‘Kolendisana na ntina na bolingo’
PENE na mobu 60-61 ya ntango na biso, moombo moko oyo asilaki kokima nkolo na ye, alongwaki na Loma mpe asalaki mobémbo ya bakilometele 1 400 mpo na kozonga na mboka na ye na Kolose, engumba oyo ezali na sud-ouest ya Asie Mineure. Amemaki mokanda oyo ntóma Paulo, ye moko akomelaki nkolo na ye. Lelo oyo, mokanda yango mozali kati na Biblia mpe mopesamaki nkombo ya Filemona, moto oyo batindelaki mokanda yango.
Mokanda ya Filemona ezali mokanda oyo mokomami na makanisi ya mayele mpe ya kondimisa. Kasi, oyo eleki ntina lisusu, ezali na ebele na batoli malamu mpo na baklisto lelo, moko na yango elobeli likambo ya kolendisana na ntina na bolingo na baklisto. Totalela malamumalamu mokanda yango moke oyo mozali na nguya.
Bozongi ya moombo oyo akimaki
Filemona azalaki moklisto mpe mosangani oyo alingamaki mingi kati na lisangá ya Kolose. (Filemona 4, 5) Nkutu, lisanga lizalaki kosalela ndako na ye lokola esika ya makita (Verset 2) Lisusu, Filemona ayebaki ntóma Paulo malamu; ekoki kozala ete Paulo asalaki likambo moko mpo na kobongwana na ye kati na boklisto. Ezali solo ete Paulo alobi ye moko ete, asakolaki na Kolose te. (Bakolose 2:1) Atako bongo, alekisaki mbula mibale na Efese mpe asakolaki mingi na boye ete, “baoyo nyonso bafandaki na Azia [Kolose mpe ezalaki kati na yango] bayokaki liloba na Nkolo.” (Misala 19:10) Ekoki kozala ete Filemona azalaki moko na baoyo bayokaki nsango na likebi nyonso.
Atako bongo, lokola bazwi mingi ya eleko yango, Filemona azalaki na baombo. Na ntango na kala, boombo ezalaki ntango nyonso likambo ya nsoni te. Epai na Bayuda, komitɛka to kotɛka basangani ya libota na boombo, ezalaki mwango mondimamaki mpo na kofuta banyongo. (Levitike 25:39, 40) Na ntina na eleko yango na Loma, mokanda moko (The lnternational Standard Bible Encyclopedia) moyebisi ete: “Ntalo monene na bato bazalaki komitɛka na boombo mpo na bantina ekeseni, mingimingi mpo na kozala na bomoi malamu na kimya koleka oyo bakokaki kozala na yango soki bazalaki babólá mpe soki bazangaki mosala, mpo na kozwa mosala ya kosala mpe mpo na kozwa etɛlɛmɛlo ya lokumu. . . . Mingi ezali baoyo bazalaki Baloma te, baoyo bazalaki komitɛka epai na ba citoyens ya Loma mpo ete bango moko bakóma ba citoyens ya Loma na ntango oyo akosikolama; yango ezalaki ebongiseli oyo esalemaki na mibeko ya Loma.”
Kasi likambo moko libimaki na ntango Onezime, moko na baombo na Filemona, atikaki ye mpe akimaki na Loma, mbala mosusu ayibaki mosolo ya Filemona mpo akoka kokima. (Verset 18) Na Loma, Onezime akutanaki na ntóma Paulo, oyo azalaki mokangami.
Moombo ‘oyo liboso azalaki na ntina te’ mpe akimaki boombo, akómaki bongo moklisto. Alandaki Paulo mpe asalisaki ntóma wana akangamaki kati na makambo mingi. Ezali likambo ya kokamwa te ete Onezime azalaki mpenza “motema” ya Paulo mpe akómaki mpo na ye “ndeko molingami.”—Versets 11, 12, 16, MN.
Ntóma Paulo mbɛlɛ alingaki ete Onezime afanda elongo na ye, kasi, lokola azalaki nkolo ya Onezime, Filemona azalaki na lotómo likoló na ye. Onezime asengelaki kozonga na mosala ya nkolo na ye mpenza. Lolenge nini Filemona akoyamba ye? Akoloba na ye na nkanda mpo na komonisa lotómo oyo azali na yango ya kopesa ye etumbu makasi? Akobɛta nde ntembe na maloba na sembo ya Onezime, oyo akoyebisa ye ete asili kokóma moninga na ye moklisto?
Makambo masilisami kati na bolingo
Paulo apusamaki na kokomela Filemona na ntina na Onezime. Ye moko nde akomaki mpenza mokanda yango, kasi na lobɔkɔ ya moto mosusu te lokola azalaki kosala yango mbala mingi. (Verset 19) Zwa mwa baminite mpo na kotanga mokanda wana moke motindamaki epai na Filemona, na mobimba na yango. Okomona ete, nsima na komimonisa mpe nsima na kotómbela “ngolu mpe kimya” epai na Filemona mpe na libota na ye, Paulo akumisaki Filemona mpo na ‘bolingo na ye mpe kondima na ye epai na Nkolo Yesu mpe epai na basantu nyonso.’—Versets 1-7, MN.
Paulo akokaki mpenza kolobela bokonzi oyo azalaki na yango lokola ntóma mpe ‘kosɛngisa Filemona ete asala yango ebongaki;’ kasi na esika na kosala bongo, ‘alendisaki ye na ntina na bolingo.’ Ayebisaki ete Onezime akómaki mpenza ndeko moklisto, oyo azalaki na ntina mingi mpo na ye. Ntóma alobaki ete: “Nalingaki ete [Onezime] afanda na ngai elongo mpo na kosalisa ngai na esika na yo, awa ezali ngai na nkangá na ntina na nsango malamu.” Akóbaki ete: “Kasi nalingi kosala yango te kozanga kozwa ndingisa epai na yo, ete mosala na yo malamu mosalema na kopusama te, kasi na bolingo malamu.”—Versets 8-14, MN.
Ntóma alendisaki bongo Filemona ete ayamba moombo na ye na kala lokola ndeko. Paulo akomaki ete: “Yamba ye lokola nde ezalaki ngai.” Alingaki koloba te ete Onezime alongolama na boombo. Paulo azalaki kosala te mpo na kobongola ezalela ya makambo ya bato ya eleko na ye. (Tala Baefese 6:9; Bakolose 4:1; 1 Timoté 6:2.) Atako bongo, boyokani kati na moombo mpe nkolo na ye bokolendisama na bondeko na boklisto oyo bozalaki sikawa kati na Onezime mpe Filemona. Filemona atalelaki Onezime ete “aleki moombo; lokola ndeko molingami.”—Versets 15-17, MN.
Kasi ezali boni mpo na banyongo oyo mbala mosusu Onezime azalaki na yango mpo na mosolo oyo ayibaki? Wana lisusu, Paulo akundolaki boninga oyo azalaki na yango elongo na Filemona; alobaki ete: “Mpe soki asalaki yo mabe soko azali na nyongo na yo, ngai nafuta yango.” Paulo amonisaki ete andimisamaki ete Filemona akolimbisa mpe akosala nkutu makambo oyo Paulo asɛngi ye te. Lokola Paulo alikyaki ete akokangolama nsima na mwa ntango moke, azwaki bibongiseli ete Filemona afandisa ye kati na mikolo milandaki. Paulo asukisaki mokanda na ye na kopesáká bambote mpe na kotombeláká “ngolu na Nkolo Yesu Klisto” epai na Filemona.—Versets 18-25, MN.
Mateya mpo na baklisto ya lelo
Mokanda ya Filemona motondi na mateya malamu mpo na baklisto ya lelo. Liboso, ezali kokundola biso ntina ya kolimbisa, ata na moninga moklisto oyo asaleli biso mabe monene. Yesu Klisto alobaki ete: “Soko bokolimbisa mabe ya bato mosusu, Tata na bino oyo azali na likoló akolimbisaka bino lokola.”—Matai 6:14, MN.
Baoyo basili kotyama mpo na kozala na bokonzi kati na lisangá na boklisto bakoki mpenza kozwa litomba na mokanda ya Filemona. Tala ete Paulo aboyaki kosalela bokonzi oyo azalaki na yango lokola ntóma, mpo na kosɛngisa Filemona ete asala oyo ebongaki kosala yango. Lisusu, Paulo asɛngisaki te ete Onezime azwa ndingisa ya kotikala na Loma mpo na kosalisa ye. Paulo atosaki lotómo ya nkolo na ye. Asosolaki lisusu ete, na esika na komonisa bokonzi, likambo oyo lisengelaki mpenza kopusa Filemona ete atósa ye, amonaki malamu ete Filemona asala engebene motema na ye. Alobelaki nde na ntina na bolingo mpo ete azwa eyano oyo euti na motema.
Bankulutu basengeli bongo kozala ‘lokola bakonzi te epai na baoyo bazali libula na Nzambe’ na kosaleláká bokonzi na bango na lolenge mabe to na kozaláká na makambo makasi mpe na bokonzi boleki ndelo epai na etonga. (1 Petelo 5:1-3, MN) Yesu alobaki ete: “Boyebi ete mikolo na Bapakano bazali na bokonzi likoló na bango mpe bato minene bakoyangelaka bango na makasi. Nde ezali bongo te kati na bino.” (Matai 20:25, 26) Bakɛngɛli baklisto bamonaka mpenza ete basangani ya etonga bayanolaka malamu na masɛngi oyo masalami na bolingo koleka oyo esalemi na mitinda. Baoyo bazali konyokwama na makanisi basepelaka na bakɛngɛli oyo bazali kopesa ntango na bango mpo na koyoka wana ezali bango kolobela mikakatano na bango mpe wana bazali kopesa bango batoli oyo etondi na mayele.
Mokanda ya Paulo mozali kokundwela lisusu bankulutu ntina ya kokumisa mpe kozala na maloba ya mayele. Abandi na kondimáká ete “mitema na basantu milendisamaki mpo na Filemona.” (Verset 7, MN) Na ntembe te, maloba wana ya kokumisa na sembo mapusaki Filemona ete azala lisusu na boyambi mingi. Bobele bongo lelo, maloba na kokumisa na sembo mpe na mɔ́tɔ, makoki mbala mingi kosalisa moto na kondima batoli. Mpe batoli yango esengeli te kopesama na mobulu mpe na maloba mazangi mayele, kasi masengeli mpenza kozala na ‘elɛngi lokola mongwa’ mpo ete ye oyo apesameli yango andima yango kozanga nkaká.—Bakolose 4:6.
Na nsima, ntóma Paulo amonisaki lolenge oyo atyelaki Filemona motema, kondimisamáká ete akosala oyo ezali sembo; alobaki na ye ete: “Nakomi mokanda oyo mpo ete nayebi botósi na yo, mpe nandimi ete okosala na koleka oyo ngai nasili koloba.” (Verset 21, MN) Bankulutu, bomonisaka lolenge moko oyo ete bazali kotyela baninga na bino baklisto motema? Yango ekosalisa bango na kolinga kosala oyo ezali sembo. Boye te?
Baboti mpe bamonaka mbala mingi ete bazali kozwa matomba malamu na komonisáká na bana na bango ete, bazali kotyela bango motema. Koyebáká motuya ya kotósa noki—mposa ya kosala koleka oyo esɛngami—na lolenge ekoki, baboti bakoki komonisa ete bazali kotósa bana na bango. Soki yango ekoki, baboti basengeli kopesa mitinda na bango mpe masɛngi na bango na maloba matondi na bolingo. Basengeli komonisa ete bayebi komitya na esika ya bana na bango mpe kopesa bango elónga. Basengeli mpenza kokumisa bana na bango na mɔ́tɔ nyonso soki yango ebongi na bango, mpe basengeli kopɛngola kopamela bango, mingi mpenza liboso na bato.
Bobele bongo, mibali bakoki komimonisa bato na bososoli mpe na malamu, bato bazali na mposa ya kokumisa basi na bango. Na bongo, botósi ekozala mpo na bango likambo ya kosepelisa mpe ekopesa bango elendiseli mpe esengo.—Masese 31:28; Baefese 5:28.
Lolenge oyo Filemona ayanolaki na mokanda ya Paulo, elobelami sikisiki te. Kasi, tokoki mpe kokanisa te ete Paulo amikosaki wana atyelaki ye motema. Lelo oyo tolingi mpe ete bankulutu, baboti mpe mibali balónga kati na boyokani na bango elongo na bato mosusu, na kosaleláká makasi te soko na kopusa te, to lisusu na kopesa mitinda te, kasi na ‘kolendisa na ntina na bolingo.’
[Elilingi na lokasa 23]
Na esika na kosalela bokonzi oyo azalaki na yango lokola ntóma, Paulo alendisaki Filemona na ntina na bolingo na boklisto