Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/2 nk. 17-21
  • Yehova azali Nzambe oyo abosanaka te malamu oyo tosalaka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali Nzambe oyo abosanaka te malamu oyo tosalaka
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Yehova apamboli Moetiopia oyo azalaki kobanga ye
  • “Tata na yo oyo atalaka na nkuku akozongisela yo”
  • “Nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo”
  • Kobá kozala na botɔndi
  • Apesaka mbano na baoyo nyonso basalelaka ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mpo na nini komonisa botɔndi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Opesaka bato matɔndi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Kobá kozala na botɔndi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/2 nk. 17-21

Yehova azali Nzambe oyo abosanaka te malamu oyo tosalaka

“Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye.”​—BAEBELE 6:10.

1. Ndenge nini Yehova amonisaki ete abosanaki te malamu oyo Luta, mwasi ya Moaba asalaki?

YEHOVA asepelaka mingi na milende ya baoyo balukaka mpenza kosala mokano na ye, mpe apambolaka bango mpenza. (Baebele 11:6) Boaza, moto ya sembo, ayebaki malamu mpenza ezaleli kitoko wana ya Nzambe, elingi koloba azalaki moto ya botɔndi. Mpamba te alobaki na Luta, mwasi ya Moaba oyo abatelaki bokilo na ye Naomi boye: “[Yehova] azongisela yo mpo na yango esalaki yo, mpe libonza mobimba epesamela yo na [Yehova] Nzambe.” (Luta 2:12) Nzambe apambolaki Luta? Ee! Kutu, lisolo na ye ekomamá na Biblia! Lisusu, abalaki Boaza mpe akómaki nkɔkɔ ya mokonzi Davidi mpe ya Yesu Klisto. (Luta 4:13, 17; Matai 1:5, 6, 16) Wana ezali kaka ndakisa moko na kati ya ebele mosusu oyo emonisi ete Yehova abosanaka te makambo malamu oyo basaleli na ye basalaka.

2, 3. (a) Nini ezali kokamwisa biso mpo na ndenge Yehova atalelaka makambo malamu oyo basaleli na ye básalaka? (b) Mpo na nini Yehova akoki kosepela mpenza na makambo malamu oyo tosalaka? Pesá ndakisa.

2 Yehova alingaki komona ete azangi boyengebene soki abosanaka malamu oyo Luta asalaki. Baebele 6:10 elobi ete: “Nzambe azali te moto oyo azangi boyengebene mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomonisaki mpo na nkombo na ye, na ndenge bosalelaki basantu mpe bozali kokoba kosalela bango.” Eloko ezali kokamwisa na vɛrsɛ oyo ezali ete Nzambe azalaka na botɔndi epai na basaleli na ye atako bazali basumuki mpe babongi na nkembo na ye te.​—Baloma 3:23.

3 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki kokanisa ete milende nyonso oyo tosalaka na mosala ya Nzambe ezali mpamba na miso na ye mpe akoki kosepela na yango te. Nzokande, Yehova ayebaka makanisi mpe bomoi ya moto na moto, mpe azwaka na motuya mpenza mosala oyo tosalelaka ye na molimo na biso mobimba. (Matai 22:37) Tózwa ndakisa: Mama moko akuti kado ya mayaka ya ntalo moke likoló ya mesa na ye. Akoki komona yango eloko mpamba. Nzokande, mwa mokanda oyo batiki elongo na kado yango emonisi ete mwana na ye ya mwasi ya moke nde asombeli ye yango na mwa mbongo na ye nyonso. Mama akómi sikoyo kotala mayaka yango na liso mosusu. Akoki mbala mosusu kobimisa mai ya miso, koyamba mwana na ye mpe kopesa ye botɔndi na motema mobimba.

4, 5. Ndenge nini Yesu amekolaki Yehova mpo na oyo etali kopesa motuya na milende oyo moto asali?

4 Lokola ayebaka mpenza makanisi mpe esika makoki na biso esuki, Yehova asepelaka soki topesi ye oyo tokoki, ezala moke to mingi. Na likambo yango, Yesu amonisaki mpenza bomoto ya Tata na ye. Kanisá lisusu lisolo ya mwa lomea oyo mwasi akufelá mobali apesaki. “Ntango [Yesu] atombolaki miso amonaki bato ya bomɛngo bazali kotya makabo na bango na bakesi ya makabo. Bongo amonaki mwasi moko mobola oyo akufelá mobali azali kotya wana mbongo mibale ya bibende oyo ezalaki na motuya moke mpenza, mpe alobaki ete: “Nazali koyebisa bino ya solo mpenza, Mwasi oyo akufelá mobali, atako azali mobola, atye mingi koleka bango nyonso. Mpo bango nyonso batyaki oyo balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele, kasi mwasi oyo na kokelela na ye atyaki nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”​—Luka 21:1-4.

5 Ee, lokola Yesu ayebaki ete mwasi wana akufelá mobali mpe azali mobola, azwaki likabo na ye na motuya. Ezali mpe bongo mpo na Yehova. (Yoane 14:9) Olendisami te na koyeba ete, ata soki ozali mozwi to mobola, okoki kosepelisa Nzambe na biso oyo abosanaka te makambo malamu oyo tozali kosala, mpe kosepelisa Mwana na ye?

Yehova apamboli Moetiopia oyo azalaki kobanga ye

6, 7. Mpo na nini mpe ndenge nini Yehova amonisaki ete abosanaki te malamu oyo Ebede-Meleke asalaki?

6 Makomami emonisi na bisika ebele ete Yehova apambolaka baoyo basalaka mokano na ye. Tótala ndenge asalaki Ebede-Meleke, Moetiopia oyo azalaki na bomoi na eleko ya Yilimia mpe azalaki mosali na ndako ya mokonzi mabe ya Yuda, Sidikiya. Ebede-Meleke ayokaki ete bakonzi ya Yuda bakoselaki mosakoli Yilimia ete azali kotombokisa bato mpe babwakaki ye na libulu mpo akufa na nzala. (Yilimia 38:1-7) Lokola ayebaki ete bayinaki Yilimia makasi ndenge wana kaka mpo na nsango oyo azalaki kosakola, Ebede-Meleke atyaki bomoi na ye na likama mpe akendeki komona mokonzi. Na mpiko nyonso, Moetiopia wana alobaki boye: “Nkolo na ngai, mokonzi, bato oyo basali mabe na makambo nyonso masalelaki bango Yilimia mosakoli oyo; babwaki ye kati na libulu. Soko akokufa na esika ezali ye mpo na nzala?” Na ndingisa ya mokonzi, Ebede-Meleke azwaki mibali 30 mpe abimisaki mosakoli ya Nzambe.​—Yilimia 38:8-13.

7 Yehova amonaki ete Ebede-Meleke azalaki na kondima, oyo elongolaki ye nsɔmɔ nyonso. Na yango, Yehova asepelaki na Ebede-Meleke mpe alobaki na ye na nzela ya Yilimia boye: “Talá nakokómisa maloba na ngai kotɛmɛla mboka oyo mpo na mabe mpe mpo na malamu te . . . Kasi nakobikisa yo na mokolo yango; . . . mpe okopesamela na mabɔkɔ ya bato te baoyo yo ozali kobanga bango. Zambi solo nakobikisa yo . . . bomoi na yo ekopesamela lokola libonza; zambi ozalaki kotalela ngai.” (Yilimia 39:16-18) Ɛɛ, Yehova abikisaki Ebede-Meleke ná Yilimia na mabɔkɔ ya bakonzi mabe ya Yuda, mpe na nsima, na mabɔkɔ ya bato ya Babilone, oyo babebisaki Yelusaleme. Nzembo 97:10 elobi ete: “[Yehova] akobatelaka bomoi ya bato na ye ya boyengebene; akobikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”

“Tata na yo oyo atalaka na nkuku akozongisela yo”

8, 9. Ndenge Yesu amonisaki yango, Yehova andimaka mabondeli ya motindo nini?

8 Likambo mosusu oyo emonisi ete Yehova abosanaka bolamu na biso te emonani na oyo Biblia elobi na ntina na libondeli. Salomo alobaki boye: “Kobondela ya bayengebene ezali esengo na [Nzambe].” (Masese 15:8) Na mikolo ya Yesu, bakonzi mingi ya mangomba bazalaki kobondela na miso ya bato. Nzokande, bazalaki te kosala yango na kondima mpenza, kasi nde mpo na kobenda likebi ya bato. Yesu alobaki ete: “Basili kozwa mbano na bango na mobimba.” Kasi, ateyaki bayekoli na ye boye: “Nzokande, yo ntango ozali kobondela, kɔtá na eteni ya kati ya ndako na yo mpe, nsima ya kokanga ekuke na yo, bondelá Tata na yo oyo azali na nkuku; boye Tata na yo oyo atalaka na nkuku akozongisela yo.”​—Matai 6:5, 6.

9 Yesu alobaki te ete kobondela na miso ya bato ezali mabe, mpamba te ye moko mpe azalaki kosala yango mbala mosusu. (Luka 9:16) Yehova asepelaka mingi ntango tobondelaka ye na motema ya sembo, kasi te mpo na kobenda likebi ya bato. Kasi, mabondeli na biso moko emonisaka mpenza ete tolingaka Nzambe mpe totyelaka ye motema. Na yango, tokoki kokamwa te ete mbala mingi Yesu azalaki koluka bisika oyo akozala kaka ye moko mpo na kobondela. Mokolo moko, asalaki yango “na ntɔngɔntɔngɔ, ntango molili ezalaki naino.” Mokolo mosusu, “amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela.” Mpe liboso apona bantoma na ye 12, Yesu abondelaki ye moko butu mobimba.​—Malako 1:35; Matai 14:23; Luka 6:12, 13.

10. Soki mabondeli na biso ezali mpenza kouta na motema, tokoki kondima likambo nini?

10 Kanisá naino likebi oyo Yehova azalaki koyoka na yango mabondeli ya mwana na ye, oyo ezalaki kouta mpenza na motema! Yesu azalaki mbala mosusu kobondela “elongo na koganga makasi mpe na mpisoli, mpe ayokamaki mpe andimamaki mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe.” (Baebele 5:7; Luka 22:41-44) Soki mabondeli na biso ezali mpe kouta mpenza na motema, tosengeli kondima ete Tata na biso ya likoló ayokaka mpe andimaka mpenza. Ya solo, “[Yehova] azali penepene na bango . . . baoyo bakobyanga ye na solo.”​—Nzembo 145:18.

11. Ndenge nini Yehova atalelaka makambo oyo tosalaka ntango tozali kaka biso moko?

11 Soki Yehova asepelaka ntango tobondelaka ye na nkuku, yango emonisi ete asepelaka mingi soki tozali kotosa ye na nkuku. Ɛɛ, Yehova ayebaka makambo oyo tosalaka na nkuku. (1 Petelo 3:12) Ya solo, kotikala sembo epai ya Yehova mpe kotosa ye ata ntango moto mosusu azali komona biso te emonisaka mpenza ete tozali na “motema moko” epai na Yehova, elingi koloba motema oyo ezali na makanisi ya pɛto mpe esepelaka kaka na makambo ya malamu. (1 Ntango 28:9, Liloba lya Nzambe) Etamboli motindo wana esepelisaka mpenza motema ya Yehova!​—Masese 27:11; 1 Yoane 3:22.

12, 13. Ndenge nini tokoki kobatela makanisi mpe mitema na biso mpe kozala lokola Natanaele, moyekoli ya sembo?

12 Yango wana, baklisto ya sembo baboyaka kosala masumu ya nkuku lokola kotala bafɔtɔ to bafilme ya bato bazali bolumbu mpe ya bitumba, mpamba te yango ebebisaka makanisi mpe motema. Atako bato bakoki komona te masumu mosusu, toyebi ete “biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13; Luka 8:17) Soki tozali kosala makasi mpo na koboya makambo oyo esepelisaka Yehova te, tokozala na lisosoli ya pɛto mpe tokozala na esengo mpo toyebi ete Nzambe azali kondima biso. Ya solo, ntembe ezali te ete Yehova azalaka na botɔndi mpo na moto “oyo akotambolaka sembo mpe akobilaka boyengebene, mpe akolobaka solo kati na motema na ye.”​—Nzembo 15:1, 2.

13 Kasi, ndenge nini tokoki kobatela makanisi mpe motema na biso na mokili oyo etondi na mabe? (Masese 4:23; Baefese 2:2) Longola kosalela bibongiseli nyonso oyo Yehova azali kozwa mpo na kolendisa kondima na biso, tosengeli kosala makasi tóboya mabe mpe tósala malamu. Tósala yango noki liboso ete bamposa mabe ekola na motema na biso mpe ebota lisumu. (Yakobo 1:14, 15) Kanisá naino esengo oyo okokaki kozala na yango soki Yesu alobaka na yo ndenge alobaki na Natanaele ete: “Talá, [mobali] oyo na kati na ye bokosi ezali te.” (Yoane 1:47) Na nsima Natanaele, oyo nkombo na ye mosusu ezalaki Batelemi, azwaki libaku malamu ya kokóma moko ya bantoma 12 ya Yesu.​—Malako 3:16-19.

“Nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo”

14. Ndenge nini lolenge oyo Yesu atalelaki likambo oyo Malia asalaki ekeseni na oyo ya bayekoli na ye?

14 Lokola Yesu azali “elilingi ya [Yehova], Nzambe oyo amonanaka te,” amekolaka ntango nyonso Tata na ye na likambo etali kokumisa bato oyo basalelaka Nzambe na motema ya pɛto. (Bakolose 1:15) Na ndakisa, mikolo mitano liboso Yesu apesa bomoi na ye, Simona moto ya Betani ayambaki ye ná bayekoli na ye mosusu epai na ye. Na mpokwa, Malia, ndeko ya Lazalo ná Malata, “akamataki litɛla moko ya mafuta ya nsolo kitoko, nalada ya solosolo, ya ntalo mingi,” (oyo motuya na yango ekokani na lifuta ya mosala ya mbula mobimba), mpe asopelaki Yesu mafuta yango na motó mpe na makolo. (Yoane 12:3) Bayekoli balobaki ete: “Mpo na nini kobebisa eloko boye?” Nzokande, Yesu atalelaki likambo wana na liso mosusu. Amonaki yango ete ezali mpenza elimo ya bokabi mpe ete likambo oyo asalaki ezalaki na ntina mingi mpo na liwa mpe kokundama na ye oyo ezalaki lisusu mosika te. Kutu, na esika Yesu amona yango mabe, akumisaki ye. Alobaki ete: “Epai nyonso nsango malamu oyo ekosakolama na mokili mobimba, likambo mwasi oyo asali ekolobelama mpe mpo na kokanisa ye.”​—Matai 26:6-13.

15, 16. Litomba nini tozwi na ndenge Yesu asalelaki Nzambe awa na mabelé lokola moto?

15 Oyo nde libaku malamu ya kozala na Motambwisi lokola Yesu, moto oyo abosanaka te bolamu oyo tosalaka! Bomoi ya Yesu lokola moto awa na mabelé ebongisaki ye mpo na mosala oyo Yehova abombelaki ye, kozala Nganga-nzambe Monene mpe Mokonzi, libosoliboso mpo na lisangá ya baklisto bapakolami mpe na nsima mpo na mokili mobimba.​—Bakolose 1:13; Baebele 7:26; Emoniseli 11:15.

16 Liboso ya koya na mabelé, Yesu azalaki kolinga bato mingi. (Masese 8:31) Ntango oyo alekisaki awa lokola moto, akutanaki mpe na minyoko oyo tozali kokutana na yango na mosala ya Nzambe. Ntoma Paulo akomaki ete: “[Yesu] asengelaki kokóma lokola ‘bandeko’ na ye na makambo nyonso, mpo akoka kokóma nganga-nzambe monene ya motema mawa mpe ya sembo . . . Mpo lokola ye moko amonaki mpasi ntango azalaki komekama, azali na likoki ya koya kosalisa baoyo bazali komekama.” Yesu akoki “komitya na esika . . . na biso,” mpamba te “asili komekama na makambo nyonso lokola biso, kasi azangi lisumu.”​—Baebele 2:17, 18; 4:15, 16.

17, 18. (a) Mikanda oyo Yesu atindelaki masangá nsambo ya Asie Mineure emonisi ete ayebaki likambo nini? (b) Baklisto bapakolami wana bazalaki kobongisama mpo na likambo nini?

17 Yesu amonisaki polele nsima ya lisekwa na ye ete ayebaki mpenza mpasi ya bayekoli na ye. Tótala mikanda oyo akomelaki masangá nsambo ya Asie Mineure na nzela ya ntoma Yoane. Alobaki na lisangá ya Similina boye: “Nayebi bolɔzi na yo mpe bobola na yo.” Awa, Yesu alingaki koloba ete, ‘Nayebi malamu mikakatano na yo; nayebi mpenza mpasi oyo ozali komona.’ Na nsima, lokola amityaki na esika na bango mpo ye moko anyokwamaki tii na kufa, abakisaki boye: “Omimonisa sembo ata tii na liwa, mpe nakopesa yo motole ya bomoi.”​—Emoniseli 2:8-10.

18 Mikanda oyo Yesu atindelaki masangá nsambo etondi mpenza na maloba oyo emonisi ete Yesu ayebaki malamu mpasi ya bayekoli na ye mpe azalaki kosepela na bosembo na bango. (Emoniseli 2:1–3:22) Tóbosana te ete bato oyo Yesu alobaki na bango bongo bazalaki baklisto bapakolami, oyo bazalaki na elikya ya koyangela elongo na ye na likoló. Lokola Nkolo na bango, bazalaki kobongisama mpo na mokumba oyo basengelaki kozwa ya kopesa bato matomba ya mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kosikola mokili.​—Emoniseli 5:9, 10; 22:1-5.

19, 20. Ndenge nini “ebele ya bato” bazali komonisa botɔndi na bango epai na Yehova ná Mwana na ye?

19 Ndenge kaka alingaka baklisto bapakolami, Yesu alingaka mpe “bampate mosusu” oyo bazali kotikala sembo epai na ye, elingi koloba bamilio ya bato oyo bakozala na kati ya “ebele ya bato . . . [ya] bikólo nyonso,” oyo bakobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9, 14) Bato wana bazali kosopana epai na Yesu mpamba te bazali na botɔndi mpo na mbeka oyo apesaki mpo na kosikola biso mpe na elikya ya bomoi ya seko. Ndenge nini bazali komonisa botɔndi yango? “Bazali kosalela [Nzambe] mosala mosantu butu moi.”​—Emoniseli 7:15-17.

20 Lapolo ya mosala mpo na mobu 2006, oyo ezali na nkasa 27 tii 30, emonisi ete basaleli yango ya sembo bazali mpenza kosalela Yehova “mosala mosantu butu moi.” Kutu, kaka na mbula moko wana, ebele ya bato yango ná batikali bapakolami balekisaki ngonga 1 333 966 199 na mosala ya kosakola. Bangonga yango ekokani na mbula koleka 150 000!

Kobá kozala na botɔndi

21, 22. (a)Mpo na nini baklisto basengeli kokeba lelo oyo na likambo ya kopesa botɔndi? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

21 Atako tozali bato ya kozanga kokoka, Yehova ná Mwana na ye bamonisi ete basepelaka mpenza na biso. Nzokande, likambo ya mawa, bato mingi bakipaka mpenza Nzambe te, kasi bakipaka kaka makambo na bango moko. Mpo na bato ya “mikolo ya nsuka,” Paulo akomaki boye: “Bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo . . . bato bazangi botɔndi.” (2 Timote 3:1-5) Bato wana bakeseni mpenza na baklisto ya solo, oyo na nzela ya mabondeli, ya botosi mpe ya mosala oyo bazali kosalela Nzambe na motema na bango mobimba, bazali komonisa botɔndi na bango mpo na nyonso oyo Nzambe asali mpo na bango.​—Nzembo 62:8; Malako 12:30; 1 Yoane 5:3.

22 Na lisolo oyo elandi, tokolobela bibongiseli mosusu ya elimo oyo Yehova azwi na bolingo nyonso mpo na biso. Wana tozali kokanisa na ‘makabo malamu’ wana tiká ete botɔndi na biso ebakisama lisusu.​—Yakobo 1:17.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini Yehova amonisaka ete azali Nzambe oyo abosanaka te malamu oyo tosalaka?

• Ntango tozali biso moko, ndenge nini tokoki kosepelisa motema ya Yehova?

• Ndenge nini Yesu amonisaki ete asepelaka mpenza na biso?

• Ndenge nini ntango oyo Yesu alekisaki awa na mabelé esalisaki ye azala moyangeli oyo ayebi mpasi ya bato mpe asepelaka na bango?

[Elilingi na lokasa 17]

Ndenge kaka moboti ya bolingo asepelaka na bolingo oyo mwana na ye amonisi, Yehova asepelaka ntango topesi ye oyo tokoki

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto