Kim Steele/The Image Bank via Getty Images
Mikakatano ya mbongo—Oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
Mpo na bato mingi na mokili, kozwa mbongo ya kobikela ekómi mpasi na ndenge moko ya kosakana te, mpe makambo ezali kobonga ata moke te.
Na kotalela lapolo moko ya mokili mobimba,a mbongo oyo bato bazwaka sanza na sanza na misala na bango ekiti makasi. Lapolo yango ebakisi ete soki solisyo ezwami te mpo na likambo yango, bazwi bakokóma na mbongo mingi mpe babola bakokelela lisusu makasi, mpe mabota mingi ekokóma na bomoi ya mpasi mpenza.
Bakonzi ya mokili bakokoka mpenza kosilisa mikakatano ya mbongo, to kobongisa makambo ata moke?
Biblia emonisi ete ezali na guvernɛma moko oyo ezali na makoki ya kosilisa mikakatano ya mbongo, ata mpe kopesa bomoi ya malamu na moto nyonso. Elobi ete “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko,” oyo ekotambwisa makambo na mabele mobimba. (Danyele 2:44) Ntango Bokonzi yango ekobanda kotambwisa makambo na mabele, moto nyonso akozala na bomoi ya malamu. (Nzembo 9:18) Bokonzi ya Nzambe ekosala ete mwana-mboka nyonso ya bokonzi yango azala na esengo. Moto nyonso akosepela mpenza na lifuti oyo ekouta na mosala na ye ya makasi.—Yisaya 65:21, 22.
a Rapport mondial sur les salaires de l’Organisation internationale du Travail 2022-2023