Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 56
  • Zabolo akoki kotambwisa bomoi ya moto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zabolo akoki kotambwisa bomoi ya moto?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ondimaka ete Zabolo azalaka mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Zabolo azalaka mpenza?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 56

Zabolo akoki kotambwisa bomoi ya moto?

Eyano ya Biblia

Zabolo ná bademo basalaka makambo mingi na bomoi ya bato; kutu Biblia elobi ete “mokili mobimba ezali na maboko ya Monguna.” (1 Yoane 5:19, Bible na lingala ya lelo oyo) Biblia emonisi mayele ndenge na ndenge oyo Zabolo asalelaka mpo na kotambwisa bomoi ya bato.

  • Lokuta. Biblia elendisi bakristo ete ‘bátɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.’ (Baefese 6:11) Moko ya mayele mabe oyo Zabolo asalelaka ezali ya kokosa bato mpo bákanisa ete bato na ye bazali basaleli ya Nzambe.​—2 Bakorinti 11:13-15.

  • Bikelakela. Mpo na kokosa bato, Zabolo asalelaka mpe banganga-nkisi, bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, mpe bato ya astroloji. (Kolimbola Mibeko 18:10-12) Komɛla bangi, hypnotisme, mpe komanyola to méditation oyo elongolaka moto makanisi nyonso ekɔtisaka mpe moto na boyokani na bilimo mabe.​—Luka 11:24-26.

  • Mangomba ya lokuta. Mangomba oyo eteyaka makambo ya lokuta etindaka bato bábuka mibeko ya Nzambe. (1 Bakorinti 10:20) Biblia ebengi mateya wana ya lokuta “mateya ya bademo.”​—1 Timote 4:1.

  • Kokɔtela moto. Biblia elobeli masolo ya bato oyo bademo bakɔtelaki bango. Na bantango mosusu, okomona moto akufi miso, to azali koloba te, to kutu alingi komisala mabe.​—Matai 12:22; Marko 5:2-5.

Okoki kosala nini mpo Zabolo atambwisa yo te?

Ntina ya kobanga ete bademo bátambwisa bomoi na yo ezali te, mpo Biblia elobeli makambo oyo okoki kosala mpo na kotɛmɛla Zabolo:

  • Yebá makambo oyo Zabolo asalaka mpo na kokosa bato mpo ‘oyeba malamu mayele na ye.’​—2 Bakorinti 2:11.

  • Yekolá Biblia, mpe saleláká makambo oyo ozali koyekola. Kosalela batoli oyo ozali koyekola na Biblia ekobatela yo mpo Zabolo atambwisa bomoi na yo te.​—Baefese 6:11-18.

  • Bwaká eloko nyonso oyo ezali na boyokani na misala ya bademo. (Misala 19:19) Ekoki kozala miziki, babuku, ba journal, bafɔtɔ, mpe bavideo oyo elobelaka misala ya bilimo mabe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto