Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 35
  • Biblia elobi nini mpo na fɛti ya Noele?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini mpo na fɛti ya Noele?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Esika milulu ya Noele eutá
  • Noel Mpo na nini ezali na lokumu mingi na mboka Japon?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini ata na Azia bazali kosepela Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Eyenga ya Mbotama: Feti ya mokili to mokolo mosantu ya lingomba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 35

Biblia elobi nini mpo na fɛti ya Noele?

Eyano ya Biblia

Biblia epesi dati oyo Yesu abotamá te, elobi mpe te ete tosengeli kokanisaka mokolo oyo abotamaki. Buku moko (Cyclopedia ya McClintock ná Strong) elobi boye: “Nzambe te nde asɛngi bato básalaka fɛti ya Noele; Kondimana ya Sika mpe elobeli yango te.”

Kutu, soki totaleli esika fɛti ya Noele ebandá, tokomona ete euti na milulu oyo bapakano bazalaki kosala na losambo na bango. Biblia emonisi ete soki tozali kosambela Nzambe na lolenge oyo esepelisi ye te ezali lokola tozali kofinga ye.​—Kobima 32:5-7.

Esika milulu ya Noele eutá

  1. Kokanisa mbotama ya Yesu: “Bakristo ya liboso bazalaki kosala fɛti ya mbotama ya [Yesu] te mpo bazalaki komona ete kosala fɛti ya mbotama ezalaki momeseno ya bapakano.”​—The World Book Encyclopedia.

  2. Mokolo ya 25 Décembre: Eloko ata moko te emonisi ete Yesu abotamaki na dati wana. Bakonzi ya Lingomba nde baponaki dati yango mpo ekokana na fɛti oyo bapakano bazalaki kosala na ntango ya solstice d’hiver.

  3. Kopesana bakado, kolala libándá, kosepela: Buku moko (The Encyclopedia Americana) elobi boye: “Makambo ebele oyo esalemaka na fɛti ya Noele eutá na Saturnales, fɛti moko oyo Baroma bazalaki kosala na katikati ya sanza ya Décembre. Na ndakisa, kosala fɛti ya monene, kopesana bakado mpe kopelisa babuji eutá na fɛti yango.” Buku mosusu (Encyclopædia Britannica) emonisi ete na eleko ya fɛti ya Saturnales, “bato bazalaki kosala misala to mombongo na bango te.”

  4. Miinda na fɛti ya Noele: Buku moko (The Encyclopedia of Religion) elobi ete na bandako na bango, bato ya mikili ya Mpoto bazalaki “kopelisa miinda mpe kotya banzete ndenge na ndenge oyo nkasa na yango ekaukaka te” mpo na fɛti ya solstice d’hiver mpe mpo na kobengana bilimo mabe.

  5. Gui mpe houx: “Bato mosusu bazalaki komona ete nzete babengi gui ezalaki na maji. Bato bazalaki kosambela houx, nzete oyo nkasa na yango ekaukaka te mpo ezalaki komonisa bango ete etikali moke moi ebanda kobima.”​—The Encyclopedia Americana.

  6. Nzete ya Noele: “Bapakano ya mikili ya Mpoto bazalaki kosala losambo ya nzete, mpe batikaki momeseno yango te ata ntango bakómaki bakristo.” Milulu ya losambo yango etikalá mpenza, na ndakisa “na ntango ya bafɛti na eleko ya malili, batyaka nzete ya Noele na porte to na kati ya ndako.”​—Encyclopædia Britannica.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto