Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/7 nk. 29-31
  • Ozali na “motema ya botosi”?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali na “motema ya botosi”?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bazalaki na motema ya botosi
  • Botosi ya ndambo ekoki te
  • Botosi na yo ezali mpenza mobimba?
  • Motema ya botosi ememaka mapamboli
  • Botosi na yo ezali na motuya na miso ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Salisá basusu ‘bátosa na motema mobimba’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Toyekola botósi na kondimáká toli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yesu “ayekolaki botosi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/7 nk. 29-31

Ozali na “motema ya botosi”?

NTANGO Salomo akómaki mokonzi ya Yisalaele ya kala, amonaki ete akokoka te. Na yango, asɛngaki Nzambe mayele mpe boyebi. (2 Ntango 1:10) Salomo abondelaki lisusu ete: “Bongo, pesá moombo na yo motema ya botosi mpo na kosambisa bato na yo.” (1 Mikonzi 3:9, NW) Soki Salomo azalaki na “motema ya botosi,” alingaki kolanda mibeko mpe mitinda ya Nzambe mpe Yehova alingaki kopambola ye.

Motema na botosi ezali bozito te kasi liziba ya esengo. Ntoma Yoane akomaki ete: “Mpo ete bolingo na Nzambe ezali boye ete tókokisa malako na ye. Malako na ye mpe mazali na bozito te.” (1 Yoane 5:3) Ya solo, tosengeli kotosa Nzambe. Yehova azali Mozalisi na biso Monene. Mabelé mpe biloko nyonso bizali kati na yango ezali biloko na ye, ezala palata to wolo nyonso ya ye. Tokoki mpenza kokabela Nzambe eloko moko te, atako azali kosɛngisa biso ete tósalela mosolo na biso na komonisáká bolingo epai na ye. (1 Ntango 29:14) Yehova azali kosɛnga ete tólinga ye mpe, na komikitisa nyonso, tótambola elongo na ye, na kosaláká mokano na ye.​—Mika 6:8.

Ntango batunaki Yesu mobeko nini eleki monene kati na Mibeko nyonso, alobaki ete: “Okolinga Nkolo Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba. Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso.” (Matai 22:36-38) Lolenge moko ya komonisa bolingo yango ezali kotosa Nzambe. Na yango, mokomoko na biso asengeli kobondelaka ete Yehova apesa ye motema ya botosi.

Bazalaki na motema ya botosi

Biblia etondi na bandakisa ya bato oyo bazalaki na motema ya botosi. Na ndakisa, Yehova ayebisaki Noa ete atonga masuwa monene mpo na kobikisa bikelamu ya bomoi. Yango ezalaki mosala monene oyo ezwaki mbula soko 40 to 50. Ata na bisaleli nyonso ya makasi ya ntango na biso, kotonga masuwa monene boye ekosɛnga mayele mingi. Lisusu, Noa asengelaki kokebisa bato oyo na ntembe te, bazalaki kotyola mpe kosɛka ye. Kasi azalaki na botosi ata na makambo mike. Biblia elobi ete: “Noa asalaki bobele bongo.” (Genese 6:9, 22; 2 Petelo 2:5) Noa amonisaki bolingo na ye epai na Yehova na kotosáká na bosembo na boumeli ya bambula mingi. Azali mpenza ndakisa malamu mpo na biso banso!

Tótalela mpe tata na mabota, Abalayama. Nzambe alobaki na ye ete alongwa na Ulu ya Bakaladi, mokili ya bozwi mpe akende na mokili oyo ayebaki te. Abalayama atosaki kozanga ete atuna mituna. (Baebele 11:8) Na bambula nyonso oyo etikalaki na bomoi na ye, afandaki na libota na ye na bahema. Nsima ya kofanda bambula mingi lokola mopaya na mokili yango, Yehova apambolaki ye na mwasi na ye ya botosi, Sala, na kopesáká bango mwana mobali, na nkombo Yisaka. Abalayama, mobange ya mbula 100 alingaki mwana na ye mingi oyo abotaki na bompaka! Mwa bambula na nsima, Yehova asɛngaki Abalayama ete akaba Yisaka lokola mbeka na kotumba. (Genese 22:1, 2) Likanisi ya kosala bongo epesaki Abalayama mpasi makasi. Atako bongo, atosaki mpamba te alingaki Yehova mpe azalaki na kondima ete elaka ya mombóto ekokokana na nzela ya Yisaka, ata soki Nzambe asekwisi ye na bakufi. (Baebele 11:17-19) Nzokande, ntango Abalayama alingaki koboma mwana na ye, Yehova apekisaki ye, mpe alobaki ete: “Sikawa nayebi ete obangi Nzambe, mpo ete oboyi kopesa mwana na yo te, mwana na yo [bobele moko, NW].” (Genese 22:12) Na ntina na botosi na ye, Abalayama abangaki Nzambe mpe ayebanaki lokola “moninga na [Yehova].”​—Yakobo 2:23.

Yesu Klisto azali ndakisa eleki malamu ya botosi mpo na biso. Na boumeli ya bomoi na ye liboso ya kobotama lokola moto, asepelaki na mosala ya botosi oyo azalaki kosalela Tata na ye ya likoló. (Masese 8:22-31) Ntango ayaki lokola moto, Yesu atosaki Yehova na makambo nyonso, ntango nyonso kosepeláká kosala mokano na ye. (Nzembo 40:8; Baebele 10:9) Yango wana, Yesu akokaki koloba na bosembo nyonso ete: “Nazali kosala likambo moko na motema na ngai te kasi pelamoko Tata asili kolakisa ngai, nakosololaka makambo oyo. Motindi na ngai azali na ngai elongo; atiki ngai mpamba te, zambi ntango nyonso, ngai nakosalaka makambo makosepelisa ye.” (Yoane 8:28, 29) Na nsuka, mpo na kolongisa boyangeli ya Yehova mpe kosomba bato ya botosi, Yesu apesaki bomoi na ye na bolingo malamu, na nzela ya kufa ya nsɔni mpe ya mpasi. “Ezwami ye na motindo na moto, amisɔkisi mpe atosi kino kufa, ɛɛ, kino kufa na [nzete ya mpasi, NW].” (Bafilipi 2:8) Azali ndakisa malamu ya komonisa motema ya botosi!

Botosi ya ndambo ekoki te

Ezali bato nyonso te oyo balobaki ete bakozala na botosi epai na Nzambe nde batosaki ye. Tótalela Mokonzi Saulo na Yisalaele ya kala. Nzambe ayebisaki ye asilisa Baamaleki nyɛɛ mpo ete bazalaki bato mabe. (1 Samwele 15:1-3) Atako abomaki libota yango, abikisaki mokonzi na bango mpe abatelaki ndambo ya bampate mpe bangɔmbɛ mosusu. Samwele atunaki ye ete: “Mpo na nini yo otosi mongongo na [Yehova] te?” Saulo azongisaki ete: “Te, natosi mongongo na [Yehova]. Kasi bato [ya Yisalaele] bapunzaki biloko mpe bampate mpe bangɔmbɛ, yango ilekaki malamu na kati na biloko bibongaki ete bibebisama mpo na kotumbela [Yehova] Nzambe na yo mbeka.” Mpo na komonisa ete botosi esengeli kozala ndambo te, Samwele abakisaki ete: “[Yehova] akosepela mbeka na miboma lokola ye akosepela botosi kotosa mongongo na ye? Talá kotosa eleki moboma na malamu mpe koyoka eleki mafuta na mpate. Mpo ete kotomboka ezali lokola lisumu na ndɔki mpe nko ezali lokola lisumu na bikeko. Yo oboyi liloba na [Yehova], bongo ye aboyi yo ete ozala mokonzi te.” (1 Samwele 15:17-23) Saulo abungisaki mabaku mingi mpamba te azalaki na motema ya botosi te!

Ata Salomo, mokonzi ya mayele, oyo abondelaki mpo na kozwa motema ya botosi, akobaki kotosa Yehova te. Na bokeseni na mokano ya Nzambe, abalaki basi bapaya oyo bapusaki ye kosalela Nzambe lisumu. (Nehemia 13:23, 26) Salomo abungisaki ngɔlu ya Nzambe mpamba te azalaki na motema ya botosi lisusu te. Yango ezali likebisi mpo na biso!

Yango elimboli te ete Yehova azali kosɛngisa ete bato oyo bazali kosalela ye bázala bato ya kokoka. “Azali kobosana te ete tozali bobele mputulu.” (Nzembo 103:14) Biso banso tosalaka mabunga mbala na mbala, kasi Nzambe akoki komona soki tozali mpenza na motema oyo ezali na mposa ya kosepelisa ye. (2 Ntango 16:9) Soki tosali libunga na ntina na bomoto ya kozanga kokoka mpe tobongoli motema, tokoki kosɛnga bolimbisi na moboko ya mbeka ya lisiko ya Klisto, kolikyáká ete Yehova “akolimbisa na solo.” (Yisaya 55:7; 1 Yoane 2:1, 2) Lisungi ya bankulutu baklisto oyo batondi na bolingo ekozala na ntina mpo ete tókoka kozonga malamu na elimo mpe tózwa kondima makasi mpe motema ya botosi.​—Tito 2:2; Yakobo 5:13-15.

Botosi na yo ezali mpenza mobimba?

Lokola tozali basaleli ya Yehova, na ntembe te, mingi kati na biso tokanisaka ete tozali na motema ya botosi. Tokoki kokanisa boye: Nasanganaka na mosala ya kosakola Bokonzi, boye te? Natikalaka ngwi liboso na makambo minene lokola kozanga komikɔtisa na makambo ya mokili, boye te? Mpe nayanganaka na makita ya boklisto pɔsɔ na pɔsɔ, ndenge ntoma Paulo alobaki, boye te? (Matai 24:14; 28:19, 20; Yoane 17:16; Baebele 10:24, 25) Ya solo, basaleli ya Yehova lokola lisangá bamonisaka motema ya botosi motindo wana na makambo ya ntina.

Kasi, etamboli na biso ezalaka ndenge nini na makambo ya mokolo na mokolo, na ndakisa na makambo oyo emonanaka lokola ete ezali makambo mike? Yesu alobaki ete: “Oyo azali sembo na likambo lileki moke azali sembo mpe na likambo monene. Oyo azali sembo te na likambo lileki moke azali mpe sembo te na likambo monene.” (Luka 16:10) Yango wana, ekozala malamu mokomoko na biso amituna ete: Nazalaka na motema ya botosi na makambo mikemike to makambo oyo bato mosusu bayebi yango te?

Mokomi ya nzembo amonisaki ete ata kati na ndako na ye, esika bato bazalaki komona ye te, ‘atambolaki na motema malamu.’ (Nzembo 101:2) Wana ofandi na ndako na yo, okoki kofungola televizyo na yo mpe obandi kotala filime. Kaka wana, botosi na yo ekoki komekama. Filime ekoki kokóma na makambo ya mbindo. Okokoba kotala, kolobáká ete yango ezali lolenge ya bafilime oyo bazali kolakisa mikolo oyo? To motema na yo ya botosi ekopusa yo na kondima etinda ya Makomami oyo elobi ete: “Tiká te ete bóloba nkombo na bikobo mpe makambo nyonso ya mbindo”? (Baefese 5:3-5) Okokanga nde televizyo, ata soki lisolo yango esepelisi yo mingi? To okolongola esika yango mpe koluka esika mosusu soki ekómi na makambo ya mobulu? Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, molimo na ye ayini ye oyo alingi mobulu.”​—Nzembo 11:5.

Motema ya botosi ememaka mapamboli

Ya solo, ezali na makambo mingi na bomoi oyo tokoki komitalela malamumalamu mpo na komona soki totosaka mpenza Nzambe na motema. Bolingo na biso mpo na Yehova esengeli kopusa biso na kosepelisa ye mpe kosala makambo azali koloba na biso kati na Liloba na ye, Biblia. Motema ya botosi ekosalisa biso na kobatela boyokani malamu na Yehova. Kutu, soki tozali mpenza na botosi, ‘maloba na monɔkɔ na biso mpe makanisi na motema na biso makondimama na Yehova.’—Nzembo 19:14.

Yehova alingaki biso, yango wana azali koteya biso botosi mpo na bolamu na biso moko. Mpe tozali kozwa matomba mingi na kotyáká likebi ya motema mobimba na mateya mauti na Nzambe. (Yisaya 48:17, 18) Na bongo, tiká ete tóndima na esengo nyonso lisungi oyo Tata na biso ya Likoló azali kopesa na nzela ya Liloba na ye, elimo na ye, mpe lisangá na ye. Tozali koteyama malamu na boye ete ezali lokola mongongo ezali koloba nsima na biso ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yisaya 30:21) Lokola Yehova azali koteya biso na nzela ya Biblia, na mikanda ya boklisto, mpe makita ya lisangá, tiká ete tótya likebi, tósalela makambo tozali koyekola, mpe tózala na ‘botosi na makambo nyonso.’—2 Bakolinti 2:9.

Motema ya botosi ekobimisa esengo mingi mpe mapamboli mingi. Yango ekomemela biso kimya ya makanisi, mpamba te tokoyeba ete tobongi mpo na Yehova Nzambe mpe tozali kosepelisa motema na ye. (Masese 27:11) Motema ya botosi ekobatela biso ntango tomekami mpo na kosala mabe. Yango wana, na ntembe te, tosengeli kotosa Tata na biso ya likoló mpe tosengeli kobondela boye: “Pesá moombo na yo motema na botosi.”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Euti na Self-Pronouncing Edition of the Holy Bible, oyo ezali na Biblia ya Roi Jacques mpe mabongoli matalelami lisusu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto