Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/11 nk. 6-9
  • Bato ya kotyela motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato ya kotyela motema
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya mitinda oyo etali bizaleli malamu
  • Bakoki kotyelama motema atako bazali babola
  • Nzambe oyo abongi tótyela ye motema
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Ozali moto oyo basusu bakoki kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
  • Zalá sembo na makambo nyonso
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Kozala sembo elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 1/11 nk. 6-9

Bato ya kotyela motema

Ntango moto moko abosanaki sakosi na ye na taxi, Santiago, sofɛlɛ moko ya taxi na Argentine, amitunaki ata moke te soki akosala nini. Azongisaki yango mbala moko epai ya nkolo na yango. Moto akoki komona lokola likambo oyo Santiago asalaki ezalaki monene te, nzokande sakosi yango ezalaki na dolare koleka 32 000!

KANISÁ naino soki mokili etondi na bato oyo babongi kotyelama motema. Bomoi ekozala ndenge mosusu mpenza! Okoki kotikela moto mosusu mwana na yo mpo abatela ye mpe okobanga eloko te. Okozala na mposa ya bafungola te mpo na ndako na yo. Wana ezali kaka ndɔtɔ?

Ntina ya mitinda oyo etali bizaleli malamu

Ntoma Paulo alobaki mpo na ye moko mpe mpo na baninga na ye bakristo ete: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” (Baebre 13:18) Batatoli ya Yehova basalaka makasi bázala ndenge wana. Bazalaka na mokano ya komonisa bizaleli oyo Biblia elobeli na Yisaya 33:15 ete: “Ezali na moto oyo azali kotambola na boyengebene ya ntango nyonso mpe azali koloba makambo ya sembo, oyo azali koboya litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe oyo euti na misala ya kobuba, oyo azali koningisa mabɔkɔ na ye mpo na kosimba kanyaka te.” Ndenge nini bato mosusu basalaki ndenge wana?

● ‘Koloba makambo ya sembo.’ Motatoli ya Yehova moko na nkombo Domingo asalaka na Philippines na bilanga ya kokoti. Alobi boye: “Bato mingi bazalaka sembo te epai ya bapatrɔ na bango. Na ndakisa, soki balɔkɔti kokoti, bayebisaka patrɔ motángo ya solo te ya basaki oyo balɔkɔti. Na ndenge yango, bakoki kotɛka basaki mosusu na kobombana.”

Etikalaki moke bálongola Domingo ná libota na ye na mosala mpo na likambo ya ndenge mosusu. Patrɔ asɛngaki bango bákosa motángo ya basaki ya kokoti oyo babimisi, kasi bango baboyaki kosala yango. Atako bongo, Domingo alobi boye: “Toyebisaki patrɔ ete ata soki akolongola biso na mosala, tokokosa mpo na ye te. Nsukansuka, patrɔ na biso alobaki ete Batatoli ya Yehova bazali bato malamu oyo bakoki kotyelama motema, mpe abakiselaki biso mabele mosusu ya kosala bilanga.”

● ‘Koboya litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe.’ Pierre, mokonzi ya bakɔngɔli-mpako na etúká moko ya Cameroun, akutanaki na mabaku mingi ya kozwa mbongo nokinoki. Ntango batyaki ye afutaka bato oyo basalaka mosala mpo na ntango mokuse, amonaki mwa mbeba. Pierre alobi boye: “Mbongo mosusu ezalaki mpo na kofuta bato oyo mosala esilá to baoyo bakufá. Na esika namona ete nakoki kozwa mbongo yango, nakomaki makambo nyonso mpe nabombaki mbongo yango na sanduku.”

Nini esalemaki? Pierre alobi boye: “Mbula mibale na nsima, bayaki kotalela makambo ya mbongo yango. Nazalaki na esengo mingi ndenge nakokaki kolakisa lapolo oyo ezali na molɔngɔ mpe kobimisa mbongo ndenge ezalaki mpenza; na ntango wana, mbongo yango kutu ekómaki mingi. Bato oyo bayaki kotalela makambo ya mbongo bapesaki ngai longonya mingi mpo na bosembo na ngai.”

● Koboya ‘kosimba kanyaka.’ Banda Ricardo abandá mosala na ye na makambo ya mibeko (notaire), na Rio de Janeiro, na Brésil, bato mingi bazalaki koluka kopesa ye kanyaka. Alobi boye: “Mokolo moko, avoka moko alukaki kopesa ngai kanyaka. Kozanga nayeba, atindelaki ngai lecteur ya CD na ndako. Na ntango wana, lecteur ya CD eutaki kobima mpe bato mingi bazalaki na yango te.”

Ricardo asalaki nini? Alobi boye: “Ngai ná mwasi na ngai tolobaki ete tokofungola ata kartɔ yango te. Nakendaki na biro ya avoka yango, akamwaki mingi, mpe natikaki yango likoló ya biro na ye. Ezalaki libaku ya malamu mpo nayebisa ye ntina oyo nazongisi kado na ye. Sɛkrɛtɛrɛ na ye nde akamwaki mingi koleka mpo na likambo oyo nasalaki.”

Atako ezali kaka Batatoli ya Yehova te nde basalaka makasi ya kozala sembo, bango bayebani lokola bato oyo babongi kotyelama motema. Na mikolo oyo eleki, yango nde etindaki kompanyi moko ya bamagazini oyo etɛkaka bilamba na Pologne ezwa na mosala kaka Batatoli ya Yehova. Mwasi moko oyo alandelaka ndenge biloko ezali kotɛkama alobaki boye: “Bato ya sembo bazali bisika nyonso, kasi Batatoli ya Yehova bazali na mitinda, mpe bakangamaka na yango.”

Bakoki kotyelama motema atako bazali babola

Na makanisi ya bato mingi, soki moto azali mobola, ezali na ntina te azala sembo. Na ndakisa, televizyo CNN elobelaki mwana moko ya mobali ya mbula 14 na Nigéria, oyo alekisaka ntango mingi na Internet mikolo nyonso mpo na kobuba bato. Mwana yango amilongisaki na maloba oyo: “Bolingi nasala nini? Naleisaka libota na ngai​—leki na ngai ya mwasi, mama, [tata] na ngai. Moto asengeli kozala na eloko ya kobikela.”

Ya solo, Biblia elobi te ete bato oyo babatelaka bosembo bakokóma na bozwi, kasi epesi nde elaka ete bakozwa oyo esengeli mpo na kobikela. Yisaya 33:16 elobi boye: “Ya solo, bakopesa ye limpa na ye; esika na ye ya kobomba mai ekozanga mai te.”

Kasi okoki komituna boye: ‘Ndenge nini kozala sembo ekoki kosalisa bato oyo bazali mpenza babola? Bongo bato oyo babundaka mokolo na mokolo kaka mpo na komileisa?’

Tózwa ndakisa ya Berthe, mwasi moko ya Cameroun oyo mobali akufá, oyo atɛkaka miando, ntuka moko kitoko ya manioko. Alobi boye: “Liboke moko ezalaka na miando 20. Kasi, mbala mingi batɛkisi mosusu batyaka kaka 17 to 18 na maboke mingi, kasi ngai nalingaka kokosa bato te kaka mpo na kozwa mbongo.”

Mombongo ya Berthe etambolaka malamu? Mikolo nyonso te. Alobi boye: “Mbala mingi nalekisaka mokolo mobimba natɛki te. Kasi soki nakei kodefa biloko ya kolya mpe nayebisi bango ete natɛki eloko te, baboyaka te mpo bayebi ete nakofuta bango soki kaka nazwi mbongo. Batyelaka ngai motema, misala na ngai endimisaka bango ete bakoki kotyela ngai motema.”

Nzambe oyo abongi tótyela ye motema

Tokómaka kotyela moto motema mingi koleka soki tomoni ete azali kotosa maloba na ye. Yosua, mokambi moko ya Yisraele ya kala, alobaki mpo na Nzambe ete: “Na elaka nyonso ya malamu oyo Yehova apesaki . . . Nyonso ekokisamaki.” (Yosua 21:45) Biso mpe tozali na bantina ya kotyela Nzambe motema?

Bilaka ya Nzambe ebongi mpenza kotyelama motema, yango wana akokanisi maloba na ye na mbula. (Yisaya 55:10, 11) Nini mpenza ekoki kopekisa mbula ebɛta, epɔlisa mabele, mpe ebotisa milona? Eloko moko te! Ndenge moko mpe, eloko moko te ekoki kopekisa bilaka ya Nzambe ekokisama.

Moko ya bilaka yango ezali na 2 Petro 3:13, oyo elobi ete: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.” Nzambe alaki kolongola na mabele bato nyonso oyo bazali kobuba bazalani na bango. Olingi koyeba makambo mingi mpo na ndenge oyo Nzambe akokokisa mokano na ye? Kutaná na Batatoli ya Yehova ya kartye na bino, to tindá mokanda na adrɛsi oyo ebongi na yo kati na oyo ezali na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 8]

AZWI MBANO MPO NA BOSEMBO NA YE

Motatoli ya Yehova moko na nkombo Lucio, na Philippines, akokaki kozanga bosembo. Amonaki dolare 27 500 na tiroir moko ya kala na biro moko oyo basɛngaki ye asukola. Biro mpe mbongo ezalaki ya patrɔ, oyo akendaki mobembo ya mosala. Lucio alobi boye: “Ezalaki mbala ya liboso namona dolare!”

Ntango patrɔ azongaki, Lucio apesaki ye mbongo. Asalaki nini? Lucio alobi boye: “Apesaki ngai mikumba mosusu mingi. Kutu, patrɔ apesaki ngai ndako oyo tokoki kofanda na libota na ngai. Atako bomoi ezali mpasi na Philippines, namonaka ete lokola totosaka mibeko na ye, Yehova azali kobatela biso.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 9]

EMEKELI-KILO YA SEMBO

Mesa ya Moïse eyebani malamu na zando moko na Douala, na Cameroun, epai atɛkaka mbisi. Alobi boye: “Napesá mesa na ngai nkombo ‘Emekeli-kilo,’ mpamba te na zando mobimba, emekeli-kilo na ngai ezali na kati ya mwa bimekeli-kilo oyo babebisá te. Nayebi ete bato bayaka komeka ngai. Soki basɛngi kilo moko ya mbisi, napesaka bango. Bakendaka mbala mingi koluka komeka yango esika mosusu. Nsima ya komeka, emonanaka lokola ezali kilo koleka moko! Mpe bamonaka ete nalukaki te kokosa bango! Bato mingi bayebisaka ngai boye: ‘Toyaka epai na yo mpo ozali sembo.’”

[Elilingi na lokasa 7]

“Toyebisaki patrɔ ete ata soki akolongola biso na mosala, tokokosa mpo na ye te.”​—Domingo, Philippines.

[Elilingi na lokasa 7]

“Bato oyo bayaki kotalela makambo ya mbongo bapesaki ngai longonya mingi mpo na bosembo na ngai.”​—Pierre, Cameroun.

[Elilingi na lokasa 7]

“Avoka moko alukaki kopesa ngai kanyaka. . . . Ngai ná mwasi na ngai tolobaki ete tokofungola ata kartɔ yango te.”​—Ricardo, Brésil.

[Elilingi na lokasa 7]

Mbala mingi Berthe alekisaka mokolo mobimba atɛki te. Kasi bato oyo batɛkaka biloko ya kolya badefisaka ye mpo bayebi ete akofuta bango soki kaka azwi mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto