Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • jy mok. 15 lok. 40-lok. 41 par. 6
  • Yesu asali likamwisi na ye ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu asali likamwisi na ye ya liboso
  • Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Masolo mosusu
  • Yesu asali likamwisi ya liboso
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Likamwisi ya mibale na Kana
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Likamwisi ya mibale na Kana
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
jy mok. 15 lok. 40-lok. 41 par. 6
Na fɛti moko ya libala na Kana, Yesu ayebisi basaleli bátondisa bilokó na mai

MOKAPO 15

Yesu asali likamwisi na ye ya liboso

YOANE 2:1-12

  • FƐTI YA LIBALA NA KANA

  • YESU ABONGOLI MAI VINYO

Eleki sikoyo mikolo misato banda Natanaele akómi na molɔngɔ ya bayekoli ya liboso ya Yesu. Yesu ná bayekoli na ye mosusu ya liboso bazali kokende na nɔrdi ya etúká ya Galile mosika te na esika bautá. Bazali kokende na engumba ya Kana esika Natanaele autá. Kana ezali na nɔrdi ya bangomba ya Nazarete, esika Yesu akolá. Babengisi bango na fɛti moko ya libala na Kana.

Mama ya Yesu mpe ayei na fɛti yango. Lokola Maria azali moninga ya libota ya bato oyo babalani, emonani ete azali mpe na mosala ya koyamba ebele ya bapaya oyo bayei na fɛti yango. Mpe ntango vinyo esili, mbala moko amoni yango mpe akei koyebisa Yesu ete: “Bazali na vinyo te.”​—Yoane 2:3.

Emonani ete Maria azali kosɛnga Yesu asala mwa eloko lokola vinyo ezangi. Mpo na komonisa ete alingi te, Yesu asaleli maloba oyo: “Mwasi, ngai na yo likambo nini?” (Yoane 2:4) Lokola Yesu azali Mokonzi oyo Nzambe atye, esengeli Tata na ye ya likoló atambwisa makambo na ye, kasi te bato ya libota to baninga na ye. Na bwanya nyonso, Maria atiki makambo nyonso epai ya mwana na ye mpe ayebisi basali ete: “Oyo nyonso akoyebisa bino, bósala.”​—Yoane 2:5.

Bazalaki na bilokó ya mai motoba oyo mokomoko na yango ezali na litrɛ 40. Yesu ayebisi basaleli ete: “Bótondisa bilokó wana na mai.” Na nsima abakisi ete: “Bótoka mwa ndambo sikoyo mpe bómemela yango mokambi ya fɛti.”​—Yoane 2:7, 8.

Mokambi ya fɛti ya libala ayebisi mobali ete abimisi vinyo ya kitoko

Mokambi ya fɛti akamwe ndenge vinyo yango ezali kitoko kasi ayebi te ete esalemi na ndenge ya likamwisi. Abengi mobali ya libala mpe ayebisi ye ete: “Moto nyonso abimisaka vinyo oyo eleki malamu liboso, mpe ntango bato balangwe, oyo ya malamu mingi te. Yo obombi vinyo oyo eleki kitoko tii sikoyo.”​—Yoane 2:10.

Wana ezali likamwisi ya liboso oyo Yesu asali. Ntango bayekoli na ye ya sika bamoni yango, kondima na bango ekómi makasi. Na nsima, Yesu, mama na ye mpe bandeko na ye bakei na engumba ya Kapernaume na nɔrdi-wɛsti ya bokula ya Mbu ya Galile.

  • Na ntango nini ya mosala ya Yesu fɛti ya libala na Kana esalemi?

  • Yesu asali nini ntango mama na ye ayebisi ye likambo etali vinyo?

  • Likamwisi nini Yesu asali mpe likambo yango esali nini epai ya bato mosusu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto