Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • yb17 lok. 105
  • Nazalaki na mposa mpenza bomoi na ngai ebongwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazalaki na mposa mpenza bomoi na ngai ebongwana
  • Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Namonaki ete bomoi na ngai ezalaki malamu mpenza
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Eloko oyo ebendaki ngai epai ya Batatoli ya Yehova
    Lamuká!—2010
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
yb17 lok. 105

GÉORGIE

Nazalaki na mposa mpenza bomoi na ngai ebongwana

Davit Samkharadze

  • ABOTAMAKI NA 1967

  • BATISIMO 1989

  • NA MOKUSE Azalaki mokɛngɛli-motamboli. Banda 2013, azali molakisi na biteyelo ya Biblia.

Davit Samkharadze na Eteyelo ya Biblia

NA 1985, ntango nazalaki na mbula 18, bakonzi ya Union Soviétique bakɔtisaki ngai mosala ya soda. Makambo ya kozanga bosembo oyo basoda bazalaki kosala mpe ndenge bazalaki konyokola bato ezalaki kotungisa ngai mpenza, mpe namilobelaki boye: ‘Naboyi kokóma lokola bango. Nakosala lokola bango te.’ Kasi namonaki ete nakokoka ntango nyonso te komonisa bizaleli oyo nazalaki kolinga. Nazalaki na mposa mpenza bomoi na ngai ebongwana.

Nsima ya kosilisa formasyo ya mosala ya soda, nazongaki ndako. Mokolo moko na butu nsima ya fɛti, nabondelaki Nzambe, nasɛngaki ye asalisa ngai nabongisa bizaleli na ngai. Mokolo oyo elandaki, ntango nazalaki kokende mosala, nalekaki kotala tata-mwasi na ngai, oyo azali Motatoli ya Yehova. Ntango nakɔtaki na ndako na ye, namonaki mwa ndambo ya bandeko oyo bayanganaki mpo na likita. Bayambaki ngai na esengo, yango wana namonaki malamu nafanda mpe nalanda likita yango.

Nandimaki koyekola Biblia mpe sanza motoba na nsima, nazwaki batisimo. Yehova asalisaki ngai nakóma moto malamu, mbongwana oyo nakokaki kosala na ndenge na ngai moko te.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto