Biblia ebongolaka bato
NINI etindaki moto moko oyo azalaki kolinga bato te, oyo alingaki mingi miziki ya makasimakasi (rock), ayekola kolinga bato mpe akóma kosalisa basusu? Nini etindaki mobali moko na Mexique, atika bomoi ya mbindo? Mpo na nini mosani moko ya lisano ya velo na ekólo Japon, atikaki lisano yango mpo na kosalela Nzambe? Tótalela makambo oyo bato yango balobi.
“Nazalaki moto azangá bonkonde, ya lolendo mpe ya mobulu.”—DENNIS O’BEIRNE
ABOTAMAKI NA: 1958
EKÓLO: ANGLETERRE
BOMOI NA YE YA KALA: MOTO OYO AZALAKI KOLINGA BATO TE KASI AZALAKI KOLINGA MIZIKI YA ROCK
NDENGE NAZALAKI: Na ngambo ya tata na biso, tozali bato ya Irlande, mpe ntango nazalaki mwana moke, nazalaki kokɔta na Lingomba ya Katolike ya Irlande. Mbala mingi, nazalaki kokende ngai moko na losambo, atako nazalaki kolinga te kokende kuna. Kasi, nazalaki kaka na mposa makasi ya makambo ya Nzambe. Nazalaki kozongela mbala na mbala libondeli ya Tata wa biso, mpe nabosanaka te ndenge nazalaki kolala na mbeto na butu mpe kokanisa na ndimbola na yango. Nazalaki kokabola libondeli yango na biteni mpe koluka koyeba ndimbola ya eteni mokomoko.
Ntango nazalaki elenge nakɔtaki na etuluku ya Barasta. Nazalaki mpe kosepela na makambo ya politiki, na ndakisa oyo ezalaki kotɛmɛla boyangeli ya Nazi. Kasi, namikɔtisaki mpenza na ezaleli ya botɔmbɔki oyo bato ya miziki ya rock balakisaka. Nakómaki komɛla bangi, mingimingi marijuana, pene ya mikolo nyonso. Nakómaki na ezaleli ya “moto oyo akipaka makambo ya bato te,” nazalaki komɛla mingi, nazalaki kotya bomoi na ngai na likama, mpe nazalaki mpenza te kokipe bato. Nazalaki kolinga bato te, ezalaki mpasi mpo nasolola na bato, longola kaka soki namoni ete lisolo yango ezali na ntina. Nazalaki kutu koboya bákanga ngai fɔtɔ. Soki nakanisi ndenge nazalaki, namonaka ete nazalaki moto azangá bonkonde, ya lolendo mpe ya mobulu. Nazalaki na boboto mpe kokabela kaka moto oyo azali moninga na ngai.
Ntango nakómaki na mbula soki 20, nakómaki kosepela kotánga Biblia. Moninga na ngai moko oyo azalaki kotɛka bangi akómaki kotánga Biblia na kati ya bɔlɔkɔ, mpe tozalaki kosolola ntango molai makambo ya lingomba, ya losambo mpe makambo oyo Satana asalaka na mokili. Nasombaki Biblia mpe nabandaki kotánga yango ngai moko. Ngai ná moninga na ngai tozalaki kotánga Biblia, mpe tozalaki kokutana mpo na kolobela makambo oyo totángi mpe tozalaki kokóma na makanisi ndenge moko. Tosalaki bongo na boumeli ya basanza mingi.
Talá makanisi oyo tokómaki na yango nsima ya kotánga Biblia: tozali na mikolo ya nsuka ya mokili oyo; bakristo basengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe; basengeli te kokɔta na makambo ya mokili oyo, ata mpe makambo na yango ya politiki; Biblia epesaka batoli oyo ebongi na oyo etali bizaleli malamu. Tomonaki polele ete Biblia ezali solo mpe ete lingomba ya solo esengeli kozala kaka moko. Kasi oyo wapi? Tokanisaki liboso na mangomba ya minene, oyo na milulu na bango basalaka makambo ebele, na ndakisa, kolata bilamba ndenge na ndenge mpe bamikɔtisaka na makambo ya politiki, mpe tomonaki ete Yesu azalaki ndenge wana te. Toyebaki ete Nzambe azali kosalela bango te, yango wana tozwaki ekateli ya kotalela mwa mangomba ya mikemike mpo na kotala soki tokozwa nini kuna.
Tozalaki kokutana na bandimi ya mangomba yango mpe kotuna bango ebele ya mituna. Toyebaki oyo Biblia elobi na motuna mokomoko, yango wana, tokokaki komona polele soki biyano na bango eyokani na Liloba ya Nzambe. Nsima ya makita yango, nazalaki ntango nyonso kobondela Nzambe ete: ‘Soki bato oyo bazali mpenza na lingomba ya solo, salisá ngai nakende lisusu koyangana ná bango.’ Kasi, nsima ya kokende na makita ya ndenge wana basanza mingi, namonaki kaka te lingomba oyo eyanolaki na mituna na biso na Biblia; nazalaki na mposa lisusu mpe te ya kokende na lingomba ata moko.
Nsukansuka, ngai ná moninga na ngai tokutanaki na Batatoli ya Yehova. Totunaki kaka mituna oyo tomesanaki kotuna, kasi bapesaki biso biyano na Biblia. Makambo oyo balobaki, eyokanaki mpenza na oyo tosilaki koyekola. Yango wana, tokómaki kotuna bango mituna oyo tozwaki naino biyano ya Biblia te; na ndakisa, ndenge Nzambe atalelaka komɛla makaya mpe bangi. Lisusu, basalelaki kaka Liloba ya Nzambe mpo na koyanola. Tondimaki kokende na likita moko na Ndako ya Bokonzi.
Koyangana na makita ezalaki mpasi mpo na ngai. Lokola nazalaki kolinga bato te, nalingaki te kozala pene ya bato wana ya boboto oyo balataki malamu. Nazalaki na makanisi mabe mpo na bamosusu, mpe nalingaki kokende ata na likita moko te lisusu. Kasi, lokola momeseno, nabondelaki Nzambe apesa ngai mposa ya kokende koyangana na bato yango lisusu soki bazali na lingomba ya solo, mpe nayokaki mposa makasi ete Batatoli ya Yehova báyekola na ngai Biblia.
NDENGE OYO BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nayebaki ete nasengeli kotika komɛla bangi, mpe nazalaki na likoki ya kotika yango noki. Kasi, nazalaki mpenza na mokakatano ya kotika makaya. Mbala mingi, namekaki kotika kasi nazalaki kolonga te. Ntango nayokaki ete bato mosusu babwakaki makaya na bango mpe bazalaki komɛla lisusu te, nabondelaki Yehova mpo na likambo yango. Na nsima, na lisalisi ya Yehova, natikaki komɛla makaya. Namonaki ete ezali na ntina koyebisa Yehova makambo nyonso na libondeli.
Mbongwana mosusu ya monene oyo nasalaki ezalaki ndenge na ngai ya kolata mpe ya kobongisa nzoto. Na mbala ya liboso oyo nakendaki na Ndako ya Bokonzi, nsuki na ngai ezalaki milaimilai, mpe bapasolá nzela na kati. Na nsima, natyaki yango langi ya bule. Nalataki djini mpe vɛstɛ oyo bakomakomá. Namonaki ntina te ya kobongola lolenge na ngai ya kolata, atako Batatoli ya Yehova basalisaki ngai na boboto nyonso. Kasi, nsukansuka, nakanisaki na makambo oyo ezali na 1 Yoane 2:15-17: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te.” Namonaki ete molato na ngai ezalaki komonisa ete nazali nde kolinga mokili oyo, mpe ete mpo na komonisa ete nalingi Nzambe, nasengeli kobongwana. Yango nde nasalaki.
Na nsima, nayaki komona ete kaka Batatoli te nde balingaki ete nayanganaka na makita. Mokanda ya Baebre 10:24, 25 emonisaki ngai ete ezali likambo oyo Nzambe alingaki nasala. Ntango nabandaki kokende na makita nyonso mpe nayebanaki mpenza na bandeko, nazwaki ekateli ya kozwa batisimo mpo na komonisa ete namipesi epai ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI: Nasepelaki mpenza na ndenge Yehova atikaka ete tókóma mpenza baninga na ye. Motema mawa na ye mpe ndenge oyo atyelaka biso likebi, etindaki ngai namekola ye mpe nalanda ndakisa ya Mwana na ye, Yesu Kristo, na bomoi na ngai. (1 Petro 2:21) Nayekolaki ete wana nazali kosala makasi mpo na kozala na bizaleli ya mokristo, nakoki mpe kozala na ndenge oyo bato bakobanda koyeba ngai. Nasalaki makasi nakóma na bolingo mpe kotyela basusu likebi. Nasalaka makasi namekola Kristo na ndenge na ngai ya kosalela mwasi mpe mwana na ngai makambo. Mpe namibanzabanzaka mingi mpo na bandeko na ngai ya lisangá. Kolanda Kristo epesi ngai lokumu, nakómi komimona ete nazali na ntina, mpe nakómi na likoki ya kolinga basusu.
“Bapesaki ngai limemya.”—GUADALUPE VILLARREAL
ABOTAMAKI NA: 1964
EKÓLO: MEXIQUE
BOMOI NA YE YA KALA: MISALA YA MBINDO
NDENGE NAZALAKI: Nazali moko ya bana nsambo na libota na biso, nakolá na engumba Hermosillo na etúká ya Sonora na Mexique, esika moko oyo bobola ezalaki makasi. Tata akufaki ntango nazalaki naino mwana moke, yango wana, mama asengelaki kosala mosala makasi mpo na kosunga biso. Nazalaki mbala mingi kotambola makolo ngulu mpo tozalaki na mbongo te ya kosomba sapato. Ntango nazalaki naino elenge mpenza, nabandaki kosala mosala mpo na kosunga libota na biso na mwa mbongo. Lokola mabota mingi, tozalaki kofanda biso nyonso na mwa ndako ya moke.
Mikolo pene na nyonso, mama azalaki kofanda na ndako te mpo na kobatela biso bana. Ntango nazalaki na mbula 6, elenge moko ya mbula 15 akómaki kosangisa na ngai nzoto. Likambo yango ekobaki ntango molai. Moko ya likambo oyo yango esalaki ngai, ezali ete nakómaki na mobulungano na likambo etali kosangisa nzoto. Nazalaki kokanisa ete ezali mabe te mibali basepela na ngai. Ntango nalukaki lisalisi ya minganga to ya bakonzi ya mangomba, bayebisaki ngai ete nazalaki na likambo te mpe makanisi na ngai ezalaki mabe te.
Ntango nakómaki na mbula 14, nazwaki ekateli ya kosala makambo mpe kolata lokola mibali oyo basangisaka nzoto na baninga na bango mibali. Nazalaki ndenge wana bambula 11 oyo elandaki, na ntango wana, nazalaki kutu kobima na mibali ndenge na ndenge. Nsukansuka, nakómaki na mosala ya kobongisa bato nsuki mpe nakómaki kokamba magazini moko ya kitoko. Atako bongo, nazalaki na esengo te. Nazalaki mbala mingi konyokwama mpo babebisá ngai mpenza. Nazalaki komona ete makambo nazalaki kosala ezali malamu te. Nabandaki komituna boye: ‘Ezali na bato ya malamu mpe oyo babongi kotyelama motema?’
Nakanisaki yaya na ngai ya mwasi. Abandaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova mpe azwaki batisimo. Azalaki koyebisa ngai makambo azalaki koyekola, kasi natyelaki yango likebi te. Kasi, nazalaki kosepela na lolenge ya bomoi oyo azalaki na yango mpe mpo na libala na ye. Nazalaki komona ndenge ye ná mobali na ye bazalaki kolingana mpenza mpe kopesana limemya. Bazalaki kosalelana makambo na boboto. Na nsima, Motatoli moko ya Yehova abandaki koyekola na ngai Biblia. Na ebandeli, nandimaki kaka koyekola, kasi nazalaki na esengo te. Na nsima makambo ebongwanaki.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Batatoli ya Yehova babengaki ngai na moko ya makita na bango, mpe nakendaki. Ezalaki likambo ya sika mpo na ngai. Bato pene na nyonso basɛkaka ngai, kasi Batatoli ya Yehova basalaki bongo te. Bapesaki ngai mbote na boboto, mpe bapesaki ngai limemya. Esimbaki mpenza motema na ngai.
Nasepelaki lisusu na Batatoli ya Yehova ntango nakendeki na liyangani na bango. Namonaki ete ata na liyangani ya bato ebele, bazalaki kaka ndenge yaya na ngai ya mwasi azalaka, boboto mpe sembo. Namitunaki soki yango ekokaki kozala etuluku ya bato ya malamu oyo nazalaki koluka banda kala. Bolingo mpe bomoko na bango ekamwisaki ngai, ndenge kaka nakamwaki ntango bazalaki kosalela Biblia mpo na koyanola na motuna nyonso. Namonaki ete Biblia nde ezalaki kosalisa bango bázala na bizaleli ya malamu na bomoi na bango. Namonaki mpe ete ekosɛnga nabongola makambo mingi mpo nakóma moko na bango.
Kutu, esengelaki nasala mbongwana mpenza, mpo nazalaki kosala makambo ndenge basi basalaka. Maloba na ngai, ndenge na ngai ya koloba, kolata, ndenge na ngai ya kobongisa nsuki, mpe kopona baninga, nyonso wana esɛngaki nabongola yango. Baninga na ngai ya kala babandaki kosɛka ngai, bazalaki koloba: “Mpo na nini ozali kosala boye? Ndenge oyo ozalaki liboso ezalaki malamu. Koyekola Biblia te. Ozangi eloko te.” Kasi, makambo oyo ezalaki mpasi mpo na kotika ezalaki misala to bomoi na ngai ya mbindo.
Atako bongo, nayebaki ete nakokaki kobongwana mpenza, mpo maloba oyo ezali na 1 Bakorinti 6:9-11 esimbaki motema na ngai; elobi ete: “Boni! Boyebi te ete bato bazangi boyengebene bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te? Bómikosa te. Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali . . . bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te. Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosukwami pɛɛ.” Na ntango wana, Yehova asalisaki bato bábongwana, asalisaki ngai mpe. Esɛngaki bambula mingi mpe kobunda mpenza etumba, kasi batoli mpe bolingo ya Batatoli ya Yehova esalisaki ngai mingi mpo nalonga.
MATOMBA OYO NAZWI: Lelo oyo, nazali na bomoi ya malamu. Nabalá, mpe ngai ná mwasi na ngai tozali koteya mwana na biso ndenge ya kolanda batoli ya Biblia na bomoi na ye. Natiká bomoi na ngai ya kala, mpe nazwi mapamboli mpe matomba mingi na lisangá ya Yehova. Nazali nkulutu ya lisangá, mpe nasalisi bato mosusu báyeba Liloba ya Nzambe. Mbongwana oyo nasali na bomoi na ngai esepelisaki mama na ngai, mpe andimaki koyekola Biblia mpe azwá batisimo. Leki na ngai ya mwasi oyo azalaki mpe na bomoi ya mbindo akómá mpe Motatoli ya Yehova.
Ata mpe bato mosusu oyo bayebaki ngai na bomoi na ngai wana ya kala, bandimaka ete nabongwaná mpenza. Nayebi makambo oyo esalisaki ngai nabongwana ndenge wana. Liboso nasala mbongwana wana, nalukaki lisalisi ya minganga, kasi bapesaki ngai kaka batoli ya mabe. Nzokande, Yehova asalisaki ngai mpenza. Atako namonaki ete nazali na ntina te, amonaki ngai mpe amoniselaki ngai bolingo mpe motema molai. Lokola Nzambe wana ya malamu, ya mayele, mpe ya bolingo akokaki komona ngai mpe alingaki ete nakóma na bomoi ya malamu mpenza, yango esali ete nabongwana.
“Nazalaki koyoka ete nazali ngai moko, na esengo te mpe nazangi eloko moko.”—KAZUHIRO KUNIMOCHI
ABOTAMAKI NA: 1951
EKÓLO: JAPON
NDENGE NAZALAKI: MOSANI MONENE YA MOMEKANO YA VELO
NDENGE NAZALAKI: Nakolá na Shizuoka, engumba moko ya Japon, oyo libongo ezali, epai libota na biso ya bato mwambe tozalaki kofanda na mwa ndako moko ya moke. Tata na biso azalaki kokamba magazini moko ya bavelo. Ntango nazalaki naino moke, azalaki komema ngai na masano ya velo mpe alingaki ete ngai mpe nasepela na masano yango. Na nsima, tata abandaki kozwa bibongiseli mpo nakóma mosani oyo ayebi mosala yango malamu. Ntango nazalaki naino na kelasi ya ntei, abandaki kopesa ngai formasyo oyo esengeli. Na kelasi ya ntei, nalongaki mbala misato elandani na momekano oyo babongisaka mbula na mbula na ekólo mpo na lisano ya velo. Nazwaki libaku ya kokɔta iniversite, kasi namonaki malamu nakende mbala moko na eteyelo ya bapoti mbangu ya velo. Ntango nakómaki na mbula 19, nakómaki mopoti mbangu ya makoki mpenza.
Banda wana, mokano na ngai na bomoi ezalaki ya kokóma mosani ya velo oyo aleki bato nyonso na Japon. Nakanaki kokóma na mbongo mingi mpo nasalisa libota na biso ezala na bomoi ya malamu. Namipesaki mpenza na formasyo. Atako nazalaki kobanga makambo ya makasi oyo formasyo yango ezalaki kosɛnga, to mpe mokakatano ya monene ya lisano yango, nazalaki koloba ntango nyonso ete nabotamá mpo nazala mosani ya velo mpe nasengeli kaka kosala yango! Mpe nasalaki bongo. Mosala makasi oyo nasalaki ebandaki kofuta. Na mbula ya liboso oyo nabandaki lisano yango, nalongaki moto ya liboso kati na bato ya sika oyo basalaki lisano yango. Na mbula ya mibale, nandimamaki na momekano ya basani ya velo oyo basengelaki koluka mosani oyo akobima moto ya liboso na Japon mobimba. Mbala motoba mobimba, nazalaki kobima kaka na esika ya mibale.
Lokola natikalaki na kati ya bato ya liboso oyo bazalaki kozwa mbano, nayebanaki lokola “mosani monene ya Tokai,” etúká moko ya Japon. Nalingaki nazalaka kaka moto ya liboso. Na nsima, bato bakómaki kobanga ngai mpo na ntango ya masano, nazalaki koyokela moto mawa te. Nakómaki na mbongo mingi, mpe namonaki ete nakoki kosomba eloko nyonso oyo miso na ngai esepeli na yango. Nasombaki ndako moko oyo ezalaki na eteni moko oyo ezalaki na bamasini ya malamu mpo na kosala ngalasisi. Nasombaki motuka moko na mokili ya bapaya, oyo mbongo na yango ekokaki kosomba ata lopango. Mpo na kobatela mbongo na ngai, nakómaki kosomba mapango mpe bandako, mpe kokɔtisa mbongo na bakompanyi ya mimbongo.
Atako bongo, nazalaki koyoka ete nazali ngai moko, na esengo te mpe nazangi eloko moko. Na ntango wana nabalaki mpe nazalaki na bana, kasi mbala mingi nazalaki motema mokuse epai ya bato ya libota na ngai. Nazalaki kosilikela mwasi na ngai mpe bana na ngai na makambo ya mikemike. Na kobanga nyonso, bakómaki kotala elongi na ngai mpo na komona soki nalingi lisusu kosilika na likambo nini.
Kasi, na nsima, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola na mwasi na ngai Biblia. Yango ememaki mbongwana mingi. Alobaki ete azali na mposa ya koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, yango wana namonaki malamu tókende libota mobimba. Nabosanaka te butu oyo nkulutu moko ayaki epai na biso mpe abandaki koyekola na ngai Biblia. Makambo oyo nayekolaki esimbaki mpenza motema na ngai.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nakobosana soki moke te ndenge kotánga Baefese 5:5 esimbaki motema na ngai. Elobi boye: “Moto moko te ya pite to moto ya mbindo to moto ya lokoso—oyo elakisi kozala mosambeli ya bikeko—azali na libula na bokonzi ya Kristo mpe ya Nzambe.” Namonaki ete momekano ya lisano ya velo ekokani mpenza na masano ya mbongo mpe ete masano etindaka bato na lokoso. Lisosoli na ngai ekómaki kotungisama. Namonaki ete mpo nasepelisa Yehova Nzambe, esengeli natika masano ya velo. Kasi ezalaki ekateli ya pɛtɛɛ te mpo na ngai.
Nautaki kosilisa mbula oyo nazwaki mbano oyo nazwá naino te, mpe nazalaki na mposa makasi ya kosala lisusu mingi. Kasi, namonaki ete koyekola Biblia esalisaki ngai nakóma na kimya mpe makanisi malamu, likambo oyo ekeseni mpenza na elimo oyo nazalaki na yango mposa, mpo nalongaka na masano ya velo! Nsima ya kobanda koyekola Biblia nasalaki momekano yango mbala misato kaka, kasi motema na ngai ezalaki lisusu kuna te. Nayebaki te ndenge nakoki kosunga libota na ngai. Nayebaki te nini nasala, kokende liboso to kozonga nsima, mpe bandeko na ngai batyaki ngai mpanzi likoló mpo nakómaki Motatoli ya Yehova. Tata alɛmbaki mpenza nzoto. Lokola nabulunganaki, nakómaki komitungisa mingi mpe nabɛlaki maladi makasi na estoma.
Likambo oyo esalisaki ngai na ntango wana ya mpasi ezali ete nakobaki koyekola Biblia mpe kokende na makita ya Batatoli ya Yehova. Mokemoke, kondima na ngai ekómaki makasi mpenza. Nasɛngaki Yehova ayoka mabondeli na ngai mpe asalisa ngai namona ete asali. Mitungisi na ngai ekitaki ntango mwasi na ngai ayebisaki ngai ete azali na mposa te ya kofanda kaka na ndako ya monene mpo azala na esengo. Malɛmbɛmalɛmbɛ, nakendaki liboso.
MATOMBA OYO NAZWI: Namonaki ete maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33 ezali solo mpenza. Alobaki ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” Ndenge Yesu alobaki yango, tozangaki te ‘biloko mosusu,’ elingi koloba biloko ya ntina mpo na bomoi. Atako mbongo oyo nazwaka lelo ekoki kokóma ata moke te pene na oyo nazalaki kozwa ntango nazalaki mosani ya velo, ngai ná libota na ngai tozangi ata eloko moko te na boumeli ya mbula 20 oyo euti koleka.
Oyo eleki ntina, ezali ete ntango nazali kosalela mpe kosambela Yehova elongo na bandeko na ngai bakristo, nayokaka esengo oyo nazalaki na yango liboso te. Lokola nazali komipesa mingi na mosala ya Yehova, mikolo ezali kokende mbangu. Bomoi ya libota na ngai ebongá mpenza. Bana na biso misato mpe basi na bango, bango nyonso bakómá basaleli ya sembo ya Yehova.