Tokoki kozala pɛto
“Bópɛtola mabɔkɔ na bino, . . . mpe bókómisa mitema na bino pɛto.”—YAKOBO 4:8.
1. Likambo nini bato mingi bakanisaka ete ezali mabe te?
TOZALI na kati ya mokili oyo etondi mpenza na makambo ya mbindo. Na ndakisa, bato mingi bakanisaka ete ezali mabe te kosangisa nzoto mibali na mibali, basi na basi to na moto oyo bobalani na ye te. Bafilme, babuku, nzembo mpe bapiblisite etondi na makambo ya pite to ekobo. (Nzembo 12:8) Kasi Yehova akoki kosalisa biso tózala na bomoi oyo esepelisaka ye. Tokoki kozala pɛto na mokili oyo etondi mpenza na makambo ya mbindo.—Tángá 1 Batesaloniki 4:3-5.
2, 3. (a) Mpo na nini tosengeli kobwaka bamposa mabe? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli koboya makambo nyonso oyo ayinaka. Kasi lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kokangama na motambo ya pite, ndenge kaka mbisi ekangamaka na ndɔbɔ. Soki makanisi ya pite ebandi koyela biso, tosengeli kobengana yango nokinoki. Soki tosali yango te, makanisi ya mbindo ekozwa misisa mpe ntango libaku ya kosala lisumu ekomonana, tokosala yango. Yango wana, Biblia elobaka ete: “Mposa wana, ntango ezwi zemi, eboti lisumu.”—Tángá Yakobo 1:14, 15.
3 Mposa ya mabe ekoki kokola na motema na biso. Yango wana tosengeli kokeba makasi mpenza ntango mposa moko ebandi na motema na biso. Soki tobwaki bamposa mabe, tokoboya pite to ekobo mpe makama oyo yango ebimisaka. (Bagalatia 5:16) Na lisolo oyo, tokolobela makambo misato oyo ekosalisa biso tóbundisa bamposa mabe: boyokani na biso elongo na Yehova, toli ya Liloba na ye mpe lisalisi ya bakristo oyo bakɔmeli.
“BÓPUSANA PENEPENE NA NZAMBE”
4. Mpo na nini ezali na ntina mpenza ete tópusana penepene na Yehova?
4 Biblia eyebisi baoyo balingi ‘kopusana penepene na Nzambe’ ete: ‘Bápɛtola mabɔkɔ na bango’ mpe ‘bákómisa mitema na bango pɛto.’ (Yakobo 4:8) Soki Yehova azali moninga na biso ya motema, tokolinga ete misala na biso esepelisa ye mpe lisusu tokolinga ete makanisi na biso esepelisa ye. Soki makanisi na biso ezali pɛto, motema na biso mpe ekozala pɛto. (Nzembo 24:3, 4; 51:6; Bafilipi 4:8) Yehova ayebaka ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe ete tokoki kobanda kokanisa makambo ya mbindo. Kasi lokola tolingaka te koyokisa Yehova mawa, tosalaka nyonso mpo tóbwaka makanisi ya mabe. (Ebandeli 6:5, 6) Tosalaka nyonso mpo tóbatela makanisi na biso pɛto.
5, 6. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tóbundisa bamposa ya mbindo?
5 Yehova akosalisa biso tóbundisa makanisi ya mbindo ntango tozali kokoba kosɛnga ye lisalisi na libondeli. Apesaka biso elimo santu na ye mpo tózala na nguya ya kozala pɛto. Na mabondeli na biso, tokoki koyebisa Yehova ete tolingi makanisi na biso esepelisa ye. (Nzembo 19:14) Na komikitisa nyonso tosɛngaka ye atala soki ata mwa mposa moko ya mabe ezali na motema na biso oyo ekoki kotinda biso na lisumu. (Nzembo 139:23, 24) Kobá kosɛnga Yehova asalisa yo oboya pite to ekobo mpe osala oyo ezali malamu ata na ntango ya mikakatano.—Matai 6:13.
6 Liboso ya koyeba Yehova, ekoki kozala ete tozalaki kolinga makambo oyo ezalaki kosepelisa Yehova te, mpe ekoki kozala ete tozali kobunda na bamposa yango mabe. Kasi Yehova akoki kosalisa biso tóbongwana mpe tósala oyo esepelisaka ye. Na ndakisa, nsima ya kosala ekobo na Bate-sheba, mokonzi Davidi abongolaki motema mpe abondelaki Yehova apesa ye “motema ya pɛto” mpe asalisa ye azala na botosi. (Nzembo 51:10, 12) Soki tozalaki na bamposa ya mbindo kala mpe tozali kobunda na yango, Yehova akoki kosalisa biso tózala na mposa makasi mpenza ya kotosa ye mpe ya kosala oyo ezali malamu. Akoki kosalisa biso tólonga makanisi na biso ya kozanga kokoka.—Nzembo 119:133.
Soki mposa mabe ebandi kokola na motema na biso, tosengeli kolongola yango nokinoki (Talá paragrafe 6)
“BÓKÓMA BATOSI YA LILOBA”
7. Ndenge nini Liloba ya Nzambe esalisaka biso tóbwaka makanisi ya mbindo?
7 Yehova akoki koyanola na mabondeli na biso oyo tosɛngaka ye asalisa biso, na nzela ya Liloba na ye Biblia. Na kati ya Biblia, tozwaka bwanya ya Nzambe, oyo ezali pɛto. (Yakobo 3:17) Ntango tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, tokotondisa motema na biso na makanisi ya pɛto. (Nzembo 19:7, 11; 119:9, 11) Lisusu, Biblia ezali na bandakisa mpe makebisi oyo esalisaka biso tóboya makanisi mpe bamposa ya mbindo.
8, 9. (a) Nini esalaki ete elenge mobali moko asangisa nzoto na mwasi moko ya ndumba? (b) Makambo nini ndakisa oyo Masese mokapo 7 elobeli ekoki kosalisa biso tóboya?
8 Na mokanda ya Masese 5:8, Liloba ya Nzambe ekebisi biso ete tókima pite. Na Masese mokapo 7, tozali kotánga lisolo ya elenge mobali moko oyo akendeki mokolo moko na butu kotambola mosika te na ndako ya mwasi moko ya ndumba. Mwasi yango azalaki na esika babalabala ekutaná, mpe alataki “bilamba ya mwasi ya ndumba.” Apusanaki epai na ye, asimbaki ye, apwɛpwaki ye mpe alobaki na ye makambo oyo etindaki ye akóma na bamposa ya mabe. Abenganaki bamposa yango te, mpe nsukansuka asangisaki nzoto ná ye. Atako akanaki kosala lisumu te, kasi asalaki yango. Na nsima, akómaki komitungisa mingi mpo na makama oyo eyaki. Soki amonaka likama, alingaki kokima mwasi wana!—Masese 7:6-27.
9 Ndenge moko na elenge mobali wana, tokoki kozwa bikateli ya mabe mpo tomonaki likama te. Na ndakisa, na butu, bashɛnɛ mingi ya televizyo elakisaka makambo ya mbindo, na yango ekozala likama kokoba kolukaluka bashɛnɛ mosusu kaka mpo na komona nini bazali kolakisa. Ekozala mpe likama kofungola na internet bisika oyo toyebi te epai nini ekomema biso, ata mpe kokɔta na basite oyo ezali kosala bapiblisite ya makambo ya mbindo mpe pornografi. Soki tozali kotala makambo oyo balobeli awa, yango ekoki kotinda biso tókóma na bamposa ya mbindo, mpe ekoki kotinda biso tózanga botosi epai ya Yehova.
10. Mpo na nini kozala seresere kaka mpamba ezali likama? (Talá elilingi na ebandeli.)
10 Biblia eyebisi biso mpe ndenge mibali mpe basi basengeli kosalelana makambo. (Tángá 1 Timote 5:2.) Mokristo amonisaka lolango kaka epai ya molongani na ye to epai ya moto oyo alingi kobalana na ye. Bazalaka te seresere kaka mpamba. Basusu bakanisaka ete kolakisana lolango ná moto moko, na ndakisa na makambo lokola mwa kodendadenda, kosala bajɛstɛ mosusu, to kofinela miso, ezali mabe te soki basimbani te na nzoto. Kasi ntango bato mibale bakómi seresere, bakoki kokóma na makanisi ya mbindo, mpe yango ekoki kotinda na kosala pite to ekobo. Makambo ya boye esalemá mpe ekosalemaka kaka.
11. Liteya nini tozwi epai ya Yozefe?
11 Yozefe azali ndakisa malamu mpo na biso. Mwasi ya Potifare alukaki kotinda Yozefe asangisa nzoto ná ye. Aboyaki, kasi mwasi yango akobaki kaka komeka ye. Mikolo nyonso azalaki kosɛnga Yozefe ete ‘azala elongo na ye.’ (Ebandeli 39:7, 8, 10) Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobaki ete mwasi ya Potifare akanisaki ete soki bazali kaka bango mibale, Yozefe akolula ye. Yozefe azwaki ekateli ya kolanda te maloba na ye ya kolɛngola, mpe azalaki seresere na ye te. Kutu, atikaki te ete bamposa wana ya mabe ekola na motema na ye. Mpe ntango asimbaki elamba ya Yozefe mpe alukaki kosɛnga ye na makasi asangisa nzoto ná ye, mbala moko Yozefe “atikaki elamba na ye na lobɔkɔ na ye mpe akimaki mpe abimaki libándá.”—Ebandeli 39:12.
12. Ndenge nini toyebi ete makambo oyo totalaka ekoki kobebisa motema na biso?
12 Yesu akebisaki ete makambo oyo totalaka ekoki kobimisa bamposa ya kosangisa nzoto na motema na biso. Alobaki: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:28) Yango nde ekómelaki Mokonzi Davidi. “Longwa na nsamba yango, amonaki mwasi moko azali kosukola,” kasi atikaki te kotala ye mpe kokanisa ye. (2 Samwele 11:2) Atako azalaki mwasi ya mobali mosusu, akómaki na mposa na ye mpe asangisaki nzoto ná ye.
13. Mpo na nini tosengeli kosala “kondimana” na miso na biso, mpe ndenge nini tosalaka yango?
13 Soki tolingi tóboya makanisi ya mbindo, tosengeli kolanda ndakisa ya Yobo. Alobaki ete: “Nasalá kondimana na miso na ngai.” (Yobo 31:1, 7, 9) Na ndakisa ya Yobo, tosengeli kozwa ekateli ya kokanisa te na lolenge ya kosala pite na moto oyo tozali kotala. Mpe soki tomoni elilingi ya kosangisa nzoto na ordinatɛrɛ, na piblisite, zulunalo to na esika nini, tólongola yango mbala moko.
14. Tosengeli kosala nini mpo tózala pɛto?
14 Soki okanisi na makambo oyo tolobeli, okomona ete osengeli kosala makasi mingi mpo na kobundisa bamposa ya mbindo. Soki osengeli osala bambongwana, salá yango mbala moko! Ntango ozali kotosa oyo Yehova alobaka, okokwea te na pite to ekobo mpe okozala pɛto.—Tángá Yakobo 1:21-25.
‘BENGÁ BANKULUTU’
15. Soki tozali komona ete ezali mpasi kobundisa bamposa mabe, mpo na nini ezali na ntina mingi koluka lisalisi?
15 Soki omonaka ete ezali mpasi kobundisa bamposa mabe, sololá na ndeko moko ya lisangá oyo asaleli Yehova ntango molai mpe oyo akoki kopesa yo toli ya malamu oyo euti na Liloba ya Nzambe. Ekoki mbala mosusu kozala mpasi oyebisa bato makambo mpenzampenza oyo ezali kotungisa yo, kasi koluka lisalisi ezali na ntina mingi. (Masese 18:1; Baebre 3:12, 13) Bakristo oyo bakɔmɛli bakoki kosalisa yo omona bambongwana nini osengeli kosala. Na yango, osengeli kosala bambongwana yango mpo Yehova akoba kozala moninga na yo.
16, 17. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa baoyo bazalaka na mokakatano ya kobundisa bamposa ya mbindo? Pesá ndakisa. (b) Mpo na nini ezali na ntina mingi ete baoyo batalaka pornografi báluka lisalisi nokinoki?
16 Bankulutu ya masangá na biso, babongi mpenza mpo na kosalisa biso. (Tángá Yakobo 5:13-15.) Na boumeli ya mbula ebele, elenge mobali moko na ekólo Brésil azalaki na mokakatano mpo na kobundisa bamposa mabe. Alobi boye: “Nayebaki ete makanisi na ngai ezalaki kosepelisa Yehova te, kasi nazalaki koyoka nsɔni mingi mpo na koyebisa basusu ndenge nazalaki koyoka.” Nkulutu moko amonaki ete elenge mobali yango asengeli na lisalisi mpe alendisaki ye ete atika bankulutu básalisa ye. Elenge mobali yango alobi boye: “Nakamwaki na boboto oyo bankulutu bamoniselaki ngai, nakanisaki te ete bakokaki komonisela ngai boboto mingi mpe komitya na esika na ngai ndenge wana. Bayokaki mikakatano oyo nazalaki na yango na likebi mpenza. Basalelaki Biblia mpo na komonisa ngai ete Yehova azali kaka kolinga ngai, mpe babondelaki elongo na ngai. Yango esalisaki ngai nandima na pɛtɛɛ nyonso toli ya Biblia oyo bapesaki.” Nsima ya kokómisa makasi boyokani na ye ná Yehova, alobi boye: “Namoni sikoyo ete ezali na ntina mingi koluka lisalisi na esika ya koluka kosilisa mikakatano oyo tozali na yango kaka biso moko.”
17 Soki ozali na momeseno ya kotala pornografi, osengeli koluka lisalisi mbala moko. Soki ozali kolekisa ntango mpo na koluka lisalisi, okokóma mpe na likama monene ya kosala pite to ekobo. Na nsima, okoyokisa basusu motema mpasi mpe bato bakoloba mabe mpo na Yehova. Bato mingi basɛngaki lisalisi epai ya bankulutu mpe bandimaki toli na bango mpo básepelisa Yehova mpe bátikala na lisangá ya bokristo.—Nzembo 141:5; Baebre 12:5, 6; Yakobo 1:15.
ZALÁ NA EKATELI YA KOZALA PƐTO!
18. Ozali na ekateli ya kosala nini?
18 Mokili ya Satana ezali se kokóma mbindo. Kasi basaleli ya Yehova basalaka makasi bábatela makanisi na bango pɛto mpe bázala na bizaleli oyo ebongi. Yehova asepelaka mpenza na bakristo ya ndenge wana. Tókoba kozala penepene na Yehova mpe kolanda toli oyo tozali kozwa na Liloba na ye mpe na lisangá ya bokristo. Soki tosali yango, tokozala na esengo mpe na lisosoli ya pɛto. (Nzembo 119:5, 6) Mpe na mikolo ezali koya, nsima ya kobomama ya Satana, tokofanda libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe oyo ekozala pɛto.