NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA
Mosala ya kopesa lisungi na baoyo bakutani na makama na 2022—Bolingo ya bondeko emonani na misala
01/01/2023
Biblia esakolaki ete na mikolo na biso bitumba, koningana makasi ya mabele, bamaladi mabe, mpe “makambo ya nsɔmɔ” ekosalema (Luka 21:10, 11) Bisakweli yango ekobaki kokokisama na boumeli ya mobu ya mosala 2022.a Na ndakisa, bitumba ya Ukraine ekobaki kosalema, mpe yango etyaki bomoi ya bamilio ya bato na likama. Maladi mabe ya Coronavirus ezalaki na bisika mingi na mokili. Longola yango, makama oyo ebimaka yango moko etyaki bomoi ya bato mingi na likama, na ndakisa koningana ya mabele na Haïti mpe mopɛpɛ ya makasi na Amérique central, na Philippines, mpe na sud-est ya Afrique. Ndenge nini Batatoli ya Yehova basalisaki baoyo bakutanaki na makama yango?
Na boumeli ya mobu ya mosala 2022, ebongiseli na biso epesaki lisungi na baoyo bakutanaki na makama soki 200! Na nyonso, tosalelaki badolare milio 12 mpo na kopesa bango lisungi.b Talá ndenge oyo tosalelaki mbongo ya makabo mpo na kosalisa baoyo bakutanaki na makama.
Koningana ya mabele na Haïti
Na mokolo ya 14/08/2021, mabele eninganaki makasi (magnitude 7,2) na sud ya Haïti. Likambo ya mawa, Batatoli ya Yehova misato bakufaki: bandeko basi mibale ná ndeko mobali moko. Baoyo babikaki, bazokaki makasi mpe banyokwamaki na makanisi mpo na makambo oyo koningana ya mabele ebimisaki. Ndeko mobali moko na nkombo Stephane alobi boye: “Na engumba mobimba, bato mingi bakufaki, na yango, pɔsɔ nyonso, na boumeli ya basanza koleka mibale, bazalaki kaka kokunda bibembe.” Ndeko mosusu na nkombo Éliézer, alobi boye: “Batatoli ya Yehova mingi bazangaki bisika ya kolala, bilamba, basapato, mpe biloko mosusu ya ntina. Na boumeli ya basanza, bato mingi bazalaki kobanga mpo na makambo oyo koningana ya mabele ebimisaki.”
Ebongiseli na biso eumelaki te mpo na kopesa lisungi. Filiale ya Haïti epesaki tɔne koleka 53 ya biloko ya kolya, bakapo, bahema, bamatela, panneaux solaire mpo na batelefone. Longola yango, na boumeli ya mobu ya mosala 2022, batongaki lisusu mpe babongisaki bandako koleka 100. Basalelaki badolare koleka milio moko mpo na kopesa lisungi.
Kokabola biloko, Haiti
Bandeko na biso ya basi mpe ya mibali bazali mpenza na botɔndi. Ndeko mwasi Lorette alobi boye: “Koningana ya mabele ebebisaki mpenza ndako mpe mombongo na biso. Tozalaki na biloko ya kolya te. Kasi ebongiseli ya Yehova esalisaki biso na biloko nyonso oyo tosengelaki na yango.” Ndeko mwasi Micheline alobi boye: “Koningana ya mabele ebebisaki esika oyo ngai ná bana na ngai mibale ya mibali tozalaki kofanda. Nayebaki te nasala nini, nazalaki kaka kobondela Yehova asalisa biso, mpe ayanolaki na libondeli na biso na nzela ya ebongiseli na ye. Sikoyo tozali kofanda na ndako moko oyo etongami malamu mpenza. Nazali na ekateli ya kosala nyonso oyo nakoki mpo na komonisa botɔndi na ngai epai ya Yehova.”
Bakonzi ya mboka bamonaki milende oyo tosalaki mpo na kopesa bato lisungi. Mokonzi ya engumba L’Asile alobi boye: “Napesi bino longonya ndenge boyaki mbangu mpo na kosalisa biso. Nasepeli mingi ndenge bomonisi limemya makasi mpo na bakonzi. Nazali na esengo ndenge bozali na lokoso ya mbongo te. Kasi, bolingaka nde kosalisa bato. Bolingo nde etindaki bino bósalisa bato.”
Mopɛpɛ moko ya makasi na nkombo Ana ebɛtaki ekólo Malawi mpe Mozambique
Na mokolo ya 24/01/2022, mopɛpɛ moko ya makasi na nkombo Ana ebɛtaki ekólo Mozambique mpe na nsima ebɛtaki na ngámbo ya wɛsti ya ekólo Malawi. Mopɛpɛ yango ya makasi esalaki ete mbula moko ya makasi ebɛta—mopɛpɛ yango ezalaki na vitɛsɛ ya kilomɛtrɛ 100 na ngonga moko. Ebebisaki bansinga ya courant, bagbagba (ponts) mpe ezindisaki mboka.
Batatoli ya Yehova koleka 30 000 na Malawi mpe na Mozambique bamonaki mpasi mpo na mopɛpɛ yango. Ndeko mobali moko na nkombo Charles, oyo apesaki mabɔkɔ na mosala ya kopesa bato lisungi, alobi boye: “Ntango namonaki mpasi oyo bandeko bakutanaki na yango, nayokaki mawa mpe nayebaki te nasala nini.” Makambo ebebaki mpenza mpo bilei mpe milona na bango nyonso ebebisamaki. Bato mingi babungisaki bandako na bango. Likambo ya mpasi koleka, ndeko mobali moko abungisaki mwasi na ye mpe bana na ye ya basi mibali ntango bwato ebalukaki na mai.
Ndako ya babalani ya Batatoli ya Yehova ebebi, Mozambique
Ndako oyo batongi lisusu
Mopɛpɛ yango ezalaki ya nsɔmɔ mpenza. Na ngonga ya 1:00 ya ntɔngɔ na engumba Nchalo, na Malawi, libota ya ndeko Sengeredo bayokaki lokito ya mai makasi oyo ebangisaki bango. Bibale mibale etondaki mpenza! Ndeko Sengeredo azwaki ekateli ete bábima na lombango na ndako. Ezalaki ekateli ya malamu mpo na nsima, mai yango ekweisaki ndako. Biloko na bango nyonso ebebisamaki mpe mosusu mai ememaki yango. Libota yango ezwaki ekateli ya kokende na Ndako ya Bokonzi, oyo mpo na kokóma kuna esengeli kosala miniti 30. Kasi na mbala oyo, ezwaki bango bangonga mibale. Ntango bakómaki kuna, bilamba na bango nyonso epolaki, balɛmbaki, kasi bazwaki likama te.
Na mbala moko, filiale ya Malawi mpe ya Mozambique ezwaki bibongiseli mpo na kopesa bandeko lisungi. Basɛngaki na bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu báluka koyeba bamposa oyo bandeko bazalaki na yango mpe bálendisa bango na elimo. Basɛngaki na bakomite ebele ya kopesa lisungi elandela mosala yango, mpe na mbala moko bakomite yango esalisaki bandeko na kozwa bilei mpe biloko mosusu ya ntina. Basalelaki badolare koleka 33 000 mpo na kopesa bandeko lisungi mpe badolare koleka 300 000 mpo na kobongisa mpe kotonga lisusu bandako.
Bakomite yango esalelaki mbongo na mayele, mpo ntalo ya biloko emataki mpenza. Na ndakisa, na boumeli ya basanza nsambo ya liboso ya kopesa bandeko lisungi, ntalo ya fufu ya masango, bilei ya libosoliboso na Malawi emataki mpenza (70%). Ntalo ya esansi mpe emataki. Mpo na kobatela mbongo, bandeko basombaki bilei mpe bisaleli ya kotonga bandako ebele mpenza kaka na mboka na bango. Na yango, bakitiselaki bango ntalo ya biloko mpe basalelaki mbongo mingi te mpo na komema biloko yango.
Mosala ya kopesa lisungi esimbaki mpenza mitema ya basaleli ya Yehova. Felisberto, ndeko mobali moko na Mozambique, alobi boye: “Natikalá naino komona ebongiseli ya boye te oyo ezali kopesa bato biloko mingi: bisaleli ya kotonga bandako, mituka, batongi, bilei, mpe kopesa bato na yango litambwisi na bolingo nyonso. Mosala yango ya kopesa lisungi ezali komonisa bolingo ya bondeko oyo Yesu alobelaki na Yoane 13:34, 35.” Ester, mwasi moko na Malawi oyo mobali akufá mpe oyo ndako na ye ebebisamaki, alobi boye: “Nayebaki te nasala nini mpo nazalaki na mbongo te mpo na kotonga ndako mosusu. Na yango, ntango bandeko bayaki mpo na kotongela ngai ndako mosusu, namimonaki nɛti nazali na Paradiso.”
Lokola tozali kokóma pene ya mokili ya sika, tóyeba ete makama oyo ebimaka yango moko ekobakisama se kobakisama. (Matai 24:7, 8) Nzokande, na nzela ya makabo na bino ya bolingo malamu, tozali na kondima ete basaleli ya Yehova bakozwa lisungi oyo basengeli na yango. Mpo na koyeba ndenge ya kopesa makabo, kende na donate.jw.org. Matondi mingi mpo na elimo na bino ya bokabi.
a Mobu ya mosala 2022 ebandaki na mokolo ya 01/09/2021, mpe esukaki na mokolo ya 31/08/2022.
b Motángo ya mbongo nyonso oyo basaleli na lisolo oyo ezali motángo ya dolare ya Amerika.