo oyo ya nsuka. Tiká ete makundoli ya Yehova ekoba kopesa biso makasi, kolendisa biso, mpe kokómisa biso bato ya bwanya.
LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga
a Talá lisolo “Ntina oyo etikali moke bampasi nyonso esila” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2007, nk. 21-25.
c Talá lisolo “Toyebi nini mpo na lisambisi ya Yehova na mikolo ezali koya?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2024, nk. 8-13.
d NDIMBOLA YA BILILINGI: Lisangani ya bankulutu endimi te likanisi ya nkulutu moko. Na nsima, nkulutu yango azali kotala likoló oyo etondi na minzoto, mpe amoni ete Yehova nde aleki na bwanya.
e NDIMBOLA YA ELILINGI: Na boyekoli na ye moko, ndeko mwasi moko ayekoli makambo oyo emonisi ete tozali na mikolo ya nsuka. Yango etindi ye abenga ndeko na ye ya libota mpo ateya ye.