Sanza ya 7
Mwamibale, 1 sanza ya 7
Akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa.—Mis. 10:38.
Na makambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe asalaki, ata mpe na makamwisi oyo asalaki, amonisaki na ndenge ya kokoka makanisi mpe mayoki ya Tata na ye. (Yoa. 14:9) Tokoki koyekola nini na makamwisi ya Yesu? Yesu ná Tata na ye balingaka biso mingi. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ete azalaki kolinga bato na ndenge asalaki makamwisi mpo na kosalisa baoyo bazalaki konyokwama. Mokolo moko, bato mibale oyo bakufá-miso basɛngaki ye asalisa bango. (Mat. 20:30-34) Simbá ete “mawa ekangaki” Yesu mpe abikisaki bango. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mawa ekangaki” elimboli mawa makasi oyo moto ayokaka na motema na ye. Mawa ya ndenge wana emonisi bolingo makasi oyo Yesu azalaka na yango. Mawa yango nde etindaki ye aleisa bato oyo bazalaki na nzala mpe abikisa bato ya maba. (Mat. 15:32; Mrk. 1:41) Tóyeba ete Yehova, Nzambe ya “motema mawa,” mpe Mwana na ye balingaka biso mingi mpe bayokaka mpasi ntango tonyokwamaka. (Luka 1:78; 1 Pe. 5:7) Bazelaka na mposa makasi mokolo oyo bakosilisa mikakatano nyonso oyo bato bazali kokutana na yango! w23.04 3 par. 4-5
Mwamisato, 2 sanza ya 7
Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe. Abatelaka bomoi ya bato na ye ya sembo; abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.—Nz. 97:10.
Tosengeli kosala makasi tóboya kotánga mpe koyoka makanisi ya mabe oyo epanzani mingi na mokili ya Satana. Mpo tókɔtisa na makanisi na biso makambo ya malamu, tosengeli kotángaka mpe koyekolaka Biblia. Koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola ekosalisa biso mpe tóbatela makanisi na biso. Na ngala na ye mpe, Yehova alaki ete akotika te ete tómekama koleka ndelo. (1 Ko. 10:12, 13) Biso nyonso tosengeli kobondelaka mingi mpo tótikala sembo epai ya Yehova na mikolo oyo ya nsuka oyo etondi na mikakatano. Yehova alingi ete ‘tófungolela ye mitema na biso’ na nzela ya libondeli. (Nz. 62:8) Kumisáká mpe pesáká matondi mpo na nyonso oyo Yehova asalelaka yo. Sɛngá ye apesa yo mpiko na mosala ya kosakola. Bondelá ye asalisa yo oyika mpiko na mikakatano nyonso mpe olonga komekama nyonso oyo ozali kokutana na yango. Kotika te ete moto to eloko moko epekisa yo kobondela Yehova mbala na mbala. w23.05 7 par. 17-18
Mwaminei, 3 sanza ya 7
Tótyelanaka likebi . . . , tólendisanaka.—Ebr. 10:24, 25.
Mpo na nini toyanganaka na makita ya lisangá? Ya liboso, mpo na kokumisa Yehova. (Nz. 26:12; 111:1) Toyanganaka mpe na makita mpo na kolendisana na bantango oyo ya mpasi. (1 Tes. 5:11) Ntango totombolaka lobɔkɔ mpe topesaka biyano, tokokisaka mikano yango mibale. Kasi tokutanaka na mikakatano mibale ntango tolingi kopesa biyano. Mbala mosusu tobangaka kopesa biyano, to mpe tolingaka koloba mingi kasi baponaka biso mingi te. Nini ekoki kosalisa biso na likambo yango? Ntoma Paulo alobaki ete tosengeli kotya makanisi na ‘kolendisanaka.’ Ntango toyebi ete tokoki kolendisa bamosusu ata na mwa eyano ya mokuse, kozanga ntembe, tokobanga te koloba. Mpe soki baponi biso mbala mingi te, tokoki kozala na esengo mpo basusu na lisangá bakozwa libaku ya kopesa biyano.—1 Pe. 3:8. w23.04 20 par. 1-3
Mwamitano, 4 sanza ya 7
Amata na Yerusaleme, . . . mpe atonga lisusu ndako ya Yehova. —Ezr. 1:3.
Mokonzi apesaki liyebisi! Bayuda oyo basalaki mbula soki 70 na bokangami na Babilone, basengelaki kozonga na mokili na bango Yisraele. (Ezr. 1:2-4.) Kaka Yehova nde akokaki kosala likambo ya bongo. Mpo na koloba solo, bato ya Babilone balingaki te kopesa bakangami na bango bonsomi. (Yis. 14:4, 17) Kasi Babilone ekweisamaki, mpe mokonzi ayebisaki Bayuda ete bakoki kozonga. Moyuda mokomoko, mingimingi batata ya mabota, basengelaki kozwa ekateli: ya kolongwa na Babilone to ya kotikala kuna. Kozwa ekateli ya bongo ezalaki pɛtɛɛ te. Ezalaki mpasi mpo na bato mingi oyo bakómaki mikóló básala mobembo wana ya molai. Mpe lokola Bayuda mingi babotamaki na Babilone, engumba yango ezalaki mboka kaka moko oyo bayebaki malamu. Mpo na bango, Yisraele ezalaki kaka mabele ya bankoko na bango. Ekoki kozala ete Bayuda mosusu bakómaki bato minene na Babilone, yango ekokaki kozala mpasi bátika engumba na bango ya kitoko, mimbongo na bango mpo na kokende na mokili oyo bayebaki te. w23.05 14 par. 1-2
Mwapɔsɔ, 5 sanza ya 7
Bómilɛngɛla.—Mat. 24:44.
Liloba ya Nzambe elendisaka biso ntango nyonso tókoba kokolisa ezaleli ya koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo. Luka 21:19 elobi: “Na ezaleli na bino ya koyika mpiko, bokobatela bomoi na bino.” Bakolose 3:12 elobi: “Bólata motema . . . mawa.” Mpe 1 Batesaloniki 4:9, 10 elobi: “Bino moko boteyami na Nzambe ete bólinganaka. . . . Kasi tozali kolendisa bino, bandeko, bókoba kosala bongo malamu koleka.” Maloba ya bavɛrsɛ nyonso oyo ekomamaki mpo na bayekoli oyo basilaki komonisa bizaleli lokola koyika mpiko, motema mawa, mpe bolingo. Kasi, basengelaki kokoba komonisa bizaleli yango. Yango ezali mpe bongo mpo na biso. Mpo na kosalisa yo na likambo yango, talá ndenge bakristo ya liboso bamonisaki bizaleli yango. Na nsima, okomona ndenge nini okoki komekola bakristo yango mpe ndenge oyo okoki komibongisa mpo na bolɔzi monene. Bongo, ntango bolɔzi monene ekobanda, okozala na likoki ya koyika mpiko mpe okozala na ekateli ya kokoba kosala bongo. w23.07 3 par. 4, 8
Mwalomingo, 6 sanza ya 7
Balabala moko ya monene ekozala kuna, . . . Nzela ya Bosantu. —Yis. 35:8.
Ezala tozali bakristo oyo batyami mafuta na elimo to mpe “bampate mosusu,” biso nyonso tosengeli kotikala na “Nzela ya Bosantu” mpo yango ekosalisa biso tótikala na paradiso ya elimo mpe ekomemela biso mapamboli oyo ezali kozela biso na mokili ya sika. (Yoa. 10:16) Kobanda mobu 1919 ya ntango biso, bamilio ya basi, mibali, mpe bana bazali kolongwa na Babilone monene, lisangá ya mangomba nyonso ya lokuta mpe bazali kosala mobembo na nzela yango ya elilingi. Yehova azwaki bibongiseli mpo ete Bayuda oyo balongwaki na Babilone bákutana na makama te na nzela. (Yis. 57:14) Ezali mpe bongo mpo na “Nzela ya Bosantu” lelo oyo? Basiɛklɛ mingi liboso ya mobu 1919, Yehova asalelaki bato oyo bazalaki kobanga ye mpo bábongisa nzela mpo na kobima na Babilone monene. (Talá mpe Yisaya 40:3.) Babongisaki nzela yango mpo na nsima, bato ya mitema sembo bálongwa na mangomba ya lokuta mpe báya kosambela Yehova elongo na basaleli na ye, epai losambo ya pɛto ya Yehova ezongisamaki. w23.05 15-16 par. 8-9
Mwayambo, 7 sanza ya 7
Bósalela Yehova na esengo. Bókɔta liboso na ye na koganga ya esengo.—Nz. 100:2.
Yehova alingi ete tósalela ye na esengo mpe na molimo na biso mobimba. (2 Ko. 9:7) Yango wana, tosengeli kokoba kosala makasi mpo na kokokisa mokano ya elimo oyo tomityeli, ata soki kosala yango ezali kosepelisa biso te? Tótalela ndakisa ya ntoma Paulo. Alobaki boye: “Nazali kopesa disiplini ya makasi na nzoto na ngai mpe kokómisa yango lokola moombo.” (1 Ko. 9:25-27, msl.) Paulo abundaki makasi mpo asala makambo ya malamu oyo Yehova alingaka ata na ntango oyo azalaki te na mposa ya kosala yango. Yehova asepelaki na makambo oyo Paulo asalaki mpo na ye? Ɛɛ, asepelaki mpenza! Mpe Yehova apesaki ye mbano mpo na milende na ye. (2 Tim. 4:7, 8) Ndenge moko mpe, Yehova asepelaka ntango amonaka ete tozali kosala makasi tókokisa mokano oyo tomityeli ata na ntango oyo tozali na mposa ya kosala yango te. Asepelaka mpo ata soki tozali kosepela te na makambo oyo tozali kosala, ayebi ete tozali kosala yango mpo tolingaka ye. Kaka ndenge Yehova apambolaki Paulo, akopambola mpe biso mpo na milende oyo tozali kosala. (Nz. 126:5) Mpe ntango tozali komona ndenge Yehova azali kopambola biso, yango ekotinda biso tókóma na mposa makasi ya kokokisa mokano na biso. w23.05 29 par. 9-10
Mwamibale, 8 sanza ya 7
Mokolo ya Yehova ezali koya. —1 Tes. 5:2.
Ntoma Paulo akokanisaki baoyo bakobika te na mokolo ya Yehova na bato oyo bazali kolala mpɔngi. Batyaka likebi te na makambo oyo ezali kosalema zingazinga na bango, to ndenge ntango ezali koleka. Na yango, bayebaka te ntango makambo ya ntina ezali kosalema mpe bakoki kosala eloko te mpo na yango. Lelo oyo, bato mingi bazali kolala mpɔngi na elimo. (Rom. 11:8) Bandimaka te bilembo oyo emonisi ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” mpe ete bolɔzi monene ekoya mosika te. (2 Pe. 3:3, 4) Kasi, tosengeli kosɛnzɛlaka mokolo na mokolo mpo yango ezali na ntina mingi mpo na biso. (1 Tes. 5:6) Na yango, tosengeli kozala motema ya kokita mpe kotɛlɛma ngwi. Mpo na nini? Mpo tómikɔtisa te na makambo ya politiki to na mikakatano ya mikolo oyo. Mbamba oyo bato batyaka basusu mpo bákɔta na ngámbo moko boye na makambo ya politiki mpe na mikakatano ya mikolo oyo ekokóma lisusu makasi lokola mokolo ya Yehova ezali se kokóma pene. Atako bongo, tosengeli te komitungisa mpo na makambo oyo tokosala na ntango yango. Elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso tózala motema ya kokita, tótɛlɛma ngwi na makanisi mpe tózwa bikateli ya bwanya.—Luka 12:11, 12. w23.06 10 par. 6-7
Mwamisato, 9 sanza ya 7
Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, kanisá ngai, nabondeli yo, mpe pesá ngai makasi.—Bas. 16:28.
Nini eyelaka yo na makanisi ntango oyokaka nkombo Samsone? Mbala mosusu okanisaka makasi na ye ya kokamwa. Ya solo azalaki makasi. Kasi Samsone azwaki ekateli moko ya mabe mpe yango ememelaki ye mpasi. Atako bongo, Yehova atalelaki mingi nde bosembo oyo Samsone amonisaki na bomoi na ye, mpe akomisaki lisolo na ye na Biblia mpo tózwela yango matomba. Yehova asalelaki Samsone mpo asala makambo ya kokamwa mpo na kosalisa Bayisraele, bato oyo Ye aponaki. Bambula mingi nsima ya liwa ya Samsone, elimo santu ya Yehova etindaki ntoma Paulo atya nkombo ya Samsone na molɔngɔ ya bato ya kondima makasi. (Ebr. 11:32-34) Ndakisa ya Samsone ekoki kolendisa biso. Atyelaki Yehova motema, ata na ntango ya mpasi. Tólobela mateya ya kolendisa mpe batoli ya ntina mingi oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye. w23.09 2 par. 1-2
Mwaminei, 10 sanza ya 7
Bósɛngaka Nzambe lisalisi. —Flp. 4:6.
Tokoki mpe kokolisa ezaleli na biso ya koyika mpiko soki tozali mbala na mbala koyebisa Yehova makambo nyonso oyo ezali kotungisa biso. (1 Tes. 5:17) Mbala mosusu okutani naino te na mikakatano ya makasi. Atako bongo, tosengeli ntango nyonso koluka litambwisi ya Yehova ata ntango tokutani na makambo oyo epesi biso nkanda, etungisi biso to elekeli biso motó. Soki ozali ntango nyonso koluka lisalisi ya Yehova sikoyo mpo na mikakatano oyo ozali kokutana na yango mokolo na mokolo, ekozala mpasi te oluka lisalisi na ye ntango okokutana na mikakatano ya makasi. Yango ekosalisa yo ozala na kondima ete Yehova ayebi ntango nini mpe ndenge nini akosalisa yo. (Nz. 27:1, 3) Soki tozali koyika mpiko na mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo, ekozala mpasi te tóyika mpiko na bolɔzi monene. (Rom. 5:3) Mpo na nini tolobi bongo? Bandeko mingi bamoni ete kolonga mokakatano moko na bomoi ebongisaka bango mpo na mikakatano oyo ekoya. Ezaleli ya koyika mpiko ebongisaki bango mpe esalaki ete bákóma na kondima ete Yehova azali na mposa ya kosalisa bango. Mpe kondima esalisaki bango báyika mpiko na mokakatano oyo elandaki.—Yak. 1:2-4. w23.07 3 par. 7-8
Mwamitano, 11 sanza ya 7
Nakopesa yo . . . lokumu. —Eba. 19:21.
Komikitisa mpe boboto ya Yehova etindaka biso tózalaka makambo makasimakasi te. Na ndakisa, komikitisa ya Yehova emonanaki ntango alingaki koboma bato mabe ya Sodoma. Na nzela ya anzelu na ye, Yehova apesaki moto ya sembo Lota mitindo ete akima na etúká ya ngombangomba. Lota abangaki kokende kuna. Yango wana, Lota asɛngaki ete ye ná libota na ye bákende na Zoare, engumba moko moke oyo Yehova akanaki kobebisa yango. Yehova akokaki kotingama ete Lota alanda malako na ye mokomoko kaka ndenge ezali. Kasi, Yehova atikaki Lota akende na Zoare, mpe abebisaki engumba yango te. (Eba. 19:18-22) Mwa basiɛklɛ na nsima, Yehova ayokelaki bato ya Ninive mawa. Atindaki mosakoli Yona akende koyebisa bato mabe ya Ninive ete bango ná engumba na bango bakobebisama. Kasi, ntango bato ya Ninive babongolaki motema, Yehova ayokelaki bango mawa mpe abebisaki engumba yango te.—Yona 3:1, 10; 4:10, 11. w23.07 21 par. 5
Mwapɔsɔ, 12 sanza ya 7
Babomaki [Yehoashe] . . . , kasi bakundaki ye na malita ya bakonzi te.—2 Nt. 24:25.
Ndakisa ya Yehoashe ekoki koteya biso nini ? Azalaki lokola nzete moko oyo misisa na yango ekɔtaki mpenza te na mabele mpe oyo kaka mwa eteni ya nzete moko boye nde ezalaki kotɛlɛmisa yango. Nsima ya liwa ya Yehoyada, moto oyo azalaki kosunga ye, Yehoashe abandaki koyokela bapɛngwi mpe atikalaki sembo te epai ya Yehova. Ndakisa yango emonisi malamu ete tosengeli te kobanga Nzambe kaka mpo na komekola ndakisa malamu ya bato ya libota na biso to mpe ya bandeko na biso bakristo. Mpo tótikala makasi na elimo, tosengeli kokómisa makasi ezaleli na biso ya kokangama na Nzambe mpe kobanga ye, na nzela ya boyekoli ya Biblia, komanyola, mpe kobondela mbala na mbala. (Yir. 17:7, 8; Kol 2:6, 7) Yehova asɛngaka biso te tósala makambo oyo tokokoka te. Makambo oyo asɛngaka biso ezali na Mosakoli 12:13, oyo elobi: “Bangá Nzambe ya solo mpe batelá mitindo na ye. Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.” Soki tozali kobanga Nzambe, tokotikala sembo epai na ye ata soki likambo nini ekómeli biso na mikolo ezali koya. Eloko ata moko te ekokoka kobebisa boninga na biso ná Yehova. w23.06 19 par. 17-19
Mwalomingo, 13 sanza ya 7
Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.—Em. 21:5.
Vɛrsɛ 5 ebandi na maloba oyo: “Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete.” (Em. 21:5a) Maloba yango ezali moko ya mbala misato oyo emonisi ntango Yehova abandi koloba na bimonaneli yango. Na yango maloba yango ezali ndanga oyo euti, epai ya anzelu moko te, ata mpe epai ya Yesu te oyo asekwaki, kasi epai ya Yehova ye moko! Yango emonisi ete tosengeli kotyela mpenza maloba oyo Yehova alobi na nsima motema. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo Yehova “akoki kokosa te.” (Tito 1:2) Likanisi wana nde esali ete tótyela maloba oyo ezali na Emoniseli 21:5, 6 motema mobimba. Tólobela liloba “Talá!” Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “talá!” ezongelami mingi na mokanda ya Emoniseli. Maloba nini ezali nsima ya liloba “talá”? Maloba oyo ya Nzambe: “Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” Ya solo, Yehova azali kolobela bambongwana oyo ekosalema na mikolo ezali koya, kasi lokola mpo na ye elaka yango ekokokisama mpenza, alobeli bambongwana yango lokola nde esili kokokisama.—Yis. 46:10. w23.11 3-4 par. 7-8
Mwayambo, 14 sanza ya 7
Abimaki na libándá mpe alelaki na mawa makasi mpenza.—Mat. 26:75.
Ntoma Petro azalaki na bolɛmbu. Tótalela mwa bandakisa. Ntango Yesu amonisaki ndenge akomona mpasi mpe akokufa mpo na kokokisa bisakweli ya Biblia, Petro apamelaki ye. (Mrk. 8:31-33) Mbala na mbala, Petro ná bantoma mosusu bawelanaki mpo na koyeba nani aleki baninga. (Mrk. 9:33, 34) Na butu ya nsuka liboso Yesu akufa, Petro asalelaki mopanga mpe akataki moto litoi. (Yoa. 18:10) Kaka na butu yango, Petro abangaki bato mpe awanganaki moninga na ye Yesu mbala misato. (Mrk. 14:66-72) Petro alelaki na mawa mingi mpo na likambo yango. Yesu asundolaki te ntoma yango oyo alɛmbaki nzoto. Ntango Yesu asekwaki, apesaki Petro libaku ya komonisa soki alingaka ye kaka. Yesu asɛngaki Petro asalela ye na komikitisa nyonso lokola mobateli ya bampate na ye. (Yoa. 21:15-17) Petro asalaki makambo oyo Yesu alobaki. Azalaki na Yerusaleme na mokolo ya Pantekote mpe azalaki na kati ya bato ya liboso oyo batyamaki mafuta na elimo. w23.09 22 par. 6-7
Mwamibale, 15 sanza ya 7
Batelá bampate na ngai ya mike.—Yoa. 21:16.
Ntoma Petro alendisaki bankulutu ete: “Bóbatela etonga ya Nzambe.” (1 Pe. 5:1-4) Soki ozali nkulutu, toyebi ete olingaka bandeko ya lisangá mpe olingaka kobatela bango lokola mobateli ya mpate. Kasi, mbala mosusu omonaka ete makambo ya kosala eleki mingi to ete olɛmbi mingi mpe okokoka te kokokisa mokumba yango. Nini ekoki kosalisa yo? Yebisá Yehova ndenge ozali komiyoka. Petro akomaki: “Soki moto azali kosalela bamosusu, atya motema na makasi oyo Nzambe apesaka.” (1 Pe. 4:11) Ekoki kozala ete bandeko mibali mpe bandeko basi bazali kokutana na mikakatano oyo ekoki kosila nyonso te na mokili oyo. Kasi kobosana te ete Yesu Kristo, “mobateli ya mpate mokonzi,” akoki kosalisa bango malamu koleka ata yo. Akoki kosala yango lelo oyo mpe na mokili ya sika. Nzambe asɛngi bankulutu kaka bálinga bandeko, bábatela bandeko lokola mobateli ya mpate, mpe bakóma “bandakisa mpo na etonga.” w23.09 29-30 par. 13-14
Mwamisato, 16 sanza ya 7
Yehova ayebi ete makanisi ya bato ya bwanya ezali mpamba.—1 Ko. 3:20.
Tosengeli koboya mpenza makanisi ya bato. Soki tozali kokanisa ndenge bato oyo batyolaka Yehova mpe mibeko na ye bakanisaka, tokoki mpe kobosana Yehova mpe mibeko na ye. (1 Ko. 3:19) Mbala mingi “bwanya ya mokili oyo” elendisaka bamposa ya nzoto. Bakristo mosusu na Pergame mpe na Tyatire bakómaki kosambela bikeko mpe kosala pite ndenge bato bazalaki kosala na engumba yango. Yesu apesaki masangá yango nyonso mibale toli ya makasi mpo batikaki ete bato básala pite. (Em. 2:14, 20) Lelo oyo, bato oyo bazali zingazinga na biso bakoki kotinda biso tókóma na makanisi mabe. Bandeko ya libota mpe bato oyo toyebani na bango bakoki kondimisa biso ete tozali makambo makasimakasi mpe kolendisa biso tóbuka mibeko ya Yehova. Na ndakisa, bakoki koloba ete ezali na ntina te kotikala pɛto na bizaleli mpe mitinda ya Biblia esilá ngala. Na bantango mosusu, tokoki kokanisa ete Yehova apesaka biso te malako oyo ezali polele. Tokoki ata komeka ‘kokende mosika koleka makambo oyo ekomamá.’—1 Ko. 4:6. w23.07 16 par. 10-11
Mwaminei, 17 sanza ya 7
Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso mpe azali ndeko oyo abotami mpo na bantango ya mpasi.—Mas. 17:17.
Maria, mama ya Yesu, azalaki na mposa ya kozwa makasi. Abalaki naino te; kasi, asengelaki kokóma na zemi. Atako ye moko azalaki naino na bana te, asengelaki kobɔkɔla mwana mobali oyo akokóma Masiya. Mpe lokola Maria asangisaki naino nzoto na mobali te, ndenge nini akolimbola makambo nyonso wana epai ya Yozefe, mobali oyo akobala ye? (Luka 1:26-33) Ndenge nini Maria azwaki makasi? Alukaki lisalisi epai ya basusu. Na ndakisa, atunaki anzelu Gabriele mituna oyo etali mokumba yango. (Luka 1:34) Mwa moke na nsima, asalaki mobembo mpe akendaki tii na “etúká ya ngombangomba” ya Yuda mpo na kotala ndeko na ye Elizabeti. Elizabeti apesaki Maria longonya mpe elimo ya Yehova etindaki ye ayebisa Maria esakweli moko ya kolendisa mpo na mwana oyo azalaki na libumu na ye. (Luka 1:39-45) Maria alobaki ete Yehova “asali makambo ya nguya na lobɔkɔ na ye.” (Luka 1:46-51) Yehova apesaki Maria makasi na nzela ya anzelu Gabriele mpe ya Elizabeti. w23.10 14-15 par. 10-12
Mwamitano, 18 sanza ya 7
Akómisi biso bokonzi, banganga-nzambe mpo na Nzambe mpe Tata na ye.—Em. 1:6.
Kaka ndambo moke ya bayekoli ya Kristo nde batyami mafuta na elimo, mpe bazali na boyokani ya ndenge mosusu na Yehova. Bato yango 144000 bakozala banganga-nzambe na likoló elongo na Yesu. (Em. 14:1) Esika Mosantu ya tabernakle ezali komonisa ndenge bazali bana ya Nzambe oyo babotami na elimo wana bazali naino awa na mabele. (Rom. 8:15-17) Esika Eleki Mosantu ya tabernakle ezali komonisa likoló, epai Yehova afandaka. “Rido” oyo ekabolaki Esika Mosantu na Esika Eleki Mosantu ezali komonisa nzoto ya Yesu ya mosuni oyo ezalaki kopekisa ye akɔta na likoló lokola Nganga-nzambe Monene ya tempelo ya elimo. Ntango apesaki nzoto yango mbeka mpo na bato, Yesu afungolaki nzela ya bomoi na likoló mpo na bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo. Bango mpe basengeli kotika nzoto na bango ya mosuni mpo na kozwa mbano na bango ya likoló.—Ebr. 10:19, 20; 1 Ko. 15:50. w23.10 28 par. 13
Mwapɔsɔ, 19 sanza ya 7
Ntango ekozanga ngai soki nalobeli lisusu Gideone.—Ebr. 11:32.
Gideone asilikaki te ntango bato ya Efraime bazalaki koloba mabe mpo na ye. (Bas. 8:1-3) Ayanolaki bango na nkanda te. Amonisaki ete azali moto ya komikitisa ntango azalaki koyoka makambo oyo bazalaki koloba mpe ndenge alobaki na bango na boboto. Bankulutu ya bwanya bamekolaka Gideone ndenge bayokaka na likebi mpenza mpe balobaka na boboto soki bato mosusu bazali koloba mabe mpo na bango. (Yak. 3:13) Yango esalaka ete kimya ezala na lisangá. Ntango bakumisaki Gideone mpo na ndenge alongaki Bamidiane, abendaki likebi ya bato epai ya Yehova. (Bas. 8:22, 23) Ndenge nini bankulutu bakoki komekola Gideone? Basengeli kosala ete lokumu nyonso ezonga epai ya Yehova mpo na makambo oyo basalaka. (1 Ko. 4:6, 7) Na ndakisa, soki bapesi nkulutu moko longonya mpo na makoki na ye ya koteya, akoki kobenda likebi ya bato epai mateya yango euti, elingi koloba, na Liloba ya Nzambe, to na formasyo oyo ebongiseli ya Yehova epesaka biso. Bankulutu bakoki koluka koyeba soki lolenge na bango ya koteya ekumisaka Yehova to ebendaka nde likebi ya bato epai na bango moko. w23.06 4 par. 7-8
Mwalomingo, 20 sanza ya 7
Makanisi na ngai ezali makanisi na bino te.—Yis. 55:8.
Soki tozwi te oyo tosɛngi na libondeli, tokoki komituna boye: ‘Nazali kobondela mpo na makambo oyo ebongi?’ Mbala mingi, tokanisaka ete toyebi oyo eleki malamu mpo na biso. Kasi makambo oyo tosɛngaka, mbala mosusu yango nde te eleki malamu mpo na biso. Soki tozali kobondela mpo na mokakatano moko, ekoki kozala na lolenge ya malamu ya kosilisa mokakatano yango koleka lolenge oyo biso tozali kosɛnga. Mpe makambo mosusu oyo tosɛngaka mbala mosusu eyokani te na mokano ya Yehova. (1 Yoa. 5:14) Na ndakisa, tótalela ndakisa ya baboti oyo basɛngi Yehova ete mwana na bango atikala na kati ya solo. Emonani ete basɛngi likambo ya malamu. Kasi, Yehova atindaka biso te na makasi tósalela ye. Alingaka ete biso nyonso, ata mpe bana na biso, tópona kosalela ye. (Mib. 10:12, 13; 30:19, 20) Na yango, baboti yango bakoki nde kosɛnga Yehova asalisa bango básimba motema ya mwana na bango mpo etinda ye alinga Yehova mpe akóma moninga na ye.—Mas. 22:6; Ef. 6:4. w23.11 21 par. 5; 23 par. 12
Mwayambo, 21 sanza ya 7
Bókoba kobɔndisana na maloba wana.—1 Tes. 4:18.
Mpo na nini kobɔndisa basusu ezali lolenge moko ya ntina mingi ya komonisa bolingo? Na kotalela mokanda moko oyo elimbolaka Biblia, liloba oyo Paulo asaleli mpo na “kobɔndisa” elimboli “kotɛlɛma pene ya moto mpo na kolendisa ye ntango akutani na likambo moko ya mpasi.” Na yango ntango tozali kobɔndisa, tozali kosalisa ndeko na biso oyo azali na mpasi atɛlɛma mpe akoba kotambola na nzela ya bomoi. Ntango nyonso oyo tobɔndisaka ndeko na biso ya mobali to ya mwasi, tomonisaka ete tolingaka ye. (2 Ko. 7:6, 7, 13) Ezali na boyokani mpenza kati na motema mawa mpe kobɔndisa. Na ndenge nini? Moto ya motema mawa abɔndisaka basusu mpe alukaka kosalisa bango na mpasi na bango. Na yango toyokaka liboso mawa; na nsima tobɔndisaka. Talá ndenge Paulo amonisi boyokani oyo ezali kati na motema mawa ya Yehova mpe libɔndisi oyo apesaka. Paulo abengi Yehova “Tata ya motema mawa mingi mpe Nzambe ya kobɔndisama nyonso.”—2 Ko. 1:3. w23.11 9-10 par. 8-10
Mwamibale, 22 sanza ya 7
Tósepela mpe ntango tokutani na minyoko.—Rom. 5:3.
Bayekoli nyonso ya Kristo bakoki kokutana na minyoko. Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Alobaki na bakristo ya Tesaloniki boye: “Ntango tozalaki elongo na bino, tozalaki koyebisa bino liboso ete tosengeli kokutana na mikakatano, mpe esalemaki bongo.” (1 Tes. 3:4) Mpe epai ya Bakorinti, akomaki: “Bandeko, tolingi te kobombela bino mikakatano oyo ekómelaki biso . . . Tozalaki ata kobanga mpo na bomoi na biso.” (2 Ko. 1:8; 11:23-27) Lelo oyo mpe, bakristo bayebi ete bakoki kokutana na mikakatano to na minyoko. (2 Tim. 3:12) Lokola ozali kondimela Yesu mpe kolanda ndakisa na ye, baninga to bandeko ya libota bakoki koyina yo. Ekateli na yo ya kozala sembo na makambo nyonso ezali kobimisela yo mikakatano na mosala? (Ebr. 13:18) Guvɛrnema ezali konyokola yo mpo oyebisaki elikya na yo epai ya basusu? Ata soki minyoko oyo tozali kokutana na yango ezali ya ndenge nini, Paulo alobaki ete tosengeli kosepela. w23.12 10-11 par. 9-10
Mwamisato, 23 sanza ya 7
Botye ngai na mpasi makasi. —Eba. 34:30.
Yakobo akutanaki na mikakatano mingi. Bana mibale ya Yakobo, Levi ná Simeone, bamemaki nsɔni na libota mpe bafingisaki nkombo ya Yehova. Longola yango, Rashele mwasi oyo Yakobo alingaki mingi, akufaki ntango azalaki kobota mwana na bango ya mibale. Mpe lokola nzala makasi eyaki na ekólo, esɛngaki ete akende na Ezipito atako akómaki mobange. (Eba. 35:16-19; 37:28; 45:9-11, 28) Na makambo wana nyonso, Yakobo akobaki kotyela Yehova motema mpe bilaka na ye. Mpe Yehova amonisaki Yakobo ete andimamaki epai na ye. Na ndakisa, Yehova apambolaki Yakobo na mosuni. Meká kokanisa botɔndi oyo Yakobo asengelaki kozala na yango epai ya Yehova ntango akutanaki lisusu na Yozefe, mwana na ye oyo akanisaki ete akufaki! Boninga makasi oyo Yakobo azalaki na yango ná Yehova, esalisaki ye alonga mikakatano oyo akutanaki na yango. (Eba. 30:43; 32:9, 10; 46:28-30) Soki tobateli boninga makasi ná Yehova, biso mpe tokoki kolonga mikakatano oyo ekoki kokómela biso. w23.04 15 par. 6-7
Mwaminei, 24 sanza ya 7
Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te.—Nz. 23:1.
Nzembo 23 elobelaka bolingo ya Yehova mpe libateli na ye. Davidi, moto oyo akomaki nzembo yango, alobeli boyokani makasi oyo ezalaki kati na ye ná Yehova, Mobateli na ye. Davidi azalaki kobanga te kotika Yehova atambwisa ye, mpe azalaki kotyela Ye motema mobimba. Davidi ayebaki ete bolingo ya Yehova ekolanda ye mikolo nyonso ya bomoi na ye. Nini endimisaki ye likambo yango? Davidi amonaki ete Yehova azalaki kobatela ye mpo azalaki ntango nyonso kokokisa bamposa na ye. Davidi ayebaki mpe ete Yehova azalaki Moninga na ye mpe ete azalaki kondima ye. Yango wana atyaki motema ete ata soki makambo nini ekokómela ye na mikolo ezali koya, Yehova akokoba kokokisa bamposa na ye nyonso. Ndenge Davidi atyelaki bolingo ya Yehova motema ezalaki na nguya koleka mitungisi nyonso oyo Davidi azalaki na yango mpe epesaki ye esengo mpe nsai makasi mpenza.—Nz. 16:11. w24.01 29 par. 12-13
Mwamitano, 25 sanza ya 7
Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.—Mat. 28:20.
Kobanda na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, basaleli ya Yehova na mikili mingi bazali na mwa kimya mpe bonsomi ya kosala mosala ya kosakola. Na yango, mosala ekoli mpenza. Lelo, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali kokoba kolanda litambwisi ya Kristo. Balingaka ete malako oyo bazali kopesa bandeko eyokana na makanisi oyo ezali mpe kuna na likoló. Na nsima, bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu bapesaka malako yango na masangá. Bankulutu oyo batyami mafuta na elimo bazali na ‘lobɔkɔ ya mobali’ ya Kristo. (Em. 2:1) Ya solo, bankulutu yango bazali bato ya kozanga kokoka mpe basalaka mabunga. Moize ná Yosua mpe basalaki mabunga na bantango mosusu, ata mpe bantoma. (Mit. 20:12; Yos. 9:14, 15; Rom. 3:23) Atako bongo, Kristo azali kotambwisa na likebi moombo ya sembo mpe bankulutu, mpe akokoba kosala yango. Yango wana, tosengeli kondima litambwisi oyo azali kopesa na nzela ya baoyo batyami mpo na kokamba biso. w24.02 23-24 par. 13-14
Mwapɔsɔ, 26 sanza ya 7
Bókóma bamekoli ya Nzambe lokola bana ya bolingo.—Ef. 5:1.
Lelo oyo, tokoki kosepelisa Yehova ntango tozali kolobela ye na esengo, botɔndi mpe bolingo. Ntango tobimi na mosala ya kosakola, tobosanaka te ete mokano na biso ya libosoliboso ezali ya komema bato epai ya Yehova, kosalisa bango bámona ete azali Tata ya bolingo, ndenge biso tomonaka ye. (Yak. 4:8) Tosepelaka komonisa bato makambo oyo Biblia elobi mpo na Yehova, ndenge emonisi bolingo na ye, bosembo na ye, bwanya na ye, nguya na ye, mpe bizaleli na ye mosusu. Lisusu, tosanzolaka Yehova mpe tosepelisaka ye ntango tosalaka makasi tómekola ye. Ntango tosalaka bongo, tomikabolaka na mokili oyo mabe. Bato mosusu bakoki komona ete tokeseni na bango mpe bakoki koluka koyeba ntina oyo ezali bongo. (Mat. 5:14-16) Ntango tozali kokutana na bango na makambo na biso ya mokolo na mokolo, tokoki kozwa libaku ya kolimbwela bango ntina oyo tosalaka boye to boye. Yango esalaka ete bato malamu báluka kopusana epai ya Nzambe na biso. Ntango tozali kosanzola Yehova bongo, tosepelisaka motema na ye.—1 Tim. 2:3, 4. w24.02 10 par. 7
Mwalomingo, 27 sanza ya 7
Ayeba kolendisa . . . mpe ayeba kopamela.—Tito 1:9.
Mpo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, osengeli koyekola makambo oyo ekosalisa yo na bomoi. Yango ekosalisa yo ondima mikumba na lisangá, obatela mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na yo mpe ya libota, mpe ozala na boyokani ya malamu na basusu. Na ndakisa, yekolá kotánga mpe kokoma malamu. Biblia elobi ete moto ya esengo mpe oyo alongaka na nyonso oyo azali kosala azwaka ntango ya kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango mokolo na mokolo. (Nz. 1:1-3) Ntango azali kotánga Biblia mokolo na mokolo, akoyeba makanisi ya Yehova, mpe yango ekosalisa ye akanisaka malamu mpe ayeba kosalela makambo oyo atángaki. (Mas. 1:3, 4) Bandeko mibali mpe bandeko basi bazali na mposa ya mibali oyo bakoki mpo na kopesa bango mateya mpe toli oyo euti na Biblia. Soki oyebi kotánga mpe kokoma malamu, okoyeba kobongisa masolo mpe biyano ya malamu oyo ekokómisa kondima ya bandeko makasi. Okoyeba mpe kozwa mwa banɔti ya malamu oyo ekosalisa yo okómisa kondima na yo moko makasi mpe olendisa basusu. w23.12 26-27 par. 9-11
Mwayambo, 28 sanza ya 7
Moto oyo azali na bomoko elongo na bino aleki moto oyo azali na bomoko elongo na mokili.—1 Yoa. 4:4.
Ntango ozali kobanga, manyolá na makambo oyo Yehova akosala na mikolo ezali koya ntango Satana akozala lisusu te. Elakiseli moko na liyangani ya etúká ya 2014 emonisaki Tata moko azali kolobela elongo na libota na ye ndenge oyo 2 Timote 3:1-5 ekokaki kotángama soki maloba yango esakolaki nde makambo oyo ekozala na Paradiso: “Na mokili ya sika ntango moko ya esengo mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo balingaka basusu, bato balingá bozwi ya elimo, bato ya mindɔndɔ te, bato ya komikitisa, bato oyo bakumisaka Nzambe, oyo batosaka baboti, oyo bazali na botɔndi, oyo bazali sembo, oyo balinganaka na kati ya mabota, oyo balingaka kosala boyokani, oyo balobaka ntango nyonso bolamu ya basusu, oyo bamipekisaka, bato ya boboto, oyo balingaka makambo ya malamu, bato oyo batyelaka motema, oyo batingamaka na makambo te, oyo bavimbi na lolendo te, oyo balingá Nzambe na esika ya kolinga bisengo, oyo bazali mpenza kokangama na Nzambe; mpe yo kangamá na bato ya lolenge wana.” Yo mpe osololaka na bato ya libota na yo to bandeko ya lisangá ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika? w24.01 6 par. 13-14
Mwamibale, 29 sanza ya 7
Nandimi yo.—Luka 3:22.
Koyeba ete Yehova andimaka basaleli na ye nyonso ekitisaka motema mpenza! Biblia elobi: “Yehova azali kosepela na bato na ye.” (Nz. 149:4) Kasi, basusu balɛmbaka nzoto mpe bamitunaka na bantango mosusu: ‘Yehova andimaka ngai mpenza?’ Na bantango mosusu, basaleli mosusu ya sembo ya Yehova na ntango ya kala mpe bakómaki na makanisi ya ndenge wana. (1 Sa. 1:6-10; Yobo 29:2, 4; Nz. 51:11) Biblia emonisi polele ete bato ya kozanga kokoka bakoki kondimama na Yehova. Ndenge nini? Soki tomonisi kondima epai ya Yesu Kristo mpe tozwi batisimo. (Yoa. 3:16) Na ndenge yango, tomonisaka na miso ya bato ete tobongoli motema na masumu na biso mpe tolaki Nzambe ete tokosala mokano na ye. (Mis. 2:38; 3:19) Yehova asepelaka ntango tosali makambo wana mpo na kokóma baninga na ye. Ntango nyonso oyo tozali kosala makasi tótosa elako na biso ya komipesa na Nzambe, Yehova andimaka biso mpe amonaka ete tozali baninga na ye ya motema.—Nz. 25:14. w24.03 26 par. 1-2
Mwamisato, 30 sanza ya 7
Tokoki kotika te koloba makambo oyo tomoni mpe toyoki.—Mis. 4:20.
Tokoki komekola bantoma soki tozali kokoba kosakola ata soki bakonzi ya Leta basɛngi biso tótika kosakola. Tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa biso tókokisa mokumba na biso ya kosakola. Sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpe bwanya mpe asalisa yo oyika mpiko na mikakatano. Mingi kati na biso bazali konyokwama na maladi, mitungisi ya makanisi, liwa ya moto oyo tozalaki kolinga mingi, mikakatano na libota, monyoko, to mikakatano mosusu. Mpe bamaladi mabe, bitumba esali ete mikakatano yango ekóma lisusu mpasi mpo na koyikela yango mpiko. Yebisá Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. Yebisá ye makambo ozali kokutana na yango kaka ndenge olingaki koyebisa yango moninga na yo ya motema. Zalá na kondima ete Yehova “akosalisa yo.” (Nz. 37:3, 5) Kotingama na mabondeli ekosalisa biso ‘tóyika mpiko na bolɔzi.’ (Rom. 12:12) Yehova ayebi mikakatano oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango, “akoyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi.”—Nz. 145:18, 19. w23.05 5-6 par. 12-15
Mwaminei, 31 sanza ya 7
Bókoba koluka koyeba malamu eloko oyo ekoki kondimama na Nkolo.—Ef. 5:10.
Ntango tolingi kozwa bikateli ya minene, tosengeli kososola “soki mokano ya Yehova ezali nini” mpe na nsima kosala na boyokani na yango. (Ef. 5:17) Soki toyebi malamu mitinda ya Biblia oyo tokoki kosalela na likambo oyo tozali na yango, tokozala mpenza na makanisi ya Nzambe na likambo yango. Mpe soki tosaleli mitinda na ye, tokolonga kozwa bikateli ya malamu. “Moto mabe,” monguna na biso Satana, akosepela tópesa ntango mingi na makambo ya mokili tii tózala na ntango te mpo na makambo ya Nzambe. (1 Yoa. 5:19) Ekozala mpasi te mokristo atya biloko ya mosuni, kotánga kelasi, to mosala na ye liboso ya mabaku mosusu ya kosalela Yehova. Soki esalemi bongo, ekomonisa ete makanisi ya mokili ekɔteli ye. Ya solo, makambo yango ezali mabe te, kasi esengeli ata moke te kozwa esika ya liboso na bomoi na biso. w24.03 24 par. 16-17