Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
Bandeko ya bolingo:
“Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Klisto ezala na bino.” (1 Kol. 1:3) Tozali mpenza kozela na motema likoló mokolo oyo biloko nyonso oyo ezali kopema ekopesa Yehova nkembo oyo ebongi na ye! (Nz. 150:6) Wana tozali kozela mokolo monene yango, tokolanda kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe kokómisa bato bayekoli.
Mosala ya kosakola ezali mosala oyo Yehova azali kotyela likebi koleka misala na ye nyonso oyo ezali na mabelé. (Mko. 13:10) Lokola toyebi malamu motuya oyo Yehova apesaka na mosala yango, tobondelaka ye asalisa biso tókokisa yango malamu, mpamba te toyebi ete moto nyonso azali na libaku ya kozwa litomba na lisiko ya Yesu. (Emon. 14:6, 7, 14, 15) Ya solo, tokutanaka na mikakatano, kasi tozali mpenza na botɔndi ndenge “[tolatisamaka] nguya oyo euti na likoló” mpo na kokokisa mosala na ye!—Luka 24:49.
Ezali likambo ya esengo kotalela ndenge mosala esalemaki na mbula eleki mpe komona oyo Yehova akokisaki na nzela ya basaleli na ye ya sembo. Na nguya ya elimo santu, basaleli ya Nzambe bamonisaki bolingo lokola oyo ya Klisto, mpe balongi koyinana na mokili mobimba. Bolingo yango emonanaki polele na mayangani na biso ya etúká. Banda na sanza ya Yuni tii na Desɛmbɛ 2003, bandeko bautaki na bikólo koleka nkama, bakendeki na mayangani 32 oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili mingi, oyo esalemaki na bakɔntina motoba. Na mayangani ya etúká mpe na mayangani oyo esangisaki bato oyo bautaki na mikili mingi, batunaki mituna na bamisionɛrɛ, bandeko oyo basalaka mosala ya botongi na mikili ya bopaya, mpe baoyo basalaka na Babetele ya mikili ya bopaya.
Na mayangani yango, tozwaki mwa buku, “Voyez le bon pays” mpe buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Lisusu bayebisaki biso ete batalelaki lisusu makambo oyo ezali na buku mpo na Eteyelo ya Babongisi-nzela, mpe buku yango ekobima na nsuka ya mobu ya mosala 2004. Mokemoke, babongisi-nzela ya kala bakokɔta lisusu kelasi elongo na baoyo ya sika.
Na lisalisi ya Nzambe mpe ya makabo ya bandeko, bandako ya Bokonzi mingi esili kotongama, mingi mpenza na bikólo oyo ezali na makoki mingi te. Lokola mposa ya bilei ya elimo ezali kaka kokóma makasi na mokili mobimba, mosala ya koyeisa Babetele minene ezali sikoyo kokoba na mikili mingi. Mwa buku Sepela na bomoi ya seko na Mabele! ezali kobima sikoyo na minɔkɔ 299, mpe tii sikoyo enyatami milio 139; buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, enyatami milio koleka 93, na minɔkɔ 161; mpe mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? enyatami milio 200 na minɔkɔ 267.
Tozali kotombela na esengo mpenza, boyei malamu na bato 258 845 oyo bazwaki batisimo na mbula eleki! Atako komipesa na yo na mosala ya Bokonzi ya Nzambe esali ete Satana ayina yo, yango esali mpe ete Yehova apambola yo mingi mpe abatela yo na elimo wana ozali kopota na momekano ya mbangu oyo etyami liboso na yo. (Ebe. 12:1, 2; Emon. 12:17) Ɛɛ, zalá na elikya ete “mobateli na yo akolala mpɔngi soko moke te.”—Nz. 121:3.
Mokapo ya mobu 2004, “Bókɛngɛlaka . . . Bómilɛngɛla,” ebongi mpenza na ntango oyo tozali. (Mat. 24:42, 44) Liloba ya Nzambe elobi mpo na baklisto ete bazali bafandi ya ntango mokuse na ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, oyo etikali moke elimwa. (1 Pet. 2:11; 4:7) Yango wana, tosengeli komipesa mingi na makambo ya elimo, koluka kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ, mpe kotalela mitema na biso na likebi mpenza. ‘Dalagona monene’ azali koluka kolya biso, mpe kokɔtisa biso na ebongiseli na ye.—Emon. 12:9.
Mpo tókɛngɛlaka ntango nyonso, ezali na ntina ete tótángaka Biblia mokolo na mokolo. Yango ekoki kosalisa biso mpo ‘Ɛɛ na biso ezala Ɛɛ,’ na oyo etali komipesa na biso, mpe “[tótingama] makasi tii na nsuka na kondimisama makasi oyo tozalaki na yango na ebandeli.” (Yak. 5:12; Ebe. 3:14) Soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, yango ekoki kosalisa biso tómona ntango nyonso ete mokili oyo epɛngwi mosika mpenza na mitinda ya Nzambe oyo ebongwanaka te. (Mki. 3:6; 2 Tim. 3:1, 13) Boyebi ya Biblia ekoki kosalisa biso tókima “masapo ya lokuta oyo esalemi na ndenge ya mayele,” mpe tótikala sembo epai na Yehova.—2 Pet. 1:16; 3:11.
Baboti, ntango bozali kobɔkɔla bana na bino na disipilini mpe makebisi ya Yehova, bozali mpenza kosalisa bango bámityela mikano ya elimo mpe ‘bákɛngɛlaka’? (Ef. 6:4) Bozali mpenza kosalisa bango bátalela bomoi na bango ya mikolo ekoya ndenge Yesu moto oyo alekaki bato nyonso na bwanya atalelaki yango? Yesu akokaki kozala mosali ya mabaya, savá to monganga, oyo mokili emoná naino te; kasi, na esika ya kosala bongo, asalaki nde mosala ya ntango nyonso. Tiká ete ndakisa yango etinda bino bósalisa bana na bino na kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bango.
Moombo ya sembo oyo amonisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azali kotɔnda na motema mobimba “ebele ya bato,” na ndenge basalisi biso tókokisa mokumba na biso ya ‘kosakola nsango malamu na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli.’ (Emon. 7:9; Mat. 24:14, 45) Bandeko ya bolingo, bózala na elikya ete Yehova akobosana te “mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” (Ebe. 6:10) Ntango bozali kotánga masolo ya kosepelisa na Annuaire 2004 mpe matomba oyo milende na bino nyonso ebimisi na mokanda yango, bóyeba ete bopesaki mabɔkɔ mingi na mosala ya kopesa litatoli oyo esalemi na mokili mobimba.
Tiká ete bózala na mpiko ntango bozali kokanisa mikolo ezali koya mpe bólanda ‘kotala na likebi mpenza mbano oyo bokozwa,’ bótika nzela na moto to demo moko te ete azangisa bino yango. (Ebe. 11:26; Kols. 2:18) Ya solo, bótya motema epai na Yehova, mpe bózala na kondima ete akosalisa baoyo nyonso balingaka ye bázwa bomoi ya solosolo.—Yoa. 6:48-54.
Bóyeba ete tozali na esengo mpenza ya kosala elongo na bino mpo na lokumu mpe nkembo ya Yehova.
Bandeko na bino,
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova