Mokanda ya Biblia nimero 25—Bileli
Mokomi: Yilimia
Esika ya bokomi: Pene na Yelusaleme
Nsuka ya bokomi: 607 L.T.B.
1. Mpo na nini nkombo Bileli ebongi mpenza na mokanda oyo?
NKOMBO ya mokanda oyo ya Makomami mapemami ebongi mpenza. Ezali komilela oyo emonisi mawa monene na ntina na makambo ya mpasi oyo ebimaki kati na lisoló ya libota liponami ya Nzambe, elingi koloba kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. na Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone. Na Liebele, mokanda oyo ebéngami na liloba na yango ya liboso, ʼEh·khahʹ!, oyo elimboli “Ndenge nini!” Babongoli ya Biblia ya Greke oyo ete Septante, babéngaki mokanda oyo Threʹnoi, oyo elimboli “Minkímé; Kolela.” Talmud ya Babilone esaleli liloba Qi·nohthʹ, oyo elimboli “Minkímé; boleli.” Ezalaki Jérôme, mokomi ya Latin, nde apesaki yango nkombo Lamentationes, epai euti motó na likambo na yango na Lingelesi.
2. Bileli ezali na etuluku nini ya mikanda mpe etyami esika nini kati na Biblia?
2 Na mabongoli ya Biblia na Lingelesi, Bileli etyami nsima na Yilimia, kasi na kanɔ́ ya Liebele, na momeseno, yango ezalaka kati na mikanda oyo mibéngami Hagiographes, to Makomi, esika moko na Loyembo na Salomo, Luta, Mosakoli, mpe Esetele—liboke moke oyo eyebani ete Meghil·lohthʹ (Barulo) mitano. Kati na Biblia mosusu ya Liebele na mikolo na biso, yango etyami katikati na Luta to Esetele mpe Mosakoli, kasi na mikanda ya kala elobami ete yango ezalaki kolanda Yilimia, lokola yango ezali na Biblia ya mikolo na biso.
3, 4. Bilembeteli nini tozali na yango oyo bimonisi ete Yilimia nde akomaki yango?
3 Mokanda oyo etángi nkombo ya mokomi na yango te. Nzokande, ntembe ezali te ete mokomi na yango ezalaki bongo Yilimia. Kati na Biblia Septante, mokanda oyo ezali na maloba ya ebandeli oyo: “Mpe esalamaki ete, nsima wana Yisalaele esilaki kokamatama na boombo mpe nsima wana Yelusaleme esilaki kobebisama, Yilimia afandaki na kolela mpe kokimela na bileli oyo likoló na Yelusaleme mpe alobaki.” Jérôme atalelaki maloba oyo ete mazalaki solo te mpe alongolaki yango na libongoli na ye. Nzokande, likambo oyo ete Yilimia nde akomaki Bileli endimami na bonkɔ́kɔ ya Bayuda mpe endimami na libongoli oyo ebéngami Syriaque, na Vulgate ya Latin, na Targum ya Jonathan, mpe na Talmud ya Babilone, mpe na babúku mosusu.
4 Batyoli mosusu basili komeka komonisa ete Yilimia akomaki Bileli te. Nzokande, búku A Commentary on the Holy Bible epesi elembeteli oyo emonisi ete Yilimia nde akomaki yango na kolobáká ete “maloba na nguya oyo malobeli Yelusaleme kati na mik. 2 mpe 4, ezali mpenza maloba ya moto oyo amonaki likambo yango na miso na ye; bobele bongo boleli makasi mpe elimo ya esakweli oyo ezali na bapoɛmi, mpe ekomeli, lolenge ya kobongisama ya maloba, mpe makanisi, yango nyonso ezali makambo oyo mamonisi Yilimia.”a Ezali na maloba mingi makokani kati na Bileli mpe Yilimia, na ndakisa mawa makasi oyo emonisami na ‘kotiyola ya mai na miso (mpisoli)’ (Bil. 1:16; 2:11; 3:48, 49; Yil. 9:1; 13:17; 14:17) mpe oyo ya koyoka mpii na motema na ntina na etamboli mabe ya basakoli mpe ya banganga. (Bil. 2:14; 4:13, 14; Yil. 2:34; 5:30, 31; 14:13, 14) Maloba oyo mazali na Yilimia 8:18-22 mpe Yil. 14:17, 18 mamonisi ete Yilimia nde abongaki mpo na kokoma na lolenge ya mawa mpenza maloba oyo mazwami na mokanda ya Bileli.
5. Likanisi nini lisalisi biso na koyeba ntango oyo yango ekomamaki?
5 Endimami ete ntango ya bokomi ezalaki mwa moke nsima ya kokwea ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Nsɔ́mɔ ya bozingeli mpe ya botumbi mboka ezalaki naino na makanisi ya Yilimia, mpe mawa oyo azalaki na yango emonisami na nguya mpenza. Molimboli moko alobi ete mitindo mikeseni ya mawa mimonisami te na bozindo ata na esika moko kati na mokanda oyo, kasi yango ezongelami mbala na mbala kati na ebele ya poɛmi. Na nsima alobi ete: “Mobulungano wana kati na makanisi . . . ezali moko na bilembeteli bileki nguya oyo bimonisi ete makambo mpe mayoki oyo malobelami na mokanda oyo masalemaki mpenza solo.”b
6. Likambo nini lizali kobenda likebi kati na ekomeli mpe kobongisama ya mokanda ya Bileli?
6 Lolenge mokanda ya Bileli ebongisami ezali na ntina mingi mpo na banganga-mayele ya Biblia. Ezali na mikapo mitano, oyo ezali bongo maloba ya poɛmi mitano oyo itondi na mayoki mozindo. Mikapo minei ya liboso mizali ba acrostiches, oyo vɛrsɛ́ mokomoko ebandi na moko na balɛ́tɛlɛ 22 ya alfabɛ́ ya Liebele. Epai mosusu, mokapo ya misato ezali na bavɛrsɛ́ 66, na boye ete bavɛrsɛ́ 3 ilandani ibandi na lɛ́tɛlɛ motindo moko liboso ya koleka na lɛ́tɛlɛ oyo elandi. Poɛmi ya mitano ezali acrostiche te, atako ezali na bavɛrsɛ́ 22.
7. Mpasi nini Yilimia amonisi, kasi elikya nini ezali?
7 Bileli ezali komonisa mawa makasi na ntina na bozingeli, boombo, mpe kobebisama ya Yelusaleme na Nebukadanesala, mpe ekeseni na mikanda nyonso mpo na ekomeli na yango ya nguya mpe na komonisa mayoki ya mawa. Mokomi amonisi mawa makasi na ntina na libebi, mpasi, mpe mobulungano oyo amonaki. Nzala, mopanga, mpe makambo mosusu ya nsɔ́mɔ isilaki koyeisa mpasi makasi na mboka—bitumbu wana nyonso biutaki epai na Nzambe, na ntina na masumu ya bato, ya basakoli, mpe ya banganga. Nzokande, elikya mpe kondima epai na Yehova ezalaki naino, mpe epai na ye mabondeli mpo na kobongisama lisusu mazalaki kotindama.
MAKAMBO MAZALI KATI NA BILELI
8. Libebi nini lilobelami kati na poɛmi ya liboso, kasi lolenge nini Yelusaleme oyo elobelami lokola moto emimonisi yango moko?
8 “Mboka ezali kofanda mpamba boni oyo etondaki na bato!” Ezali na maloba wana ya kolela nde poɛmi ya liboso ebandi. Mwana mwasi ya Siona azalaki mokóló kati na mboka, kasi bato oyo bazalaki kolinga ye basili kosundola ye mpe bato na ye basili kokende na boombo. Bikuke na ye bitikali mpamba. Yehova asili kopesa ye etumbu na ntina na bikweli na ye mingi. Asili kobungisa lokumu na ye. Banguna na ye basili kosɛka na ntina na kokwea na ye. Asili kokwea na lolenge ya nsɔ́mɔ mpe abɔndisami te, mpe batikali na ye bazali na nzala. Ye (Yelusaleme oyo amonisami lokola moto) atuni ete: ‘Ezali na mpasi oyo ekokani na mpasi na ngai?’ Atomboli mabɔkɔ na ye likoló mpe alobi ete: “Yehova azali na boyengebene mpo ete natombokeli lilako na ye.” (1:1, 12, 18) Azali kobelela Yehova mpo ete ayeisa bampasi likoló na banguna na ye oyo bazali kosepela, motindo moko asili koyeisa yango likoló na ye.
9. (a) Mpasi oyo ekweli Yelusaleme euti epai ya nani? (b) Lolenge nini Yilimia alobeli botyoli likoló na mboka mpe alobeli makambo nini ya nsɔ́mɔ kati na yango?
9 “[Yehova] kati na nkanda na ye, azipi mwana mwasi na Siona na nsé na lipata boni!” (2:1) Poɛmi ya mibale emonisi ete ezali Yehova ye moko nde akweisi na mabelé bonzenga ya Yisalaele. Asili kosala ete bilambo mpe Sabata ebosanama, mpe asili kobwaka etumbelo na ye mpe esika na ye ya bulɛɛ. Oyo nde likambo ya mawa kati na Yelusaleme! Yilimia angangi ete: ‘Miso na ngai izali kolɛmba na mpisoli, nsɔ́pɔ na ngai ebulungani; libale na ngai esopani na mabelé mpo na kobeba na mwana mwasi na bato na ngai.’ (2:11) Akokokanisa mwana mwasi na Yelusaleme na nani? Lolenge nini akobɔndisa mwana mwasi na Siona? Basakoli na ye mpenza bamonani ete bazali mpamba mpe bazali na ntina te. Baleki-nzela bazali kosɛka ye na kotyola ete: “Oyo nde mboka ebyangaki bato ete kitoko na koleka, esengo na mokili mobimba?” (2:15) Banguna na ye bazipoli minɔkɔ na bango mpe babimisi mpema mpe babɛti mino, balobi ete, “Oyo mokolo motalelaki biso, tozwi yango, tomoni yango.” Bana na ye balɛmbi na nzala, mpe basi bazali kolya bana na bango moko. Bibembe bilali na balabála. “Na mokolo na nkanda na [Yehova] mokimi azali te, mobiki azali mpe te.”—2:16, 22.
10. Mpo na kopesa elikya, bizaleli nini ya Nzambe, Yilimia alobeli?
10 Poɛmi ya misato, oyo ezali na bavɛrsɛ́ 66, elobeli mingi elikya ya Siona kati na motema mawa ya Nzambe. Na nzela ya bililingi mingi mosakoli azali komonisa ete ezali Yehova nde ayeisi boombo mpe libebi. Kati na ezalela wana ya mpasi, mokomi asɛngi Nzambe ete akanisa mpasi na ye mpe amonisi kondima kati na motema-boboto mpe na ngɔlu ya Yehova. Bavɛrsɛ́ misato oyo elandani ebandi na “Malamu” mpe emonisi ntina ya kozela lobiko uta na Yehova. (3:25-27, NW) Yehova asili koyeisa mpamela, kasi akomonisa mpe motema mawa. Kasi sikawa, atako basili koyambola mabe ya botomboki na bango, Yehova abosani naino yango te; asili kokanga nzela mpo na mabondeli ya bato na ye mpe asili kokómisa yango “mbindo ikombami mpe matiti maboyami.” (3:45) Kati na kolela makasi mosakoli amikundoli ete banguna na ye balukaki ye lokola ndɛkɛ. Nzokande, Yehova azalaki penepene na ye kati na libulu mpe alobaki ete: “Bangá te!” Azali kobelela Yehova mpo ete ayanola na nsɔ́ni oyo banguna bazali kobwaka: “Okobengana bango na nkanda mpe okoboma bango longwa na nsé na lola na [Yehova].”—3:57, 66.
11. Lolenge nini nkanda makasi ya Yehova esopanaki likoló na Siona, mpe mpo na nini?
11 “Wolo esili kokóma na mbindo boni! Wolo kitoko ebongwani lolenge nini!” (4:1) Poɛmi ya minei ezali komonisa mawa na ntina na kobeba ya nkembo ya tempelo ya Yehova, oyo mabanga na yango masili kopalangana na balabála. Bana ya Siona oyo bazali na motuya mingi basili kokóma eloko na mpamba, lokola mbeki esalemi na mabelé. Mai ezali te mpe limpa lizali te, mpe baoyo babɔkwamaki kati na bomɛngo “bazali kolala na bibwakelo na nyei.” (4:5) Etumbu ezali kútu monene koleka oyo epesamaki mpo na lisumu ya Sodomo. Banasili, baoyo bazalaki ‘pɛto koleka mbulampɛmbɛ mpe mpɛmbɛ koleka miliki,’ basili kokóma ‘molili koleka moindo’ mpe bango nyonso bakangami na mikuwa na bango. (4:7, 8) Kobomama na mopanga eleki malamu na kobomama na nzala, na eleko oyo basi bazalaki kolamba bana na bango! Yehova asili kosopa nkanda na ye makasi. Likambo likokaki kosalema te lisalemi—monguna asili kokóma na bikuke ya Yelusaleme! Kasi mpo na nini? “Mpo na masumu na basakoli na ye mpe mpo na mabe na banganga na ye,” baoyo basili kosopa makila ya bayengebene. (4:13) Elongi na Yehova ezali epai na bango te. Nzokande, libungá ya mwana mwasi na Siona esili kokóma na nsuka na yango, mpe akomemama lisusu na boombo te. Sikawa ezali ngala na yo, Ɛ mwana mwasi na Edome, mpo na komela kɔ́pɔ na bololo ya Yehova!
12. Libyangi nini ya komikitisa lipesami na poɛmi ya mitano?
12 Poɛmi ya mitano ebandi na libyangi epai na Yehova ete akanisa bato na ye oyo bazali bitike. Bafandi na Yelusaleme bamonisami lokola ete bazali koloba. Ezali bankɔ́kɔ na bango nde basalaki masumu, mpe ezali mabungá na bango nde bato bazali komema sikawa. Basáli mpamba bazali koyangela bango, mpe bazali konyokwama na mpasi ya nzala. Bosepeli ya mitema na bango esili, mpe mabina na bango masili kobongwana kolela. Bazali na mpasi na motema. Na komikitisa nyonso, bandimi Yehova: “Ɛ [Yehova], yo ozali koumela seko! Kiti na bokonzi na yo ekozala longwa na libota kino libota.” Babeleli ete: “Ɛ [Yehova], bongolá biso lisusu epai na yo moko ete tóbongolama. Bongisá mikolo na biso lokola na mikolo na kala. Soko nde oboyi biso solo? Oyokeli nde biso nkanda mingi mingi?”—5:19-22.
LITOMBA NA YANGO
13. Elikya nini emonisami kati na mokanda ya Bileli, nzokande mpo na nini yango ezali na litomba lokola emonisi etumbu makasi oyo Nzambe apesaki?
13 Mokanda ya Bileli emonisi elikya mobimba oyo Yilimia azalaki na yango epai na Nzambe. Kati na mawa makasi mpe na kolɛmba monene, koyebáká ete elikya ya kobɔndisama ekoki kouta epai na bato te, mosakoli azali kozela lobiko uta na lobɔkɔ ya Yehova, Nzambe monene ya mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Bileli esengeli kopusa basambeli nyonso ya solo na kozala na botosi mpe na bosembo, mpe ezali kopesa lisusu likebisi ya nsɔ́mɔ na ntina na baoyo bazali komonisa bopɔtu na nkombo oyo eleki monene mpe na makambo oyo masɛngami mpo na yango. Lisoló ya bato emonisi mboka mosusu te oyo ebebisamaki mpe oyo balelaki yango na maloba ya mawa mpe ya kosimba motema boye. Ezali mpenza litomba lokola yango elobeli etumbu makasi oyo Nzambe apesaki epai na baoyo bakóbaki kozala batomboki, bato na moto makasi, mpe bato baboyi kobongola motema.
14. Makebisi nini mpe bisakweli nini ya Nzambe ezali kati na Bileli oyo esengeli kokokisama, mpe lolenge nini mokanda oyo ezali na boyokani na makomi mosusu mapemami?
14 Bileli ezali lisusu na litomba na komonisáká kokokisama ya makebisi mingi mpe ya bisakweli mingi ya Nzambe. (Bil. 1:2—Yil. 30:14; Bil. 2:15—Yil. 18:16; Bil. 2:17—Lev. 26:17; Bil. 2:20—Det. 28:53) Tóyeba mpe ete Bileli ezali kopesa litatoli ya nguya mpo na kokokisama ya Deteronome 28:63-65. Lisusu, mokanda oyo ezali mpe kotánga biteni mosusu ya Makomami ya bulɛɛ. (Bil. 2:15—Nz. 48:2; Bil. 3:24—Nz. 119:57) Danyele 9:5-14 eyokani na Bileli 1:5 mpe 3:42 na komonisáká ete bampasi eyelaki bato na ntina na bikweli na bango.
15. “Mikolo na sika” nini mokanda ya Bileli elobeli?
15 Mpasi oyo ekwelaki Yelusaleme ezalaki mpenza likambo ya mawa. Kati na ezalela wana, Bileli emonisi elikya ete Yehova akomonisa motema-boboto mpe motema mawa mpe ete akokanisa Siona mpe akozongisa ye. (Bil. 3:31, 32; 4:22) Ezali komonisa elikya kati na “mikolo na sika” lokola na mikolo ya kala ntango mokonzi Davidi mpe mokonzi Salomo bazalaki koyangela na Yelusaleme. Kondimana na Yehova elongo na Davidi mpo na bokonzi oyo ekoumela seko ezali naino! “Makambo na mawa na ye makosuka te. Mazalisami na sika ntɔ́ngɔ́ na ntɔ́ngɔ́.” Mpe yango ekolanda kozala epai na baoyo bazali kolinga Yehova kino na nsé ya litambwisi ya sembo ya Bokonzi na ye, bikelamu nyonso ya bomoi bikomonisa botɔ́ndi na kolobáká ete: “[Yehova] azali libula na ngai.”—5:21; 3:22-24.
[Maloba na nse ya lokasa]
a 1952, ebimisami na J. R. Dummelow, lokasa 483.
b Studies in the Book of Lamentations, 1954, ebimisami na Norman K. Gottwald, lokasa 31.