Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/9 nk. 21-26
  • Libota ya boklisto esalisaka mibange

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libota ya boklisto esalisaka mibange
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobatela mibange na ntango ya kala
  • Nani abongi kozwa limemya?
  • Mokumba ya libota
  • Mokumba ya lisangá
  • Bozwi kitoko mpo na lisangá
  • Baklisto bazali na mokumba ya kosalisa mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Nzambe asalisaka mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lolenge baklisto bakoki kosalisa mibangé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Yehova amibanzabanzaka mpo na basaleli na ye ya mibange
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/9 nk. 21-26

Libota ya boklisto esalisaka mibange

“Boya ngai na ntango na konuna te, tika ngai te wana nguya na ngai elembi.”​—NZEMBO 71:9.

1. Lolenge nini batalelaka mibange kati na bisika mingi?

“BOLUKILUKI bomonisi ete mibange motoba likoló na nsambo (86 %) oyo banyokwami, bazali konyokwama bobele na basangani ya mabota na bango mpenza,” oyo ezali maloba mabimaki na zulunalo The Wall Street Journal. Zulunalo Modern Maturity elobaki ete: “Konyokola mibange ezali bobele [mobulu ya libota] ya nsuka oyo ezali kobima na kobombama na yango mpe ekómi kokomama na nkasa ya bazulunalo ya bopanzi nsango ya mokili na biso.” Ya solo, lelo oyo kati na bisika mingi ya mokili mibange bazali konyokwama mpe batalelami na bopotu. Eleko na biso ezali solo ntango oyo bato “bakozala bamikumisi na bango mpenza, . . . bazangi matondi, bazangi sembo, bazangi bolingo.”​—2 Timoté 3:1-3.

2. Engebene Makomami ya Liebele, lolenge nini Jéhovah azali kotalela mibange?

2 Nzokande, ezali yango te lolenge oyo esengelaki kosala epai na mibange na Yisraele ya kala. Mibeko milobaki ete: “Okotelema liboso na nsuki mpembe mpe okokumisa mobali anuni mpe okobanga Nzambe na yo. Ngai nazali Jéhovah.” Mokanda oyo mozali na masese ya mayele mapemami mopesi biso toli oyo ete: “Yokamela tata na yo oyo abotaki yo mpe tyola mama na yo te wana ekonuna ye.” Epesi etinda oyo: “Mwana na ngai, yoka mateya na tata na yo mpe tika mibeko na mama na yo te [mpo ete akómi mobange].” Mibeko ya Moize miteyaki botosi mpe limemya mpo na mibange mibali mpe mibange basi. Ezali polele ete Jéhovah alingi ete mibange bakumisama.​—Levitike 19:32; Masese 1:8; 23:22.

Kobatela mibange na ntango ya kala

3. Lolenge nini Yozefe amonisaki motema mawa epai na tata na ye oyo azalaki mobange?

3 Esengelaki komonisa botosi bobele na maloba te, kasi lisusu na misala oyo mizali komonisa limemya. Yozefe azalaki na mawa mingi mpo na tata na ye oyo azalaki mobange. Alingaki ete Yakobo asala mobembo molai longwa na Kanana kino na Ezipito, na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ koleka 300. Mpo na yango, Yozefe atindelaki Yakobo “bampunda zomi na mikumba na biloko malamu na Ezipito mpe bampunda basi zomi na mikumba na masango mpe mampa mpe bilei mpo na tata na ye na mobembo.” Ntango Yakobo akómaki na Gosɛnɛ, Yozefe akendeki kokutana na ye mpe “akweaki na nkingo na ye mpe alelaki na nkingo na ye mwa ntango molai.” Yozefe amonisaki bolingo mozindo mpo na tata na ye. Oyo nde ndakisa kitoko ya komibanzabanza mpo na mibange!​—Genese 45:23; 46:5, 29.

4. Mpo na nini Luta azali ndakisa malamu ya kolanda?

4 Luta azali ndakisa mosusu ya malamu ya kolanda mpo na oyo etali komonisa boboto epai na mibange. Atako azalaki mopakano, akangamaki makasi na Naomi, bokilo na ye, mwasi Moyuda oyo akufelaki mobali. Atikaki libota na ye moko mpe andimaki likambo ya kozanga kozwa mobali mosusu. Ntango Naomi alendisaki ye ete azonga epai na libota na ye, Luta ayanolaki na maloba oyo mazali kati na maloba maleki kitoko kati na Biblia, ete: “Bondela ngai kotika yo te to kozanga kolanda yo te. Esika ekokenda yo, ngai mpe nakokende kuna, mpe esika ekolala yo, ngai mpe nakolala wana. Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. Esika ekokufa yo, ngai mpe nakokufa mpe nakokundama wana. Jéhovah asalela ngai boye mpe mosusu lokola, soko eloko mosusu ekokabola kati na biso na yo, bobele kufa.” (Luta 1:16, 17) Luta amonisaki lisusu bizaleli malamu ntango andimaki kobala mobange Boaza engebene ebongiseli ya Mibeko etali kokamata mwasi ya mokufi mpo na kobotela ye bana.​—Luta, mokapo 2 kino 4.

5. Bizaleli nini Yesu amonisaki kati na boyokani na ye elongo na bato?

5 Yesu atikaki ndakisa lolenge moko mpo na oyo etali boyokani na ye elongo na bato. Azalaki na motema petee, na koyokela bato mawa, na boboto mpe na kobondisa. Amonisaki komibanzabanza ya solo mpo na mobali mobola oyo azalaki ebosono, oyo azangaki makoki ya kotambola na boumeli ya mibu 38 mpe, abikisaki ye. Azalaki na limemya mpo na basi bakufeli mibali. (Luka 7:11-15; Yoane 5:1-9) Ata na ntango na mpasi makasi likoló na nzeté, wana azalaki pene na kokufa, azwaki bibongiseli ete mama na ye, oyo mbala mosusu akómaki na mibu koleka 50, akoka kobatelama malamu. Yesu azalaki moninga ya kolendisa mpo na moto nyonso, longola bobele banguna na ye bakosi. Mpo na yango alobaki ete: “Boya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino. Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe boyekola na ngai; mpo ete nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa kopema mpo na milimo na bino.”​—Matai 9:36; 11:28, 29; Yoane 19:25-27.

Nani abongi kozwa limemya?

6. (a) Nani oyo abongi mpenza kozwa libateli? (b) Mituna nini tokoki komituna?

6 Mpo ete Jéhovah Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto basili kopesa ndakisa kitoko kati na makambo matali komibanzabanza mpo na bato, ezali bobele likambo libongi ete baklisto oyo bamipesi bakoka komekola ndakisa na bango. Kati na biso tozali na baoyo bazali kosala mosala makasi mpe bazali komema mikumba ya bozito uta mibu mingi​—bandeko mibali mpe basi mibange baoyo basili kokóma na bambula ya nsuka ya bomoi na bango. Ekoki kozala ete basusu bazali baboti to bankɔ́kɔ na biso. Tozwaka bango na motuya mingi? Tomonisaka ete tozali na bokonzi likoló na bango? To tomonisaka botondi mpo na eksperianse mpe mayele mingi oyo bazali na yango? Ezali solo ete, basusu bakoki kotya na komekama motema petee na biso mpo na bizaleli mpe mimeseno misusu oyo mizalaka mbala mingi na mibange. Kasi omituna yo moko: ‘Nakozala lolenge mosusu soki nakómi lokola bango?’

7. Monisa, na nzela na ndakisa moko, mpo na nini tosengeli komitya na esika na mibange.

7 Tozali na lisoló moko ya kosimba motema euti na Proche-Orient, oyo ezali komonisa motema mawa ya mwana moko ya mwasi mpo na mibange. Nkɔ́kɔ na ye ya mwasi azalaki kopesa lisalisi na kuku mpe akweisaki sani moko ya mbɛlɛ oyo epaswamaki. Nkɔ́kɔ abulunganaki na ntina na botau na ye; mwana na ye ya mwasi asilikaki mingi. Abengaki mwana na ye ya mwasi ya moke mpe atindaki ye na magazini ya mboka wana mpo asombela nkɔ́kɔ na ye sani ya mabaya oyo epaswamaka te. Mwana ya mwasi ayaki na basani yango mibale. Mama na ye atunaki ye ete: “Mpo na nini osombi basani mibale?” Mwana ya mwasi, na kokakatana nyonso ayanolaki ete: “Moko mpo na nkɔ́kɔ mpe mosusu mpo na yo ntango okokóma mobange.” Ya solo, kati na mokili oyo biso nyonso tosengeli komizela ete tokóma mibange. Bongo tokosepela ete basalela biso makambo na motema petee mpe na boboto, boye te?​—Nzembo 71:9.

8, 9. (a) Lolenge nini tosengeli kotalela mibange oyo bazali kati na biso? (b) Baoyo bauti kokóma baklisto kala mingi te basengeli komikundola likambo nini?

8 Tobosana soko moke te ete mingi kati na bandeko na biso mibange basi mpe mibali basili kotikala sembo kati na mosala ya boklisto uta mibu mingi. Babongi solo kozwa lokumu mpe limemya na biso, boboto na biso mpe bilendiseli na biso. Moto na mayele alobaki na sembo nyonso ete: “Motó ya pee ezali motole na nkembo wana ezwami na nzela na boyengebene.” Mpe motó ya pee, mobali to mwasi asengeli kozwa limemya. Basusu kati na mibange mibali mpe mibange basi yango bazali naino kosala lokola ba pionniers ya sembo, mpe mingi kati na mibali bazali kolanda kosala lokola bankulutu kati na masangá. Basusu bazali kosala mosala moko malamu lokola bakɛngɛli ya zongazonga.​—Masese 16:31.

9 Paulo apesaki Timoté toli oyo ete: “Opamela mobange na makasi te, kasi obondela ye lokola tata; mpe bilenge mibali lokola bandeko mibali, mpe mibange basi lokola bamama mpe bilenge basi lokola bandeko basi na mpeto nyonso.” (1 Timoté 5:1, 2) Baoyo bauti kokota kala mingi te na lisangá ya boklisto longwa na mokili oyo mozangi limemya basengeli kotya likebi mingi na maloba ya Paulo, oyo masimbami na bolingo. Bilenge, bomekola bizaleli mabe te oyo bosili mbala mosusu komona yango na eteyelo. Bosilika te na ntina na batoli kitoko oyo Batemwe mibange bazali kopesa bino. (1 Bakolinti 13:4-8; Baebele 12:5, 6, 11) Nzokande, soki mpo na kolongono mabe ya nzoto to mpo na mikakatano ya mosolo, mibange bakómi na mposa ya lisalisi, banani bazali na mokumba ya liboso ya kosalisa bango?

Mokumba ya libota

10, 11. (a) Engebene Biblia, nani asengeli kozwa mokumba ya liboso ya kobatela mibange? (b) Mpo na nini kobatela mibange ezalaka ntango nyonso likambo ya petee te?

10 Na lisangá ya boklisto na ntango ya kala, mikakatano mibimaki na likambo ya kobatela basi bakufeli mibali. Lolenge nini Paulo amonisaki ntina ya lisungi yango? “Omemya basi bakufeli mibali oyo bazali sembo. Nde soko mwasi mokufeli mobali azali na bana to bana na bana na ye, bango bayekola kosalela Nzambe kati na ndako na bango mpenza liboso mpe bazongisa mwa makabo epai na baboti. Mpo ete oyo ekosepelisa Nzambe. Soko moto nani akoleisa bato na ndako na ye te mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timoté 5:3, 4, 8.

11 Na ntango mposa emonani, basangani ya penepene kati na libota nde basengeli kozala bato ya liboso mpo na kopesa lisalisi epai na mibange.a Na motindo yango, bana oyo basili kokola bakoki komonisa botɔndi mpo na mibu mingi ya bolingo, ya mosala mpe ya libateli oyo baboti bapesaki bango. Likambo yango likoki mbala mosusu kozala petee te. Wana bato bazali konuna, mbala mingi bazali kolemba mpe ekómaka ete basusu babungisa makoki na bango. Basusu bakoki kokóma moimi mpe kozala na makambo makasi, mbala mosusu kozanga koyeba yango. Kasi ntango tozalaki bana mike, tozalaki na moimi mpe na makambo makasi, boye te? Mpe baboti na biso bazalaki na mposa makasi ya kosalisa biso, boye te? Sikawa makambo masili kobongwana na mikolo na bango ya bobange. Na bongo, ezali kosenga nini? Motema mawa mpe motema petee.​—Tala 1 Batesaloniki 2:7, 8.

12. Bizaleli nini tosengeli komonisa wana tozali kobatela mibange, mpe basangani mosusu nyonso ya lisangá?

12 Ntoma Paulo apesaki toli oyo ebongi ntango akomaki ete: “Na bongo, lokola baponami na Nzambe, babulami mpe balingami; bomilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosokema, na bopolo, na motema molai. Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisanaka. Lokola Jéhovah alimbisaki bino, bino mpe bobele bongo. Nde likoló na oyo nyonso, bomilatisa bolingo oyo ezali ekanganeli ekoki mpenza.” Soki tosengeli komonisa lolenge ya motema mawa mpe ya bolingo oyo kati na lisangá, na koleka tokosala yango kati na libota na biso te?​—Bakolose 3:12-14.

13. Longola baboti to bankɔ́kɔ na biso oyo bazali mibange, banani babongi lisusu kozwa lisalisi na biso?

13 Mbala mosusu lisalisi ya lolenge oyo esengeli kopesama bobele na baboti mpe bankɔ́kɔ te, kasi lisusu na bandeko mosusu ya mosuni baoyo basili kokóma mibange. Mibange misusu oyo bazali na bana te basalaki na boumeli ya mibu mingi kati na mosala ya misionere, na mosala ya zongazonga mpe kati na lolenge mosusu ya mosala ya pionnier. Na lolenge ebongi mpenza, batyaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na bango mobimba. (Matai 6:33) Na bongo, ekozala mpenza malamu komibanzabanza mpo na bango, boye te? Na ntembe te, tozali na ndakisa kitoko na lolenge oyo la Société Watch Tower azali kobatela basangani ya Béthel baoyo basili kokóma mibange. Na biro monene, na Brooklyn mpe na ba filiales mosusu ya la Société, bandeko mingi ya mibange basi mpe mibali bazali kozwa likebi mokolo na mokolo na bandeko oyo baponami mpe babongisami malamu mpo na mosala yango. Bazali na esengo ya kobatela mibange wana lokola nde bazalaki baboti mpe bankɔ́kɔ na bango mpenza. Bobele na ntango yango, bazali koyekola makambo mingi na eksperianse ya mibange yango.​—Masese 22:17.

Mokumba ya lisangá

14. Bibongiseli nini bizwamaki mpo na mibange kati na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso?

14 Mikili mingi mizali na ebongiseli ya kosunga mibange mpe ebongiseli ya Leta mpo na kosalisa mibange na lopitalo. Baklisto bakoki kozwa lisalisi wana epai bapesameli lotómo. Nzokande, na ekeke ya liboso, bibongiseli ya lolenge yango bizalaki te. Mpo na yango lisangá ya boklisto ezwaki meko malamu ya kosalisa basi bakufeli mibali oyo bazalaki babola. Paulo apesaki etinda ete: “Tika ete mwasi akomama na mokanda [mpo na lisalisi ya lisangá] lokola mwasi mokufeli mobali bobele soki azali na mibu ntuku motoba mpe soki azalaki na mobali bobele moko. Azala mpe mwasi oyo azwi litatoli malamu mpe na misala kitoko, oyo abokoli bana, oyo ayambaki bapaya, oyo asukoli makaka na babulami, oyo asungaki bato na bolozi, oyo atyaki motema na ye na misala nyonso malamu.” Na yango, Paulo amonisaki ete lisangá mpe lizali na mokumba ya kosunga mibange. Basi ya elimo oyo bana na bango bazalaki bandimi te bakokisaki masengami mpo na kozwa lisungi yango.​—1 Timoté 5:9, 10.

15. Mpo na nini kozwa lisungi ya Leta ekoki kosenga lisalisi?

15 Epai Leta ezali na bibongiseli mpo na kobatela mibange, mbala mingi esengaka mikanda mingi oyo koluka yango ekoki kolembisa. Kati na makambo lolenge yango, ebongi ete bakɛngɛli ya lisangá basala ebongiseli mpo na kosunga mibange na kosenga lisalisi, na kokende kozwa mosolo yango to na kosenga ete babakisa motuya ya mosolo basengeli kozwa. Mbala mosusu mbongwana ya makambo ekoki komema na kobakisama ya mbongo ya pension. Kasi ezali lisusu na makambo mingi oyo bakɛngɛli bakoki kobongisa mpo na kosalisa mibange. Wapi mwa ndambo na yango?

16, 17. Na mitindo nini mikeseni tokoki komonisa boyambi epai na mibange kati na lisangá?

16 Komonisa boyambi ezali momeseno oyo ebandá kala. Kino lelo oyo, boyambi ezali komonisama epai na bapaya kati na mikili ya Proche-Orient, ata bobele na kopesa mopaya kopo ya tii to kopo ya café. Ezali likambo ya kokamwa te soki Paulo akomaki ete: “Bopesa makabo mpo na kozanga na babulami; boyambaka bapaya.” (Baloma 12:13) Liloba ya Greke mpo na boyambi, phi·lo·xe·niʹa, elimboli mpenza “bolingo ya (bolingo makasi mpo na, to boboto epai na) bapaya.” Soki baklisto basengeli koyamba bapaya, na koleka basengeli kosala yango epai na baoyo bazali bandeko na bango kati na kondima, boye te? Mbala mingi libyangi mpo na kolya esalaka mbongwana ya esengo kati na mimeseno ya mobange. Soki bolingi koyoka makambo ya mayele mpe ya eksperianse kati na kominanola na bino, bobengisa mibange.​—Tala Luka 14:12-14.

17 Ezali na mitindo mingi ya kolendisa mibange. Soki tomibongisi mpo na kokende na Salle du Royaume to na assemblée na motuka, ezali na mibange oyo bakosepela tokende na bango elongo? Tozelaka te ete basenga yango. Toyebisa bango mposa na biso ya komema bango. Lisalisi mosusu oyo ebongi etali kokende kosombela bango biloko. To soki bakokoka, tokoki komema bango elongo na biso wana tokei kosomba biloko na biso? Kasi tomindimisa mpo na esika bakoki kopema mpe kominanola soki esengeli. Na ntembe te, ekosenga motema petee mpe boboto, kasi botɔndi ya solo ya mobange ekoki kozala mpenza litomba.​—2 Bakolinti 1:11.

Bozwi kitoko mpo na lisangá

18. Mpo na nini mibange bazali lipamboli mpo na lisangá?

18 Oyo nde lipamboli na komona nsuki pee mpe nsuki mpembe (lisusu mitó oyo mizangi nsuki mpo na bobange) kati na lisangá! Elimboli ete kati na nguya mpe makasi ya bilenge, tozali na mayele mpe eksperianse oyo emwangisami​—bozwi ya solo mpo na masangá nyonso. Boyebi na bango ezali lokola mai ya mpio oyo esengeli kotokama na libulu moko. Ezali lokola Masese 18:4 emonisi yango ete: “Maloba na monoko na moto ezali lokola mai bozindo; liziba na mayele lizali lokola etima ekotiolaka.” Oyo nde elendiseli mpo na mibange na kooka ete tolingi bango mpe tozali kosepela na bango!​—Tala Nzembo 92:14.

19. Lolenge nini bandeko mosusu bamipesaki mpo na baboti na bango mibange?

19 Bandeko mosusu oyo bazalaki na mosala ya pionnier bamonaki ete basengeli kotika mosala na bango mpe kozonga mpo na kosalisa baboti na bango oyo basili kokóma mibange mpe bazali na bokono. Bamonisaki komipesa mpo na baoyo bamipesaki mpo na bango. Ndeko moko mpe mwasi na ye, baoyo kala bazalaki bamisionere mpe bazalaki naino na mosala ya pionnier, bazongaki na mboka na bango mpo na kosalisa baboti na bango oyo basilaki kokóma mibange. Ezali yango bazali kosala uta mibu koleka 20. Esili koleka mibu minei, bakendeki kotya mama ya ndeko mobali na esika babatelaka mibange. Ndeko mobali yango, oyo azali sikawa na mibu 60, akendeke mikolo nyonso kotala mama na ye oyo azali na mibu 93. Alimboli ete: “Lolenge nini nakoki kotika ye? Azali mama na ngai!” Na mabaku mosusu, masangá mpe bandeko basalisaki mpe babatelaki mibange mpo ete bana na bango bakoka kolanda mosala na bango. Bolingo ezangi moimi motindo yango ebongi mpe kokumisama. Ebongi kotalela makambo nyonso na motema mobimba mpo ete mibange batalelama na bopotu te. Monisa ete olingi baboti na yo oyo bazali mibange.​—Exode 20:12; Baefese 6:2, 3.

20. Ndakisa nini Jéhovah apesi na biso mpo na oyo etali kobatela mibange?

20 Ya solo, bandeko na biso mibali mpe basi oyo bazali mibange bazali motole ya kitoko mpo na libota to mpo na lisangá. Jéhovah alobaki ete: “Mpe kino ntango na konuna, ngai oyo, kino nsuki ekómi pee ngai nakokumba bino, ngai nasalaki, ngai nakokumba, ngai nakokumba mpe nakobikisa.” Tika ete tomonisa motema petee mpe libateli epai na bandeko na biso mibali mpe basi oyo basili kokóma mibange kati na libota ya boklisto.​—Yisaya 46:4; Masese 16:31.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na oyo basangani ya libota bakoki kosala mpo na mibange, tala La Tour de Garde ya 1er Juin 1987, lokasa 13 kino lokasa 18.

Ozali komikundola?

◻ Bandakisa nini ya Biblia tozali na yango mpo na oyo etali kobatela mibange?

◻ Lolenge nini tosengeli kotalela mibange?

◻ Lolenge nini basangani ya libota bakoki kobatela balingami na bango oyo bazali mibange?

◻ Lisangá likoki kosala nini mpo na kosalisa mibange?

◻ Mpo na nini mibange bazali lipamboli mpo na biso nyonso?

[Elilingi na lokasa 23]

Luta amonisaki boboto mpe limemya epai na Naomi oyo azalaki mobange

[Elilingi na lokasa 24]

Mibange bazali na motuya mingi kati na lisangá

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto