Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya mpótó elóngisi lotómo ya kosakola na mokili ya Grèce
MPO na nini mobali oyo bazalani na ye bazali kokumisa ye asengelaki kokangama koleka mbala 60 kobanda mobu 1938? Mpo na nini moto wana ya mombongo ya kolongobana ya esanga Crète na mokili ya Grèce asengelaki kosambisama mbala 18 liboso ya bisambiselo ya mokili ya Grèce mpe kolekisa mibu koleka motoba ya etumbu kati na boloko? Mpo na nini Minos Kokkinakis, tata wana ya libota oyo azali mosali ya molende, asengelaki kokabwana mosika na mwasi na ye mpe na bana na ye mitano mpe kotindama na boloko na bisanga bikeseni?
Ezali bongo mibeko oyo mibimaki na 1938 mpe 1939 oyo mizali kopekisa kopalanganisa mateya ya lingomba nde mizali ntina na kokangama yango. Mibeko wana mityamaki na mokonzi mabe, Ioannis Metaxas, ya mokili ya Grèce, oyo azalaki kosala na nse ya bopusi ya Lingomba Orthodoxe ya Grèce.
Nsima ya kotyama ya mibeko wana, kobanda 1938 kino 1992, bakangaki ba Témoins de Jéhovah 19147, mpe bisambiselo bikatelaki bango nyonso boloko ya mibu 753, mibu 593 kati na yango ekokisamaki mpenza. Makambo wana nyonso masalemaki mpo ete Batemwe na Grèce, lokola bipai mosusu nyonso, bazali kolanda malako ya Yesu Klisto matali “kozalisa bayekoli bato na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete batosa nyonso” esili ye kolaka.—Matai 28:19, 20.
Kasi na mokolo ya le 25 Mai 1993, elónga monene mpo na bonsomi ya losambo ezwamaki! Na mokolo yango Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato, oyo eyanganaki na engumba Strasbourg, na France, elóngisaki bonsomi ya mwanamboka moko ya ekólo Grèce mpo na koteya bindimeli na ye epai na bato mosusu. Na kosaláká bongo, Esambiselo wana na mikili ya Mpótó epesaki libateli monene na makambo ya losambo, yango ekoki kozala na bopusi mozindo likoló na bomoi na bato bipai nyonso.
Totalela na penepene bokóli ya likambo yango, bakisa minyoko ya nsomo oyo bobele mwanamboka wana ya Grèce akutanaki na yango, oyo ememaki kino na ekateli monene wana ya esambiselo.
Bomoi ya kala ya Minos Kokkinakis
Na 1938, mwanamboka wana, Minos Kokkinakis, akómaki Témoin de Jéhovah ya liboso ya kokangama na nse ya mibeko ya Grèce oyo ezali kotalela kopalanganisa mateya ya lingomba lokola kobuka mibeko. Kozanga ete basambisa ye, batindaki ye mosika mpo na basanza 13 na esanga Amorgos ya Mer Egée. Na 1939, bakatelaki ye etumbu mbala mibale mpe na mabaku wana nyonso akotaki boloko ya sanza mibale na ndambo.
Na 1940, Kokkinakis atindamaki mosika mpo na sanza motoba na esanga ya Milos. Na mobu molandaki, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, akangisamaki na boloko ya basodá na Athènes na boumeli ya sanza koleka 18. Na ntina na eleko yango, azali komikundola ete:
“Kozanga bilei kati na boloko ezalaki koya ntango nyonso makasi. Tolembaki mpenza mingi na motindo boye ete tokokaki kotambola te. Soki ezalaki Batemwe ya zongazonga ya bingumba Athènes mpe Pirée te, baoyo ata bazalaki na bozwi mingi te bapesaki biso bilei, mbele tolingaki kokufa.” Na nsima, na 1947, bakatelaki ye lisusu etumbu mpe asalaki sanza minei na ndambo na boloko.
Na 1949, Minos Kokkinakis atindamaki na esanga ya Makrónisos, nkombo oyo ezali kopesa nsomo na makanisi ya ba Grecs mpo na boloko oyo ezalaki kuna. Kati na bakangami 14 000 oyo batyamaki na Makrónisos, Batemwe bazalaki soko 40. Mokanda monene na lokóta ya Greke Papyros Larousse Britannica emonisi ete: “Myango ya minyoko, . . . mitindo ya bomoi, oyo ekoki te kondimama mpo na ekólo oyo ezali civilisé, bizaleli ya nsoni ya bakɛngɛli epai na bakangami . . . ezali nsoni mpo na lisoló ya Grèce.”
Kokkinakis, oyo alekisaki mobu moko kati na boloko na Makrónisos, alobi na ntina na ezalela na yango ete: “Basodá, na motindo ya bato na esambiselo ya Inquisition bazalaki kotunatuna bakangami nyonso kobanda ntongo kino na mpokwa. Nazangi maloba mpo na kolimbola minyoko oyo bazalaki kopesa. Bakangami mingi babelaki ligboma; basusu babomamaki; basusu mingi bakómaki bibosono. Na boumeli ya butu yango ya nsomo wana tozalaki koyoka kolela mpe konganga na baoyo bazalaki konyokwama, tozalaki kobondela biso nyonso elongo.”
Nsima ya kobima na mikakatano ya Makrónisos, Kokkinakis akangamaki mbala motoba na boumeli ya bambula 1950 mpe alekisaki sanza zomi kati na boloko. Na bambula 1960 akangamaki lisusu mbala minei mpe bakatelaki ye etumbu ya sanza mwambe kati na boloko. Kasi kobosana te ete, Minos Kokkinakis azalaki bobele moko na ebele ya ba Témoins de Jéhovah oyo na boumeli ya mibu mingi bakangamaki mpe batyamaki na boloko mpo ete balobelaki bazalani na bango na ntina na kondima na bango!
Bongo lolenge nini bokesene monene oyo esalemaki likoló na ba Témoins de Jéhovan na mokili ya Grèce ekómaki liboso na Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato?
Ebandeli ya makambo
Likambo yango ebandaki na mokolo ya le 2 Mars 1986. Mokolo wana Minos Kokkinakis, oyo azalaki na mibu 77 mpe asilaki kotika mosala na ye ya mombongo, akendeki elongo na mwasi na ye na ndako ya Madame Georgia Kyriakaki, na Sitia, na esanga Crète. Mobali ya Madame Kyriakaki, oyo azalaki moyembi na ndakonzambe ya Lingomba ya Orthodoxe ya mboka wana, ayebisaki bapolisi. Bapolisi bayaki mpe bakangaki Kokkinakis mpe mwasi na ye, oyo bamemaki bango na biro ya bapolisi ya mboka yango. Basengelaki kolekisa butu mobimba kuna.
Bafundaki bango na likambo nini? Bobele oyo mpo na yango bakangaki ba Témoins de Jéhovah mbala mingi na boumeli ya mibu 50 oyo mileki, elingi koloba efundeli ya kopalanganisa mateya ya lingomba. Kati na Mibeko ya mokili ya Grèce (1975), Article 13, elobi ete: “Kopalanganisa mateya ya lingomba epekisami.” Totalela malamu mobeko wana ya Grèce, article 4, nimero 1363/1938 mpe article 2, nimero 1672/1939, oyo ekómisi kopalanganisa mateya ya lingomba likambo lipekisami. Elobi ete:
“Na ‘kopalanganisa mateya ya lingomba’ tolingi kolobela, mingimingi, lolenge nyonso ya komeka na polele to na nkuku, ya komikotisa na makambo matali bindimeli ya moto na lingomba mosusu . . . , na mokano ya kokweisa bindimeli yango, ezala na mwango nyonso ya kolengola to na bilaka ya kolengola to na nzela ya lisungi ya maoki to ya mosuni, to na kobuba to kosalela kozanga eksperianse na moto, kotyela motema oyo amonisi, bosenga na ye, kozanga bwanya to bozoba ya moto.”
Esambiselo ya engumba Lassíthi, na esanga Crète, eyokaki likambo yango na mokolo ya le 20 Mars 1986, mpe ekweisaki ndeko Kokkinakis mpe mwasi na ye na likambo ya kopalanganisa mateya ya lingomba. Bango nyonso mibale bakatelamaki boloko ya sanza minei. Wana ezalaki yango kokweisa babalani wana, esambiselo elobaki ete bakangami bamekaki “komikotisa na makambo matali bindimeli ya baklisto ya lingomba ya Orthodoxe . . . na kosaleláká kozanga eksperianse na bango, kozanga bwanya na bango mpe bozoba na bango.” Bakangami bakweisamaki lisusu mpo ete “balendisaki [Madame Kyriakaki] na bandimbola na bango ya mayele, ya makoki mingi . . . na kobongola bindimeli na ye ya Lingomba Orthodoxe.”
Ekateli yango etindamaki na Cour d’appel ya Crète. Na le 17 Mars 1987, Cour d’appel wana ya Crète elongolaki ekweli ya mwasi ya Kokkinakis kasi endimaki ekweli na ye moko, atako ekitisaki mikolo ya boloko na sanza misato. Esambiselo elobaki ete Kokkinakis asalelaki “kozanga eksperianse, kozanga bwanya mpe bozoba ya Madame [Kyriakaki].” Elobaki ete “abandaki kotanga biteni ya Makomami mosantu, oyo alimbolaki yango na mayele mingi na boye ete mwasi wana moklisto, mpo na kozanga boyebi na ntina na mateya, akokaki kotya ntembe te.”
Kopesáká likanisi likeseni, moko na basambisi ya Cour d’appel akomaki ete Kokkinakis “asengelaki kotikama, mpo ete ezali na elembo moko te ya polele oyo emonisi ete Georgia Kyriakaki . . . azangaki mpenza eksperianse na mateya ya boklisto ya Lingomba Orthodoxe, mingi mpenza lokola azali mwasi ya moyembi ya lingomba, to elembo moko te ya sikisiki oyo emonisi ete Georgia Kyriakaki azangaki mpenza bwanya to azali na bozoba mpenza, na boye ete mokangami akoka kosalela yango mpe . . . [oyo] ekopusa ye na kokóma mosangani ya lingomba ya ba Témoins de Jéhovah.”
Kokkinakis asengaki batinda likambo na ye na Cour de cassation, oyo ezali bongo Cour Suprême ya Grèce. Kasi esambiselo yango eboyaki libyangi na ye na le 22 Avril 1988. Mpo na yango, na le 22 Août 1988, Kokkinakis afundaki likambo yango na Commission européenne des droits de l’homme. Bandimaki libyangi na ye na le 21 Février 1992, mpe endimamaki na Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato.
Bosukisi ya likambo
Lokola Grèce ezali mosangani ya Conseil ya Europe, yango esengeli kotosa mitinda ya Convention européenne des droits de l’homme. Article 9 ya Convention yango elobi ete: “Moto nyonso azali na lotómo mpo na bonsomi ya makanisi, ya lisosoli mpe ya lingomba; lotómo wana etali bonsomi ya kobongola lingomba to bindimeli mpe bonsomi ya komonisa lingomba to bindimeli na ye, kati na losambo, na mateya, na misala mpe na milulu, ezala ye moko to na lisangá elongo na basusu, liboso na bato mingi, to na nkuku.”
Na yango, boyangeli ya ekólo Grèce ekómaki mofundami liboso na Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó. Efundamaki ete ezali kobuka na polele lotómo monene ya mwanamboka moko ya Grèce ya kosalela lingomba na ye mpo na kobatela etinda na Yesu Klisto, oyo etali ‘koteya mpe kozalisa bayekoli.’ (Matai 28:19, 20) Lisusu, ntoma Petelo alobaki ete: “[Yesu] alaki biso kosakola na bato mpe kotatola na mozindo.”—Misala 10:42.
Na 1992, nimero moko ya ntina ya zulunalo European Magazine on Human Rights ezalaki na motó ya likambo monene likoló na ezipeli na yango ete “Grèce—Ezali kobuka bonsomi na bato na nkó nyonso.” Zulunalo yango elimbolaki na lokasa 2 ete: “Grèce ezali mokili bobele moko kati na C.E.E (Lisangani ya nkita ya mikili ya Mpótó) mpe na Mpótó mobimba na kozala na mibeko oyo mizali kofutisa bato lomande mpe kokatela bato etumbu ya boloko soki bapusi bato mosusu na kobongola lingomba na bango.”
Na yango, sikawa bato oyo bazali na kati mpe na libandá ya masangá ya bato bayebi mibeko bakómaki na motema likoló. Bikateli nini bilingaki kozwama mpo na mibeko ya Grèce oyo mizali kopekisa bato koteya bindimeli na bango epai na bato basusu?
Kosambisa makambo na Strasbourg
Mokolo ya kosambisa ekómaki—le 25 Novembre 1992. Likoló lizalaki na mapata minene na engumba Strasbourg, mpe malili mazalaki makasi, kasi na kati ya esambiselo ba avocats bazalaki kopesa bilembeteli na bango na molende nyonso. Na boumeli ya bangonga mibale bapesaki bilembeteli ya polele. Maître Phedon Vegleris, mokoteli ya Kokkinakis, asimbaki ntina ya likambo, wana atunaki ete: ‘Mobeko oyo esalemi mpo na kobatela basangani ya Lingomba Orthodoxe na kobongwana na lingomba mosusu esengeli kobatelama mpe kolanda kosalelama?’
Wana amonisaki polele ete atungisami na likambo yango, maître Vegleris atunaki ete: “Nazali komituna mpo na nini mobeko wana [ya kopalanganisa mateya ya lingomba] ezali kokokanisa bato ya lingomba ya Orthodoxe na bazoba mpe na bato bazangi boyebi. Nazalaki ntango nyonso komituna mpo na nini bato ya lingomba Orthodoxe basengeli kobatelama kati na bozoba, na kozanga makoki ya elimo . . . Makambo wana mazali kobulunganisa mpe kotungisa ngai.” Na polele nyonso, bamonisi ya boyangeli bazalaki ata na likambo moko te ya komonisa mpo na kondimisa ete mobeko yango mosalelamaki epai na bato mosusu oyo bazali ba Témoins de Jéhovah te.
Mokoteli ya mibale ya Kokkinakis, Panagiotis Bitsaxis, amonisaki ete mobeko ya kopekisa kopalanganisa mateya ya lingomba elongobani te. Alobaki: “Kondima bopusi na moko likoló na mosusu ezali lisengami mpo na kosolola kati na bato oyo bakóli. Soki bongo te mbɛlɛ tokozala lokola banyama, oyo bakoki kokanisa kasi bakoyebisa makanisi na bango te, baoyo bakolobaka kasi bakosololaka te, baoyo bazali na bomoi kasi bakofandaka esika moko te.”
Bitsaxis amonisaki lisusu ete: “Kokkinakis akweisamaki te mpo na ‘likambo moko oyo asalaki’ kasi [mpo] na ‘oyo ye azali.’” Na yango, Bitsaxis amonisaki ete, mitinda ya bonsomi ya lingomba esukaki bobele na kobukama te kasi nde ebebisamaki mpenza nyonso.
Bamonisi ya boyangeli ya Grèce balingaki komonisa makambo na motindo mokeseni, wana bamikumisaki ete Grèce ezali “paradis ya bonsomi ya bato.”
Ekateli
Ntango molai oyo esengelaki mpo na kozwa ekateli esukaki na le 25 Mai 1993. Basambisi motoba balóngaki basusu misato wana esambiselo ekataki ete boyangeli ya Grèce epekisaki bonsomi ya mobali wana ya mibu 84, Minos Kokkinakis. Lisusu, Esambiselo elóngisaki bomoi na ye ya mosakoli ya nsango malamu, mpe basengelaki kofuta ye badolare 14 400 mpo na monyoko oyo azwaki. Esambiselo eboyaki likanisi ya boyangeli ya Grèce, oyo elobaki ete Kokkinakis mpe ba Témoins de Jéhovah bazali kosalela myango ya kopusa bato na makasi wana bazali kosolola na bato bindimeli na bango.
Atako Constitution mpe mobeko ya kala ya Grèce eboyi kopalanganisa mateya ya lingomba, Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó esili kokata ete kosalela mibeko wana mpo na konyokola ba Témoins de Jéhovah elongobani te. Eyokani te na Article 9 ya Convention européenne des droits de l’homme.
Ekateli ya esambiselo elimbolaki ete: “Lingomba lizali eteni ya ‘makanisi ya bato oyo ezali ntango nyonso koyeisama ya sika’ mpe tokoki te kokanisa ete esengeli kolongolama na masoló ya bato.”
Likanisi na moko na basambisi libwa oyo eyokani na yango elobaki ete: “Kopalanganisa mateya ya lingomba, oyo elimbolami lokola ‘molende mpo na kopalanganisa kondima,’ ekoki mpenza te kopesama etumbu; ezali mwango moko—oyo ebongi mpenza—ya ‘komonisa lingomba ya moto.’
“Na likambo oyo, mofundami [Kokkinakis] akangamaki bobele mpo ete amonisaki molende lolenge yango, kozanga ete asala likambo moko ya mabe.”
Matomba ya ekateli yango
Likanisi ya polele ya Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato ezali ete bakonzi ya Grèce batika kosalela mobeko oyo ezali kopekisa kopalanganisa mateya ya lingomba. Elikya ezali ete, Grèce ekolanda likanisi ya esambiselo wana mpe ekotika konyokola ba Témoins de Jéhovah.
Mokano ya ba Témoins de Jéhovah ezali te ya kokotisa mbongwana na makambo ya bato to kobongola mibeko ya mokili. Likambo ya ntina mpo na bango ezali ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe mpo na kotosa malako ya Yesu Klisto. Nzokande, mpo na kosala yango, bazali na esengo ya ‘kolobela mpe kotelemisa nsango malamu engebene mibeko,’ lokola ntoma Paulo asalaki yango na ekeke ya liboso.—Bafilipi 1:7.
Ba Témoins de Jéhovah batosaka mibeko kati na mikili nyonso epai bazali kofanda. Nzokande, liboso na makambo nyonso, bakangami na kotosa mibeko na Nzambe mikomami kati na Biblia Mosantu. Na yango, soki mobeko moko ezala ya mokili nini mozali kopekisa kolobela bindimeli na bango oyo bizali kati na Biblia, bazali kosala nyonso mpo na kozala na etelemelo ya bantoma ete: “Tosengeli kotosa Nzambe liboso na kotosa bato.”—Misala 5:29.
[Etanda na lokasa 28]
MINYOKO MINGI MIUTI NA BAKONZI YA MANGOMBA
Milende na bakonzi ya mangomba na Grèce mpo na ‘kobimisa minyoko na mibeko’ eumeli mibu mingi. (Nzembo 94:20) Likambo mosusu na esanga ya Crète euti kokatama kala mingi te. Na mobu 1987 episkopo moko mpe basángo 13 bafundaki Batemwe libwa ete bazali kopalanganisa mateya ya lingomba. Na nsuka, na le 24 Janvier 1992, likambo yango likómaki liboso na esambiselo.
Esambiselo etondaki na bato. Basángo soko 35 bazalaki wana mpo na kosimba bifundeli na bango. Nzokande, bifandelo mingi bisilaki kozwama na Batemwe oyo bayaki kolendisa bandeko na bango baklisto. Liboso mpenza ete kosambisama ebanda na motindo esalamaka, molobeli oyo aponami mpo na bafundami amonisaki mabunga minene oyo mofundi asalaki.
Bosukisi ezalaki ete baoyo nyonso bazalaki kati na esambiselo bamibendaki na nkuku mpo na kotalela likambo yango. Nsima na kopesana makanisi na boumeli ya ngonga mibale na ndambo, mokambi ya esambiselo alobaki ete mokoteli ya bafundami azalaki na elónga. Mpo na yango, efundeli mpo na Batemwe libwa elongolamaki. Amonisaki ete bolukiluki esengeli lisusu kobanda mpo na koyeba soki bafundami bazalaki na ekweli ya kopalanganisa mateya ya lingomba.
Nokinoki nsima ya liyebisi wana, makelele makasi eyokanaki kati na esambiselo. Basángo babandaki konganga makaneli mpe kofinga. Sángo moko alakisaki mokoteli ya ba Témoins de Jéhovah ekulusu mpe alukaki kopusa ye na kosambela yango. Esengelaki ete bapolisi bakota mpo ete Batemwe bakoka kobima na kimya.
Nsima ya kolongola efundeli wana, procureur abongisaki efundeli mosusu mpo na kofunda Batemwe wana libwa. Mokolo ya kosambisama etyamaki le 30 Avril 1993, bobele poso misato liboso ete Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi ya bato ezwa ekateli na likambo ya Kokkinakis. Na mbala wana lisusu, basángo bazalaki mingi kati esambiselo.
Bakoteli ya bafundami libwa wana bamonisaki ete bafundi ya Batemwe bazalaki na esambiselo te. Wana azalaki kowela na mbangu kosala efundeli mosusu, procureur asalaki libunga monene ya kobosana kotindela bafundi libyangi. Mpo na yango bakoteli ya Batemwe basengaki na esambiselo ete elongola efundeli mpo na libunga wana monene.
Mpo na yango, basambisi babimaki na esambiselo mpe bakendeki bango nyonso kopesana makanisi na boumeli ya ngonga moko. Na bozongi na bango, mokambi ya esambiselo, elongi na nse, ayebisaki ete Batemwe nyonso libwa bazali na ekweli te.
Batemwe ya mokili Grèce bazali na botɔndi mpo na bosukisi ya likambo wana, lisusu mpo na ekateli ya Esambiselo eleki monene mpo na mikili ya Mpótó mpo na kobatela bonsomi na bato, na likambo ya Kokkinakis mokolo ya le 25 Mai 1993. Bazali kopesa mabondeli mpo ete elónga wana ya bisambiselo, epesa nzela na kolanda bomoi na bango ya boklisto ‘na kimya mpe kozanga mobulu, kati na losambo na Nzambe mpe na sembo na bozito.’—1 Timoté 2:1, 2.
[Elilingi na lokasa 31]
Minos Kokkinakis elongo na mwasi na ye