Mwamibale, 28 sanza ya 10
[Yehova] moto asalaka ete ozwa libateli.—Yis. 33:6.
Biso basaleli ya Yehova tokutanaka na makambo ya mpasi mpe mikakatano, kaka lokola bato nyonso. Tokoki mpe kokutana na botɛmɛli to monyoko oyo euti na bato oyo bayinaka basaleli ya Nzambe. Yehova apekisaka te ete makambo ya mpasi ya ndenge wana ekómela biso, kasi alaki ete akosalisa biso. (Yis. 41:10) Na lisalisi na ye, tokoki kobatela esengo na biso, kozwa bikateli ya malamu, mpe kotikala sembo epai na ye ata soki tokutani na makambo ya mpasi makasi. Yehova alaki kopesa biso eloko oyo Biblia ebengi “kimya ya Nzambe.” (Flp. 4:6, 7) Kimya yango ezali motema mpiɔ oyo moto ayokaka ntango azali na boyokani malamu na ye. Kimya yango “eleki makanisi na biso”; ezali malamu koleka nyonso oyo tokoki kokanisa. Esilá kokómela yo oyoka motema mpiɔ na mbala moko nsima ya kobondela Yehova na motema mobimba? Yango nde “kimya ya Nzambe.” w24.01 20 par. 2; 21 par. 4
Mwamisato, 29 sanza ya 10
Tiká nasanzola Yehova, nyonso oyo ezali kati na ngai esanzola nkombo na ye mosantu.—Nz. 103:1.
Kolinga Nzambe etindaka bato ya sembo básanzola nkombo na ye na motema mobimba. Mokonzi Davidi akangaki ntina ete kosanzola nkombo ya Yehova ezali kosanzola Yehova ye moko. Nkombo ya Yehova emonisaka mpe lolenge ya moto oyo azali; ekundwelaka biso bizaleli na ye ya kitoko mpe misala na ye ya kokamwa. Davidi azalaki kotalela nkombo ya Tata na ye ete ezali mosantu mpe alingaki kosanzola yango. Alingaki kosala yango ná “nyonso oyo ezali kati” na ye, elingi koloba na motema mobimba. Ndenge moko mpe, Balevi bapesaki ndakisa na oyo etali kosanzola Yehova. Na komikitisa nyonso, bandimaki ete maloba na bango ekokaki te mpo na komonisa masanzoli nyonso oyo ebongi na nkombo mosantu ya Yehova. (Neh. 9:5) Na ntembe te, masanzoli oyo euti na motema ya komikitisa ndenge wana esepelisaka Yehova. w24.02 9 par. 6
Mwaminei, 30 sanza ya 10
Soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.—Flp. 3:16.
Yehova akomona yango mabe te soki okokisi te mokano oyo ebongaki te mpo na yo. (2 Ko. 8:12) Zwá mateya na kwɔkɔsɔ oyo okutani na yango. Kobosana te mikano oyo osilá kokokisa. Biblia elobi ete “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino.” (Ebr. 6:10) Yo mpe osengeli kobosana te makambo oyo osilá kosala. Kanisáká mikano oyo osilá kokokisa. Ekoki kozala, boninga malamu na Yehova, koyebisa bato mosusu makambo etali ye, to mpe kozwa batisimo. Kaka ndenge osilaki kokende liboso mpe kokokisa mikano yango na kala, okoki mpe kokoba kokokisa mokano oyo omityeli. Na lisalisi ya Yehova, okoki kokokisa mokano na yo. Lokola ozali kosala makasi okokisa mokano ya elimo oyo omityeli, kobosanaka te kotala ndenge oyo Yehova azali kosalisa mpe kopambola yo wana ozali kosala makasi okokisa mokano oyo omityeli. (2 Ko. 4:7) Soki otiki te, okozwa mapamboli mingi mpenza.—Gal. 6:9. w23.05 31 par. 16-18