“Sakolá Liloba . . . na lombangu”
1 Soki ozwi eloko moko oyo bakomá “KOUMISA YANGO TE,” ndenge nini okotalela yango? Maloba “koumisa yango te; na lombangu” elimboli “oyo ezali kosɛnga ete bátyela yango likebi nokinoki.” Ntoma Paulo alendisaki baklisto na “kosakola liloba . . . na lombangu.” (2 Tim. 4:2, NW) Otosaka etinda oyo na kotyáká nokinoki likebi na yo na mosala yango?
2 Ekoki kozala bayebisaki Paulo ete bandeko na ye mosusu bazalaki na ezaleli ya ‘kosala mosala na bango’ ya boklisto ‘na bolɛmbu.’ (Lom. 12:11) Yango ezalaki kosala ete mosala na bango ebota mbuma mingi te mpe bázwa te esengo oyo eutaka na kosalisa bato mosusu.
3 Ndenge oyo Yesu azalaki kotalela mosala ya kosakola: Yesu azalaki mpenza kosepela na kokokisa mosala na ye ya kosakola! Alobaki ete: “Bilei na ngai ezali boye ete nasala mokano ya Motindi na ngai mpe ete nasukisa mosala na ye.” Ndakisa ya Yesu elendisaki bayekoli na ye, baoyo alendisaki na maloba oyo ete, “bilanga . . . esili kotela mpo na kobuka.” (Yoa. 4:34, 35) Elimo ya kosala na lombangu oyo amonisaki na mosala na ye mobimba ya kosakola emonanaki polele ntango ayebisaki bayekoli na ye ete “bóbondela Nkolo na elanga ete atinda basali kati na elanga na mbuma na ye.” (Mat. 9:38) Yesu ayebaki malamu ete bapesaki ye mokumba ya kosakola, mpe azwaki ekateli ya kopesa nzela na eloko moko te ete epekisa ye kosala mosala yango.
4 Ezali boni mpo na biso? Lelo oyo, mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu koleka ndenge ezalaki kosalema liboso. Na bisika mingi na mokili, elanga eteli mpenza mpo na kobuka. Ata na bikólo oyo emonani ete litatoli esili kopesama malamumalamu, bankóto ya bato bazali kozwa batisimo kuna mbula na mbula. Lokola nsuka ya ebongiseli oyo ezali kobɛlɛma nokinoki, tozali na “mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo.” (1 Kol. 15:58, NW) Lelo oyo, ezali na ntina ete tósala milende mpenza koleka bileko nyonso ya liboso mpo na kosakwela bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi.
5 Tiká tómipesa mpenza mpo na kokende koluka bato mosusu mpo na kosakwela bango nsango malamu, ezala na ndako na ndako to na bisika nyonso oyo tokoki kokutana na bato na teritware. Soki tozali kosangana mingi na mosala ya kosakola, tokomonisa ete tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso. (Mat. 6:33) Bosembo na biso mpo na kosakola liloba na lombangu ekomemela biso esengo mingi.