Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb16 lok. 126-lok. 127 par. 3
  • Azalaki mpenza mwana ya Sara

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Azalaki mpenza mwana ya Sara
  • Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Sara “Mama ya Bakonzi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • “Nzambe azali na koponapona te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • “Ozali mwasi moko kitoko mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Mateya nini tokoki kozwa epai ya basi oyo Biblia elobeli?
    Biyano na mituna ya Biblia
Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
yb16 lok. 126-lok. 127 par. 3

INDONÉSIE

Azalaki mpenza mwana ya Sara

Titi Koetin

  • ABOTAMAKI NA 1928

  • BATISIMO 1957

  • NA MOKUSE Asalisaki mobali na ye na mayele ayeba solo, atako azalaki kotɛmɛla ye.​—Mwana na ye, Mario Koetin nde abɛti lisolo yango.

Titi Koetin

MAMA azalaki motema pɛtɛɛ, moto ya boboto mpe azalaki kolinga Biblia. Ntango akutanaki na Gertrud Ott, oyo azalaki misionɛrɛ na Manado, na Sulawesi du Nord, andimaki na esengo koyekola Biblia mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Kasi papa na biso Erwin, oyo azalaki mokonzi na banki moko mpe na nsima akómaki prezida ya bato oyo basenzaka mbongo na Jakarta, azalaki kotɛmɛla mama makasi mpenza.

Mokolo moko, papa ayebisaki mama apona.

Alobaki na nkanda ete: “Poná: olingi lingomba na yo to mobali na yo?”

Mama akanisaki mingi. Na nsima ayanolaki na boboto ete: “Nalingi nyonso mibale: mobali na ngai mpe Yehova.”

Papa atikalaki monɔkɔ polele, mpe nkanda na ye ekitaki.

Na nsima, papa akómaki kotika mama asala makambo ya lingomba na ye, mpo alingaki mama mingi mpe azalaki kosepela na bwanya mpe bososoli na ye.

Kasi, mama azalaki kolinga ete papa mpe akɔta na losambo ya solo. Nsima ya kobondela mingi mpo na likambo yango, amikundolaki ete papa asepelaka mingi koyekola minɔkɔ mosusu. Na yango, abambaki maloba ya bavɛrsɛ ya Biblia na Lingelesi na bifelo ya ndako. Mama ayebisaki papa: “Nalingi koyeba Lingelesi malamu.” Lokola mama ayebaki ete papa asepelaka koloba liboso ya bato ebele, mama asɛngaki ye ayokaka ye ntango azali kozongela masolo na ye ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Papa andimaki. Lokola mama ayebaki ete papa alingaka koyamba bapaya, azalaki kosɛnga ye soki bakoki kopesa mokɛngɛli ya zongazonga esika ya kofanda. Papa andimaki. Mpe lokola ayebaki ete papa alingaka libota na ye mingi, na mayangani ya minene, mama azalaki kosɛnga ye soki akolinga tókende mpo tófanda elongo. Azalaki kosala yango.

Motema molai mpe mayele ya mama ekómaki kolɛmbisa motema ya papa mokemoke. Na nsima, ntango tokendaki kofanda na Angleterre, papa akómaki koyangana na makita mpe akómaki moninga ya ndeko John Barr, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Kaka na mbula wana, papa azwaki batisimo mpe mama asepelaki. Na bambula oyo elandaki, alingaki mama lisusu mingi koleka.

Bato nyonso bazalaki kolinga mama mpo na bizaleli na ye ya malamu, botosi na ye, mpe ndenge alingaki makambo ya Nzambe

Baninga na ngai mosusu balobaka ete mama azalaki lokola Lidia, mwasi mokristo ya siɛklɛ ya liboso oyo azalaki moyambi-bapaya. (Mis. 16:14, 15) Kasi, ngai namonaka ete amekolaki nde Sara, oyo azalaki komikitisa liboso ya mobali na ye, Abrahama. (1 Pe. 3:4-6) Mama azalaki na bizaleli malamu, na botosi, alingaki mpenza makambo ya Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kosepela na ye. Ndakisa na ye nde ebendaki papa na solo. Mpo na ngai, azalaki mpenza mwana ya Sara.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto