Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp21 No. 1 nk. 8-9
  • Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Masolo mosusu
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
wp21 No. 1 nk. 8-9

Mpo na nini Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te?

Tata na biso ya likoló, Yehova Nzambe, alingaka mpe asepelaka koyoka mabondeli oyo tosalaka na motema moko. Kasi ezali na makambo oyo epekisaka ye ayanola na mabondeli na biso. Makambo yango nini, mpe nini tosengeli kobosana te ntango tozali kobondela? Talá mwa batoli oyo Biblia epesi.

Na ndako-nzambe moko, bato bazali kotánga libondeli na buku.

“Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te.”​—Matai 6:7.

Yehova alingaka te tózongelaka mabondeli oyo tokangá na motó to oyo totángaka na buku. Kasi, alingaka nde tóloba makambo oyo ezali na motema na biso. Okoyoka ndenge nini soki ozali na moninga oyo azali koyebisa yo kaka maloba moko mokolo na mokolo? Baninga ya motema balobanaka polele makambo oyo ezali kouta na motema. Ntango tozali kobondela Tata na biso ya likoló na maloba na biso moko, tozali komonisa ete azali mpenza moninga na biso ya motema.

Mobali moko azali kotala likoló ntango azali konika lisapi na tike ya loteri.

“Bosɛngaka, kasi bozwaka te, mpo bozali kosɛnga na mokano ya mabe.”​—Yakobo 4:3.

Toyebi ete Nzambe akoyanola na mabondeli na biso te soki tosɛngi ye biloko oyo akolinga te tósala to oyo akosepela te tózala na yango. Na ndakisa, soki moto abɛtaka masano ya mbongo mpe abondeli Nzambe asalisa ye azala na makila malamu to chance ya kozwa mbongo, okanisi ete Yehova akondima libondeli na ye? Yehova ayebisi biso polele ete tózala na lokoso te, mpe tóndima makambo ya lokuta te, lokola makambo ya makila malamu to chance. (Yisaya 65:11; Luka 12:15) Tokoki kokanisa ata moke te ete Yehova akoyanola na mabondeli ya ndenge wana! Mpo Nzambe ayanola na mabondeli na biso, tosengeli kosɛnga makambo oyo ezali na boyokani na oyo ayebisi biso na Biblia.

Mokonzi moko ya lingomba azali kobondela mpo na basoda.

“Ye oyo alongoli litoi na ye ete ayoka mobeko te​—ata libondeli na ye ezali eloko moko oyo eyinamá.”​—Masese 28:9.

Na ntango ya kala, Nzambe azalaki koyanola te na mabondeli ya baoyo bazalaki kotosa te mibeko na ye ya sembo. (Yisaya 1:15, 16) Nzambe abongwaná te. (Malaki 3:6) Soki tolingi Nzambe ayanola na mabondeli na biso, tosengeli kosala nyonso oyo ekoki mpo na kotosa mibeko na ye. Bongo soki tosalá makambo ya mabe na kala? Yango elingi koloba ete Yehova akoyoka biso lisusu ata moke te? Ezali bongo te! Nzambe akolimbisa biso na bolingo mpenza soki tobongwani mpe tosali nyonso mpo tósepelisa ye.​—Misala 3:19.

“Moto oyo azali kopusana epai ya Nzambe asengeli kondima ete ye azali mpe akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.”​—Baebre 11:6.

Mwasi moko azali kotánga Biblia.

Tobondelaka te kaka mpo na koyoka malamu ntango tozali kotungisama to tozali na mikakatano. Tobondelaka mpo na komonisa Nzambe ete tondimelaka ye, tomemyaka ye, mpe tolingaka ye. Moyekoli Yakobo alobi ete, soki tozali kokoba te “kosɛnga na kondima,” na yango, ‘tókanisa te ete tokozwa eloko epai ya Yehova.’ (Yakobo 1:6, 7) Mpo tóndimela Nzambe, tosengeli kozwa ntango mpe kosala milende ya koyeba ye na nzela ya boyekoli ya Biblia. Soki tosali bongo ekosalisa biso tóyeba mokano ya Yehova, tóbondela ye, mpe tótya motema ete akoyoka mabondeli na biso.

KOTIKA TE!

Atako Nzambe ayanolaka na mabondeli nyonso te, ayokaka mpe ayanolaka na mabondeli oyo bamilio ya bato basalaka na motema mobimba. Biblia ezali kosalisa yo oyeba oyo osengeli kosala mpo mabondeli na yo esepelisa Nzambe. Lisolo oyo elandi ekolobela yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto