Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 102
  • Nasengeli kokata kelasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli kokata kelasi?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina oyo basusu bakataka kelasi
  • Kanisá makambo oyo ekoki kobima na nsima
  • Likambo ya malamu ya kosala
  • Nasengeli nde kokata kelasi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Nasala nini soki nazali kozwa te na eteyelo?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Bótánga kelasi malamumalamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Bolamu bozali kozwama na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
    Mokanda mpo na Eteyelo ya mosala ya Nzambe
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 102
Elenge mobali moko azali kotika eteyelo mpe etuluku ya baninga na ye.

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli kokata kelasi?

“Nalingaka kelasi te!” Soki yo mpe omiyokaka bongo, okoki kokwea na motambo ya kokata kelasi. Lisolo oyo ekosalisa yo oyeba mwa makambo oyo osengeli kosala.

  • Ntina oyo basusu bakataka kelasi

  • Kanisá makambo oyo ekoki kobima na nsima

  • Likambo ya malamu ya kosala

  • Oyo bilenge mosusu balobi

Ntina oyo basusu bakataka kelasi

Oyo ezali mwa makambo oyo bato ya mayele bamoni ete etindaka bato bákata kelasi:

  • Mikakatano na kelasi. ‘Nasalaka makasi mpo nazwa bapwɛ ya malamu kasi nalongaka te’

  • Eteyelo ezali kosepelisa te. ‘Nazali komona te eloko ya malonga oyo nakozwa na eteyelo.’

  • Mokakatano ya mbongo. ‘Nasengeli kosala mosala mpo na kosunga libota na ngai.’

Kanisá makambo oyo ekoki kobima na nsima

Biblia elobi boye: “Moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.” (Masese 14:15) Liteya yango oyo: Soki ozali kokanisa kokata kelasi, omindimisa ete okanisi malamu na makambo oyo ekoki kobima na nsima.

Omituna boye:

  • ‘Soki nakati kelasi, yango ekoki te kosala ete ekóma mpasi mpo nazwa mosala?’

    Kanisá mokolo oyo okozala na mposa ya mosala mpo na kokokisa bamposa ya libota na yo. Okosala nini soki bakonzi ya mosala bazali kosɛnga ete ozala na diplome?”​—Julia.

  • ‘Soki nakati kelasi, nakozala na makoki ya kosilisa mikakatano soki ebimi?’

    Kelasi ezali kobongisa yo mpo na bomoi. Na mikolo ezali koya, bato oyo okokutana na bango, komekama oyo okokutana na yango mpe mosala oyo okosala ekozala ndenge moko na makambo oyo okutanaki na yango na eteyelo.”​—Daniel.

  • ‘Soki nakati kelasi, nakozala na makoki oyo esengeli mpo na kolonga na bomoi ntango nakokóma mokóló?’

    Sikoyo ekoki komonana ete kokende kelasi ezali mpasi, kasi ntango okokóma na mbula 23 mpe ekosɛnga ofuta bafaktire, nde okomona ete ezalaki malamu ndenge oyekolaki matematiki na kelasi.”​—Anna.

Likambo ya malamu ya kosala

  • Luká lisalisi. Biblia elobi boye: “Lobiko ezali soki bapesi-toli bazali ebele.” (Masese 11:14) Soki ozali kaka kozwa bapwɛ ya moke, luká lisalisi epai ya moboti moko, molakisi, mopesi-toli to mokóló mosusu oyo otyelaka motema mpo okolisa makoki na yo.

    “Sololá na molakisi soki ozali kobunda mpo na kozwa bapwɛ mingi. Na bantango mosusu, okoki komona ete ezali foti ya molakisi, kasi okoki kobongisa makambo soki osɛngi lisalisi.”​—Edward.

  • Talelá makambo nyonso. Biblia elobi boye: “Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango.” (Mosakoli 7:8) Ntango okosilisa kelasi, okoyeba makambo mingi. Longolá yango, okokóma mpe na bizaleli mpe makoki ya ntina mingi.

    “Ntango okómi mokóló, mbala mosusu okobanda te kosala baekzamɛ, kasi lolenge oyo ozali kosala mpo na kosilisa mitungisi na eteyelo lelo, ekoki kosalisa yo osilisa mikakatano oyo okokutana na yango na bomoi.”​—Vera.

    Elenge mobali moko azali kokita na bwato liboso ete ekóma na libongo. Baninga na ye ya kelasi mpe molakisi na bango bazali kokebisa ye ete akita te na bwato.

    Kotika kelasi ezali lokola kokita na bwato liboso ete bwato ekóma na libongo; na nsima okoki komona ete ezalaki malamu otikala na kati ya bwato!

  • Kanisá mabaku mosusu oyo ezali liboso na yo. Biblia elobi boye: “Moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Masese 21:5) Kokanisa te na lombangu ete kokata kelasi nde ezali ekateli oyo ebongi. Okoki kokoba kotánga na mosika to na ndako.

    “Kelasi ezali koteya yo osala makasi mpo na kosilisa mikakatano, mpe kosala elongo na baninga. Bolamu oyo okozwa ekoumela mpo na libela. Kosilisa kelasi ezali mpo na bolamu na yo moko.”​—Benjamin.

Na mokuse: Soki osilisi kelasi, yango ekosalisa yo okokisa mikumba ya minene ntango okokóma mokóló.

Oyo bilenge mosusu balobi

Annabelle.

“Ntango ozali koluka mosala moko, bakonzi ya mosala bakoluka koyeba soki ozwaki diplome. Kosilisa kelasi ezali komonisa ete ozalaki na molende ya kosilisa likambo oyo obandaki. Kokata kelasi ezali ekateli ya malamu te.”​—Annabelle.

Cole.

“Ekoki kozala mpasi kokoba kelasi, mpe ekoki komonana malamu kokata kelasi. Kasi yebá ete okokoba kokutana na makambo ya mpasi, mpe okolinga kokóma moto oyo azali mpenza na makoki. Kelasi ezali kobongisa yo mpo na bomoi na yo mobimba.”​—Cole.

Brynn.

“Ntango okómi mokóló, ntango mosusu ekosɛnga te osala bakalkile ya mpasi ya matematiki. Kasi okozala na mposa ya kosala programɛ, kokokisa makambo mosusu na ntango oyo batye, mpe komesana kolamuka ntɔngɔntɔngɔ. Kelasi esalisaka biso tókolisa makoki wana nyonso.”​—Brynn.

Bozongeli: Nasengeli kokata kelasi

  • Kanisá makambo oyo ekoki kobima na nsima. Kanisá makambo oyo ekoki kobima na nsima soki okati kelasi, na ndakisa, koluka mosala, kokokisa mikano na yo mpe kozala na likoki ya kokangela mikakatano motema.

  • Luká lisalisi. Soki ozali kaka kozwa bapwɛ ya moke, luká lisalisi epai ya moboti moko, molakisi, mopesi-toli to mokóló mosusu oyo otyelaka motema mpo okolisa makoki na yo.

  • Talelá makambo nyonso. Ntango okosilisa kelasi, okosuka kaka te na koyeba makambo mingi. Kelasi esalisaka mpe yo oyeba ndenge ya koyekola, kosilisa makambo mosusu na ntango oyo batye mpe kokokisa mikumba ya minene.

  • Kanisá mabaku mosusu oyo ezali liboso na yo. Soki makambo ya bomoi na yo esali ete okata kelasi, luká makambo mosusu ya kosala, na ndakisa, kotánga na mosika to na ndako.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto