MALOBA YA BIBLIA
Yesu “ayekolaki botosi”
Yesu atosaka Yehova ntango nyonso. (Yoa. 8:29) Bongo mpo na nini Biblia elobi ete: “Ayekolaki botosi na makambo ya mpasi [oyo] akutanaki na yango”?—Ebr. 5:8.
Ntango Yesu azalaki awa na mabele, akutanaki na makambo oyo ezalaki te na likoló. Abɔkwamaki na baboti oyo balingaki Yehova kasi bazalaki bato ya kozanga kokoka. (Luka 2:51) Amonaki mpasi epai ya bakonzi ya mangomba ya mitema mabe mpe bakonzi ya guvɛrnema oyo bazangá bosembo. (Mat. 26:59; Mrk. 15:15) Lisusu, “amikitisaki mpe atosaki tii na liwa,” liwa moko ya mpasi mpenza.—Flp. 2:8.
Makambo wana nyonso eteyaki Yesu botosi na ndenge oyo azalaki na yango te na likoló. Na ndenge yango, akokaki kokóma Mokonzi ya kokoka mpe Nganga-nzambe Monene oyo akoki komitya na esika na biso. (Ebr. 4:15; 5:9) Yesu akómaki lisusu na motuya mingi na miso ya Yehova nsima ya koyekola botosi na nzela ya makambo ya mpasi oyo akutanaki na yango. Biso mpe tokoki kokóma lisusu na motuya mingi na miso ya Yehova mpe kozala na ntina mingi ata na mokumba nini oyo apesi biso soki tokobi kotosa ata na mikakatano.—Yak. 1:4.