Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/1 nk. 10-15
  • Bonene ya Yehova ekoki koyebana te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bonene ya Yehova ekoki koyebana te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Nakosanzola Nzambe Mokonzi’
  • Bandakisa oyo ezali komonisa bonene ya Nzambe
  • Misala ya kokamwa mpe misala minene
  • Nkembo monene ya bokonzi ya Yehova
  • Bizaleli malamu ya Nzambe ezali komonisa bonene na ye!
  • Jéhovah abongi mpo na kokumisama libela na libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tózala na makanisi ya Klisto na likambo etali kozala moto monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • “Yehova azali monene mpe asengeli kosanzolama mingi”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Tósanzola Yehova, Nzambe na biso!
    Tóyembela Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/1 nk. 10-15

Bonene ya Yehova ekoki koyebana te

“[Yehova] abongi na kosanzolama; bonene na ye ekoki koyebana te.”​—NZEMBO 145:3.

1, 2. Davidi azalaki moto ya ndenge nini, mpe azalaki komimona ndenge nini liboso ya Nzambe?

MOKOMI ya Nzembo 145 azali moko ya bato ya kala oyo bayebani mingi. Ntango azalaki naino elenge, abundaki na engambe moko oyo azalaki na bibundeli makasi mpe abomaki ye. Mokomi ya nzembo yango alongaki banguna mingi ntango akómaki mokonzi ya ekólo mpe mokambi ya basoda. Nkombo na ye ezalaki Davidi, mokonzi ya mibale ya Yisalaele. Davidi atiká mpenza nsango; yango wana, ata na moi ya lelo bato mingi bayebaka makambo mosusu oyo asalá.

2 Atako Davidi asalaki makambo mingi ya minene, azalaki na komikitisa. Ayembelaki Yehova nzembo oyo: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana ya moto nini ete otalela ye?” (Nzembo 8:3, 4) Davidi azalaki komimona moto monene te; alobaki ete Yehova nde abikisaki ye na mabɔkɔ ya banguna na ye nyonso mpe alobaki mpo na Nzambe ete: “Opesi mpe ngai nguba ya kobikisama na yo, [komikitisa, NW] na yo ekembisi ngai.” (2 Samwele 22:1, 2, 36) Yehova amikitisaka na ndenge alimbisaka bato ya masumu, mpe motema-boboto ya Nzambe esepelisaki Davidi.

‘Nakosanzola Nzambe Mokonzi’

3. (a) Mpo na Davidi, nani azalaki Mokonzi ya Yisalaele? (b) Davidi azalaki na mposa ya kosanzola Yehova ndenge nini?

3 Atako Davidi azalaki mokonzi oyo Nzambe aponaki, ye moko azalaki komona ete Mokonzi ya solosolo ya Yisalaele ezali Yehova. Davidi alobaki boye: “Bokonzi mpe ezali ya yo, ɛ [Yehova], mpe yo okokumisama nkolo likoló na nyonso.” (1 Ntango 29:11) Davidi azalaki mpenza kotalela Nzambe lokola Mokonzi! Ayembaki boye: “Nakosanzola yo Nzambe na ngai mpe Mokonzi na ngai mpe nakokumisa nkombo na yo seko na seko. Mikolo nyonso nakokumisa yo mpe nakosanzola nkombo na yo seko na seko.” (Nzembo 145:1, 2) Mposa ya Davidi ezalaki ete asanzolaka Yehova Nzambe mokolo mobimba mpe seko na seko.

4. Nzembo 145 ezali komonisa lokuta ya maloba nini?

4 Nzembo 145 ezali eyano malamu mpenza na maloba ya Satana ete Nzambe azali moyangeli mabe oyo apesaka bikelamu na ye bonsomi te. (Genese 3:1-5) Lisusu, Nzembo yango ezali komonisa ete Satana akosaki ntango alobaki ete bato oyo batosaka Nzambe basalaka yango mpo na matomba na bango moko, kasi ezali te mpo balingaka Ye. (Yobo 1:9-11; 2:4, 5) Lokola Davidi, baklisto ya solo lelo oyo bazali komonisa ete Zabolo abukaki lokuta. Baklisto yango bazali kosepela na elikya ya bomoi ya seko mpe koyangelama na Bokonzi ya Nzambe mpo balingaka kosanzola Yehova seko na seko. Bamilio ya bato basí babandi kosanzola Yehova lokola bazali kondima mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa bato mpe bazali kosalela Yehova na botosi mpe na bolingo lokola basambeli na ye oyo bamipesi mpe bazwi batisimo.​—Baloma 5:8; 1 Yoane 5:3.

5, 6. Wapi mabaku tozali na yango ya kosanzola Yehova?

5 Kanisá ebele ya mabaku oyo biso basaleli ya Yehova tozali na yango ya kokumisa mpe kosanzola ye. Tokoki kosanzola ye na kati ya libondeli ntango totángi likambo moko na kati ya Liloba na ye Biblia oyo esimbi mpenza motema na biso. Tokoki kosanzola Nzambe mpe kozongisela ye matɔndi ntango tosepeli na ndenge oyo azali kosalela basaleli na ye makambo to ntango tosepeli mpenza na eloko moko na kati ya bikelamu na ye. Tokumisaka mpe Yehova Nzambe ntango tolobelaka mikano na ye elongo na baninga na biso bandimi na makita ya lisangá to na masolo na biso. Tokoki koloba ete “misala ya malamu” nyonso oyo tosalaka mpo na matomba ya Bokonzi ya Nzambe esanzolaka Yehova.​—Matai 5:16.

6 Na kati ya misala malamu yango oyo ezali komonana mikolo oyo, tokoki kotánga mosala ya kotonga bisika malamu ya losambo oyo basaleli ya Yehova basali na mikili ya bobola. Mosala wana esalemi mingimingi na makabo ya bandeko na biso ya mikili mosusu. Baklisto mosusu bakendaki na mikili yango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Mosala eleki misala nyonso ya malamu ezali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpo na kokumisa Yehova. (Matai 24:14) Ndenge bavɛrsɛ ya nsuka ya Nzembo 145 emonisi yango, Davidi asepelaki na boyangeli ya Nzambe mpe akumisaki bokonzi na Ye. (Nzembo 145:11, 12) Yo mpe osepelaka na boyangeli ya Nzambe oyo etondi na bolingo? Olobelaka Bokonzi na ye mbala na mbala epai ya bato mosusu?

Bandakisa oyo ezali komonisa bonene ya Nzambe

7. Yebisá ntina moko monene tozali na yango ya kosanzola Yehova?

7 Nzembo 145:3 eyebisi ntina monene ya kosanzola Yehova. Davidi ayembaki boye: “[Yehova] abongi na kosanzolama mingi; bonene na ye ekoki koyebana te.” Bonene ya Yehova ezali na nsuka te. Bato bakoki te koyeba, to kokanga ntina, to komeka yango. Kasi, tokoki kozwa litomba na kotalela bandakisa oyo ezali komonisa bonene ya Yehova.

8. Molɔ́ngɔ́ ezali komonisa nini mpo na bonene mpe nguya ya Yehova?

8 Kanisá naino mokolo moko oyo obimaki libándá ya engumba oyo ezalaka na ebele ya miinda na butu mpe otalaki likoló na ntango oyo mapata ezalaki te. Okamwaki te na komona ebele ya minzoto na likoló? Oyokaki mposa te ya kosanzola Yehova mpo na bonene na ye na ndenge akelaki biloko wana na likoló? Kasi, oyo omonaki ezalaki kaka ndambo moke ya ebele ya minzoto ya galaksi oyo mabelé ezali kati na yango. Lisusu, balobaka ete bagalaksi ekoki kozala koleka miliare nkama, mpe kaka misato ekoki komonana na masini monene babengi téléscope. Ya solo, ebele ya minzoto mpe bagalaksi oyo ezali na molɔ́ngɔ́ ezali komonisa ete Yehova azali na nguya ya kokela mpe bonene na ye ekoki koyebana te.​—Yisaya 40:26.

9, 10. (a) Makambo nini etaleli Yesu Klisto ezali komonisa bonene ekoki koyebana te ya Yehova? (b) Ndenge nini lisekwa ya Yesu ekoki kolendisa kondima na biso?

9 Tótalela makambo mosusu oyo ezali komonisa bonene ya Yehova; makambo oyo etaleli Yesu Klisto. Bonene ya Nzambe emonanaki na ndenge akelaki Mwana na ye oyo azalaki “mosali ya mayele” na Ye na boumeli ya bamiliare ya bambula. (Masese 8:22-31, NW) Bonene ya bolingo ya Yehova emonanaki ntango apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko mbeka mpo na kobikisa bato. (Matai 20:28; Yoane 3:16; 1 Yoane 2:1, 2) Eloko oyo bato bakoki kokanga ntina na yango te ezali nzoto ya nkembo mpe ya elimo oyo ekoki kokufa te oyo Yehova asalelaki Yesu nsima ya lisekwa na ye.​—1 Petelo 3:18.

10 Lisekwa ya Yesu emonisaki makambo mingi ya kokamwa ya bonene ekoki koyebana te ya Yehova. Na ntembe te Nzambe azongisaki na makanisi ya Yesu mosala oyo esalemaki mpo na kokela biloko oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te. (Bakolose 1:15, 16) Biloko yango ezali bikelamu ya elimo, molɔ́ngɔ́, mabelé, mpe bikelamu ya bomoi oyo ezali na mokili. Yehova azongisaki na makanisi ya Mwana na ye makambo nyonso ya bomoi ya likoló mpe ya mabelé oyo ayebaki liboso akóma moto, mpe abakisaki makambo oyo Yesu amonaki ntango azalaki na bomoi lokola moto. Ya solo, lisekwa ya Yesu ezali komonisa bonene ya Yehova. Longola yango, likambo ya kokamwa wana ezali ndanga ete bato mosusu mpe bakosekwa. Yango esengeli kolendisa kondima na biso ete Nzambe akoki kozongisa na bomoi bamilio ya bato bakufá oyo abombá na bɔɔngɔ na ye oyo ekoki kobosana makambo te.​—Yoane 5:28, 29; Misala 17:31.

Misala ya kokamwa mpe misala minene

11. Mosala nini ya monene Yehova abandaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?

11 Kobanda Yesu asekwá, Yehova asali makambo mingi mosusu ya minene mpe ya kokamwa. (Nzembo 40:5) Na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.), Yehova abimisaki ekólo ya sika, “Yisalaele ya Nzambe,” lisangá ya bayekoli ya Klisto oyo bapakolamaki na elimo santu. (Bagalatia 6:16) Na ndenge ya kokamwa, ekólo yango ya elimo oyo bato na yango bazali na mokili mobimba eyebanaki na ntango wana. Atako nsima ya liwa ya bantoma baklisto mosusu bapɛngwaki mpe yango ebimisaki boklisto ya nkombo mpamba, Yehova atikaki te kosala misala ya kokamwa mpo na kokokisa mokano na ye.

12. Kobongolama ya Biblia na minɔkɔ oyo bato mingi bazali koloba ezali komonisa nini?

12 Na ndakisa, Biblia mobimba ebatelamaki mpe na nsima ebongolami na minɔkɔ nyonso oyo bato mingi bazali koloba lelo oyo. Mbala mingi, mosala ya kobongola Biblia ezalaki kosalema na mpasi mpe basaleli ya Satana bazalaki koluka bato oyo bazalaki kosala yango mpo na koboma bango. Ya solo, Biblia ekokaki te kobongolama na minɔkɔ koleka 2 000 soki ezalaki te mokano ya Yehova, Nzambe oyo bonene na ye ekoki koyebana te!

13. Banda 1914, ndenge nini bonene ya Yehova ezali komonana na makambo oyo Bokonzi na ye ekokisi?

13 Bonene ya Yehova emonani na makambo oyo bokonzi na ye ekokisi. Na ndakisa, na 1914, atyaki Mwana na ye Yesu Klisto Mokonzi kuna na likoló. Mwa moke na nsima, Yesu abenganaki Satana ná bademo na ye mpe abwakaki bango na mabelé, epai bazali kozela ntango oyo bakobwakama na libulu mozindo. (Emoniseli 12:9-12; 20:1-3) Kobanda wana, bayekoli bapakolami ya Yesu bazali konyokwama mingi. Kasi, Yehova azali kobatela bango na eleko yango ya kozala ya Klisto.​—Matai 24:3; Emoniseli 12:17.

14. Mosala nini ya kokamwa Yehova asalaki na 1919, mpe yango ekokisaki likambo nini?

14 Na mobu 1919, Yehova asalaki mosala mosusu ya kokamwa oyo emonisaki bonene na ye. Bayekoli ya Yesu bapakolami, oyo babomamaki na elimo, basekwaki. (Emoniseli 11:3-11) Kobanda na mbula wana, bapakolami bazali kosakola na molende nsango malamu ya Bokonzi oyo esalemi na likoló. Bapakolami mosusu bayanganisami mpo na kokokisa motuya ya bato 144 000. (Emoniseli 14:1-3) Yehova asalelaki bayekoli ya Klisto oyo bapakolami mpo na koyanganisa bato ya liboso oyo bakofanda na “mabelé ya sika,” elingi koloba ebele ya bato ya sembo. (Emoniseli 21:1) Kasi, “mabelé ya sika” ekozala ndenge nini ntango bapakolami nyonso ya sembo bakokende na likoló?

15. Mosala nini baklisto bapakolami bazali kokamba, mpe eboti mbuma nini?

15 Na 1935,Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto ná 15 Augusto ezalaki na masolo ya ntina mingi oyo elobelaki “ebele ya bato,” oyo Emoniseli mokapo 7 elobeli. Na molende mpenza, baklisto bapakolami babandaki koluka mpe koyanganisa baninga na bango basambeli ya Yehova na bikólo nyonso, na mabota nyonso, mpe na minɔkɔ nyonso. “Ebele ya bato” yango bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya mpe bakopesa bango libaku ya bomoi ya seko na Paladiso lokola basangani ya “mabelé ya sika.” (Emoniseli 7:9-14) Mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli oyo baklisto bapakolami bazali kokamba epesi bato koleka milio motoba elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé. Nani asengeli kozwa nkembo mpo na bokoli oyo ezali kosalema atako Satana ná mokili mabe na ye bazali kosala nyonso mpo na kopekisa yango? (1 Yoane 5:19) Kaka Yehova nde akokaki kosala makambo nyonso oyo, na nzela ya elimo santu na ye.​—Yisaya 60:22; Zekalia 4:6.

Nkembo monene ya bokonzi ya Yehova

16. Mpo na nini bato bakoki komona na miso te ‘nkembo monene ya bokonzi ya Yehova’?

16 “Misala ya kokamwa” mpe “misala minene” nyonso ya Yehova ekobunga te na makanisi ya bato. Davidi akomaki boye: “Bato bakosakola misala na yo minene minene. Ngai nakokanisa mpo na nkembo monene ya bokonzi na yo mpe mpo na misala ya kokamwa na yo. Bato bakosakola nguya na misala minene na yo.” (Nzembo 145:4-6) Kasi, lokola “Nzambe azali elimo” mpe amonanaka na miso te, ndenge nini Davidi akokaki koyeba nkembo monene ya Yehova?​—Yoane 1:18; 4:24.

17, 18. Ndenge nini botɔndi ya Davidi mpo na ‘bonene ya nkembo ya bokonzi ya Yehova’ ebakisamaki?

17 Atako Davidi akokaki komona Nzambe te, ezali na makambo mingi oyo ekokaki kobakisa botɔndi na ye mpo na bonene ya Yehova. Na ndakisa, akokaki kotánga masolo ya Biblia oyo elobeli misala minene ya Nzambe, lokola oyo elobeli ndenge oyo abomaki mokili mabe na Mpela. Na ntembe te, Davidi ayebaki ndenge oyo banzambe ya lokuta ya Ezipito basambwaki ntango Nzambe abikisaki Bayisalaele na boombo na Ezipito. Makambo yango ezali komonisa lokumu mpe bonene ya Yehova.

18 Na ntembe te Davidi akómaki lisusu na botɔndi mingi mpo na bonene ya Nzambe ntango azalaki kotánga Biblia mpe komanyola yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete amanyolaki likoló ya makambo oyo elekaki ntango Yehova apesaki Bayisalaele Mibeko. Bankake ebɛtaki, mikalikali epɛlaki, lipata monene emonanaki, mpe koyula makasi ya liseke ezalaki koyokana. Ngomba Sinai eninganaki mpe ebimisaki milinga. Bayisalaele oyo bayanganaki pene na ngomba yango bayokaki “Maloba Zomi” na kati ya mɔtɔ mpe lipata ntango Yehova alobaki na bango na nzela ya anzelu na ye. (Deteronome 4:32-36; 5:22-24; 10:4; Exode 19:16-20; Misala 7:38, 53) Likambo yango emonisaki mpenza bonene ya Yehova! Bato oyo balingaka Liloba ya Nzambe oyo bamanyolaka masolo yango bakamwaka mpenza ‘nkembo monene ya bokonzi ya Yehova.’ Ya solo, lelo oyo tozali na Biblia mobimba oyo ezali na masolo ya bimonaneli ndenge na ndenge ya nkembo oyo ezali komonisa biso bonene ya Yehova.​—Ezekiele 1:26-28; Danyele 7:9, 10; Emoniseli, mokapo 4.

19. Nini esalisaka biso tómona bonene ya Yehova malamumalamu?

19 Davidi akokaki lisusu komona bonene ya Nzambe na koyekola mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisalaele. (Deteronome 17:18-20; Nzembo 19:7-11) Kotosa mibeko ya Yehova epesaki ekólo Yisalaele lokumu mpe ekabolaki bango na bikólo mosusu. (Deteronome 4:6-8) Se ndenge ezalaki mpo na Davidi, soki biso mpe tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, komanyola yango na mozindo, mpe koyekola yango malamu, ekobakisa botɔndi na biso mpo na bokonzi ya Yehova.

Bizaleli malamu ya Nzambe ezali komonisa bonene na ye!

20, 21. (a) Nzembo 145:7-9 elobeli bizaleli nini oyo ezali komonisa bonene ya Yehova? (b) Bizaleli ya Yehova oyo batángi na bavɛrsɛ yango esalaka nini epai ya baoyo balingaka ye?

20 Ndenge tomoni yango, bavɛrsɛ motoba ya liboso ya Nzembo 145 eyebisi biso bantina malamu oyo tosengeli kosanzola Yehova mpo na makambo oyo ezali komonisa bonene na ye ekoki koyebana te. Vɛrsɛ 7 tii 9 elobeli bizaleli ya Nzambe oyo ezali komonisa bonene na ye. Davidi ayembaki boye: “Bakosakola lokumu ya malamu monene na yo mpe bakoyemba na esengo boyengebene na yo. Ɛ [Yehova] azali na ngɔlu mpe na mawa, azali na motema molai mpe na boboto monene monene. [Yehova] azali malamu epai na bato nyonso mpe ngɔlu na ye ezali likoló ya misala na ye nyonso.”

21 Na bavɛrsɛ yango Davidi alobeli liboso malamu mpe boyengebene ya Yehova​—bizaleli oyo Satana Zabolo alobaki ete Nzambe azali na yango te. Bizaleli yango esalaka nini epai ya bato nyonso oyo balingaka Nzambe mpe bandimaka bokonzi na ye? Malamu ya Yehova mpe boyengebene ya boyangeli na ye epesaka basambeli na ye esengo mingi na boye ete bakoki te kotika kosanzola ye. Lisusu, Yehova azali komonisa malamu na ye epai ya “bato nyonso.” Tozali na elikya ete yango ekosalisa bato mingi lisusu bábongola mitema mpe bákóma basambeli ya Nzambe ya solo na ntango oyo etikali.​—Misala 14:15-17.

22. Ndenge nini Yehova atalelaka basaleli na ye?

22 Davidi asepelaki mpe na bizaleli oyo Nzambe ye moko amonisaki ntango “alekaki liboso ya [Moize] mpe agangaki ete, [Yehova, Yehova], azali Nzambe ya mawa mpe ya ngɔlu, akoyoka nkanda noki te mpe aleki na boboto mpe na solo.” (Exode 34:6) Yango wana, Davidi alobaki ete: “Yehova azali na ngɔlu mpe na motema mawa, asilikaka noki te mpe aleki na [motema-boboto, NW].” Atako bonene ya Yehova ekoki koyebana te, apesaka lokumu epai ya bato oyo bazali kosalela ye na ndenge amonisaka bango boboto. Azali na motema mawa, ntango nyonso pene ya kolimbisa basumuki na nzela ya mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kobikisa biso. Lisusu, Yehova asilikaka noki te, mpamba te apesaka basaleli na ye libaku ya kolonga bolɛmbu oyo ekoki kopekisa bango bákɔta na mokili na ye ya boyengebene.​—2 Petelo 3:9, 13, 14.

23. Ezaleli nini ya malamu mingi tokolobela na lisolo elandi?

23 Davidi akumisaki motema-boboto, to bolingo ya sembo ya Nzambe. Kutu, bavɛrsɛ oyo etikali ya Nzembo 145 emonisi ndenge oyo Yehova amonisaka ezaleli yango mpe ndenge oyo basaleli na ye ya sembo batalelaka motema-boboto na ye. Tokolobela makambo yango na lisolo oyo elandi.

Okopesa eyano nini?

• Mabaku nini tozali na yango ya kosanzola Yehova “mokolo mobimba”?

• Bandakisa nini ezali komonisa ete bonene ya Yehova ekoki koyebana te?

• Ndenge nini tokoki kobakisa botɔndi na biso mpo na nkembo monene ya bokonzi Yehova?

[Elilingi na lokasa 10]

Bagalaksi ezali komonisa bonene ya Yehova

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na ndingisa ya Anglo-Australian Observatory, fɔtɔ ya David Malin

[Elilingi na lokasa 12]

Ndenge nini bonene ya Yehova emonanaki epai ya Yesu Klisto?

[Elilingi na lokasa 13]

Ntango Bayisalaele bazwaki Mibeko na Ngomba Sinai, bamonaki nkembo monene ya Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto