Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 1/2 lok. 15
  • Oyebaki yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Oyebaki yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Masolo mosusu
  • “Nalingaka mibeko na yo mingi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ndakisa malamu mpo na lolenge ya kotalela bato bakimá mboka
    Lamuká!—1996
  • “Bómimonisa bato ya Botɔndi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 1/2 lok. 15

Oyebaki yango?

Momeseno ya kolɔkɔta mbuma oyo ezalaki kotikala na elanga ezalaki kosalema ndenge nini, mpe banani bazalaki kozwela yango litomba?

▪ Mibeko ya Moize epekisaki basali-bilanga básilisa mbuma nyonso na elanga. Kutu, baoyo bazalaki kobuka mbuma basengelaki te kosilisa mbuma nyonso oyo ezalaki na ndelo ya elanga. Baoyo bazalaki koyanganisa bambuma ya vinyo, basengelaki te kolɔkɔta mbuma oyo ezalaki kokwea to kozongela mbuma oyo ekɔmelaki naino te. Mpe baoyo bazalaki koningisa bitape ya nzete ya olive mpo mbuma ekwea, basengelaki kotika bambuma oyo ekweaki te. (Balevi 19:9, 10; Kolimbola Mibeko 24:19-21) Babola, bitike, basi oyo mibali bakufá, mpe bapaya bakokaki kolɔkɔta​—to kobuka—​mbuma oyo ezalaki kotikala nsima ya kobuka mbuma.

Mobeko yango ya kolɔkɔta mbuma oyo etikalaka ezalaki mpo na litomba ya Bayisraele nyonso. Ezalaki kolendisa bankolo-mabele bákabaka, bázala na moimi te, mpe bátya motema na mapamboli ya Nzambe. Ezalaki kolendisa baoyo bazalaki kolɔkɔta bázala gɔigɔi te, mpo kolɔkɔta mbuma ezalaki mosala makasi. (Ruta 2:2-17) Ebongiseli ya kolɔkɔta mbuma ezalaki kondimisa ete babola bakozanga eloko ya kolya te, mpe bakokóma kilo te mpo na bato mosusu. Ezalaki mpe kolongola bango nsɔni ya kokende kosɛnga to kotya motema na biloko oyo bakokabela bango.

Mpo na nini Salomo azalaki kozwa banzete mosika na Libá mpo na kotonga tempelo ya Yerusaleme?

▪ Lisolo oyo ezali na 1 Bakonzi 5:1-10, elobeli boyokani oyo Salomo asalaki ná Hirame, mokonzi ya Tire. Na boyokani yango, mabaya ya sɛdrɛ mpe ya jenevriye esengelaki koya na Yisraele na nzela ya mbu longwa na Libá mpe kosalela yango mpo na kotonga tempelo.

Nzete ya sɛdrɛ ezalaki kotɛkama mingi na Moyen-Orient. Na Ezipito mpe na Mezopotamia, bazalaki kosalela nzete yango mingi mpo na kosala mabaya ya nsamba mpe biloko ya kokembisa batempelo mpe bandako ya bakonzi. Mikanda ya kala ya bakonzi, mikanda mosusu, mpe mayemi emonisaka ete bakobaki komema nzete ya sɛdrɛ na bingumba ndenge na ndenge na sudi ya Mezopotamia, na bantango mosusu bazalaki kobɔtɔla yango na ntango ya bitumba to kosalela yango lokola mpako. Na Ezipito, bazalaki kosalela yango mpo na kotonga masuwa ya mike ya mokonzi, sanduku mpo na kokunda ebembe mpe biloko mosusu ya ndenge wana.

Banzete ya sɛdrɛ ya Libá eyebanaki mingi mpo na ndenge ezalaki koumela, ezalaki kitoko, mpe mpo na nsolo kitoko ya mabaya na yango, mpe longola yango banyama nkɛkɛ ezalaki kokoka te kobebisa yango. Na yango, Salomo azalaki kosalela biloko ya kitoko mpo na kotonga tempelo. Lelo oyo, zamba oyo ezalaki na banzete ya sɛdrɛ oyo etondaki kala na bangomba ya Libá, ekómá moke mpenza, etikalá kaka mwa banzete ya mikemike.

[Elilingi na lokasa 15]

Bazali komema banzete ya sɛdrɛ ya Libá, liyemi ya Asiri, ya ndako ya mokonzi Sargon

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Erich Lessing/​Art Resource, NY

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto