Mwamisato, 29 sanza ya 10
Tiká nasanzola Yehova, nyonso oyo ezali kati na ngai esanzola nkombo na ye mosantu.—Nz. 103:1.
Kolinga Nzambe etindaka bato ya sembo básanzola nkombo na ye na motema mobimba. Mokonzi Davidi akangaki ntina ete kosanzola nkombo ya Yehova ezali kosanzola Yehova ye moko. Nkombo ya Yehova emonisaka mpe lolenge ya moto oyo azali; ekundwelaka biso bizaleli na ye ya kitoko mpe misala na ye ya kokamwa. Davidi azalaki kotalela nkombo ya Tata na ye ete ezali mosantu mpe alingaki kosanzola yango. Alingaki kosala yango ná “nyonso oyo ezali kati” na ye, elingi koloba na motema mobimba. Ndenge moko mpe, Balevi bapesaki ndakisa na oyo etali kosanzola Yehova. Na komikitisa nyonso, bandimaki ete maloba na bango ekokaki te mpo na komonisa masanzoli nyonso oyo ebongi na nkombo mosantu ya Yehova. (Neh. 9:5) Na ntembe te, masanzoli oyo euti na motema ya komikitisa ndenge wana esepelisaka Yehova. w24.02 9 par. 6
Mwaminei, 30 sanza ya 10
Soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.—Flp. 3:16.
Yehova akomona yango mabe te soki okokisi te mokano oyo ebongaki te mpo na yo. (2 Ko. 8:12) Zwá mateya na kwɔkɔsɔ oyo okutani na yango. Kobosana te mikano oyo osilá kokokisa. Biblia elobi ete “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino.” (Ebr. 6:10) Yo mpe osengeli kobosana te makambo oyo osilá kosala. Kanisáká mikano oyo osilá kokokisa. Ekoki kozala, boninga malamu na Yehova, koyebisa bato mosusu makambo etali ye, to mpe kozwa batisimo. Kaka ndenge osilaki kokende liboso mpe kokokisa mikano yango na kala, okoki mpe kokoba kokokisa mokano oyo omityeli. Na lisalisi ya Yehova, okoki kokokisa mokano na yo. Lokola ozali kosala makasi okokisa mokano ya elimo oyo omityeli, kobosanaka te kotala ndenge oyo Yehova azali kosalisa mpe kopambola yo wana ozali kosala makasi okokisa mokano oyo omityeli. (2 Ko. 4:7) Soki otiki te, okozwa mapamboli mingi mpenza.—Gal. 6:9. w23.05 31 par. 16-18
Mwamitano, 31 sanza ya 10
Mpo Tata ye moko alingi bino mingi, mpo bino bolingaki ngai mingi mpe bondimi ete nayaki lokola momonisi ya Nzambe.—Yoa. 16:27.
Yehova asepelaka komonisa baoyo alingaka ete andimi bango. Biblia elobeli mabaku mibale ntango Yehova alobaki na Yesu ete azali Mwana na ye ya bolingo, oyo andimi. (Mat. 3:17; 17:5) Okolinga koyoka Yehova azali koyebisa yo mpe ete andimi yo? Yehova alobaka na biso mbala moko boye te; kasi alobi na biso na nzela ya Liloba na ye. Tokoki koyoka Yehova azali koloba ete andimi biso ntango tozali kotánga maloba ya Yesu oyo ezali na Baevanzile. Yesu amekolaki bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Na yango, ntango tozali kotánga ete Yesu ayebisaki bayekoli na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka, kasi bato ya sembo, ete andimi bango, tokoki komona ete Yehova nde azali koyebisa biso maloba yango. (Yoa. 15:9, 15) Soki tokutani na mikakatano, elakisi te ete Yehova atiki kondima biso. Kasi, yango epesaka biso mabaku ya komonisa ndenge tolingaka Nzambe mingi mpe totyelaka ye motema.—Yak. 1:12. w24.03 28 par. 10-11