Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 7
Bókóma bamekoli ya Nzambe lokola bana ya bolingo.—Ef. 5:1.
Lelo oyo, tokoki kosepelisa Yehova ntango tozali kolobela ye na esengo, botɔndi mpe bolingo. Ntango tobimi na mosala ya kosakola, tobosanaka te ete mokano na biso ya libosoliboso ezali ya komema bato epai ya Yehova, kosalisa bango bámona ete azali Tata ya bolingo, ndenge biso tomonaka ye. (Yak. 4:8) Tosepelaka komonisa bato makambo oyo Biblia elobi mpo na Yehova, ndenge emonisi bolingo na ye, bosembo na ye, bwanya na ye, nguya na ye, mpe bizaleli na ye mosusu. Lisusu, tosanzolaka Yehova mpe tosepelisaka ye ntango tosalaka makasi tómekola ye. Ntango tosalaka bongo, tomikabolaka na mokili oyo mabe. Bato mosusu bakoki komona ete tokeseni na bango mpe bakoki koluka koyeba ntina oyo ezali bongo. (Mat. 5:14-16) Ntango tozali kokutana na bango na makambo na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kozwa libaku ya kolimbwela bango ntina oyo tosalaka boye to boye. Yango esalaka ete bato malamu báluka kopusana epai ya Nzambe na biso. Ntango tozali kosanzola Yehova bongo, tosepelisaka motema na ye.—1 Tim. 2:3, 4. w24.02 10 par. 7
Mwalomingo, 27 sanza ya 7
Ayeba kolendisa . . . mpe ayeba kopamela.—Tito 1:9.
Mpo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, osengeli koyekola makambo oyo ekosalisa yo na bomoi. Yango ekosalisa yo ondima mikumba na lisangá, obatela mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na yo mpe ya libota, mpe ozala na boyokani ya malamu na basusu. Na ndakisa, yekolá kotánga mpe kokoma malamu. Biblia elobi ete moto ya esengo mpe oyo alongaka na nyonso oyo azali kosala azwaka ntango ya kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango mokolo na mokolo. (Nz. 1:1-3) Ntango azali kotánga Biblia mokolo na mokolo, akoyeba makanisi ya Yehova, mpe yango ekosalisa ye akanisaka malamu mpe ayeba kosalela makambo oyo atángaki. (Mas. 1:3, 4) Bandeko mibali mpe bandeko basi bazali na mposa ya mibali oyo bakoki mpo na kopesa bango mateya mpe toli oyo euti na Biblia. Soki oyebi kotánga mpe kokoma malamu, okoyeba kobongisa masolo mpe biyano ya malamu oyo ekokómisa kondima ya bandeko makasi. Okoyeba mpe kozwa mwa banɔti ya malamu oyo ekosalisa yo okómisa kondima na yo moko makasi mpe olendisa basusu. w23.12 26-27 par. 9-11
Mwayambo, 28 sanza ya 7
Moto oyo azali na bomoko elongo na bino aleki moto oyo azali na bomoko elongo na mokili.—1 Yoa. 4:4.
Ntango ozali kobanga, manyolá na makambo oyo Yehova akosala na mikolo ezali koya ntango Satana akozala lisusu te. Elakiseli moko na liyangani ya etúká ya 2014 emonisaki Tata moko azali kolobela elongo na libota na ye ndenge oyo 2 Timote 3:1-5 ekokaki kotángama soki maloba yango esakolaki nde makambo oyo ekozala na Paradiso: “Na mokili ya sika ntango moko ya esengo mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo balingaka basusu, bato balingá bozwi ya elimo, bato ya mindɔndɔ te, bato ya komikitisa, bato oyo bakumisaka Nzambe, oyo batosaka baboti, oyo bazali na botɔndi, oyo bazali sembo, oyo balinganaka na kati ya mabota, oyo balingaka kosala boyokani, oyo balobaka ntango nyonso bolamu ya basusu, oyo bamipekisaka, bato ya boboto, oyo balingaka makambo ya malamu, bato oyo batyelaka motema, oyo batingamaka na makambo te, oyo bavimbi na lolendo te, oyo balingá Nzambe na esika ya kolinga bisengo, oyo bazali mpenza kokangama na Nzambe; mpe yo kangamá na bato ya lolenge wana.” Yo mpe osololaka na bato ya libota na yo to bandeko ya lisangá ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika? w24.01 6 par. 13-14