Mokapo 19
Ndenge nakoki kosalela mbongo malamu
Mbala boni omonaka ete ozali na mbongo mingi te mpo nakosomba eloko?
□ Ata mbala moko te
□ Ntango mosusu
□ Mbala na mbala
Mbala boni osombá biloko oyo ozalaki mpenza na mposa na yango te?
□ Ata mbala moko te
□ Ntango mosusu
□ Mbala na mbala
Mbala boni ekómelá yo osomba eloko moko kaka mpo bakitisi yango ntalo, nzokande ozali na mposa na yango te?
□ Ata mbala moko te
□ Ntango mosusu
□ Mbala na mbala
OMONAKA ntango nyonso ete ozalaka na mbongo mingi te? Soki ozalaka na mwa mbongo mingi koleka, okokaki kosomba eloko wana oyo olingaka mpo na kosakana. Soki ozwaka mbongo mingi, olingaki kosomba basapato wana oyo omoni ete ozali na yango “mposa.” To mbala mosusu ozali na mokakatano oyo ekómelaki Joan, oyo alobi boye: “Ntango mosusu baninga babengisaka ngai tósala makambo oyo esɛngaka mbongo mingi. Nalingaka kozwa mopɛpɛ ná baninga na ngai. Moto moko te alingaka koloba ete, ‘Bolimbisa ngai, nakokende te mpo nazali na mbongo mingi te.’”
Na esika oyoka mawa mpo na mbongo oyo ozali na yango te, mpo na nini te koyekola ndenge ya kosalela malamu mbongo oyo ozali kozwa? Ya solo, mbala mosusu okoki komona ete esengeli kozela tii okolongwa na ndako ya baboti mpo oyekola ndenge ya kosalela mbongo malamu. Kasi, kanisá naino: Okoki komibwaka libándá ya mpɛpɔ kozanga ete oyekola liboso ndenge ya kosalela parachute? Toboyi te, moto mosusu akoki koyeba ndenge ya kosalela yango ntango azali kokita na mabele. Nzokande, elingaki kozala mpenza malamu soki ayekolaki ndenge ya kosalela parachute liboso amibwaka!
Ndenge moko mpe, ntango oyo eleki malamu mpo oyekola kosalela mbongo, ezali ntango ozali naino na ndako ya baboti, liboso obanda koluka mpo na komileisa. Mokonzi Salomo akomaki boye: “Mbongo ebatelaka.” (Mosakoli 7:12) Kasi, mbongo ekobatela yo kaka soki oyekoli ndenge ya kosalela yango. Soki osali bongo, okokóma na mayele mingi mpe baboti na yo bakomemya yo mingi.
Luká koyeba biloko ya ntina
Osilá kotuna baboti na yo báyebisa yo soki kobatela ndako esɛngaka nini? Na ndakisa, oyebi mbongo boni babimisaka na sanza mpo na kofuta faktire ya kura, kotya molunge na ndako, mpe mai to mbongo boni esɛngaka mpo na kosomba esansi ya motuka, kosomba bilei, kofuta nyongo oyo bodefaki? Kobosana te, bafutaka bafaktire yango mpe mpo na yo—mpe soki olongwe na ndako, yo mpe okobanda kofuta bafaktire. Na yango, ezali malamu oyeba mbongo boni oyo okobanda kofuta mpo na kokokisa bamposa na yo. Sɛngá baboti na yo bálakisa yo bafaktire mosusu, mpe yoká bango na likebi ntango bazali kolimbola ndenge basalaka mpo na kofuta yango.
Biblia elobi boye: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi, mpe moto ya mayele nde moto oyo akómaka na makoki ya koyeba kotambwisa makambo.” (Masese 1:5) Anna asɛngaki baboti na ye básalisa ye ayeba ndenge ya kosalela mbongo. Alobi boye: “Papa ateyaki ngai ndenge ya kobongisa mpe kosalela mbongo, mpe amonisaki ngai ete ezali mpenza na ntina koyeba kobongisa liboso ndenge ya kosalela mbongo na libota.”
Mama ya Anna ateyaki ye makambo mosusu ya ntina. Anna alobi boye: “Amonisaki ngai ntina ya kokokanisa ntalo ya biloko liboso ya kosomba.” Abakisi boye: “Mama akoki kosala makambo mingi na mbongo moke.” Anna azwaki matomba nini? Alobi boye: “Lelo, nayebi ndenge ya kosalela mbongo na ngai. Nalandelaka malamu ndenge nazali kobimisa mbongo; na yango nazali na banyongo te mpe nayokaka kimya ya motema mpo nakɔtaka te banyongo ya mpambampamba.”
Yebá mikakatano
Ya solo, ndenge ekoki komonana, ekoki kozala pɛtɛɛ na koloba ete okoki kosalela malamu mbongo na yo, mingimingi soki ofandaka epai na bino to soki bafutaka yo; kasi kosalela nde mama ya likambo. Mpo na nini? Mpo baboti na yo nde bafutaka bafaktire mingi. Na yango, okoki kosalela mbongo ndenge motema na yo elingi. Mpe moto akoki kobanda komona kobimisa mbongo lokola likambo ya lisɛki.
Kasi, mokakatano ekoki kobima soki baninga na yo bazali kotinda yo osalela mbongo lokola ligboma. Ellena, oyo azali na mbula 21, alobi boye: “Baninga na ngai bakómisá kokende kosomba biloko lokola lisano. Ntango nabimi ná bango, emonanaka lokola nde mobeko ezali ete osengeli kobimisa mbongo soki olingi kosepela.”
Ezali mabe te koluka kozala lokola baninga na yo. Kasi, omituna boye: ‘Nazali kopanza mbongo ná baninga mpo kaka nakoki kosala yango to mpo esengeli mpenza nasala bongo?’ Bato mingi bapanzaka mbongo kaka mpo baninga na bango bákumisa bango. Balukaka kobenda likebi ya basusu na biloko oyo bazali na yango, kasi te na ndenge oyo bazali. Ezaleli ya boye ekoki kosilisa yo mbongo, mingimingi soki ozali na karte mpo na kobimisa mbongo na yo na banki. Ndenge nini okoki komibatela na likambo yango?
Kobimisaka mbongo ngulungulu te
Na esika osilisa mbongo nyonso oyo ezali na kɔnti na yo na banki to olya mbongo nyonso oyo bafutaki yo kaka na butu moko, mpo na nini te omeka kosalela mayele ya Ellena? Alobi boye: “Ntango nabimi ná baninga, nakataka liboso motángo ya mbongo oyo nakobimisa. Mbongo na ngai ya salɛrɛ ekendaka mbala moko na banki, mpe nazwaka kaka mwa ndambo oyo nakosalela ntango tobimi. Namonaka mpe ete ezali malamu kokende kosomba biloko kaka ná baninga oyo babebisaka mbongo mpambampamba te mpe baoyo bakolendisa ngai natambola naino liboso nasomba, mpe nasomba te eloko nyonso oyo ebɛtisi ngai motema.”
Soki olingi odefa mbongo, makanisi oyo elandi ekoki kosalisa yo:
● Komá banyongo nyonso oyo ozali na yango mpe talá soki eyokani na ndenge ezali na kaye ya moto oyo adefisaki yo.
● Futáká banyongo na yo ntango kaka ozwi mbongo. Soki likoki ezali, futá yango nyonso.
● Kebá na ndenge ozali kodefa mbongo. Kodefa epai ya moto nyonso te.
● Kodefa te mbongo ya kozongisa na matabisi. Kosala bongo, ekoki kotinda yo okóma motema likolólikoló.
● Kondima te ete moto mosusu adefa mbongo na nkombo na yo, ata soki azali moninga na yo.
Kasi, kozala na mbongo mingi koleka nde ekosilisa mikakatano ya kobimisaka mbongo? Te! Tópesa ndakisa: Soki ozali kokumba motuka mpe ozali kokoka kotambwisa yango te to soki ozali na momeseno ya kokumba motuka miso ekangamá, kotya esansi mingi koleka na réservoir ekosalisa yo okóma malamu na esika oyo ozali kokende? Ndenge moko mpe, soki oyebi te ndenge ya kosalela mpenza mbongo, kozwa mbongo mingi koleka ekobongisa makambo te.
Mbala mosusu okanisaka ete oyebi kosalela mbongo na yo malamu. Kasi omituna boye: ‘Mbongo boni nabimisaki na sanza oyo eleki? Nasalelaki yango na nini?’ Oyebi lisusu te? Makanisi oyo elandi ekosalisa yo osalelaka mbongo na yo na mayele:
1. Komáká. Na boumeli ya sanza ata moko, komá motángo ya mbongo oyo ozwi mpe dati oyo ozwaki yango. Komá eloko nyonso oyo osombi mpe ntalo na yango. Na nsuka ya sanza, sangisá mitángo ya mbongo nyonso oyo ozwaki mpe oyo obimisaki.
2. Komá ndenge okosalela mbongo. Talá etanda na lokasa 163. Na molɔngɔ ya liboso, komá mbongo oyo okanisi ete okozwa na sanza moko. Na molɔngɔ ya mibale, komá ndenge okani kosalela mbongo na yo; makambo oyo okomaki likoló (eteni 1) ekoki kosalisa yo. Ntango sanza ezali kokende, komá na molɔngɔ ya misato motángo mpenza oyo obimisi mpo na likambo mokomoko oyo okanaki. Komá mpe mbongo oyo obimisi mpo na makambo oyo okanaki te.
3. Bongolá makambo mosusu. Soki obimisi mbongo mingi na biloko mosusu koleka oyo okanaki mpe okɔti banyongo, bongolá makambo mosusu mpo obimisaka mbongo mingi te. Futáká banyongo na yo. Bongolá lolenge oyo osalelaka mbongo.
Mbongo ekoki kozala na ntina mingi soki tosaleli yango malamu. Kutu, mpo na bato mingi, kozwa mpe koyeba kosalela mbongo ezali na ntina mingi na bomoi. Kasi, taleláká mbongo na ndenge ebongi. Elenge moko na nkombo Matthieu alobi boye: “Mbongo ezali na ntina, kasi ezali finale ya makambo te. Tosengeli soki moke te kozwa yango na valɛrɛ koleka libota na biso to Yehova.”
Ozali na libota ya babola? Soki ezali bongo, okoki kosala nini mpo ozala malamu?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Mbongo ebatelaka; kasi litomba ya boyebi ezali ete bwanya ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.”—Mosakoli 7:12.
TOLI
Salá liste ya biloko oyo okosomba liboso okende na zando. Memá kaka mbongo oyo okosalela, mpe sombá kaka biloko oyo okomaki.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Soki odefi mbongo ya kozongisa na matabisi, mpe soki ozali kozongisa kaka mwa mbongo moke, ekosɛnga yo bambula mingi mpo osilisa nyongo yango nyonso.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Mpo na koyeba mbongo oyo nabimisaka, nako ․․․․․
Liboso nasomba eloko na carte de crédit, nako ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini osengeli koyekola kosalela mbongo ntango ozali naino na ndako ya baboti?
● Mpo na nini mbala mosusu okoki komona ete ezali mpasi kosalela mbongo na yo?
● Ndenge nini okoki kosalela mbongo na yo mpo na kosalisa basusu?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 162]
“Soki nasaleli mbongo na kolanda ndenge nakanaki, nabombaka mbongo mingi. Nasombaka te biloko oyo nasengeli na yango te.”—Léa
[Etanda na lokasa 158]
Mbongo elobaka
Obimisaka mbongo mpo na kosala na yango nini? Soki obimisaka mbongo mbala na mbala mpo na kosalisa basusu, ekomonisa ete omibanzabanzaka mpo na bango kaka na maloba te kasi mpe na misala. (Yakobo 2:14-17) Soki ozali kopesa makabo ya mbongo mbala na mbala mpo na kosimba losambo ya solo, wana ozali ‘kokumisa Yehova na biloko na yo ya motuya.’ (Masese 3:9) Kasi, soki obimisaka mbongo na yo ntango nyonso kaka mpo na makambo na yo moko, ozali komonisa ete nini ezali na ntina mingi mpo na yo?
[Etanda/Bililingi na lokasa 163]
Etanda ya mituna
Ndenge nakosalela mbongo na sanza
Salá fotokopi ya lokasa oyo!
Mbongo oyo nazwaka
EUTI NA BABOTI
NA MWA MOSALA
NA MAKAMBO MOSUSU
Epesi
․․․․․FC to ․․․․․$
Mbongo nakobimisa
KOLYA
․․․․․
BILAMBA
․․․․․
TELEFONE
․․․․․
KOMISEPELISA
․․․․․
MAKABO
․․․․․
EKONZO
․․․․․
MAKAMBO MOSUSU
․․․․․
Epesi
․․․․․FC to ․․․․․$
Mbongo nabimisi mpenza
KOLYA
․․․․․
BILAMBA
․․․․․
TELEFONE
․․․․․
KOMISEPELISA
․․․․․
MAKABO
․․․․․
EKONZO
․․․․․
MAKAMBO MOSUSU
․․․․․
Epesi
․․․․․FC to ․․․․․$
[Elilingi na lokasa 160]
Kosalela mbongo na ligboma, ezali lokola kokumba motuka miso ya kokanga