Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 121
  • Nani okoki kotyela motema?​—Biblia elobi nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nani okoki kotyela motema?​—Biblia elobi nini?
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto oyo okoki kotyela motema
  • Tosengeli kotyela bato motema mpo na kozala na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bato bazali lisusu kotyela bato ya politiki motema te​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Yesu akosilisa bobola
    Makambo mosusu
  • Okoki kotyela bandeko na yo motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 121
Bililingi: Bato oyo batalelamaka mbala mingi lokola baoyo babongi kotyelama motema: 1. Moto moko ya politiki atɛlɛmi liboso ya mikro. 2. Sango moko akangi mabɔkɔ. 3. Moto moko ya siansi asimbi presse-papiers.

Left: Olena Yefremkina/stock.adobe.com; center: lunamarina/stock.adobe.com; right: Rido/stock.adobe.com

BÓSƐNZƐLAKA!

Nani okoki kotyela motema?​—Biblia elobi nini?

Bato balɛmbaka nzoto ntango bato oyo bakanisaki ete babongi kotyelama motema basali makambo oyo ebongi te. Bato mingi batyaka lisusu motema te na . . .

  •  bakonzi ya politiki oyo balukaka libosoliboso bolamu na bango moko kasi ya bana-mboka te.

  •  bapanzi-nsango oyo bapesaka bansango oyo ebongi te mpe ya sikisiki te.

  •  bato ya siansi oyo basalaka makambo ya malamu mpenza te mpo na bato.

  •  bakonzi ya mangomba oyo bapesaka mpenza mabɔkɔ na makambo ya politiki na esika bázala bamonisi ya Nzambe.

Bato basengeli koyeba banani oyo basengeli mpenza kotyela motema. Biblia epesi biso likebisi oyo ete:

  •  “Bótya mitema na bakonzi ya mokili te; po nguya ya bato ekoki kobikisa té.”​—Nzembo 146:3; Bible na Lingala ya lelo oyo.

Moto oyo okoki kotyela motema

 Biblia emonisi moto oyo okoki kotyela motema: Yesu Kristo. Azalaki kaka te moto malamu oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo basiɛklɛ mingi. Nzambe atyaki Yesu “ayangela lokola Mokonzi . . . , mpe Bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Yesu azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo ezali koyangela sikoyo kuna na likoló.​—Matai 6:10.

  •  Mpo na koyeba ntina oyo osengeli kotyela Yesu motema, tángá masolo “Nani azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe?” mpe “Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?”

Buku oyo okoki kotyela motema

Biblia elobeli makambo mingi oyo etali bomoi ya Yesu mpe masolo mosusu mingi ya ntina. Buku yango ya ntina mingi ezali na nsango moko oyo okoki kotyela motema. Mpo na koyeba yango, tolendisi yo otondisa lokasa ya kosɛnga boyekoli ya Biblia ya ofele. Okoki kozwa mateya yango ya Biblia elongo na mikanda ya boyekoli oyo osengeli na yango, mpe moto moko akoki kosalisa yo. Na boyekoli yango, okoyeba lolenge ya moto oyo Yesu azali mpe makambo oyo asalá, oyo azali kosala, mpe oyo akosala na mikolo ezali koya.

Meká boyekoli na biso ya Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto