Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/7 lok. 6
  • Mpo abondelaki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo abondelaki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli kobondelaka ntango nyonso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • 5 Esika mpe ntango ezali na ntina?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bótombola mabɔkɔ ya sembo na libondeli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Yesu ateyi biso ndenge ya kobondela
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/7 lok. 6

Mpo abondelaki

NA 1 Batesaloniki 5:17, 18, ntoma paulo alobaki: “Bobondelaka na etingya. Botondaka kati na makambo nyonso, mpo ete oyo ezali mokano na Nzambe mpo na bino kati na Klisto Yesu.” Nzokande, okakatanaka mpo na kobondela ntango ozali kolya na esika ya bato mingi, na ndakisa kati na restorá? Na kotalela toli na Yesu na ntina etali mabondeli mpo na komilakisa liboso na bato, ezali malamu na koboya kobenda likebi na bato likoló na yo. (Matai 6:5, 6) Nzokande, libondeli ya nkuku ekoki kobota mbuma.

Ezali yango nde ekomelaki elenge Temwe moko oyo asalaka na Béthel ya Brooklyn, esika monene ya ba Témoins de Jéhovah oyo etambwisaka mosala na bango na mokili mobimba Azalaki kodéjéné kati na restorá moko liboso ete akende kokutana na basangani ya lisangá na ye mpo na kobima na mosala ya kosakola kati na etuluku. Ntango bayelaki ye déjéné, abondelaki lokola momeseno. Ntango atombolaki motó mpe afungolaki miso, mosali moko ye mwasi atelemaki wana mpe azalaki kotala ye.

Atunaki ye ete: “Ozalaki kobondela, boye te?” Ntango andimaki, alobaki na ye: “Osengeli kozala Temoin de Jéhovah. Baboti na ngai mpe bazali Batemwe. Nasepeli naino na lingomba na bango te, kasi nayebi ete esengelaki nasepela na yango. Esengeli ete na miselela abonemá na La Tour de Garde mpe na Réveillez-vous!. Okoki kosalisa ngai mpo na kosala yango?

Elenge Temwe alobi ete, “etikalaki moke bilei ekangama ngai na mongongo”. Atako bongo, asalelaki mosali wana ya mwasi abonema na bazulunalo mibale, atikelaki ye bazulunalo mibale ya sika mpe eyokanaki na ye mpo na bozongeli ya sika; nyonso wana mpo abondelaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto