Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb15 nk. 2-3
  • Mokapo ya mobu 2015

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokapo ya mobu 2015
  • Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Bópesa Yehova matɔndi mpe bózwa mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • ‘Tómonisa botɔ́ndi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • “Bópesa Yehova matɔndi”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Tótya motema epai na Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
yb15 nk. 2-3
Elilingi na nkasa 2, 3

Mokapo ya mobu 2015

“Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu.”​—Nzembo 106:1

Ntango Yehova abikisaki bango na mabɔkɔ ya Farao mpe ya basoda na ye na Mbu Motane, Bayisraele bapesaki Yehova matɔndi mingi mpenza. Biso mpe tokoki kopesa Yehova matɔndi. Ya solo, ntango tokutani na mikakatano, ezalaka mpasi te tólɛmba nzoto. Na ntango yango, tokoki kobɔndisama mpe kozwa makasi soki tokanisi mapamboli oyo tozali na yango.

Moko ya mapamboli ya minene oyo tozali na yango ezali elikya oyo Yehova apesi biso ete akolongola eloko nyonso oyo epesaka biso mpasi mpe mawa. Ata soki makambo nini ya mpasi ekómeli biso, toyebi ete Yehova akosundola biso te. Yehova, Mobateli na biso ya bolingo, apesaka biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tósalela ye na bosembo. Azali “ekimelo mpe bokasi na biso, lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.” (Nz. 46:1) Kotya makanisi na mapamboli oyo alaki biso ekosalisa biso tólonga ata mikakatano ya ndenge nini. Na boumeli ya mbula oyo, tókanisaka ntango nyonso mapamboli na biso mpe mitema na biso etinda biso ‘tópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu; mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.’​—Nz. 106:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto