MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 106-109
“Bópesa Yehova matɔndi”
Mpo na nini Bayisraele baumelaki te kobosana misala ya kobikisa ya Yehova?
Balongolaki likebi na bango epai ya Yehova mpe balukaki mbala moko komisepelisa na makambo ya mosuni
Ndenge nini okoki kokóma na motema ya botɔndi mpe kobatela yango?
Kanisáká makambo oyo ekotinda yo ozala na botɔndi
Kanisáká elikya na biso mpo na mikolo ezali koya
Na libondeli, pesáká Yehova matɔndi mpo na makambo ya sikisiki